Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liloba moko oyo ezalaki na ndimbola monene!

Liloba moko oyo ezalaki na ndimbola monene!

“MWASI.” Ntango mosusu Yesu azalaki kobenga basi ndenge wana. Na ndakisa, ntango abikisaki mwasi moko oyo azalaki ebɔsɔnɔ mpe agumbamaki mpo na maladi mbula 18, alobaki: “Mwasi, obiki na bolɛmbu na yo.” (Luka 13:10-13) Kutu, Yesu asalelaki lolenge wana ya kobenga, oyo na ntango ya kala ezalaki komonisa limemya, ntango azalaki koloba na mama na ye moko. (Yoa. 19:26; 20:13) Kasi ezalaki na liloba mosusu oyo ezalaki komonisa limemya mingi koleka.

Biblia esaleli liloba mosusu oyo emonisi mpenza boboto mpe bolingo ntango elobeli basi mosusu. Yesu asalelaki liloba yango ntango alobaki na mwasi oyo azalaki kobɛla maladi ya kotanga makila mbula 12. Likambo oyo mwasi yango asalaki ya kosimba Yesu eyokanaki te na Mobeko ya Nzambe, oyo ezalaki koloba ete moto oyo azali na maladi ya ndenge wana azali mbindo. Bato bakokaki koloba na ye ete asengelaki te kobima esika bato mosusu bazali, mpo azalaki mbindo. (Lev. 15:19-27) Kasi, asalaki bongo mpo asukaki mayele. Kutu, “amonaki mpasi mingi na minganga ndenge na ndenge mpe asilisaki biloko na ye nyonso mpe azwaki litomba te, kutu, akómaki nde na mpasi koleka.”​—Mrk. 5:25, 26.

Mwasi yango alukaki mwa nzela ya koleka katikati ya ebele ya bato, alandaki Yesu nsimansima, mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló. Mbala moko, maladi na ye ya kotanga makila esilaki! Mwasi yango akanisaki ete bato bakoyeba te likambo oyo asali, kasi Yesu atunaki: “Nani asimbi ngai?” (Luka 8:45-47) Ntango mwasi yango ayokaki bongo, akweaki na kobanga mpe na kolɛnga liboso ya Yesu, “mpe ayebisaki ye solo nyonso.”​—Mrk. 5:33.

Mpo na kosalisa mwasi yango abanga te, Yesu alobaki na ye na boboto: “Mwana na ngai, zalá na mpiko!” (Mat. 9:22) Bato ya mayele oyo balimbolaka Biblia balobaka ete liloba ya Ebre mpe ya Grɛki oyo babongoli na “mwana” ekoki kosalelama na ndenge ya elilingi mpo na komonisa “boboto mpe bolingo.” Mpo na kokitisa ye lisusu motema, Yesu alobaki na ye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”​—Mrk. 5:34.

“Mwana.” Boaze, mozwi moko ya Yisraele abengaki Ruta, elenge mwasi moko ya Moabe, ndenge wana. Ruta mpe akokaki kobanga mpo azalaki kolɔkɔta mbuma na elanga ya mobali moko oyo ye ayebaki te. Kasi Boaze alobaki na ye: “Oyoki, mwana na ngai.” Na nsima, alendisaki Ruta akoba kolɔkɔta mbuma na bilanga na ye. Ruta agumbamaki liboso ya Boaze mpe atunaki ye mpo na nini amoniselaki ye boboto ndenge wana, atako azalaki mopaya. Mpo na kokitisa ye lisusu motema, Boaze ayanolaki boye: “Bayebisaki ngai mpenza makambo nyonso oyo osalelaki bokilo na yo [Naomi, mwasi oyo mobali akufá] . . . Tiká Yehova apesa mbano mpo na oyo osalaki.”​—Ruta 2:8-12.

Yesu mpe Boaze bazali mpenza ndakisa malamu mpo na bankulutu na masangá! Ntango mosusu, bankulutu mibale bakoki kokende kosolola na ndeko mwasi moko oyo azali na mposa ya lisalisi mpe bilendiseli ya Biblia. Nsima ya kosɛnga litambwisi ya Yehova na libondeli mpe koyoka na likebi makambo oyo ndeko mwasi ayebisi bango, bankulutu yango bakozala na likoki ya kokitisa ye motema mpe kobɔndisa ye na Liloba ya Nzambe.​—Rom. 15:4.