Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | OKONDIMA LIKABO YA NZAMBE OYO ELEKI MAKABO NYONSO?

Ndenge nini okomonisa botɔndi mpo na likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso?

Ndenge nini okomonisa botɔndi mpo na likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso?

“Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, . . . akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango.”2 Bakorinti 5:14, 15.

SOKI bapesi biso likabo ya malamu mpenza, esengeli kotinda biso tómonisa botɔndi. Yesu amonisaki liteya yango nsima ya kobikisa bato zomi oyo bazalaki na maladi oyo ezangaki nkisi na ntango wana. Kaka moko ya bato yango nde “azongaki, azali kokumisa Nzambe na mongongo makasi.” Yesu alobaki: “Bato zomi bakómaki pɛto, boye te? Bongo bamosusu libwa bazali wapi?” (Luka 17:12-17) Yango eteyi biso nini? Ezalaka mpasi te tóbosana nokinoki makambo ya malamu oyo basusu basalelaka biso!

Lisiko ekeseni na makabo mosusu nyonso. Eleki makabo nyonso oyo bapesá biso. Kasi, ndenge nini okoki komonisa botɔndi na oyo Nzambe asalá mpo na yo?

  • Yekolá koyeba moto oyo apesaki yango. Lisiko epesaka bomoi ya seko epai ya bato nyonso kaka mpamba boye te. Kutu, ntango Yesu abondelaki Nzambe, alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Soki bayebisi yo ete moto moko abikisaki bomoi na yo ntango ozalaki mwana moke, okoluka te oyeba makambo mingi etali moto yango mpe mpo na nini abikisaki yo? Yehova Nzambe, oyo apesá likabo ya lisiko oyo ebikisaka alingi ete oyeba ye mpe okóma moninga na ye. Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”Yakobo 4:8.

  • Monisá kondima na mbeka ya lisiko. “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko.” (Yoane 3:36) Kondimela Yesu emonanaka na nini? Emonanaka na misala. (Yakobo 2:17) Misala nini? Mpo likabo ekóma ya yo esɛngi ozwa mpe ondima yango. Yango wana osengeli kozwa mpe kondima lisiko. Ndenge nini? Yekolá ndenge Nzambe alingi otambwisa bomoi na yo mpe salelá makambo yango. * Bondelá Nzambe alimbisa yo mpe apesa yo lisosoli ya pɛto. Bondelá Nzambe mpe ndimá mpenza ete baoyo nyonso bazali komonisa kondima na lisiko bakozwa na bomoi ya seko ya kimya mpe bakozanga eloko te!Baebre 11:1.

  • Yanganá na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Yesu abandisaki molulu moko oyo esengeli kosalema mbula na mbula mpo tókanisaka lisiko. Alobaki boye mpo na molulu yango: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Batatoli ya Yehova bakosala molulu yango Mokolo ya mibale, 11/04/2017, nsima ya kolala ya moi. Likita yango oyo ekoumela ngonga moko, ekozala na diskur oyo ekolimbola ntina oyo Yesu akufaki mpe ndenge oyo liwa yango ezali komema mapamboli lelo mpe na mikolo ezali koya. Mbula eleki, bato soki milio 20 na mokili mobimba bayanganaki na molulu yango. Tosɛngi yo oya koyangana na biso mpo na komonisa botɔndi na likabo oyo eleki makabo nyonso oyo Nzambe apesá.

^ par. 7 Koyekola Biblia ezali lolenge oyo eleki malamu mpo na koyeba Nzambe mpe kokóma moninga na ye. Mpo oyeba ndenge ya kosala yango tuná Motatoli ya Yehova moko to kɔtá na site Internet na biso www.pr418.com.