Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BAANZELU​—BAZALAKA MPENZA? KOYEBA YANGO EZALI NA NTINA?

Oyo Biblia elobi mpo na baanzelu

Oyo Biblia elobi mpo na baanzelu

Okosepela koyeba solo mpo na baanzelu​—soki bazali banani, bautá wapi, mpe basalaka nini? Biblia, Liloba ya Nzambe, nde ekoki kopesa biso biyano na mituna wana. (2 Timote 3:16) Biblia eyebisi biso nini?

  • Kaka ndenge Nzambe azali elimo, baanzelu mpe bazali bilimo, bamonanaka te, mpe ‘bazalaka na misuni te, mikuwa mpe te.’ Baanzelu ya sembo bafandaka na likoló pembeni ya Nzambe.​—Luka 24:39; Matai 18:10; Yoane 4:24.

  • Na ntango ya kala, baanzelu bazalaki kolata nzoto ya bato mpo na kokokisa mikumba oyo Nzambe apesaki bango awa na mabele, na nsima soki basilisi mokumba oyo bazalaki na yango, bazalaki kozongela nzoto na bango ya elimo.​—Basambisi 6:11-23; 13:15-20.

  • Mbala nyonso oyo Biblia elobelaka baanzelu, emonisaka ete bazali mibali, mpe soki balati nzoto ya bato bamonanaka mibali; atako bongo, baanzelu bazalaka mibali te, basi mpe te. Babalanaka te mpo bábota baanzelu mosusu. Longolá yango, baanzelu bazalaki naino te babebe, bana mike, to mikóló awa na mabele. Yehova nde akelaki bango; yango wana Biblia ebengi bango “bana ya Nzambe ya solo.”​—Yobo 1:6; Nzembo 148:2, 5.

  • Lokola Biblia elobeli “minɔkɔ ya bato mpe ya baanzelu,” yango emonisi ete bikelamu ya elimo bazalaka na monɔkɔ na bango mpe na elobeli na bango. Atako Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kosolola na bato, alingaka te ete tósambela baanzelu to tóbondela bango.​—1 Bakorinti 13:1; Emoniseli 22:8, 9.

  • Baanzelu bazali bamiriade na bamiriade, mbala mosusu bazali bamiliare na bamiliare. *​—Danyele 7:10; Emoniseli 5:11.

  • Baanzelu bazali “na makasi na kati ya nguya,” baleki bato na nguya mosika, mpe bazali na mayele oyo eleki mayele ya bato. Bakoki kokende mosika na vitɛsi moko ya kosakana te, koleka oyo moto akoki kokanisa.​—Nzembo 103:20; Danyele 9:20-23.

  • Atako baanzelu bazali na mayele mpe nguya mingi ndenge wana, bakoki te kosala makambo nyonso, mpe bayebi makambo nyonso te.​—Matai 24:36; 1 Petro 1:12.

  • Nzambe akelá anzelu mokomoko na bomoto na ye, na bizaleli lokola oyo ya Nzambe, mpe na bonsomi ya kopona. Na yango, ndenge moko na bato, baanzelu bakoki kopona kosala malamu to mabe. Likambo ya mawa, baanzelu mosusu baponaki kotombokela Nzambe.​—Yuda 6.

^ par. 8 Miriade moko ezali 10 000. Miriade moko mbala miriade esali milio 100. Kasi, mokanda ya Emoniseli elobi ete baanzelu bazali “bamiriade na bamiriade.” Yango elingi koloba bankama ya bamilio, mbala mosusu bamiliare ya bikelamu ya elimo!