Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MITUNA YA BATÁNGI . . .

Bakristo basengeli kosala fɛti ya Noele?

Bakristo basengeli kosala fɛti ya Noele?

Bamilio ya bato na mokili mobimba bandimaka ete fɛti ya Noele ezalaka mpo na kokanisa mokolo ya mbotama ya Yesu Kristo. Kasi, osilá komituna soki bakristo ya siɛklɛ ya liboso, oyo bazalaki na bomoi na eleko ya Yesu, bazalaki kosala Noele? Longola yango, oyebi oyo Biblia eteyaka mpo na bafɛti ya kokanisa mokolo ya mbotama? Kozwa biyano na mituna wana ekoki kosalisa biso tóyeba soki bakristo basengeli kosala fɛti ya Noele to te.

Ya liboso, Biblia elobi te ete Yesu to basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe bazalaki kosala fɛti ya kokanisa mokolo ya mbotama. Biblia elobeli kaka bato mibale oyo basalaki fɛti ya kokanisa mokolo oyo babotamaki. Ata moko na bango te azalaki kosambela Yehova, Nzambe oyo Biblia elobeli, mpe bafɛti na bango ya kokanisa mokolo ya mbotama esukaki mabe. (Ebandeli 40:20; Marko 6:21) Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete bakristo ya liboso bazalaki te kolanda “momeseno ya bapakano ya kosala fɛti ya kokanisa mokolo ya mbotama.”

Yesu abotamaki na dati nini?

Biblia eyebisi polele te mokolo nini Yesu abotamaki. Buku moko (McClintock and Strong’s Cyclopedia) emonisi ete “ezala Testama ya Sika to mikanda mosusu eyebisi te mokolo ya mbotama ya Kristo.” Soki Yesu alingaki ete bayekoli na ye básalaka fɛti mpo na kokanisa mokolo ya mbotama na ye, na ntembe te, alingaki kosala ete báyeba mokolo yango.

Ya mibale, Biblia elobi te ete Yesu to bayekoli na ye bazalaki kosala fɛti ya Noele. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete kosala fɛti ya kokanisa mokolo ya mbotama elobelamaki mpo na mbala ya liboso “na buku moko ya Baroma (Chronograph of Philocalus) oyo elobeli makambo oyo esalemaki na bambula 336 ya ntango na biso.” Yango ezalaki nsima ya ntango oyo Biblia esilaki kokomama mpe basiɛklɛ mingi nsima ya liwa ya Yesu. Yango wana, McClintock mpe Strong balobaki ete “Nzambe atindaki bato básalaka fɛti ya Noele te mpe Kondimana ya Sika elobeli yango te.” *

Molulu nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákanisaka?

Yesu, Moteyi Monene, apesaki malako ya polele na makambo oyo alingaki ete bayekoli na ye básala; malako yango ezali na kati ya Biblia. Kasi, kosala fɛti ya Noele ezali na kati ya malako yango te. Kaka ndenge molakisi alingaka te ete bana-kelasi na ye bákende mosika koleka malako oyo apesi bango, Yesu mpe alingaka te ete bayekoli na ye ‘bákende mosika koleka makambo oyo ekomamá’ na kati ya Biblia.​—1 Bakorinti 4:6.

Nzokande, ezali na molulu moko ya ntina mingi oyo Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamesanaki kosala: Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Yesu ye moko ayebisaki bayekoli na ye ntango oyo basengelaki kosala molulu yango mpe alakisaki bango ndenge ya kosala yango. Malako yango ya polele mpe mokolo ya liwa na ye ezali na kati ya Biblia.​—Luka 22:19; 1 Bakorinti 11:25.

Ndenge tomoni yango, Noele ezali fɛti ya kokanisa mokolo ya mbotama, mpe bakristo ya liboso bazalaki te kolanda momeseno wana ya bapakano. Lisusu, Biblia elobi te ete Yesu to mokristo mosusu ya sembo asalaki fɛti ya Noele. Na kotalela makambo nyonso wana, bamilio ya bakristo na mokili mobimba bamoni ete basengeli te kosala fɛti ya Noele.

^ par. 6 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali esika mimeseno mingi ya Noele eutá, talá lisolo “Mituna ya batángi . . . Makambo oyo etali fɛti ya Noele” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2014, ezali mpe na Internet na www.pr418.com.