Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?

“Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”1 YOANE 2:17.

NZEMBO: 134, 24

1, 2. (a) Na ndimbola nini mokili oyo mabe ekokani na mobomi-bato oyo etikali moke abomama? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Moto nyonso, ezala na likoló to awa na mabele, akomiyoka ndenge nini ntango mokili oyo mabe ekobomama?

KANISÁ ete mobomi-bato moko azali kotambola na kati ya lopango ya bolɔkɔ. Ntango basoda oyo bakɛngɛlaka bolɔkɔ bamoni ye, bagangi: “Akufa-lobi azali kotambola!” Mpo na nini babengi ye akufa-lobi? Atako mobomi-bato yango azali naino na bomoi mpe azali komonana nzoto makasi, basilá kokatela ye etumbu ya liwa mpe etikali moke abomama. Ezali lokola nde asilá kokufa. *—Talá maloba na nse ya lokasa.

2 Mokili mabe oyo tofandi ezali lokola mobomi-bato wana, oyo etikali moke abomama. Biblia elobi ete: “Mokili ezali koleka.” (1 Yoane 2:17) Yehova azwá ekateli ete akoboma mokili oyo mosika te; yango wana ntembe ezali te ete mokili yango ekosuka. Kasi, nsuka ya mokili oyo ekeseni mpenza na kobomama ya mobomi-bato wana. Bato mosusu bakoki komona ete basambisaki mobomi-bato wana na bosembo te mpe bakoki kotɛmɛla likambo yango, na elikya ete bakoboma ye te. Nzokande, Yehova azali zuzi ya kokoka, yango wana ekateli na ye ya koboma mokili oyo ezali sembo mpe ya kokoka. (Kolimbola Mibeko 32:4) Akoboma mokili yango mpenza na ntango oyo atyá. Nsukansuka, ntango mokili oyo ekobebisama nyɛɛ, moto nyonso ezala na likoló to awa na mabele, akondima ete Yehova asambisi mokili na boyengebene. Ekozala libɔndisi monene!

3. Makambo nini minei ekolongolama ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya?

3 “Mokili” oyo ezali “koleka” esangisi makambo nini? Esangisi makambo mabe oyo bato bazali kosala lelo oyo. Mosika te, makambo wana nyonso ekosila. Nsango yango ezali mpenza na kati ya ‘nsango malamu ya Bokonzi.’ (Matai 24:14) Na lisolo oyo, tokolobela makambo minei oyo ekolongolama ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya: bato mabe, bibongiseli ya mabe, misala ya mabe, mpe bampasi. Mpo na likambo mokomoko, tokomona (1) ndenge oyo bazali kosala biso mabe lelo oyo, (2) oyo Yehova akosala mpo na bango, mpe (3) oyo Yehova akotya na esika ya mokomoko na yango.

BATO MABE

4. Makambo nini bato mabe bazali kosala biso lelo oyo?

4 Makambo nini bato mabe bazali kosala biso lelo oyo? Ntoma Paulo alobaki ete na mikolo oyo ya nsuka, ekozala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Na nsima, abakisaki: “Bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka.” (2 Timote 3:1-5, 13) Osilá komona likambo yango? Mingi na biso tosilá kokutana na mpasi mpo na bato mabe, na ndakisa bato ya mobulu, bato oyo bayinaka bato ya mposo mosusu, mpe babomi-bato. Basusu balobaka polele makambo ya mabe oyo basalaka. Basusu babɛtaka ntolo ete basalisaka bato, nzokande bazali nde bato mabe. Ata soki tokutaná naino te na likambo moko ya mobulu, bato mabe basalaka biso mabe ata na lolenge mosusu. Toyokaka nsɔmɔ ntango toyokaka nsango ya makambo ya mabe oyo basalelaka bana mike, mibange, mpe bato mosusu oyo bazali na likoki ya komibatela te. Bato mabe wana basalaka makambo lokola banyama ya zamba to lokola bademo. (Yakobo 3:15) Likambo ya esengo, Liloba ya Yehova epesi biso elikya.

5. (a) Libaku nini bato mabe bazali naino na yango? (b) Nini ekokómela bato oyo baboyi kobongwana?

5 Yehova akosala nini? Sikoyo, Yehova azali kopesa bato mabe libaku ya kobongwana. (Yisaya 55:7) Atako mokili oyo ekobomama mosika te, bato mabe basambisami naino te. Kasi, nini ekokómela bato oyo baboyi kobongwana mpe baoyo bakokoba kopesa mokili oyo mabɔkɔ tii na ntango ya bolɔzi monene? Yehova alaki ete akolongola bato nyonso wana ya mabe awa na mabele. (Tángá Nzembo 37:10.) Lelo oyo, bato mingi babombaka makambo mabe oyo basalaka, mpe mbala mingi bazwaka etumbu te. (Yobo 21:7, 9) Kasi Biblia ekundweli biso ete: ‘Miso ya Nzambe ezali likoló ya banzela ya moto, mpe azali komona matambe na ye nyonso. Molili to molili makasi ezali te mpo baoyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bámibomba kuna.’ (Yobo 34:21, 22) Na yango, makambo nyonso ezali polele na miso ya Yehova. Azali na likoki ya komona makambo nyonso oyo bato mabe bazali kosala. Nsima ya Armagedone, tokotya likebi na esika oyo bazalaki, kasi tokomona bango te. Bakolongolama mpo na libela!Nzembo 37:12-15.

6. (a) Banani bakotikala ntango bato mabe bakobomama? (b) Mpo na nini yango ezali nsango malamu?

6 Banani bakotikala ntango bato mabe bakobomama? Yehova alaki ete: “Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Kaka na nzembo yango, tozali kotánga ete: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:11, 29) Banani bazali “bato ya komikitisa” mpe “bayengebene”? Bato ya komikitisa ezali bato oyo bandimi koyekola makambo ya Yehova mpe kotosa ye. Bayengebene ezali bato oyo balingaka kosala oyo Nzambe alobi ete ezali malamu. Lelo oyo na mokili, bato mabe bazali mingi koleka bato malamu. Kasi mokili ya sika ekozala kaka na bato ya komikitisa mpe bayengebene, oyo bakosala ete mabele ekóma paradiso!

BIBONGISELI YA MABE

7. Makambo nini bibongiseli ya mabe ezali kobimisela biso lelo?

7 Makambo nini bibongiseli ya mabe ezali kobimisela biso lelo? Makambo mingi ya mabe oyo ezali kosalema na mokili lelo ezali kosalema na moto te, kasi na bibongiseli ya mabe. Na ndakisa, bibongiseli ya losambo ezali kokosa bamilio ya bato. Bakonzi ya mangomba bateyaka ete Nzambe azali nguya moko boye oyo emonanaka te to akipaka bato te, balobaka ete Biblia ekoki kotyelama motema te, mpe bakosaka bato ete na mikolo ezali koya mabele oyo ekolimwa mpe bato bakofanda lisusu awa na mabele te. Baguvɛrnema ya mabe ezali kobimisa bitumba mpe mobulu oyo euti na kokesenisa mindɛlɛ ná baindo, mpe ezali konyokola babola mpe bato oyo bazangi libateli. Baguvɛrnema ya ndenge wana ezali kokóma na bozwi mingi mpe na nguya mingi mpo ezali komonisa ezaleli ya koponapona to kondima kanyaka. Bakompanyi ya lokoso ezali kobebisa zamba, mai, mopɛpɛ, ná biloko mosusu oyo Nzambe akelá, mpe ezali kokosa to kolyela bato mpo basusu bakóma bazwi. Tomoni polele ete bibongiseli ya mabe ezali kobimisela bato mpasi mingi na mokili lelo oyo.

8. Na kotalela Biblia, nini ekokómela bibongiseli oyo ezali komonana makasi na miso ya bato mingi lelo oyo?

8 Yehova akosala nini? Bolɔzi monene ekobanda ntango bibongiseli ya politiki, oyo ezali na nguya mingi, ekobebisa bibongiseli nyonso ya losambo ya lokuta, oyo Biblia ebengi mwasi ya ndumba to Babilone Monene. (Emoniseli 17:1, 2, 16; 18:1-4) Bibongiseli wana ya losambo ekobebisama nyɛɛ. Kasi nini ekokómela bibongiseli mosusu nyonso ya mabe oyo etikali? Biblia ekokanisi yango na bangomba mpe na bisanga mpo ezali komonana ete ezali na nguya mpe ezali makasi. (Tángá Emoniseli 6:14.) Kasi, ebakisi ete baguvɛrnema mpe bibongiseli mosusu nyonso oyo epesaka Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ te ekobebisama. Yango ekozala eteni ya nsuka ya bolɔzi monene. (Yirimia 25:31-33) Na nsima, ata ebongiseli moko te ya mabe ekozala lisusu!

9. Mpo na nini tokoki kondimisama ete na mabele ya sika makambo ekotambola na molɔngɔ?

9 Nini ekozwa esika ya bibongiseli ya mabe? Nsima ya Armagedone, ekozala nde na ebongiseli moko awa na mabele? Ɛɛ. Biblia elobi ete: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.” (2 Petro 3:13) Likoló ya kala ezali baguvɛrnema ya mabe oyo ezali koyangela lelo. Mabele ya kala ezali bato oyo baguvɛrnema yango ezali koyangela. Ntango likoló ya kala mpe mabele ya kala ekozala lisusu te, nini ekozwa esika na yango? Ekozala “likoló ya sika mpe mabele ya sika.” Likoló ya sika ezali guvɛrnema ya sika, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu Kristo ná bato 144 000 bakoyangela. Mabele ya sika ezali bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Yesu ná bato oyo akoyangela elongo na bango bakomekola na ndenge ya kokoka Yehova, oyo azali Nzambe ya mobulu te. (1 Bakorinti 14:33) Na yango, na “mabele ya sika” makambo ekotambola na molɔngɔ. Ekozala na bankumu oyo bakotambwisa makambo awa na mabele. (Nzembo 45:16) Kristo ná bato 144 000 nde bakotambwisa bankumu yango. Kanisá ntango oyo bibongiseli nyonso ya mabe ekozala lisusu te, mpe na esika na yango ekozala kaka na ebongiseli moko, oyo ekosangisa bato nyonso mpe ekobebisama soki moke te!

MISALA YA MABE

10. (a) Misala nini ya mabe bato bameseni na yango na esika ofandi? (b) Misala yango esalaka yo ná libota na yo nini?

10 Ndenge nini misala ya mabe ezali konyokola biso lelo oyo? Tofandi na mokili oyo etondi na misala ya mabe lokola pite to ekobo, kozanga bosembo, mpe mobulu. Masano mpe kominanola oyo mokili ezali kobimisa esalaka ete makambo wana emonana mabe te, nzokande makambo yango ezali kotyola mitinda ya Yehova oyo etali malamu mpe mabe. (Yisaya 5:20) Mingimingi baboti basengeli kobunda mpo na kobatela bana na bango na misala wana ya mabe. Kutu, bakristo nyonso ya solo basengeli kosala makasi mpo na kobatela boyokani na bango na Yehova, na mokili oyo etosaka mitinda ya Nzambe te.

11. Liteya nini tozwi na ndenge oyo Yehova abebisaki Sodoma ná Gomora?

11 Yehova akosala nini mpo na misala ya mabe? Tótalela oyo Yehova asalaki mpo na misala ya mabe oyo ezalaki kosalema na engumba ya Sodoma mpe ya Gomora. (Tángá 2 Petro 2:6-8.) Lota azalaki moto ya sembo; ye ná libota na ye banyokwamaki mingi mpo na makambo nyonso ya mabe oyo bato oyo bazalaki zingazinga na ye bazalaki kosala. Yehova abebisaki bingumba yango mpo na kosilisa makambo ya mabe oyo ezalaki kosalema kuna. Kasi, na likambo yango, ‘azalaki mpe kopesa ndakisa’ mpo na bato mabe lelo oyo. Kaka ndenge Yehova asilisaki misala nyonso ya mbindo ya ntango wana, akosilisa mpe yango na eleko na biso ntango akobebisa mokili oyo.

12. Misala nini ozali kozela na mposa makasi kosala na mokili ya sika?

12 Nini ekozwa esika na misala ya mabe? Na mokili ya sika, tokozala na misala mingi ya kosala oyo ekopesa biso esengo. Na ndakisa, tokokómisa mabele paradiso mpe tokotonga bandako mpo na biso moko mpe mpo na bato oyo tolingaka. Tokoyamba mpe bamilio ya bato oyo bakozonga na bomoi mpe tokoteya bango makambo ya Yehova mpe makambo nyonso oyo asilá kosala mpo na bato. (Yisaya 65:21, 22; Misala 24:15) Na ntango wana, tokozala na misala mingi ya kosala oyo ekopesa biso esengo mpe ekokumisa Yehova!

BAMPASI

13. Botomboki oyo ebimaki na Edene ebimisi makambo nini?

13 Ndenge nini tomiyokaka mpo na bampasi oyo ekómelaka biso lelo oyo? Bampasi oyo tozali kokutanaka na yango ezali kouta na mokili oyo etondi na bato mabe, bibongiseli ya mabe, mpe misala ya mabe. Biso nyonso tokutanaka na mikakatano lokola bitumba, bobola, ezaleli ya kokesenisa mindɛlɛ ná baindo, maladi, mpe liwa. Bampasi yango ebandaki ntango Satana, Adama, mpe Eva batombokelaki Yehova. Mpe botomboki na bango ebimiseli biso nyonso bampasi.

14. Yehova akosala nini mpo na bampasi?

14 Yehova akosala nini mpo na bampasi? Tótala mwa bandakisa. Yehova alaki ete akosilisa bitumba nyonso. (Tángá Nzembo 46:8, 9.) Akosilisa maladi. (Yisaya 33:24) Akolongola liwa mpo na libela. (Yisaya 25:8) Akosilisa bobola. (Nzembo 72:12-16) Mpe Yehova akolongola bampasi mosusu nyonso oyo esalaka ete bomoi ezala mabe lelo oyo. Akolongola ata makambo ya mabe oyo Satana ná bademo na ye bazali kobimisela bato!Baefese 2:2.

Kanisá mokili oyo ezangi bitumba, maladi, to liwa! (Talá paragrafe 15)

15. Nsima ya Armagedone, makambo nini ekolongwa mpo na libela?

15 Kanisá ndenge oyo makambo ekozala na mokili ntango bitumba, maladi, to liwa ekozala lisusu te! Ezala mampinga ya basoda, bibundeli, to monima oyo emonisaka bitumba oyo eleká ekozala lisusu te. Tokozala te na mposa ya balopitalo, minganga, bisika ya kobomba bibembe to malita. Babomi-bato bakozala lisusu te, yango wana tokozala na mposa ya bapolisi te, tokotya te ngonga oyo ekebisaka na ntango ya likama, mbala mosusu tokozala ata na mposa ya fungola te! Bampasi wana nyonso oyo ebimiselaka biso mitungisi mingi ekosila mpo na libela.

16, 17. (a) Bato oyo bakobika na Armagedone bakomiyoka ndenge nini? Pesá ndakisa. (b) Nini ekoki kondimisa biso ete tokobika ntango mokili oyo ekobebisama?

16 Bomoi ekozala ndenge nini ntango bampasi ekosila? Ezali mwa mpasi koyeba mpenza ndenge makambo ekozala. Lokola toumeli ntango molai na kati ya bampasi, mbala mosusu toyebaka te ebele ya mitungisi oyo bampasi yango ememelaka biso. Mpo tókanga ntina ya likambo yango, tózwa ndakisa oyo: bato oyo bafandaka pene na esika oyo bato mingi bazelaka engbunduka, mbala mosusu bayokaka lisusu te makelele na yango. Ndakisa mosusu: bato oyo bafandi pembeni ya ekunde to fulu bayokaka lisusu mpenza nsolo mabe te. Kasi ntango oyo Yehova akolongola bampasi nyonso, ekozala mpenza libɔndisi!

17 Nini ekozwa esika ya mitungisi nyonso oyo ezali konyokola biso lelo? Nzembo 37:11 elobi ete: “Bakosepela mpenza na kimya mingi.” Ezali mpenza libɔndisi koyeba ete yango nde makambo oyo Yehova alingi kosala mpo na biso! Na ntango oyo ya yikiyiki, salá nyonso oyo okoki mpo okoba kozala penepene na Yehova mpe ebongiseli na ye. Elikya na yo mpo na mikolo ezali koya ezali na motuya mingi, yango wana kanisáká yango na mozindo, monáká ete ezali likambo ya solo, mpe yebisáká bato mosusu elikya yango. (1 Timote 4:15, 16; 1 Petro 3:15) Soki ozali kosala bongo, okoki kozala na kondima ete ntango mokili oyo ekosuka, okobika mpe okozala na esengo libela na libela!

^ par. 1 Paragrafe oyo elobeli momeseno moko oyo ezalaki komonana mingi na bisika mosusu na États-Unis, eleki sikoyo bambula mingi.