Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tyá motema na yo na biloko ya motuya ya elimo

Tyá motema na yo na biloko ya motuya ya elimo

“Epai eloko na bino ya motuya ezali, mitema na bino ekozala mpe kuna.”LUKA 12:34.

NZEMBO: 153, 104

1, 2. (a) Tángá biloko misato ya motuya oyo Yehova apesi biso. (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

YEHOVA azali Moto oyo aleki na bozwi na molɔ́ngɔ́ mobimba. Nyonso ezali ya ye. (1 Ntango 29:11, 12) Kasi Yehova akabelaka bato nyonso. Tozali mpenza na botɔndi ndenge apesi biso ebele ya biloko ya motuya ya elimo! Biloko yango nini? Kati na yango, tokoki kotánga (1) Bokonzi ya Nzambe, (2) mosala ya kosakola, mpe (3) mateya kitoko oyo ezali na Biblia. Kasi soki tokebi te, tokoki kobosana motuya ya biloko yango. Mpo tóbosana yango te, tosengeli ntango nyonso kosalela yango malamu mpe kokoba kolinga yango, mpo Yesu alobaki ete: “Epai eloko na bino ya motuya ezali, mitema na bino ekozala mpe kuna.”Luka 12:34.

2 Tólobela ndenge ya kobatela mpe kokolisa bolingo mpe botɔndi na biso mpo na Bokonzi, mosala ya kosakola, mpe mateya ya Biblia. Wana tozali kosala yango, kanisá oyo okoki kosala mpo okolisa bolingo mpo na biloko yango ya motuya ya elimo.

BOKONZI YA NZAMBE EZALI LOKOLA LIYAKA YA MOTUYA MONENE

3. Moto oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye andimaki kosala nini mpo asomba liyaka oyo amonaki? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Tángá Matai 13:45, 46. Yesu apesaki ndakisa ya mobali moko oyo azalaki kosala mombongo ya mayaka. Mokolo moko, amonaki liyaka moko ya motuya koleka mayaka nyonso oyo amoná. Mpo na kosomba liyaka yango, atɛkaki biloko nyonso oyo azalaki na yango. Na ntembe te, liyaka yango ezalaki mpenza na motuya na miso na ye!

4. Nini tokoki kondima kosala mpo na Bokonzi?

4 Ndakisa wana ya Yesu eteyi biso nini? Solo ya Bokonzi ya Nzambe ezali lokola liyaka wana ya motuya monene. Soki tolingi Bokonzi ya Nzambe ndenge moto wana alingaki liyaka, tokondima kotika eloko nyonso mpo na kokóma mpe kotikala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. (Tángá Marko 10:28-30.) Tótala ndenge bato mibale basalaki yango.

5. Zakai andimaki kosala nini mpo na Bokonzi?

5 Zakai azalaki mokɔngɔli-mpako. Akómaki mozwi na mbongo oyo azalaki kobɔtɔla bato. (Luka 19:1-9) Kasi mokolo moko, Zakai ayokaki Yesu azali koteya makambo etali Bokonzi. Asepelaki mingi na makambo ayokaki mpe alingaki mpenza kobongwana. Alobaki: “Talá ndambo ya biloko na ngai, nakopesa yango babola, mpe eloko nyonso nabɔtɔlaki moto na efundeli ya lokuta nakozongisa yango mbala minei.” Zakai azongisaki mbongo ya bato mpe atikaki lokoso.

6. Mbongwana nini mwasi moko asalaki, mpe mpo na nini?

6 Eleki mwa bambula, mwasi moko oyo azalaki kosangisa nzoto na moninga na ye mwasi ayokaki nsango ya Bokonzi. Azalaki mpe mokambi ya ebongiseli moko oyo ezalaki kobundela bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi. Kasi ntango azalaki koyekola Biblia mpe ayebaki motuya ya Bokonzi ya Nzambe, amonaki ete asengeli kosala mbongwana monene na bomoi na ye. (1 Bakorinti 6:9, 10) Lokola alingaki Yehova, alongwaki na ebongiseli wana mpe akabwanaki na mwasi oyo azalaki kosangisa na ye nzoto. Azwaki batisimo na 2009, mpe na mbula oyo elandaki, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Asalaki mbongwana monene wana mpo bolingo oyo alingaka Yehova ezalaki makasi koleka bamposa na ye ya mbindo.Marko 12:29, 30.

7. Tokoki kosala nini mpo tókoba kolinga Bokonzi?

7 Mpo na kokóma bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe, mingi na biso tosalá mbongwana monene na bomoi na biso. (Baroma 12:2) Kasi etumba esili te. Tosengeli kokeba na eloko nyonso oyo ekoki kokitisa bolingo na biso mpo na Bokonzi, ezala bolingo ya biloko ya mokili to bamposa ya mbindo. (Masese 4:23; Matai 5:27-29) Mpo na kosalisa biso tókoba kolinga Bokonzi ya Nzambe na motema moko, Yehova apesá biso eloko mosusu ya motuya.

MOSALA YA KOSAKOLA EBIKISAKA BOMOI YA BATO

8. (a) Mpo na nini ntoma Paulo abengaki mosala ya kosakola ‘eloko ya motuya na kati ya bambɛki ya mabele’? (b) Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete alingaki mosala ya kosakola?

8 Yesu apesaki biso mokumba ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 28:19, 20) Ntoma Paulo alobaki ete mosala ya kosakola ezali lokola eloko ya motuya na kati ya bambɛki ya mabele. (2 Bakorinti 4:7; 1 Timote 1:12) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali lokola bambɛki yango ya mabele. Kasi nsango oyo tosakolaka ezali lokola eloko ya motuya mpo ekoki kopesa biso mpe baoyo bayoki biso bomoi ya seko. Yango wana Paulo alobaki: “Nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nasakola yango elongo na bamosusu.” (1 Bakorinti 9:23) Ntoma Paulo amipesaki na koteya basusu makambo ya Bokonzi ya Nzambe. (Tángá Baroma 1:14, 15; 2 Timote 4:2.) Kolinga nsango malamu esalisaki ye akoba kosakola atako akutanaki na minyoko makasi. (1 Batesaloniki 2:2) Ndenge nini tokoki komekola Paulo na oyo etali kolinga mosala ya kosakola?

9. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka mosala ya kosakola?

9 Mpo na komonisa ete alingaki mosala ya kosakola, ntoma Paulo azalaki kosalela libaku nyonso mpo na kosolola na bato. Ndenge moko na ntoma Paulo mpe bakristo ya liboso, biso mpe toyebisaka bato nsango malamu na ndako na ndako, na bisika ya bato ebele, mpe na libaku malamu. (Misala 5:42; 20:20) Tolukaka ndenge ya kosolola na bato ebele mpenza. Tokoki kokóma ata babongisi-nzela basungi to ya sanza na sanza. Tokoki mpe koyekola monɔkɔ mosusu, kokende na mboka mosusu ya ekólo na biso, ata mpe na ekólo mosusu.Misala 16:9, 10.

10. Matomba nini Irene azwaki lokola amipesaki na kosakola nsango malamu?

10 Tólobela Irene, ndeko mwasi moko ya monzemba oyo afandaka na États-Unis. Azalaki na mposa ya kosakola nsango malamu epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Russe. Na 1993, akómaki koyangana na etuluku ya monɔkɔ ya Russe na engumba New York. Na ntango wana, basakoli bazalaki kaka soki 20 na etuluku yango. Mbula 20 na nsima, Irene alobaki boye: “Tii lelo, nayebi monɔkɔ ya Russe malamumalamu te.” Kasi, Yehova asalisi ye ná basakoli mosusu básakwela bato na monɔkɔ yango. Lelo oyo, ezali na masangá motoba ya monɔkɔ ya Russe na engumba New York. Irene ayekolaki Biblia na bato ebele, mpe 15 kati na bango bazwá batisimo. Basusu kati na bango bakɔtá Betele, bakómá babongisi-nzela, mpe bankulutu. Irene alobi boye: “Soki nakanisi mikano mosusu oyo nakokaki komityela, namonaka te oyo elingaki kopesa ngai esengo koleka.” Irene azwaka mpenza mosala ya kosakola na motuya!

Ozwaka mosala ya kosakola na motuya mpe otyá yango na programɛ na yo ya pɔsɔ? (Talá paragrafe 11 mpe 12)

11. Matomba nini ekoki kobima soki tokobi kosakola atako minyoko?

11 Soki biso mpe tozwaka mosala ya kosakola na motuya, tokozala lokola ntoma Paulo mpe tokokoba kosakola ata soki tokutani na minyoko. (Misala 14:19-22) Na ndakisa, na bambula ya 1930 tii 1944, bandeko na biso ya États-Unis bakutanaki na minyoko ya makasi. Kasi, bakobaki kaka kosakola. Ntango bakonzi balukaki kopekisa bango, bandeko bamemaki likambo yango na tribinale mpe balongaki mbala ebele. Na 1943, Ndeko Nathan Knorr alobelaki likambo moko oyo tolongaki na Tribinale monene ya États-Unis. Alobaki ete soki bandeko bátikaka kosakola, likambo ya komema na tribinale yango elingaki kozala te. Abakisaki ete lokola bandeko na mokili mobimba bakobaki kosakola, emonisaki ete minyoko wana elongaki te. Bandeko ya mikili mosusu mpe balongaki makambo ya ndenge wana na batribinale. Ya solo, soki tolingaka mosala ya kosakola, tokotika kosala yango te ntango tokutani na minyoko.

12. Ozwi ekateli nini mpo na mosala ya kosakola?

12 Soki tozwaka mosala ya kosakola na motuya, tokosakola kaka te mpo na kozwa ngonga ya kokoma na lapolo. Tokosala nde nyonso oyo tokoki mpo na “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.” (Misala 20:24; 2 Timote 4:5) Kasi, makambo nini tokoteya bato? Tólobela eloko mosusu ya motuya Nzambe apesá biso.

MATEYA YA SOLO EZALI ELOKO YA MOTUYA

13, 14. ‘Esika ya kobomba biloko ya motuya’ oyo Yesu alobelaki na Matai 13:52 ezali nini, mpe ndenge nini totondisaka yango?

13 Eloko ya misato ya motuya oyo Yehova apesi biso ezali mateya nyonso oyo toyekoli. Solo nyonso eutaka epai ya Yehova. (2 Samwele 7:28; Nzembo 31:5) Lokola Nzambe na biso azali Mokabi, alingaka koyebisa biso solo yango. Kobanda toyokaki solo mpo na mbala ya liboso, toyekoli mateya ebele na Biblia, na mikanda ya moombo ya sembo, na mayangani ya minene mpe ya mike, mpe na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ. Nsima ya mikolo, ndenge Yesu alobaki yango, tokɔtisi mateya “ya sika mpe ya kala” na ‘esika ya kobomba biloko ya motuya.’ (Tángá Matai 13:52.) Yehova akosalisa biso tótondisa ‘esika na biso ya kobomba biloko ya motuya’ soki tozali koluka mateya ya Biblia ndenge balukaka biloko ya motuya oyo ebombani. (Tángá Masese 2:4-7.) Ndenge nini tokoki kosala yango?

14 Tosengeli koyekola Biblia mpe mikanda na biso mbala na mbala mpe kosala bolukiluki ya mozindo. Yango ekosalisa biso tómona mateya “ya sika,” elingi koloba oyo toyebaki te liboso. (Yosua 1:8, 9; Nzembo 1:2, 3) Nimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebimaki na sanza ya nsambo na 1879 ekokanisaki mateya ya solo na fololo oyo ebombani na kati ya matiti. Elobaki ete mpo moto amona fololo yango, asengeli koluka yango na likebi. Mpe soki amoni moko, asuka kaka wana te. Akoba kolukaluka fololo mosusu. Ndenge moko mpe, tosengeli kozala na mposa makasi ya kokoba koluka koyeba mateya ebele ya Biblia.

15. Mpo na nini tokoki kobenga mateya mosusu mateya “ya kala,” mpe oyo wapi ozwaka na motuya koleka?

15 Ntango tobandaki koyekola Biblia, toyekolaki ndambo ya mateya ya Nzambe. Tokoki kobenga yango mateya “ya kala” mpo yango nde toyekolaki na ebandeli. Mateya yango ezali nini? Toyekolaki ete Yehova azali Mozalisi na biso mpe ete azali na mokano moko mpo na bato. Toyekolaki mpe ete atindaki Mwana na ye na mabele mpo apesa bomoi na ye lokola mbeka mpo tólongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Lisusu, toyekolaki ete Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bampasi nyonso mpe ete tozali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na mabele, na kimya mpe na esengo.Yoane 3:16; Emoniseli 4:11; 21:3, 4.

16. Tosengeli kosala nini soki basemboli boyebi na biso ya mateya ya Biblia?

16 Na bantango mosusu, basembolaka boyebi na biso ya esakweli moko ya Biblia to ya vɛrsɛ moko. Soki likambo ya ndenge wana esalemi, tosengeli kozwa ntango ya koyekola mpe komanyola yango. (Misala 17:11; 1 Timote 4:15) Tosengeli koluka koyeba na mozindo likambo oyo basemboli, ata na makambo ya mikemike. Boyekoli ya ndenge wana ekokɔtisa solo yango ya sika na esika na biso ya kobomba biloko ya motuya ya elimo. Mpo na nini ebongi tósala milende ya ndenge wana?

17, 18. Ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa biso?

17 Yesu ateyaki ete elimo ya Nzambe ekoki kozongisa na makanisi na biso makambo oyo toyekolaki. (Yoane 14:25, 26) Ndenge nini likambo yango ekoki kosalisa biso ntango tozali kosakola nsango malamu? Tótalela likambo oyo ekómelaki ndeko moko na nkombo Peter. Na 1970, azalaki na mbula 19 mpe autaki kokɔta Betele sika na Grande-Bretagne. Mokolo moko na mosala ya kosakola ndako na ndako, Peter akutanaki na tata moko ya mandefu ebele. Atunaki tata yango soki akosepela koyeba Biblia. Lokola tata yango azalaki mokambi na Lingomba ya Bayuda, akamwaki makasi ndenge elenge akanisaki ete akoki koteya ye Biblia. Mpo na komeka Peter, tata yango atunaki ye: “Yebisá ngai, mokanda ya Danyele ekomamaki na monɔkɔ nini?” Peter alobaki: “Eteni na yango mosusu ekomamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ.” Peter alobi: “Tata yango akamwaki ndenge nayebaki eyano; kasi ngai moko mpe nakamwaki! Ndenge nini nayebaki eyano yango? Ntango nazongaki ndako mpe natalaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya basanza eleki, namonaki lisolo moko oyo emonisaki ete mokanda ya Danyele ekomamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ.” (Danyele 2:4) Ya solo, elimo santu ekoki kozongisa na makanisi na biso makambo oyo totángaki mpe totyaki na esika ya kobomba biloko na biso ya motuya.Luka 12:11, 12; 21:13-15.

18 Soki tozwaka na motuya mateya oyo toyekoli epai ya Yehova, tokokoba kobakisa yango na esika na biso ya kobomba biloko ya motuya. Soki tosali bongo, tokozala na likoki ya koyebisa yango basusu.

BATELÁ BILOKO NA YO YA MOTUYA

19. Mpo na nini tosengeli kobatela biloko na biso ya motuya ya elimo?

19 Na lisolo oyo, tomoni ete ezali na ntina mingi tókoba kolinga biloko ya motuya ya elimo. Kasi Satana ná mokili na ye balukaka kotinda biso tótika kolinga biloko yango na motema moko. Soki tokebi te, makambo mosusu ekoki kobenda likebi na biso, na ndakisa soki balaki biso mosala ya mbongo ebele, tozali kolɔta kozala na bomoi ya bomɛngo, to mpe tozali na mposa ya kolakisa na lolendo biloko na biso ya mokili. Ntoma Yoane akundweli biso ete mokili ná makambo na yango nyonso ekoleka mosika te. (1 Yoane 2:15-17) Yango wana, tosengeli ntango nyonso kozala na botɔndi mpo na biloko ya motuya ya elimo mpe kobatela yango.

20. Ozwi ekateli ya kosala nini mpo obatela biloko na yo ya motuya ya elimo?

20 Ndimá kotika eloko nyonso oyo ekoki kokitisa bolingo yo mpo na Bokonzi ya Nzambe. Sakoláká na molende mpe kobá kolinga mosala ya kosakola. Kobá kolukaluka mateya ya Biblia. Soki osali bongo, okobomba ‘biloko ya motuya na likoló, epai moyibi apusanaka pene te mpe ndɔngɛ ebebisaka te. Mpo epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.’Luka 12:33, 34.