Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baboti: Bósalisa bana na bino bákóma ‘bato ya bwanya mpo na lobiko’

Baboti: Bósalisa bana na bino bákóma ‘bato ya bwanya mpo na lobiko’

“Banda bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu, oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko.”​—2 TIMOTE 3:15.

NZEMBO: 141, 134

1, 2. Mpo na nini baboti mosusu bamitungisaka soki bana na bango balingi komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo?

BATO ebele mpenza oyo bayekolaka Biblia bazali komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Mingi na bango ezali bilenge oyo babɔkwami na kati ya solo mpe baponi bomoi oyo eleki malamu. (Nzembo 1:1-3) Soki ozali moboti, mbala mosusu ozali kozela mokolo oyo mwana na yo ya mobali to ya mwasi akozwa batisimo.​—Talá mpe 3 Yoane 4.

2 Kasi, ntango mosusu ozali komitungisa. Ekoki kozala ete omoná bilenge mosusu oyo bazwaki batisimo kasi na nsima, bakómaki komituna soki basengeli mpenza kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na bango. Basusu kutu batiki solo. Na yango, mbala mosusu ozali komona ete mwana na yo akobanda kosalela Yehova mpe na nsima bolingo na ye mpo na solo ekosila. Mbala mosusu akoki kokóma lokola bakristo ya Efese na siɛklɛ ya liboso, oyo Yesu alobaki na bango: “Otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.” (Emoniseli 2:4) Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo abatela bolingo makasi mpo na solo mpe ‘akola tii na lobiko’? (1 Petro 2:2) Mpo na kozwa eyano, tótalela ndakisa ya Timote.

“OYEBI MAKOMI MOSANTU”

3. (a) Ndenge nini Timote akómaki mokristo, mpe asalaki nini na makambo oyo ayekolaki? (b) Makambo nini misato Paulo ayebisaki Timote?

3 Ntoma Paulo akendaki na Listra mbala ya liboso na mobu 47. Ekoki kozala na ntango wana nde Timote, oyo mbala mosusu azalaki naino elenge, ayekolaki mateya ya Yesu. Amipesaki na yango, mpe mbula mibale na nsima abandaki kosala mibembo elongo na Paulo. Mbula soki 16 na nsima, Paulo akomelaki Timote ete: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima bosolo na yango, oyebi epai ya banani oyekolaki yango mpe banda bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu [Makomami ya Ebre], oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali na boyokani na Kristo Yesu.” (2 Timote 3:14, 15) Paulo alobi ete Timote (1) ayebaki makomi mosantu, (2) basalisaki ye andima bosolo ya makambo oyo ayekolaki, mpe (3) akómaki moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima epai ya Yesu Kristo.

4. Osalelaka nini mpo na koteya bana na yo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Lokola ozali mokristo, mposa na yo ezali ete mwana na yo ayeba makomi mosantu, oyo ezali lelo Makomami ya Ebre mpe Makomami ya Grɛki ya bokristo. Ata bana mike bakoki koyekola masolo ya bato mpe makambo oyo Biblia elobeli. Lisangá ya Yehova ebimisi babuku, mwa babuku, mpe bavideo ebele oyo baboti bakoki kosalela mpo na kosalisa bana na bango. Oyebi oyo ebimá na monɔkɔ na bino? Mpo mwana akóma na boyokani makasi na Yehova, asengeli koyeba makambo oyo ezali na Biblia.

“BASALISAKI YO ONDIMA”

5. (a) Kosalisa moto andima elimboli nini? (b) Ndenge nini toyebi ete basalisaki Timote andima nsango malamu ya Yesu?

5 Koteya bana masolo ya bato mpe makambo oyo Biblia elobeli ekoki te. Kobosana te ete “basalisaki [Timote] andima” bosolo ya makambo oyo ayekolaki. Maloba ya Grɛki oyo Paulo asalelaki elimboli “kondimisama ete likambo ezali solo.” Timote ayebaki Makomami ya Ebre “banda bomwana.” Na nsima, balakisaki ye bilembeteli oyo endimisaki ye ete Yesu azalaki mpenza Masiya. Kondima ya Timote ekómaki makasi mpenza; na yango azwaki batisimo mpe akómaki kosala elongo na Paulo na mosala ya misionɛrɛ.

6. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bándima Liloba ya Nzambe?

6 Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bándima mateya ya Biblia mpo bákóma na kondima makasi lokola Timote? Ya liboso, zalá na motema molai. Ezwaka ntango mpo kondima ya moto ekóma makasi. Soki yo ondimaka likambo moko, elingi koloba te ete bana na yo mpe bakondima yango mbala moko. Mwana mokomoko asengeli kosalela ‘likoki na ye ya kokanisa’ mpo akóma kondima mateya ya Biblia. (Tángá Baroma 12:1.) Lokola ozali moboti, okoki kosalisa mingi mpo bana na yo bákóma na kondima makasi, mingimingi ntango bazali kotuna mituna. Tótala ndakisa ya tata moko.

7, 8. (a) Ndenge nini tata moko amonisaka motema molai ntango azali koteya mwana na ye? (b) Ntango nini esɛngaki omonisa motema molai epai ya mwana na yo?

7 Ndeko Thomas, oyo azali na mwana mwasi ya mbula 11, alobi ete na bantango mosusu mwana na ye atunaka ye mituna lokola: “Ekoki kozala ete Yehova asalelaki nde evolisyo mpo na kobimisa bomoi na mabele?” to “Mpo nini tosalaka makambo lokola bato nyonso te, na ndakisa maponami, to koluka kobongisa makambo na mokili?” Na bantango mosusu ndeko Thomas aboyaka koyebisa mwana kaka makambo oyo asengeli kondima. Ayebi ete mpo na kosalisa moto andima likambo esɛngi kaka te kolobela makambo minene, kasi esengeli kopesa ye mwa bilembeteli ya mikemike.

8 Ndeko Thomas ayebi mpe ete asengeli kozala na motema molai mpo na koteya mwana na ye. Kutu, bakristo nyonso basengeli kozala na motema molai. (Bakolose 3:12) Ayebi ete ekoki kozwa ntango mpe kosɛnga asololaka mingi na mwana na ye mpo na kosalisa ye akóma na kondima makasi. Asengeli kosolola na ye na mozindo mpo na makambo oyo ayekolaka na Biblia. Alobi boye: “Mingimingi na makambo ya ntina, ngai ná mwasi na ngai tolingaka koyeba soki mwana na biso andimi mpenza makambo oyo tozali koyekola mpe soki akangi ntina na yango. Soki azali kotuna mituna, tosepelaka. Mpo na koloba solo, nakomitungisa soki andimi likambo moko kozanga ete atuna mituna.”

9. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bándimela Liloba ya Nzambe?

9 Soki baboti bazali na motema molai ntango bazali koteya bana, mokemoke bana bakoyeba “bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo” ya mateya ya solo. (Baefese 3:18) Bokoki koteya bana na kolanda mbula mpe mayele na bango. Wana kondima na bango ezali kokóma makasi, ekozala lisusu mpasi te mpo báyebisa makambo yango epai ya basusu, ata mpe baninga ya kelasi. (1 Petro 3:15) Na ndakisa, bana na yo bakokoka kosalela Biblia mpo na kolimbola ndenge moto akómaka soki akufi? Bamonaka ete ndimbola oyo Biblia epesi ebongi mpenza? * Kosalisa mwana andimela Liloba ya Nzambe esɛngaka kozala na motema molai, kasi ebongi mpenza kosala yango.​—Kolimbola Mibeko 6:6, 7.

10. Nini ezali na ntina mingi mpo na koteya bana?

10 Ndakisa na yo mpe ezali na ntina mingi mpo na kosalisa bana bákóma na kondima makasi. Ndeko Stephanie, oyo azali mama ya bana misato ya basi, alobi boye: “Banda ntango bana bazalaki mike, nazalaki komituna ete ‘Nayebisaka bana na ngai ntina oyo nandimaka ete Yehova azalaka, ete alingaka biso mpe banzela na ye ezali sembo? Bana na ngai bamonaka ete nalingaka mpenza Yehova? Nakoki kozela te ete bana na ngai bándima likambo soki ngai moko nandimaka yango te.”

“MOTO YA BWANYA MPO NA LOBIKO”

11, 12. Bwanya ezali nini, mpe ndenge nini toyebi ete yango etali mbula ya moto te?

11 Ndenge tomoni yango, Timote (1) ayebaki Makomami mpe (2) andimaki makambo oyo ayekolaki. Kasi Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete makomi mosantu ekokaki kokómisa Timote “moto ya bwanya mpo na lobiko”?

12 Buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, emonisi ete na Biblia, bwanya ezali mpe “likoki ya kosalela malamumalamu boyebi mpe bososoli mpo na kokata makambo, kokima to komona makama, kokokisa mikano, to kopesa basusu toli mpo básala yango. Yango ekeseni na bozoba.” Biblia elobi ete “bozoba ekangami na motema ya mwana.” (Masese 22:15) Na yango, bwanya emonisaka ete moto akɔmɛli. Kokɔmɛla na elimo elimboli kobanga Yehova mpe kolinga kotosa ye, etali mbula ya moto te.​—Tángá Nzembo 111:10.

13. Ndenge nini bilenge bakoki komonisa ete bazali bato ya bwanya mpo na lobiko?

13 Bilenge oyo babandi kokɔmɛla na elimo ‘batindikamaka te lokola na mbonge mpe bamemamaka epai na epai’ te na bamposa na bango to na makanisi mabe ya baninga. (Baefese 4:14) Bazali na ‘makoki ya kososola’ oyo ezali ‘komesana kokesenisa mabe ná malamu.’ (Baebre 5:14) Na yango, bazwaka bikateli ya malamu, ata ntango baboti to mikóló mosusu bazali komona bango te. (Bafilipi 2:12) Bwanya ya ndenge wana nde ememaka na lobiko. (Tángá Masese 24:14.) Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bákolisa bwanya ya ndenge wana? Osengeli koyebisa bango bizaleli oyo omonaka ete ezali na ntina mingi. Maloba mpe misala na yo esengeli komonisa bango ete osalaka makasi olanda mibeko ya Biblia.​—Baroma 2:21-23.

Mpo na nini ezali na ntina moboti akoba kosala milende? (Talá paragrafe 14-18)

14, 15. (a) Elenge oyo alingi kozwa batisimo asengeli kokanisa likambo nini? (b) Ndenge nini okoki kosalisa bana bámanyola mapamboli oyo bakozwa soki bazali kotosa mibeko ya Nzambe?

14 Kasi, mpo na kosalisa bana na yo bákóma na kondima, kosuka kaka na koyebisa bango oyo ezali malamu to oyo ezali mabe ekoki te. Osengeli mpe kosalisa bango bákanisaka mituna lokola oyo: ‘Mpo na nini Biblia epekisi makambo oyo ekoki komonana lokola esepelisaka? Nini etindaka ngai nandima ete mibeko ya Biblia ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na ngai?’​—Yisaya 48:17, 18.

15 Soki mwana na yo alingi kozwa batisimo, salisá ye akanisa mpe malamu makambo oyo moto oyo azwi batisimo asengeli kosala. Amonaka makambo yango ndenge nini? Matomba na yango nini? Mikakatano na yango nini? Mpo na nini matomba eleki mikakatano? (Marko 10:29, 30) Ezali na ntina mingi kokanisa makambo yango malamumalamu liboso ya batisimo. Soki osalisi mwana amanyola mapamboli ya kozala na botosi mpe mbuma mabe ya kozanga botosi, na ntembe te akobanda kondima ete kotosa mitinda ya Biblia ezali ntango nyonso mpo na bolamu na ye.​—Kolimbola Mibeko 30:19, 20.

NTANGO ELENGE OYO AZWÁ BATISIMO AKÓMI NA BANTEMBE

16. Baboti basengeli kosala nini soki mwana oyo azwá batisimo abandi kolɛmba na elimo?

16 Okoki kosala nini soki mwana na yo akómi na bantembe nsima ya kozwa batisimo? Na ndakisa, mwana akoki kobanda kobendama na makambo ya mokili. To akoki kobanda komituna soki kolanda mitinda ya Biblia esalisaka mpenza moto azala na bomoi oyo eleki malamu. (Nzembo 73:1-3, 12, 13) Ndenge oyo okotalela likambo yango ekoki kosala ete mwana akoba kosalela Yehova to te. Salá makasi obendana na mwana te na likambo yango, ata soki azali naino moke to abandi kokóma elenge. Kasi, monisáká ye ete olingaka ye mpe olingi kosalisa ye.

17, 18. Soki elenge akómi na bantembe, ndenge nini baboti bakoki kosalisa ye?

17 Elenge oyo azwá batisimo amipesá na Yehova. Komipesa na Nzambe elimboli kolaka ete okolinga ye koleka nyonso mpe okosalela libosoliboso ye. (Tángá Marko 12:30.) Komipesa ezali likambo ya lisɛki te na miso Yehova, biso mpe tosengeli kozwa yango na lisɛki te. (Mosakoli 5:4, 5) Kundwelá mwana na yo likambo yango. Kasi liboso, tángá mpe yekolá makambo oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá mpo na baboti. Na nsima, na boboto mpe na ntango oyo ebongi, monisá mwana ete ekateli na ye ya komipesa na Yehova mpe ya kozwa batisimo ezalaki lisɛki te mpe ekoki komemela ye mapamboli ebele.

18 Na ndakisa, okoki kozwa toli ya malamu na apɛndisi “Mituna oyo baboti batunaka,” oyo ezali na lokasa 289 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1. Esɛngi baboti bákanisa nokinoki te ete mwana na bango ya elenge aboyi solo, kasi báluka nde koyeba likambo na ye malamumalamu. Ekoki kozala ete baninga bazali kotya ye mbamba, azali komiyoka ete azali kaka ye moko, to mpe azali komona ete bilenge mosusu bazali kosala mingi na mosala ya Yehova koleka ye. Apɛndisi yango emonisi mpe ete makambo wana nyonso elakisi te ete mwana azali koboya bindimeli na yo. Ntango mosusu mikakatano oyo azali kokutana na yango nde ekómisi mwana ndenge wana. Na nsima, epesi mwa makanisi oyo moboti akoki kosalela mpo na kosalisa mwana oyo akómi na bantembe mpo na solo.

19. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana bákóma ‘bato ya bwanya mpo na lobiko’?

19 Lokola ozali moboti, ozali na mokumba mpe lokumu monene ya kobɔkɔla bana na yo na “disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Ndenge tomoni yango, yango elimboli koteya bana makambo oyo Biblia elobi mpe kosalisa bango bándima makambo oyo bazali koyekola. Soki kondima na bango ekómi makasi, ekotinda bango bámipesa na Yehova mpe básalela ye na motema mobimba. Tiká ete Liloba ya Nzambe, elimo na ye, mpe milende na yo esalisa bana na yo bakóma ‘bato ya bwanya mpo na lobiko.’

^ par. 9 Nkasa mpo na koyekola buku “Biblia eteyaka mpenza nini?” esalisaka mpenza bilenge ná mikóló bákanga ntina ya mateya ya Biblia mpe báyeba koyebisa yango basusu. Okoki kokuta yango na jw.org na minɔkɔ ebele. Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BISALELI MPO NA KOYEKOLA BIBLIA.