Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyo Biblia elobi mpo na bomoi na mikolo ezali koya

Oyo Biblia elobi mpo na bomoi na mikolo ezali koya

KANISÁ ete ozali kotambola na nzela moko ya molili na butu. Atako moi esili kolala, ozali kobanga eloko te mpo osimbi torche oyo epelaka makasi. Ntango opelisi yango, omoni polele esika ya kotya makolo. Ntango mpe opelisi yango mpo na komona mosika, elakisi yo polele nzela oyo ozali kokende.

Tokoki koloba ete Biblia ezali lokola torche ya ndenge wana. Ndenge tomonaki yango na masolo oyo eleki, Liloba ya Nzambe ezali lokola mwinda oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano ya mokolo na mokolo oyo biso nyonso tokutanaka na yango na mokili oyo mabe. Kasi, Biblia esuki wana te. Ezali mpe lokola pole oyo esalisaka biso tómona polele ndenge bomoi ekozala na mikolo ezali koya, mpe tókoba kotambola na nzela oyo ekosalisa biso tózala na esengo libela na libela. (Nzembo 119:105) Na ndenge nini?

Tótalela ndenge mibale oyo Biblia epesaka biso elikya mpo na mikolo ezali koya: 1 Esalisaka biso tózala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina, mpe 2 esalisaka biso tózala baninga ya Mozalisi libela na libela.

1 BOMOI OYO EZALI NA NTINA

Biblia epesaka batoli oyo ebongi mpo na kolonga mikakatano; kasi esuki kaka te na kosalisa bato. Biblia elendisaka biso te tótya likebi kaka na makambo oyo ezali kotungisa biso; eteyaka nde biso tómimona lokola eteni ya elilingi moko monene, elingi koloba tómona ete tokoki kosala makambo mosusu ya ntina mingi mpo na basusu. Soki tosali bongo, tokozala na bomoi oyo ezali na ntina.

Na ndakisa, tótalela toli oyo ya Biblia: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ozali koyeba lisusu mokolo oyo osalisaki moto moko oyo azalaki na bosɛnga? To mbala mosusu oyokaki na likebi ntango moninga moko ayebisaki yo likambo oyo ezalaki kotungisa ye? Omonaki te ete ozalaki na esengo ntango osalaki likambo moko oyo esepelisaki moto yango mokolo wana?

Toyokaka esengo makasi ntango topesaka kozanga ete bázongisela biso. Mokomi moko alobaki: “Mbala mingi soki tomipesi mpo na kosalisa bato, ezalaka mpasi bázongisela biso koleka oyo tosalelaki bango, ata soki tozalaki na likanisi te ete bakozongisela biso.” Kasi, soki tomipesi mpo na kosalisa basusu, mingimingi baoyo bazali te na likoki ya kozongisela biso, tokozwa bolamu mingi. Tokozala mpenza lokola eteni ya elilingi moko monene. Likambo eleki ntina, tokosala elongo na Mozalisi, oyo atalelaka misala wana ya boboto lokola nyongo oyo tokɔtisi ye. (Masese 19:17) Azwaka na motuya mingi makambo oyo tosalelaka bato oyo bazangá, mpe alaki ete mpo na kofuta biso, akopesa biso bomoi ya seko na mabele oyo ekokóma paradiso; yango ezali elikya moko malamu mpo na mikolo ezali koya!​—Nzembo 37:29; Luka 14:12-14. *

Oyo eleki ntina, Biblia ezali koteya biso ete tokoki kozala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina soki tozali kosambela Nzambe ya solo, Yehova. Liloba na ye elendisi biso tósanzola ye, tókumisa ye mpe tótosa ye na ndenge oyo ebongi na ye. (Mosakoli 12:13; Emoniseli 4:11) Soki tozali kosala bongo, tokosepelisa Mozalisi na biso, mpe yango ezali likambo oyo ebongi mpenza. Kutu, alendisi biso ‘tózala na bwanya mpe tósepelisa motema na ye.’ (Masese 27:11) Kanisá likambo oyo: soki tozwi bikateli ya bwanya oyo esimbami na batoli ya Biblia, tokosepelisa motema ya Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo. Mpo na nini? Mpo atyelaka biso likebi mpe alingaka ete tózwa matomba oyo eutaka na kolanda litambwisi na ye. (Yisaya 48:17, 18) Ya solo, tokomona ete bomoi na biso ezali mpenza na ntina soki tozali kosambela Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe kosala ntango nyonso makambo oyo esepelisaka motema na ye.

2 BONINGA NA MOZALISI NA BISO

Biblia eteyaka mpe biso tókóma baninga ya Mozalisi na biso. Elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Mbala mosusu tondimaka te ete tokoki mpenza kokóma baninga ya Mozalisi, oyo aleki na nguya. Kasi Biblia eyebisi biso ete soki ‘toluki Nzambe, tokozwa ye mpenza,’ mpo “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Toli ya Biblia oyo etindi biso tókoma baninga ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na bomoi na biso ya mikolo ezali koya. Na ndenge nini?

Tókanisa naino: ata soki tosali nini, moto moko te akoki kokima liwa, oyo ezali monguna monene. (1 Bakorinti 15:26) Kasi, Nzambe azali seko na seko. Akoki kokufa soki moke te, mpe alingi ete baninga na ye bázala na bomoi ya libela na libela. Mpo na komonisa likambo oyo Yehova akosalela bato oyo bazali koluka ye, Biblia esaleli maloba kitoko oyo: “Mitema na bino ezala na bomoi mpo na seko.”​—Nzembo 22:26.

Okoki kosala nini mpo na kozala moninga ya Nzambe libela na libela? Kobá koyekola makambo na ye na nzela ya Liloba na ye, Biblia. (Yoane 17:3; 2 Timote 3:16) Luká lisalisi na ye mpo oyeba Biblia malamumalamu. Biblia eyebisi biso ete soki ‘tokobi kosɛnga Nzambe’ bwanya na motema moko, akopesa biso yango. * (Yakobo 1:5) Mpo na kosukisa, salá makasi osalela makambo oyo oyekoli; na ndenge yango, okotika ete Liloba ya Nzambe ezala ‘mwinda na lokolo na yo, mpe pole na nzela na yo,’ banda sikoyo mpe libela na libela.​—Nzembo 119:105.

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu etali elaka ya bomoi ya seko na Paradiso oyo Nzambe apesi, talá mokapo 3 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 13 Batatoli ya Yehova bakoki koyekola na yo Biblia ofele mpo na kosalisa yo okolisa boyebi na yo ya Makomami. Mpo na koyeba makambo etali boyekoli yango, talá video Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini? Mpo na kozwa yango, kende na jw.org, finá esika bakomi “Luká,” mpe komá titre ya video yango.

Nzambe azali seko na seko, mpe alingi ete baninga na ye bázala na bomoi ya libela na libela