Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okanisi nini?

Okanisi nini?

Biblia ekoki kosalisa yo okóma moninga ya Nzambe?

BATO MOSUSU BAKANISAKA . . .

ete bakoki te kokóma baninga ya Nzambe mpo bazali bato ya masumu mpe bazali mbindo na miso na ye. Basusu balobaka ete Nzambe akipaka biso te. Yo okanisi nini?

OYO BIBLIA ELOBI

Nzambe “azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.” (Masese 3:32) Soki totosi Nzambe, tokoki kokóma baninga na ye.

OYO BIBLIA ELOBI LISUSU NA LIKAMBO YANGO

  • Nzambe alingi kozala Moninga na biso.​—Yakobo 4:8.

  • Lokola Nzambe azali Moninga na biso, alingaka kosalisa biso mpe kolimbisa biso.​—Nzembo 86:5.

  • Baninga ya Nzambe balingaka makambo oyo ye alingaka mpe bayinaka makambo oyo ye ayinaka.​—Baroma 12:9.