Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bazali koyebisa makambo ekoya

Bazali koyebisa makambo ekoya

Osilá komituna soki bomoi na yo ná oyo ya libota na yo ekozala ndenge nini na mikolo ekoya? Okozala na bozwi to na bobola, okozala elongo na bato oyo balingaka yo to te? Okoumela na mokili, to okokufa noki? Banda bambula mingi, bato bapesaka biyano ndenge na ndenge na mituna wana.

Lelo oyo, bato ya mayele bazali koyekola ndenge mokili ezali kokende mpe koluka koyebisa makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Atako makambo mingi oyo balobá ekokisamá, makambo mosusu ekokisamá te. Na ndakisa, na 1912, Guglielmo Marconi, oyo abimisaki mayele ya télégraphie sans fil, alobaki: “Lokola tokómi kobimisa baaparɛyi ya tekinoloji oyo esalaka na nsinga te (technologie sans fil), bitumba ekozala lisusu te.” Lisusu, mosali moko ya kompanyi Decca Record, aboyaki orkɛstrɛ moko na nkombo Beatles na 1962 mpo azalaki kokanisa ete mosika te bato oyo babɛtaka gitare bakosila ngala.

Bato mingi balukaka bilimo mpo na koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Basusu balukaka toli epai ya banganga-minzoto. Longola yango, bazulunalo mingi ebimisaka masolo oyo elobelaka bato oyo batalaka bilembo ya horoscope. Bato mosusu bakendaka epai ya bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to epai ya banganga-nkisi oyo balobaka ete “bayebaka” makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya na nzela ya bakarte oyo esakolaka makambo ekoya, mitángo, to banzela oyo ezalaka na lobɔkɔ ya moto.

Lokola bato mingi ya ntango ya kala bazalaki na mposa ya koyeba makambo ekoya, bazalaki kokende epai ya bato oyo basakolaka avenire, na ndakisa banganga-mibali mpe banganga-basi oyo bazalaki koyebisa bato makambo oyo euti na nzambe na bango. Na ndakisa, balobaka ete mokonzi Crésus de Lydie atindaki makabo ya ntalo mingi epai ya Oracle de Delphes, nzambe moko ya Bagrɛki, mpo na koluka koyeba soki akolonga etumba oyo akobunda na Siruse mokonzi ya Perse. Oracle yango ayebisaki mokonzi Crésus ete akobebisa “ampire monene” soki abundisi Siruse. Lokola azalaki na elikya ete akolonga, Crésus akendaki etumba, kasi ampire monene oyo ebebisamaki ezalaki oyo ya ye moko!

Makambo oyo nzambe wana, Oracle, alobaki ezalaki na ntina te; ekokaki komonana ete ezali likambo ya solo ata soki nani alongaki etumba. Crésus abungisaki biloko nyonso mpo andimaki nsango ya lokuta, oyo ememelaki ye mpasi. Lelo oyo, bato oyo bakendaka epai ya bato oyo basakolaka makambo oyo ekoya, bayebisaka bango mpenza makambo ya solo?