Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Astroloji mpe kosakola makambo oyo ebombaná, eyebisaka mpenza makambo ekoya?

Astroloji mpe kosakola makambo oyo ebombaná, eyebisaka mpenza makambo ekoya?

ASTROLOJI

Astroloji ezali lolenge moko ya kosakola makambo oyo ebombaná oyo euti na likanisi ete minzoto, sanza, mpe baplanɛti etambwisaka bomoi ya bato awa na mabele. Banganga-minzoto balobaka ete esika oyo biloko wana ya likoló ezalaka na ntango moto abotami nde emonisaka bizaleli oyo moto yango akozala na yango mpe makambo oyo ekosalema na bomoi na ye na mikolo ekoya.

Atako astroloji eutá na Babilone ya kala, tii lelo bato mingi bandimaka yango. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis na 2012 emonisi ete, na bato oyo batunaki, soki tozwi bato misato, moko alobaki ete astroloji ezali “lolenge moko ya siansi,” mpe soki tozwi bato 100, zomi balobaki ete ezali “mpenza siansi.” Yango ezali solo? Te. Mpo na nini tolobi bongo?

  • Baplanɛti mpe minzoto etindaka nguya moko te oyo ekoki kotambwisa bato, ndenge banganga-minzoto balobaka yango.

  • Mbala mingi makambo oyo banganga-minzoto yango bayebisaka ekoki kokokisama epai ya moto nyonso.

  • Bakalkile oyo bato yango basalaka lelo oyo emonisi ete balandaka bindimeli ya kala oyo elobi ete baplanɛti ebalukaka zingazinga ya mabele. Nzokande, baplanɛti ebalukaka nde zingazinga ya moi.

  • Makambo oyo banganga-minzoto ndenge na ndenge bayebisaka moto moko eyokanaka te.

  • Na astroloji, bakabolá bato na mitindo to bilembo ya zodiake 12, na kotalela mokolo oyo moto abotamaki. Lokola nsima ya basiɛklɛ mingi mabele ebalukaka, badati oyo bayokanisaka na bilembo ya zodiake eyokanaka lisusu te na ntango oyo moi elekaka na kati ya bituluku ya minzoto oyo bango bapesá bilembo bankombo na yango.

Banganga-minzoto yango balobaka ete bilembo ya zodiake nde elakisaka bizaleli ya moto. Mpo na koloba solo, ata bato oyo babotami mokolo moko bazalaka na bizaleli moko te; mokolo oyo moto abotamá ekoki kolakisa te bizaleli na ye. Na esika ya kotalela moto ndenge azali mpenza, banganga-minzoto yango bayebisaka bizaleli ya moto mpe bomoto na ye na kolanda makanisi na bango moko. Yango ezali komemela bato mpasi!

KOSAKOLA MAKAMBO OYO EBOMBANÁ

Na ntango ya kala, bato bazalaki kokende epai ya bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya. Mpo na koyebisa bato ndimbola ya makambo, bato oyo bazalaki kosala mosala wana bazalaki kosalela biloko ya kati ya nyama to ya moto to kolandela ndenge oyo nsoso elyaka mbuma. Basusu bazalaki kosalela nkasa ya ti to lolenge moko ya kafe. Lelo oyo, basalelaka bakarte oyo esakolaka makambo ekoya, boule de cristal to talatala ya koyeba makambo ekoya, zeke mpe biloko mosusu mpo na koluka koyeba bomoi ya moto na mikolo ekoya. Kosakola makambo oyo ebombaná ezali mpenza lolenge malamu ya koluka koyeba makambo ekoya? Te. Tólobela yango.

Tótala soki makambo oyo balobaka ekokani. Mbala mingi, makambo bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya balobaka ezalaka bongolabongola. Ata soki basaleli mayele moko, maloba na bango ekesanaka. Na ndakisa, soki moto atuni likambo moko na bato mibale oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya, oyo basaleli kaka karte moko, basengeli kopesa ye eyano ndenge moko. Kasi, mbala mingi ezalaka bongo te.

Mayele ya kosakola makambo ekoya eutaka na makanisi mpamba. Bato oyo bandimaka makambo wana te balobaka ete bakarte to boule de cristal ezali kaka bisaleli mpamba mpe ete moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya atalaka nde makambo oyo moto azali kosala to koloba na esika atala na bisaleli wana. Na ndakisa, moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya, oyo ayebi mosala na ye malamu, atunaka mituna mpe alandaka na likebi makambo oyo moto yango azali koloba mpe makambo mosusu oyo moto yango asali, oyo ekoki komonisa lolenge ya bomoi ya moto yango. Na nsima, moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya akosalela makambo oyo kiliya na ye ayebisi ye, kozanga ete ayeba yango. Lokola bakiliya batyelaka bango motema, bato mosusu oyo basalaka mosala yango bazwaka mbongo mingi epai ya bakiliya na bango.

BIBLIA ELOBI NINI?

Mosala ya banganga-minzoto mpe ya kosakola makambo oyo ebombaná etindaka bato bákanisa ete makambo nyonso etángamá liboso. Kasi ezali mpenza bongo? Biblia eyebisi biso ete tozali na likoki ya kopona makambo oyo tokondima to oyo tolingi kosala mpe ete nzela oyo toponi ekoki kobongisa to kobebisa bomoi na biso na mikolo ekoya.​—Yosua 24:15.

Basaleli ya Nzambe bazali na ntina mosusu oyo etindaka bango báboya astroloji mpe kosakola makambo oyo ebombaná: Nzambe andimaka te mitindo nyonso ya kosakola makambo oyo ebombaná. Biblia elobi boye: “Epai na yo moto azwama te . . . oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.” a​—Kolimbola Mibeko 18:10-12.

a Nkombo ya Nzambe “Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—Nzembo 83:18.