Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilaka oyo ekokokisama

Bilaka oyo ekokokisama

Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama na mabele mobimba, kaka ndenge Yesu asakolaki yango. (Matai 24:14) Mokanda ya Danyele emonisi ete Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya Nzambe. Mokapo 2 ya mokanda yango ezali na esakweli moko oyo elobeli kolandana ya makonzi to baguvɛrnema ya bato, banda na Babilone ya kala tii lelo oyo. Vɛrsɛ 44 eyebisi likambo oyo ekosalema na nsima, na maloba oyo:

“Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”

Esakweli wana mpe bisakweli mosusu ya Biblia esakolaki ete Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya bato mpe ekotya kimya mpe boyokani na mabele mobimba. Bomoi ekozala ndenge nini ntango Bokonzi yango ekoyangela? Talá bilaka mosusu kitoko oyo ekokokisama mosika te.

  • BITUMBA EKOZALA LISUSU TE

    Nzembo 46:9: “[Nzambe] azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; azali kotumba makalo na mɔtɔ.”

    Kanisá naino: bomoi elingaki kozala ndenge nini soki mbongo mpe mayele nyonso oyo bato bazali kosalela lelo mpo na kosala mindoki esalelamaka mpo na kosomba biloko oyo ekoki kosalisa bato, na esika ya koboma bango? Elaka wana ekokokisama ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.

  • MALADI EKOZALA LISUSU TE

    Yisaya 33:24: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”

    Kanisá ndenge mokili ekozala ntango moto moko te akonyokwama na maladi ya motema, kansɛr, malaria, to maladi mosusu nyonso. Tokozala lisusu te na mposa ya lopitalo to bankisi ya komɛla. Na mikolo ekoya, bato nyonso na mabele bakozala na sante ya malamu.

  • BILOKO YA KOLYA EKOZANGA LISUSU TE

    Nzembo 72:16: “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”

    Mabele ekobimisa bilei mpo na moto nyonso, mpe moto nyonso akozala na biloko ya kolya. Nzala mpe kozanga kolya malamu ekozala lisusu te.

  • MPASI, MAWA, MPE LIWA EKOZALA LISUSU TE

    Emoniseli 21:4: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”

    Elingi koloba bato bakozala na bomoi ya seko mpe ya kokoka na paradiso awa na mabele! Yango nde makambo oyo Mozalisi na biso ya bolingo, Yehova Nzambe, alaki.

“EKOLONGA MPENZA”

Makambo wana nyonso ekokokisama mpenza? Atako bato mingi bandimaka ete bomoi oyo Nzambe alaki na Biblia ekozala malamu mpenza, mpo na bantina ndenge na ndenge, bato mosusu mingi bamonaka ete likanisi ya kozala na bomoi ya seko ezali mpasi mpo na kondima. Yango ekoki kokamwisa biso te, mpo ata moto moko te asilá kozala na bomoi ya seko mpo ayebisa biso ndenge bomoi yango ekozala.

Bato bakɔtá na boombo ya lisumu mpe liwa, mpe bamonaka mpasi mpe bwale banda kala, yango wana bato mingi bakómá komona ete bomoi oyo tozali na yango lelo esengeli kozala kaka bongo mpe yango nde Nzambe abongisá mpo na biso. Nzokande, yango ekeseni mosika na oyo Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, akanaki mpo na bato.

Mpo na kosalisa biso tóndima ete makambo nyonso oyo Nzambe alaki ekokokisama, alobaki boye mpo na liloba na ye: “Ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te, kasi ekosala mpenza oyo nasepeli na yango, mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.”​—Yisaya 55:11.

Biblia elobi ete Yehova azali Nzambe oyo “akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Lokola alaki makambo kitoko wana nyonso na mikolo ekoya, tosengeli komituna boye: Bato bakoki mpenza kozala na bomoi ya seko na Paradiso oyo Nzambe alaki awa na mabele? Tosengeli kosala nini mpo tómona kokokisama ya elaka wana ya Nzambe? Na masolo oyo elandi, okozwa biyano na mituna wana.