Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mekolá kondima mpe botosi ya Noa, Danyele, mpe Yobo

Mekolá kondima mpe botosi ya Noa, Danyele, mpe Yobo

“Ata soki bato oyo misato bázalaka na kati na yango: Noa, Danyele mpe Yobo, bango moko, mpo na boyengebene na bango, mbɛlɛ babikisi molimo na bango.”​—EZEKIELE 14:14.

NZEMBO: 89, 119

1, 2. (a) Mpo na nini ndakisa ya Noa, Danyele, mpe Yobo ekoki kolendisa biso? (b) Makambo ezalaki ndenge nini ntango Ezekiele akomaki maloba oyo ezali na Ezekiele 14:14?

OZALI kolekisa ntango moko ya mpasi mikolo oyo, na ndakisa ozali kobɛla, ozangi mbongo to ozali kokutana na minyoko? Na bantango mosusu ezalaka mpasi obatela esengo na mosala ya Yehova? Soki ezali bongo, ndakisa ya Noa, Danyele, mpe Yobo ekoki kolendisa yo. Mibali yango, oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka lokola biso, bakutanaki na mikakatano mingi oyo biso mpe tokutanaka na yango lelo. Kutu, mikakatano mosusu etyaki bomoi na bango na likama. Kasi lokola batikalaki sembo, Yehova atángaki bango lokola ndakisa ya bato ya kondima mpe ya botosi.​—Tángá Ezekiele 14:12-14.

2 Ezekiele akomaki maloba ya vɛrsɛ oyo esimbi lisolo na biso na Babilone na mobu 612 L.T.B. * (Ezekiele 1:1; 8:1) Ezalaki mwa moke liboso Yerusaleme ebebisama na mobu 607 L.T.B. Kaka bato moke oyo bazalaki na kondima mpe botosi lokola Noa, Danyele, mpe Yobo, nde babikaki. (Ezekiele 9:1-5) Yirimia, Baruke, Ebede-meleke mpe Barekabe bazalaki na kati ya bato yango.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Lelo mpe, kaka bato oyo Yehova amonaka ete bazali bayengebene lokola Noa, Danyele, mpe Yobo nde bakobika ntango mokili oyo mabe ekobebisama. (Emoniseli 7:9, 14) Na yango, tótala ntina oyo Yehova atángaki mibali yango misato ndakisa na oyo etali boyengebene. Tokolobela (1) mikakatano oyo mokomoko akutanaki na yango mpe (2) ndenge oyo tokoki komekola kondima mpe botosi na bango.

NOA AMONISAKI KONDIMA MPE BOTOSI MBULA KOLEKA 900!

4, 5. Mikakatano nini Noa akutanaki na yango, mpe mpo na nini bosembo na ye ezali kokamwisa?

4 Mikakatano nini Noa akutanaki na yango? Na mikolo ya Enoka, nkɔkɔ ya Noa, bato bakómaki kosala makambo ya mabe mpenza. Bazalaki koloba ‘makambo ya kozokisa’ mpo na kotɛmɛla Yehova. (Yuda 14, 15) Mobulu ezalaki se kokóma mingi. Kutu, na mikolo ya Noa, “mabele etondaki na mobulu.” Baanzelu oyo batombokaki bakitaki na mabele, balataki nzoto ya mosuni, mpe babalaki basi. Bana oyo babotaki bazalaki bilombe mpe mobulu mpenza. (Ebandeli 6:2-4, 11, 12) Kasi Noa akesanaki na bato ya ntango na ye. Biblia elobi ete “andimamaki na miso ya Yehova. . . . Azalaki na mbeba te kati na bato ya ntango na ye. Noa atambolaki elongo na Nzambe ya solo.”​—Ebandeli 6:8, 9.

5 Maloba yango emonisi nini mpo na Noa? Ya liboso, Noa asalelaki Yehova na bosembo na mokili wana ya mabe oyo ebebisamaki na Mpela kaka mbula 70 to 80 te, oyo ezali bomoi mobimba ya bato mingi lelo. Noa afandaki na mokili yango mbula pene na 600! (Ebandeli 7:11) Ya mibale, ezalaki na lisangá te oyo ekokaki kosalisa ye mpe kolendisa ye, ndenge ezali lelo mpo na biso. Mpe emonani ete ata ndeko na ye moko te ya libota azalaki kolendisa ye. *

6. Ndenge nini Noa amonisaki mpiko mpenza?

6 Noa amonaki te ete esengeli kosuka kaka na kozala moto malamu. Akómaki mpe “mosakoli ya boyengebene,” ayebisaki basusu polele ete azalaki na kondima epai ya Yehova. (2 Petro 2:5) Ntoma Paulo alobaki mpo na Noa ete: “Na kondima wana, akweisaki mokili na likambo.” (Baebre 11:7) Yango wana bato bazalaki kotyola ye mpe kotɛmɛla ye, mbala mosusu kutu kokanela ye. Kasi Noa azalaki “kolɛnga liboso ya bato” te. (Masese 29:25) Lokola azalaki na kondima, Yehova apesaki ye mpiko oyo apesaka mpe basaleli na ye ya sembo lelo.

7. Mikakatano nini Noa akutanaki na yango ntango azalaki kotonga masuwa?

7 Noa atambolaki elongo na Nzambe mbula koleka 500 liboso Yehova ayebisa ye atonga masuwa mpo na kobikisa bato mpe banyama. (Ebandeli 5:32; 6:14) Na ntembe te, kotonga masuwa ya monene bongo ezalaki mosala ya mpasi mpo na Noa. Mbala mosusu ayebaki mpe ete bato bakotyola ye lisusu mingi mpe bakonyokola ye. Atako bongo, amonisaki kondima mpe atosaki. “Asalaki kaka bongo.”​—Ebandeli 6:22.

8. Nini emonisi ete Noa atyaki motema ete Yehova akokokisa bamposa ya libota na ye?

8 Mokakatano mosusu mpo na Noa ezalaki ya kokokisa bamposa ya mosuni ya mwasi ná bana na ye. Liboso ya Mpela, bato basengelaki koboma nzoto na mosala mpo mabele ebimisa bilei. Noa mpe asengelaki kosala bongo. (Ebandeli 5:28, 29) Kasi, likambo oyo elekaki ntina na bomoi na ye ezalaki te kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye; ezalaki nde mosala ya Nzambe. Ata ntango azalaki kotonga masuwa, oyo mbala mosusu eumelaki mbula 40 to 50, Noa akobaki kotya makanisi na makambo ya elimo. Mpe asalaki bongo na boumeli ya mbula 350 nsima ya Mpela. (Ebandeli 9:28) Noa azali mpenza ndakisa malamu na oyo etali kondima mpe botosi!

9, 10. (a) Ndenge nini tokoki komekola kondima mpe botosi ya Noa? (b) Soki otosaka mibeko ya Yehova, akosala nini mpo na yo?

9 Ndenge nini tokoki komekola kondima mpe botosi ya Noa? Tokomekola Noa soki tozali kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova, soki tozali kosangana na makambo ya mokili te, mpe soki tozali kotya Bokonzi na esika ya liboso. (Matai 6:33; Yoane 15:19) Toyebi ete makambo yango nde esalaka ete mokili esepela na biso te. Na ndakisa, ekateli na biso ya kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali kosangisa nzoto mpe libala esali ete na mikili mosusu, bato bazali kopanza biso nsango ya lokuta. (Tángá Malaki 3:17, 18.) Kasi, ndenge moko na Noa, tobangaka bato te, tobangaka nde Yehova. Toyebi ete kaka ye nde akoki kopesa biso bomoi ya seko.​—Luka 12:4, 5.

10 Omituna boye: ‘Nakokoba kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova, ata soki bato bazali kosɛka to kotyola ngai? Nandimaka ete Yehova akoki kokokisa bamposa ya libota na ngai, ata soki nazali na mbongo te?’ Soki omekoli kondima mpe botosi ya Noa, tyá motema ete Yehova akokokisa bamposa na bino.​—Bafilipi 4:6, 7.

DANYELE AZALAKI NA KONDIMA MPE BOTOSI ATAKO AFANDAKI NA ENGUMBA MOKO YA MABE

11. Mikakatano nini Danyele ná baninga na ye misato bakutanaki na yango na Babilone? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Mikakatano nini Danyele akutanaki na yango? Danyele amemamaki na Babilone, engumba oyo etondaki na losambo ya bikeko mpe misala ya bademo. Bato ya Babilone bazalaki kolinga Bayuda te mpe bazalaki kotyola bango ná Nzambe na bango, Yehova. (Nzembo 137:1, 3) Na ntembe te, likambo yango ezalaki kopesa Danyele ná Bayuda mosusu ya sembo mpasi! Lisusu, bato mingi bazalaki kotyela Danyele ná baninga na ye misato, Hanania, Mishaele mpe Azaria likebi mpo basengelaki kozwa mateya mpo na kosala na ndako ya mokonzi. Basengelaki mpe kolyaka bilei ya mokonzi. Yango ezalaki mokakatano mpo ezalaki na biloko mosusu oyo Yehova apekisaki basaleli na ye bálya. Kasi Danyele aboyaki ‘komikómisa mbindo na bilei kitoko ya mokonzi.’​—Danyele 1:5-8, 14-17.

12. (a) Bizaleli nini Danyele azalaki na yango? (b) Ndenge nini Yehova azalaki kotalela Danyele?

12 Mokakatano mosusu ya Danyele ezalaki komonana polele te. Lokola azalaki na mayele mingi, mokonzi apesaki ye mikumba minene. (Danyele 1:19, 20) Atako bongo, Danyele akómaki na lolendo te mpe azalaki komona te ete likanisi na ye ezali kaka malamu. Azalaki na komikitisa mpe ayebaki esika makoki na ye esuki, mpo mbala mingi azalaki koloba ete Yehova nde azalaki kosalisa ye. (Danyele 2:30) Kutu, ntango Yehova atángaki ye elongo na Noa mpe Yobo lokola ndakisa malamu ya kolanda, Danyele azalaki naino elenge. Yehova amikosaki mpo na Danyele? Te, mpamba te Danyele atikalaki sembo mpe atosaki Nzambe bomoi na ye mobimba. Kutu, ntango azalaki na mbula pene na 100, anzelu ya Nzambe alobaki na ye ete: “Ee Danyele, yo moto oyo olingami mingi.”​—Danyele 10:11.

13. Ekoki kozala mpo na ntina nini Yehova apambolaki Danyele azwa esika ya lokumu?

13 Lokola Yehova apambolaki ye, Danyele akómaki moto monene na bokonzi ya Babilone, mpe na nsima na bokonzi ya Bamede ná Baperse. (Danyele 1:21; 6:1, 2) Ekoki kozala ete Yehova nde asalaki ete Danyele azwa esika wana ya lokumu mpo asalisa basaleli ya Nzambe, kaka ndenge Yozefe asalaki na Ezipito, mpe Estere ná Mordekai na Perse. * (Danyele 2:48) Na ntembe te, Ezekiele ná Bayuda mosusu oyo bazalaki mpe bakangami balendisamaki ntango bamonaki ndenge Yehova asalelaki Danyele mpo na kosalisa bango!

Bato oyo babatelaka bosembo na bango bazali na motuya na miso ya Yehova (Talá paragrafe 14, 15)

14, 15. (a) Na likambo nini tokokani na Danyele? (b) Mateya nini baboti bakoki kozwa epai ya baboti ya Danyele?

14 Ndenge nini tokoki komekola kondima mpe botosi ya Danyele? Tofandi na mokili oyo etondi na mbindo mpe losambo ya lokuta. Bato bazali kolanda makambo ya Babilone monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo Biblia elobi ete ezali “esika ya kofanda ya bademo.” (Emoniseli 18:2) Kasi biso tozali lokola bapaya na mokili oyo. Na yango, bato bakoki kotyola biso mpo tokeseni na bango. (Marko 13:13) Kasi ndenge moko na Danyele, tózala na boyokani malamu na Yehova, Nzambe na biso. Soki tozali na komikitisa, tozali kotyela Yehova motema mpe kotosa ye, biso mpe tokozala na motuya na miso na ye.​—Hagai 2:7.

15 Baboti bakoki kozwa mateya epai ya baboti ya Danyele. Na ndenge nini? Atako na bomwana ya Danyele bato ya Yuda bazalaki bato mabe mpenza, Danyele ayekolaki kolinga Yehova. Esalemaki na mbalakaka te. Emonani ete baboti na ye nde bazalaki koteya ye makambo ya Yehova. (Masese 22:6) Ata nkombo Danyele oyo elimboli “Nzambe azali Mosambisi na ngai,” emonisi ete baboti na ye bazalaki kolinga Yehova. (Danyele 1:6) Na yango, baboti, bólɛmba te koteya bana na bino makambo ya Yehova; bózala na motema molai. (Baefese 6:4) Bóbondelaka elongo na bango, mpe bótyaka bango na mabondeli na bino. Soki bozali kosala nyonso mpo na koteya bana na bino báfandisa solo na motema na bango, Yehova akopambola bino mingi mpenza.​—Nzembo 37:5.

ATA NA BOZWI TO NA BOBOLA, YOBO AZALAKI NA KONDIMA MPE BOTOSI

16, 17. Mikakatano nini Yobo akutanaki na yango?

16 Mikakatano nini Yobo akutanaki na yango? Bomoi ya Yobo ebongwanaki na ndenge ya mabe. Liboso, azalaki “moto monene koleka bato nyonso ya Ɛsti.” (Yobo 1:3) Azalaki mozwi, ayebanaki mingi mpe bato bazalaki komemya ye mingi mpenza. (Yobo 29:7-16) Atako bongo, Yobo akómaki te kokanisa ete aleki basusu to komona ete azali na mposa ya Nzambe te. Toyebi yango mpo Yehova abengaki ye “mosaleli na ngai” mpe alobaki mpo na ye ete: “Azangi mbeba mpe azali sembo, abangaka Nzambe mpe akimaka mabe.”​—Yobo 1:8.

17 Kasi, makambo ebongwanaki na mbalakaka. Yobo abungisaki biloko nyonso, anyokwamaki na makanisi mpe asɛngaki liwa. Lelo, toyebi ete Satana nde abimiselaki Yobo mikakatano wana. Alobaki ete Yobo azalaki kosalela Yehova kaka mpo azalaki na bomoi ya malamu. (Tángá Yobo 1:9, 10.) Yehova alekisaki bifundeli yango kaka boye te. Mpo na komonisa ete Satana azali moto ya lokuta, Yehova apesaki Yobo libaku ya komonisa ete azalaki sembo epai ya Nzambe, mpe ete azalaki kosalela ye mpo alingaki ye na motema mobimba.

18. (a) Mpo na nini bosembo ya Yobo ezali kokamwisa yo? (b) Ndenge oyo Yehova asalelaki Yobo makambo emonisi nini mpo na ye?

18 Satana abimiselaki Yobo mikakatano oyo elandanaki, mpe asalelaki mayele mabe mpo Yobo akanisa ete eutaki epai ya Nzambe. (Yobo 1:13-21) Na nsima, mibali misato oyo bazalaki baninga ya lokuta bayaki mpe balobaki makambo oyo esalaki Yobo mpasi. Balobaki ete azali moto mabe yango wana Nzambe azalaki kopesa ye etumbu. (Yobo 2:11; 22:1, 5-10) Atako nyonso wana, Yobo atikalaki sembo epai ya Yehova. Ya solo, na bantango mosusu Yobo alobaki makambo oyo ebongi te, kasi Yehova amityaki na esika na ye. (Yobo 6:1-3) Ayebaki ete Yobo azalaki komona mpasi mpe konyokwama na makanisi. Yehova amonaki ete Yobo apesaki ye mokɔngɔ te, atako Satana anyokolaki ye mpe alobaki mabe mpe lokuta mpo na ye mbala na mbala. Ntango komekama yango ya mpasi esilaki, Yehova apesaki Yobo nyonso oyo azalaki na yango liboso mbala mibale, mpe abakiselaki ye mbula 140 ya bomoi. (Yakobo 5:11) Na ntango yango, Yobo akobaki kosalela Yehova na motema mobimba. Ndenge nini toyebi yango? Mpo Ezekiele 14:14, vɛrsɛ oyo esimbi lisolo na biso, ekomamaki bambula ebele nsima ya liwa ya Yobo.

19, 20. (a) Ndenge nini tokoki komekola kondima mpe botosi ya Yobo? (b) Ndenge nini tokoki komonisela basusu motema mawa na ndakisa ya Yehova?

19 Ndenge nini tokoki komekola kondima mpe botosi ya Yobo? Ata soki bomoi na biso ekómi ndenge nini, tosengeli ntango nyonso kotya Yehova na esika ya liboso, kotyela ye motema mobimba mpe kotosa ye na motema moko. Kutu, toyebi makambo ebele koleka Yobo, oyo esengeli kotinda biso tósala yango. Na ndakisa, toyebi makambo mingi mpo na Satana mpe mayele mabe na ye. (2 Bakorinti 2:11) Biblia, mingimingi mokanda ya Yobo, eyebisi biso ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala. Esakweli ya Danyele esalisaka biso tóyeba ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo oyo Yesu Kristo azali Mokonzi na yango. (Danyele 7:13, 14) Mpe toyebi ete mosika te Bokonzi yango ekoyangela mabele mobimba mpe ekosilisa bampasi nyonso.

20 Lisolo ya Yobo eteyaka biso mpe ete tosengeli komonisela bandeko oyo bazali konyokwama motema mawa. Ndenge moko na Yobo, na bantango mosusu bakoki koloba makambo oyo ebongi te. (Mosakoli 7:7) Kasi na esika tókanisela bango mabe, tosengeli komitya na esika na bango mpe komonisa motema mawa. Na ndenge yango, tokomekola Yehova, Tata na biso ya bolingo mpe ya motema mawa.​—Nzembo 103:8.

YEHOVA “AKOKÓMISA BINO MAKASI”

21. Ndenge nini maloba ya 1 Petro 5:10 eyokani na bomoi ya Noa, ya Danyele, mpe ya Yobo?

21 Noa, Danyele, mpe Yobo bazalaki na bomoi na eleko moko te mpe bomoi na bango ezalaki ndenge moko te, kasi mokomoko ayikelaki mikakatano na ye mpiko. Masolo ya bomoi na bango ezali kokundwela biso maloba ya ntoma Petro; alobaki ete: “Nsima ya konyokwama mwa ntango moke, Nzambe ya boboto monene nyonso . . . ye moko akosilisa kobongisa bino, akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi.”​—1 Petro 5:10.

22. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

22 Maloba ya 1 Petro 5:10 etali mpe basaleli ya Nzambe lelo oyo. Yehova alobi ete akosalisa basaleli na ye bátikala ngwi mpe bázala makasi. Biso nyonso tolingi ete Yehova akómisa biso makasi, tolingi kotikala ngwi mpe kobatela bosembo na biso epai na ye. Yango wana, tosengeli komekola kondima mpe botosi ya Noa, ya Danyele, mpe ya Yobo. Na lisolo oyo elandi, tokomona ete mibali yango batikalaki sembo epai ya Yehova mpo bayebaki ye malamu. Kutu, ‘bakangaki ntina ya likambo nyonso’ oyo alingaki básala. (Masese 28:5) Biso mpe tokoki kosala bongo.

^ par. 2 Ezekiele amemamaki na Babilone na mobu 617 L.T.B. Akomaki maloba oyo ezali na Ezekiele 8:1–19:1-14 “na mbula ya motoba” nsima ya komemama kuna, elingi koloba na mobu 612 L.T.B.

^ par. 5 Tata ya Noa, Lameke, azalaki kobanga Nzambe, kasi akufaki mbula soki mitano liboso ya Mpela. Soki mama mpe bandeko ya Noa bazalaki naino na bomoi ntango Mpela ebandaki, boye bakufaki.

^ par. 13 Ekoki mpe kozala bongo mpo na Hanania, Mishaele, mpe Azaria, oyo bazwaki mpe bisika ya lokumu.​—Danyele 2:49.