Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebi Yehova ndenge Noa, Danyele, mpe Yobo bayebaki ye?

Oyebi Yehova ndenge Noa, Danyele, mpe Yobo bayebaki ye?

“Bato bamipesá na makambo ya mabe bakangaka ntina ya bosembo te, kasi baoyo bazali koluka Yehova bakangaka ntina ya likambo nyonso.”​—MASESE 28:5.

NZEMBO: 126, 150

1-3. (a) Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Nzambe na mikolo oyo ya nsuka? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

NA NTANGO oyo ya nsuka, bato mabe bazali se kokóma mingi. “Bazali kobima lokola matiti.” (Nzembo 92:7) Yango wana, tokamwaka te ndenge bato mingi baboyaka kosala makambo oyo Nzambe alobi ete ezali malamu. Nzokande, ntoma Paulo ayebisaki bakristo ete: “Bózala bana mike na mabe,” kasi “bókóma mikóló na makoki ya kososola.” (1 Bakorinti 14:20) Ndenge nini tokoki kosala yango?

2 Vɛrsɛ oyo esimbi lisolo na biso epesi eyano; elobi: “Baoyo bazali koluka Yehova bakangaka ntina ya likambo nyonso,” elingi koloba likambo nyonso oyo esengeli mpo na kosepelisa Nzambe. (Masese 28:5) Lisusu, Masese 2:7, 9 emonisi ete Yehova ‘abombaka malamu bwanya mpo na bato ya kolongobana.’ Na yango, bakoki ‘kokanga ntina ya boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.’

3 Noa, Danyele, mpe Yobo bazalaki na bwanya yango oyo eutaka na Nzambe. (Ezekiele 14:14) Basaleli ya Nzambe lelo oyo mpe bazali na yango. Bongo yo? Ozali na bwanya oyo eutaka na Nzambe, elingi koloba ‘okangaka ntina ya likambo nyonso’ oyo esengeli mpo na kosepelisa Yehova? Sɛkɛlɛ ezali kaka moko: osengeli koyeba ye malamu. Yango wana na lisolo oyo, tokotalela (1) ndenge Noa, Danyele, mpe Yobo bayekolaki koyeba Nzambe, (2) ndenge boyebi yango esalisaki bango, mpe (3) ndenge tokoki kokolisa kondima lokola ya bango.

NOA ATAMBOLAKI ELONGO NA NZAMBE NA MOKILI MOKO YA MABE

4. Ndenge nini Noa ayekolaki koyeba Yehova, mpe ndenge nini boyebi yango esalisaki ye?

4 Ndenge nini Noa ayekolaki koyeba Yehova? Banda ntango Adama ná Eva babandaki kobota bana, bato ya sembo bazalaki koyekola koyeba Yehova na ndenge misato: na nzela ya biloko oyo akelá, na nzela ya basaleli na ye mosusu ya sembo, mpe na komona matomba ya kotosa mibeko na ye. (Yisaya 48:18) Soki Noa azalaki kotalatala bozalisi, boye yango esalisaki ye ayeba ete Nzambe azali mpe ayekola bizaleli na ye oyo emonanaka te, na ndakisa “nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” (Baroma 1:20) Na yango, Noa asukaki kaka te na koyeba ete Nzambe azalaka, kasi akómaki mpe na kondima makasi epai na ye.

5. Ndenge nini Noa ayebaki mokano ya Nzambe mpo na bato?

5 Biblia elobi ete “kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki.” (Baroma 10:17) Epai wapi Noa ayokaki makambo ya Yehova? Na ntembe te, epai ya bato ya libota na ye. Tokoki kotánga tata na ye Lameke, oyo azalaki na kondima epai ya Nzambe mpe abotamaki ntango Adama azalaki naino na bomoi. (Talá elilingi ya ebandeli.) Tokoki mpe kotánga Metusela, nkɔkɔ ya Noa mpe Yarede, nkɔkɔ ya Metusela, oyo akufaki mbula 366 nsima ya mbotama ya Noa. * (Luka 3:36, 37) Ekoki kozala ete mibali yango ná basi na bango bateyaki Noa ete Yehova akelaki bato, alingaki bábota bana, bátondisa mabele mpe básalela ye. Boye Noa ayokaki mpe ete Adama ná Eva batombokelaki Yehova, mpe ye moko azalaki komona mbuma mabe ya botomboki yango. (Ebandeli 1:28; 3:16-19, 24) Ezala ndenge nini, Noa asepelaki na makambo oyo ayekolaki, mpe etindaki ye asalela Yehova.​—Ebandeli 6:9.

6, 7. Elikya nini ekómisaki kondima ya Noa makasi?

6 Elikya ekómisaka kondima makasi. Na yango, kanisá ndenge kondima ya Noa ekómaki makasi ntango ayebaki ete nkombo na ye, oyo elimboli “bopemi” to “libɔndisi,” ezalaki kopesa elikya. (Ebandeli 5:29) Elimo ya Nzambe esalisaki Lameke aloba mpo na mwana na ye Noa ete: “Ye akobɔndisa biso na mosala na biso mpe na mpasi ya mabɔkɔ na biso oyo euti na mabele oyo Yehova alakeli mabe.” Noa azalaki na elikya ete Nzambe akobongisa makambo. Ndenge moko na Abele ná Enoka, azalaki na kondima ete “momboto” moko akopanza motó ya nyoka.​—Ebandeli 3:15.

7 Mbala mosusu Noa akangaki malamumalamu te ntina ya elaka ya Nzambe oyo ezali na Ebandeli 3:15, kasi ayebaki ete esakweli yango epesaki elikya mpo na mikolo ezali koya. Enoka asakolaki nsango ya ndenge wana, alobaki ete Yehova akoboma bato mabe. (Yuda 14, 15) Na ntembe te, nsango ya Enoka, oyo ekokokisama na mobimba na yango na Armagedone, ekómisaki kondima mpe elikya ya Noa makasi mpenza!

8. Ndenge nini koyeba Nzambe malamu ebatelaki Noa?

8 Ndenge nini koyeba Nzambe malamu esalisaki Noa? Boyebi ya sikisiki esalisaki Noa akóma na kondima mpe bwanya oyo eutaka na Nzambe. Yango ebatelaki ye, mingimingi na makambo oyo ekokaki kobebisa boyokani na ye na Yehova. Na ndakisa, lokola Noa azalaki ‘kotambola elongo na Nzambe ya solo,’ aboyaki kozala moninga ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe. Na bokeseni na bato yango, Noa alandaki te bademo oyo bayaki na mabele. Bato oyo bazalaki na kondima te bazalaki kokamwa nguya ya bademo yango, mpe mbala mosusu balukaki kutu kosambela bango. (Ebandeli 6:1-4, 9) Lisusu, Noa ayebaki ete Nzambe ayebisaki bato bábota mpe bátondisa mabele. (Ebandeli 1:27, 28) Na yango, ntango bademo bazwaki basi mpe babotaki na bango bana, Noa ayebaki ete ezali mabe mpenza. Mabe yango emonanaki lisusu polele ntango bana yango bakómaki bingambe mpe makasi koleka bana mosusu nyonso. Nsukansuka, Yehova ayebisaki Noa ete akotinda mpela mpo na koboma bato nyonso ya mabe. Noa andimaki likebisi ya Nzambe, atongaki masuwa, mpe ye ná libota na ye babikaki.​—Baebre 11:7.

9, 10. Ndenge nini tokoki komekola kondima ya Noa?

9 Ndenge nini tokoki kokóma na kondima lokola ya Noa? Tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe na mozindo, kolinga makambo oyo tozali koyekola, mpe kotika yango ebongisa biso mpe esalisa biso tózwa bikateli ya malamu. (1 Petro 1:13-15) Na bongo, kondima mpe bwanya oyo eutaka na Nzambe ekobatela biso na mayele mabe ya Satana mpe na elimo mabe ya mokili. (2 Bakorinti 2:11) Elimo yango ezali kotinda bato bálinga mobulu ná pite mpe bámipesa na bamposa na bango ya mabe. (1 Yoane 2:15, 16) Bazali komona te ete mokili oyo mabe ekómi na nsuka. Soki tozali na kondima makasi te, biso mpe tokoki kobanda komona bongo. Kobosana te ete ntango Yesu akokanisaki ntango na biso na mikolo ya Noa, abendaki likebi na mobulu to na pite te, kasi nde na likama ya koboya kotya likebi na makambo ya Nzambe.​—Tángá Matai 24:36-39.

10 Omituna boye: ‘Bomoi na ngai emonisaka ete nayebi Yehova malamu? Kondima na ngai etindaka ngai natosa mibeko ya Nzambe mpe nateya yango basusu?’ Biyano oyo okopesa ekosalisa yo oyeba soki otambolaka elongo na Nzambe ya solo ndenge Noa asalaki.

DANYELE AMONISAKI BWANYA OYO EUTAKA NA NZAMBE

11. (a) Ndenge Danyele alingaki Nzambe banda bolenge emonisi nini mpo na baboti na ye? (b) Bizaleli nini ya Danyele okolinga komekola?

11 Ndenge nini Danyele ayekolaki koyeba Yehova? Emonani ete baboti ya Danyele nde bateyaki ye alinga Yehova mpe Liloba na ye. Lisusu, Danyele abatelaki bolingo yango bomoi na ye mobimba. Ata ntango akómaki mobange, azalaki kaka koyekola Makomami malamumalamu. (Danyele 9:1, 2) Danyele ayebaki Yehova malamu mpenza. Ayebaki mpe makambo oyo Yehova asalaki mpo na Bayisraele. Tokoki komona yango na libondeli na ye oyo ezali na Danyele 9:3-19, oyo eutaki na motema mpe emonisaki komikitisa na ye. Tángá libondeli yango mpe manyolá yango. Omituna boye: ‘Libondeli yango emonisi nini mpo na Danyele?’

12-14. (a) Ndenge nini Danyele amonisaki bwanya oyo eutaka na Nzambe? (b) Ndenge nini Yehova apambolaki mpiko mpe bosembo ya Danyele?

12 Ndenge nini koyeba Nzambe malamu esalisaki Danyele? Ezalaki pɛtɛɛ te Moyuda ya sembo asalela Nzambe na Babilone, mboka ya bapakano. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Bayuda ete: “Bóluka kimya ya engumba epai namemi bino na mboka mopaya.” (Yirimia 29:7) Kasi, asɛngaki bango mpe ete básambela kaka ye. (Kobima 34:14) Nini esalisaki Danyele atosa makambo yango mibale oyo Yehova asɛngaki? Bwanya oyo eutaka na Nzambe esalisaki Danyele ayeba ete asengelaki kotosa libosoliboso Yehova, na nsima nde bakonzi ya mokili. Yesu mpe ateyaki likambo yango bambula mingi na nsima.​—Luka 20:25.

13 Kanisá likambo Danyele asalaki ntango babimisaki mobeko ete na boumeli ya mikolo 30, moto asambela nzambe to moto mosusu te longola kaka mokonzi. (Tángá Danyele 6:7-10.) Danyele akokaki komilongisa mpe koloba ete: ‘Ezali kaka mikolo 30.’ Kasi, aboyaki mobeko ya moto ezwa esika ya losambo oyo azalaki kopesa Nzambe. Ya solo, akokaki kobondela Yehova na esika oyo bato bakomona ye te. Kasi, ayebaki ete bato mingi bazalaki komona ndenge abondelaka mokolo na mokolo. Na yango, atako bomoi na ye ezalaki na likama, Danyele akobaki kobondela na esika oyo bato nyonso bakokaki komona ye mpo aboyaki bato bákanisa ete atiki kosambela Yehova.

14 Yehova apambolaki Danyele mpo amonisaki mpiko mpe azwaki ekateli oyo emonisaki bosembo na ye. Asalaki likamwisi mpe abikisaki ye na libulu ya bankɔsi. Na yango, ampire mobimba ya Bamede ná Baperse eyokaki nsango ya Yehova!​—Danyele 6:25-27.

15. Ndenge nini tokoki kokóma na kondima lokola ya Danyele?

15 Ndenge nini tokoki kokóma na kondima lokola ya Danyele? Mpo na kokóma na kondima makasi, tósukaka kaka te na kotánga Biblia. Tosengeli mpe ‘kokanga ntina’ na yango. (Matai 13:23) Mposa na biso ezali ete tóyeba ndenge Yehova akanisaka mpe atalelaka makambo. Yango wana, tosengeli komanyolaka makambo oyo tozali kotánga. Ezali mpe na ntina mingi tóbondelaka mbala na mbala, mingimingi ntango tokutani na mikakatano. Tózala na kondima ete Yehova akopesa biso bwanya mpe makasi oyo tosɛngi.​—Yakobo 1:5.

YOBO ASALELAKI NTANGO NYONSO MITINDA YA NZAMBE

16, 17. Ndenge nini Yobo ayekolaki koyeba Yehova?

16 Ndenge nini Yobo ayekolaki koyeba Yehova? Yobo azalaki Moyisraele te. Kasi, Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo bazalaki bandeko na ye ya mosika, mpe Yehova ateyaki bango makambo na ye mpe mokano na ye mpo na bato. Na ndenge moko boye oyo eyebani te, Yobo ayekolaki mpe mateya yango. (Yobo 23:12) Alobaki na Yehova ete: “Nayokaki yo na nsango.” (Yobo 42:5) Lisusu, Yehova ye moko alobaki ete Yobo alobaki makambo ya solo mpo na ye.​—Yobo 42:7, 8.

Kondima na biso ekómaka makasi ntango tozali komona bizaleli ya Nzambe na biloko oyo akelá (Talá paragrafe 17)

17 Yobo ayekolaki mpe bizaleli ya Yehova na nzela ya bozalisi. (Yobo 12:7-9, 13) Elihu ná Yehova balobelaki biloko yango mpo na koteya Yobo ete moto azali moke mpenza liboso ya Nzambe. (Yobo 37:14; 38:1-4) Maloba ya Yehova esimbaki mpenza motema ya Yobo mpe na komikitisa nyonso Yobo alobaki na Nzambe ete: “Nayebi sikoyo ete okoki kosala makambo nyonso, mpe mpo na yo, likanisi moko ezali te oyo ekozanga kokokisama. . . . Nabongoli motema na kati ya putulu ya mabele mpe na putulu ya mɔtɔ.”​—Yobo 42:2, 6.

18, 19. Ndenge nini Yobo amonisaki ete ayebaki Yehova malamu?

18 Ndenge nini koyeba Nzambe malamu esalisaki Yobo? Yobo akangaki ntina malamu ya mitinda ya Nzambe. Ayebaki Yehova malamu, mpe yango etindaki ye asala oyo ezali malamu. Na ndakisa, Yobo ayebaki ete akokaki te koloba ete alingaka Nzambe soki amoniselaka basusu boboto te. (Yobo 6:14) Azalaki komona te ete aleki basusu, kasi azalaki kolinga moto nyonso lokola moto ya libota na ye, azala mozwi to mobola. Yobo alobaki: “Moto oyo asalaki ngai na libumu asalaki mpe ye te”? (Yobo 31:13-22) Ezali polele ete ata ntango Yobo azalaki na bozwi mpe lokumu, akómaki na lolendo te mpe azalaki komona te ete azali na ntina koleka basusu. Bato mingi oyo bazali na bozwi mpe lokumu lelo oyo bazalaka bongo te!

19 Yobo atikaki eloko moko te, ezala biloko ya mosuni, ezwa esika ya Yehova; ayebaki ete soki asali bongo, ekozala lokola awangani “Nzambe ya solo.” (Tángá Yobo 31:24-28.) Lisusu, Yobo ayebaki ete libala ezali elaka oyo mwasi ná mobali basali liboso ya Nzambe. Alapaki kutu ndai ete akotala mwasi mosusu te na makanisi ya mabe. (Yobo 31:1) Ezali likambo ya kokamwa mpenza, mpo na ntango wana Yehova apesaki mibali nzela bázala na basi ebele. Na yango Yobo akokaki kozwa mwasi ya mibale soki alingaki. Kasi, emonani ete aponaki kozala na mwasi kaka moko mpo ayebaki ete ntango Yehova abandisaki libala ya liboso, asangisaki mobali moko ná mwasi moko. * (Ebandeli 2:18, 24) Kutu, mbula soki 1 600 na nsima, Yesu ateyaki bato bálanda etinda yango ya Nzambe ete mwasi ná mobali oyo babalani nde bakoki kosangisa nzoto.​—Matai 5:28; 19:4, 5.

20. Ndenge nini koyeba Yehova mpe mibeko na ye malamu ekoki kosalisa biso tópona baninga mpe kominanola ya malamu?

20 Ndenge nini tokoki kokóma na kondima lokola ya Yobo? Kaka ndenge tolobaki, tosengeli koyeba Yehova malamu mpe kotika boyebi yango etambwisa biso na makambo nyonso. Na ndakisa, Biblia elobi ete Yehova ‘ayinaka moto oyo alingaka mobulu’ mpe ete tosengeli te kolekisa ntango elongo na “bato ya lokuta.” (Tángá Nzembo 11:5; 26:4.) Omituna boye: ‘Ndenge nini bavɛrsɛ yango ezali kosalisa ngai nayeba makanisi ya Yehova? Ndenge nini boyebi yango ekosalisa ngai nayeba makambo ya kotya na esika ya liboso, ndenge ya kosalela Internet, kopona baninga, mpe kominanola?’ Biyano oyo okopesa ekoki kosalisa yo omona soki oyebi Yehova malamu. Mpo makambo ya mokili oyo mabe emema biso te, tosengeli koteya ‘makoki na biso ya kososola,’ elingi koloba koyeba kokesenisa mabe na malamu, likambo ya bwanya na likambo oyo ezangi bwanya.​—Baebre 5:14; Baefese 5:15.

21. Nini ekosalisa biso ‘tókanga ntina ya likambo nyonso’ oyo esengeli mpo na kosepelisa Yehova?

21 Lokola Noa, Danyele, ná Yobo basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na koyeba Yehova malamu, asalisaki bango ‘bákanga ntina ya likambo nyonso’ oyo esengelaki mpo na kosepelisa ye. Ndakisa na bango emonisi ete moto oyo asalaka makambo ndenge Yehova alingi azalaka na bomoi ya malamu. (Nzembo 1:1-3) Yango wana, omituna boye: ‘Nayebi Yehova malamu ndenge Noa, Danyele, mpe Yobo bayebaki ye?’ Kutu, lelo tokoki koyeba Yehova malamu koleka mpo toyebi makambo na ye mingi koleka. (Masese 4:18) Yango wana, yekoláká Biblia malamumalamu. Manyoláká. Mpe bondeláká mpo na kosɛnga elimo santu. Soki ozali kosala bongo, okomemama te na makambo ya mokili oyo mabe. Kasi, okosala makambo na bwanya oyo eutaka na Nzambe mpe okokóma lisusu penepene na Tata na biso ya likoló.​—Masese 2:4-7.

^ par. 5 Enoka, oyo abotaki Metusela, ye mpe “akobaki kotambola elongo na Nzambe ya solo.” Kasi akufaki mbula 69 liboso Noa abotama.​—Ebandeli 5:23, 24.

^ par. 19 Noa mpe asalaki bongo. Azalaki kaka na mwasi moko, atako mwa moke nsima ya botomboki ya Adama ná Eva, mibali bakómaki kozwa basi ebele.​—Ebandeli 4:19.