Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe

Disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe

“Yehova apesaka disiplini na moto oyo ye alingaka.”​—BAEBRE 12:6.

NZEMBO: 123, 86

1. Biblia elobaka nini mpo na disiplini?

NTANGO oyokaka liloba “disiplini,” okanisaka nini? Mbala mosusu okanisaka mbala moko etumbu, kasi disiplini ezali kaka etumbu te. Biblia elobi ete disiplini ezali malamu mpo na biso mpe na bavɛrsɛ mosusu etángi yango esika moko na boyebi, bwanya, bolingo, mpe bomoi. (Masese 1:2-7; 4:11-13) Ezali bongo mpamba te Nzambe apesaka biso disiplini mpo na komonisa ete alingaka biso mpe alingi tózwa bomoi ya seko. (Baebre 12:6) Na bantango mosusu disiplini ya Nzambe esɛngaka mpe kopesa etumbu, kasi apesaka yango na motema mabe te to mpo na konyokola. Kutu, ndimbola ya liloba “disiplini” epesaka libosoliboso likanisi ya mateya, lokola oyo moboti apesaka mwana na ye oyo alingaka mingi.

2, 3. Na ndenge nini disiplini ekoki kosɛnga koteya mpe kopesa etumbu? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Tótalela ndakisa oyo: Mwana moko ya moke na nkombo Johnny azali kobɛta bale na ndako. Mama na ye alobi na ye: “Johnny, babɛtaka bale na ndako te! Okoki kobuka eloko.” Kasi Johnny aboyi kotosa mpe akobi kaka kobɛta bale. Bale etuti mbɛki moko, mbɛki yango ekwei mpe epanzani! Disiplini nini mama ya Johnny akopesa ye? Akoteya ye mpe akopesa ye etumbu. Mpo na koteya ye, akoki komonisa ye mabe ya likambo oyo asali. Alingi Johnny amona ete ezali malamu kotosa baboti mpe ete mibeko oyo bapesaka ye ebongi mpe ezali makasimakasi te. Na nsima, mpo na kosalisa ye azwa liteya na likambo yango, mama akoki kopesa ye etumbu oyo ebongi. Na ndakisa akoki kokanga bale yango mpo na mwa ntango. Johnny akosepela te, kasi yango ekosalisa ye abosana te mbuma mabe ya kozanga koyoka baboti.

3 Biso nyonso na kati ya lisangá ya bokristo tozali bato ya libota ya Nzambe. (1 Timote 3:15) Yango wana, Tata na biso Yehova azali na lotomo ya kotyela biso mibeko mpe kopesa biso disiplini soki tobuki mibeko na ye. Lisusu, soki misala na biso eboti mbuma mabe, disiplini oyo Yehova akopesa biso ekosalisa biso tóbosana te ete ezali na ntina tótosaka ye. (Bagalatia 6:7) Nzambe alingaka biso mingi mpe alingi te tónyokwama.​—1 Petro 5:6, 7.

4. (a) Formasyo ya ndenge nini Yehova alingi tópesa basusu? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Disiplini oyo eyokani na mitinda ya Biblia ekoki kosalisa mwana to moyekoli ya Biblia akokisa mokano ya kokóma moyekoli ya Kristo. Biblia esalisaka biso ‘tópesa disiplini na boyengebene,’ elingi koloba tóteya bayekoli na biso oyo ezali malamu mpe tósalisa bango bákanga ntina ya makambo oyo Yesu apesaki biso etinda mpe bátosa yango. (Matai 28:19, 20; 2 Timote 3:16) Yehova alingi tópesa bango formasyo ya ndenge wana mpo bango mpe básalisa basusu bákóma bayekoli ya Kristo. (Tángá Tito 2:11-14.) Tótalela sikoyo mituna misato ya ntina mingi: (1) Ndenge nini disiplini oyo Nzambe apesaka emonisaka ete alingaka biso? (2) Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya bato oyo Nzambe apesaki disiplini? (3) Ntango tozali kopesa disiplini, ndenge nini tokoki komekola Yehova ná Mwana na ye?

YEHOVA APESAKA BISO DISIPLINI NA BOLINGO

5. Ndenge nini disiplini ya Yehova emonisaka ete alingaka biso?

5 Na bolingo nyonso, Yehova asembolaka, ateyaka, mpe apesaka basaleli na ye formasyo. Alingi tótikala penepene na ye mpe tózwa bomoi ya seko. (1 Yoane 4:16) Afingaka biso te, akitisaka mpe lokumu na biso te. (Masese 12:18) Kasi Yehova atalaka mingimingi bizaleli na biso ya malamu mpe atiki biso tósalela bonsomi na biso ya kopona. Yo mpe omonaka ete disiplini oyo tozwaka na nzela ya Biblia, mikanda ya moombo ya sembo, ya baboti, to ya bankulutu emonisaka ete Yehova alingaka biso? Kutu, ntango bankulutu bamekaka kosembola biso na boboto mpe na bolingo, liboso kutu tóyeba ete ‘tobɛti libaku,’ bamekolaka nde bolingo oyo Yehova alingaka biso.​—Bagalatia 6:1.

6. Ndenge nini disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe ata soki balongoli moto mikumba?

6 Kasi na bantango mosusu, disiplini esukaka kaka na toli te. Soki moto asali lisumu ya monene, akoki kobungisa mikumba mosusu na lisangá. Ata soki esalemi bongo, disiplini yango emonisaka ete Nzambe alingaka biso. Na ndakisa, kobungisa mikumba ekoki kosalisa moto amona ete ezali na ntina mingi amipesa na koyekola Biblia ye moko, komanyola, mpe kobondela. Kosala bongo ekoki kokómisa lisusu boyokani na ye na Yehova makasi. (Nzembo 19:7) Nsima ya mikolo, akoki kozongela mikumba na ye. Ata kolongola moto na lisangá emonisaka bolingo ya Yehova mpo ebatelaka lisangá na makambo ya mabe. (1 Bakorinti 5:6, 7, 11) Mpe lokola Nzambe apesaka disiplini na ndenge oyo ekoki, moto oyo alongolamaki na lisangá akoki komona bonene ya lisumu na ye, mpe koyoka mposa ya kobongola motema.​—Misala 3:19.

DISIPLINI YA YEHOVA EZALI MPO NA BOLAMU NA BISO

7. Shebena azalaki nani, mpe ezaleli nini ya mabe akómaki na yango?

7 Mpo na komona ntina ya disiplini, tólobela ndakisa ya bato mibale oyo Yehova apesaki disiplini: Shebena, Moyisraele oyo azalaki na bomoi na ntango ya Mokonzi Hizikiya, mpe Graham, ndeko mobali moko ya mikolo na biso. Shebena azalaki kapita oyo azalaki “kokamba ndako,” mbala mosusu ndako ya Mokonzi Hizikiya, mpe azalaki na bokonzi mingi. (Yisaya 22:15) Kasi Shebena akómaki na lolendo mpe alukaki lokumu. Amisalelaki kutu lilita ya ntalo mpe azalaki kotambola na “makalo ya bitumba ya nkembo.”​—Yisaya 22:16-18.

Soki tomikitisi mpe tobongoli makanisi na biso, Nzambe akopambola biso (Talá paragrafe 8-10)

8. Ndenge nini Yehova apesaki Shebena disiplini, mpe makambo esukaki ndenge nini?

8 Lokola Shebena akómaki koluka lokumu, Nzambe ‘alongolaki ye na ebonga na ye’ mpe atyaki Eliakime. (Yisaya 22:19-21) Esalemaki ntango Senakeribe, mokonzi ya Asiri, akanaki kobundisa Yerusaleme. Na nsima, Senakeribe atindaki mwa bakonzi ya basoda elongo na basoda ebele báya kobangisa Bayuda mpe kosɛnga Mokonzi Hizikiya amitika na mabɔkɔ na ye. (2 Bakonzi 18:17-25) Hizikiya atindaki Eliakime elongo na mibali mosusu mibale bákende kokutana na bakonzi yango. Moko na bango ezalaki Shebena, oyo akómaki sikoyo sɛkrɛtɛrɛ. Yango emonisi ete mbala mosusu Shebena ayekolaki komikitisa na esika akóma nkandankanda mpe komilelalela. Andimaki mikumba oyo ezalaki na lokumu mingi te. Soki ezali bongo, mateya nini tokoki kozwa na lisolo ya Shebena? Tótalela misato.

9-11. (a) Mateya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Shebena? (b) Mpo na nini ndenge oyo Yehova asalelaki Shebena makambo ekoki kolendisa yo?

9 Ya liboso, ndenge Shebena abungisaki mikumba na ye emonisi ete “lolendo ezalaka liboso ya kokwea.” (Masese 16:18) Soki ozali na mikumba minene na lisangá, mpe basusu bamonaka ete ozali na ntina mingi, okosala makasi ozala na komikitisa? Okopesa Yehova nkembo mpo ye nde apesaka biso makoki mpe asalisaka biso tósala makambo ya malamu? (1 Bakorinti 4:7) Ntoma Paulo akomaki boye: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza; kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu.”​—Baroma 12:3.

10 Ya mibale, mbala mosusu Yehova apesaki Shebena toli ya makasi mpo amonaki ete Shebena akokaki kobongwana. (Masese 3:11, 12) Yango ezali liteya mpo na baoyo babungisi mikumba minene na lisangá. Na esika ya kosilika to kobomba nkanda na motema, ekozala malamu bákoba kaka kosalela Nzambe na makoki na bango nyonso, mpe bámona ete disiplini oyo bazwi emonisi bolingo ya Yehova. Kobosana te ete nsukansuka, Tata na biso akopesa biso mapamboli mingi soki tomikitisi. (Tángá 1 Petro 5:6, 7.) Disiplini ya Yehova ekoki kobongisa biso soki tomitiki na mabɔkɔ na ye.

11 Ya misato, ndenge oyo Yehova asalelaki Shebena makambo ezali kopesa liteya moko ya ntina mingi na baoyo bazali na bokonzi ya kopesa basusu disiplini, na ndakisa baboti mpe bankulutu. Atako disiplini oyo Yehova apesaka emonisaka ete ayinaka lisumu, emonisaka mpe ete akobaka kotyela moto oyo asalaki lisumu likebi. Yehova alukaka komona makambo malamu ya moto yango. Soki ozali moboti to nkulutu, okomekola Yehova ntango ozali kopesa disiplini?​—Yuda 22, 23.

12-14. (a) Bato mosusu basalaka nini soki Yehova apesi bango disiplini? (b) Ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaki ndeko moko abongisa makanisi na ye, mpe matomba nini emonanaki?

12 Likambo ya mawa, nsima ya kozwa disiplini, bato mosusu bayokaka mpasi koleka ndelo tii nsukansuka batikaka Nzambe mpe lisangá na ye. (Baebre 3:12, 13) Yango elimboli nde ete elikya ezali lisusu te mpo na bango? Ezali bongo te. Tózwa ndakisa ya Graham, oyo alongolamaki na lisangá mpe na nsima azongisamaki na lisangá, kasi nsima ya mwa ntango, atikaki kosakola mpe kokende na makita. Nkulutu moko asalaki makasi akóma moninga ya Graham, mpe nsukansuka Graham asɛngaki nkulutu yango ayekola na ye Biblia.

13 Nkulutu yango alobaki boye: “Graham azalaki nde na lolendo. Azalaki kolobaloba mabe mpo na bankulutu oyo basambisaki likambo na ye. Na yango, tozwaki mwa ntango mpo na koyekola elongo bavɛrsɛ oyo elobeli lolendo mpe mbuma mabe na yango. Graham akómaki komitala malamumalamu na talatala, elingi koloba Liloba ya Nzambe, mpe asepelaki te na makambo oyo amonaki! Asalaki mbongwana monene! Andimaki ete ‘libaya ya motɔndɔ,’ elingi koloba lolendo na ye, ezipaki ye miso mpe ete kolobaloba mabe mpo na bankulutu nde ezalaki mokakatano na ye, mpe abandaki mbala moko kobongisa makambo. Azongelaki koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, koyekola Liloba ya Nzambe na molende, mpe azwaki momeseno ya kobondela Nzambe mikolo nyonso. Andimaki mpe kokokisa mikumba na ye ya elimo na kati ya libota na ye, mpe mwasi na ye ná bana na ye basepelaki mingi.”​—Luka 6:41, 42; Yakobo 1:23-25.

14 Nkulutu wana abakisaki ete: “Mokolo moko, Graham ayebisaki ngai likambo moko oyo esimbaki motema na ngai. Alobaki: ‘Bambula mingi eleki banda nayebá solo, mpe nazalaki kutu mobongisi-nzela. Kasi sikoyo kaka nde nakoki koloba na bosembo ete nalingi Yehova.’” Eumelaki te, Graham azwaki mokumba ya kotambwisa mikro na makita, mpe asepelaki na mokumba yango. Nkulutu wana alobaki: “Ndakisa na ye eteyaki ngai ete soki moto amikitisi liboso ya Nzambe mpe andimi disiplini, azwaka mapamboli ebele!”

MEKOLÁ NZAMBE MPE KRISTO NTANGO OZALI KOPESA DISIPLINI

15. Tosengeli kosala nini mpo basusu bándima disiplini oyo topesi?

15 Mpo tózala bateyi ya malamu, tosengeli liboso kozala bayekoli ya malamu. (1 Timote 4:15, 16) Ndenge moko mpe, soki Yehova asaleli yo mpo na kopesa basusu disiplini, osengeli kozala na komikitisa mpe kondima Yehova atambwisa yo. Soki basusu bamonaka ete ozali na komikitisa, bakopesa yo limemya mpe ekozala mpasi te bándima toli to mpamela oyo opesi bango. Tótalela ndakisa ya Yesu.

16. Mateya nini tokoki kozwa epai ya Yesu na oyo etali kopesa disiplini mpe koteya na ndenge oyo ebongi?

16 Yesu azalaki kotosa Tata na ye na makambo nyonso, ata na ntango oyo ezalaki mpasi. (Matai 26:39) Ayebisaki bayoki na ye ete mateya mpe bwanya na ye ezalaki kouta epai ya Tata na ye. (Yoane 5:19, 30) Komikitisa mpe botosi ya Yesu ebendaki bato ya mitema sembo mpe esalisaki ye azala moteyi ya motema mawa. (Tángá Matai 11:29.) Maloba na ye ya boboto elendisaki bato ya bolɛmbu mpe oyo balɛmbaki nzoto. (Matai 12:20) Asembolaki bantoma na ye na boboto mpe na bolingo, atako akokaki kosilikela bango mpo bazalaki kowelana mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki baninga.​—Marko 9:33-37; Luka 22:24-27.

17. Bizaleli nini ekosalisa bankulutu bábatela lisangá malamu?

17 Mbala nyonso oyo bankulutu bazali kopesa disiplini na kolanda mitinda ya Biblia, basengeli komekola Kristo. Na ndenge yango, bakomonisa ete bandimi Nzambe ná Mwana ye bátambwisa bango. Ntoma Petro akomaki boye: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko; ezala te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo; bómikómisa te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi bókóma nde bandakisa ya etonga.” (1 Petro 5:2-4) Mpo na koloba solo, ntango bankulutu bazali kondima na esengo litambwisi ya Nzambe mpe ya Kristo, yango ezali mpo na bolamu na bango moko mpe ya baoyo bazali kokamba.​—Yisaya 32:1, 2, 17, 18.

18. (a) Mokumba nini Yehova apesi baboti? (b) Ndenge nini Nzambe asalisaka baboti mpo bákokisa mokumba yango?

18 Tokoki koloba nini mpo na disiplini na kati ya libota? Yehova ayebisi bakonzi ya libota ete: “Bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Likambo yango ezali mpenza na ntina mingi? Masese 19:18 elobi: “Pesá mwana na yo etumbu wana elikya ezali naino; mpe molimo na yo elinga liwa na ye te.” Yehova apesi baboti mokumba ya kopesa bana na bango disiplini. Soki basali yango te, bakozongisa monɔkɔ epai na ye! (1 Samwele 3:12-14) Kasi, Yehova apesaka baboti bwanya mpe makasi oyo basengeli na yango ntango basɛngi ye asalisa bango mpe batiki Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye etambwisa bango.​—Tángá Yakobo 1:5.

YEKOLÁ NDENGE YA KOFANDA NA KIMYA MPO NA LIBELA

19, 20. (a) Mapamboli nini tokozwa soki tozali kondima disiplini ya Nzambe? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Soki tozali kondima disiplini ya Nzambe mpe tozali komekola Yehova ná Yesu na oyo etali kopesa disiplini, tokozwa mapamboli ebele mpenza! Mabota mpe masangá na biso ekozala na kimya, tokolingana, tokopesana limemya, mpe tokozala na eloko ya kobanga te. Yango ezali komonisa kaka mwa moke kimya mpe esengo oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya. (Nzembo 72:7) Kutu, disiplini ya Yehova ezali koteya biso ndenge ya kofanda na kimya mpe na bomoko libela na libela, lokola libota moko, mpe Yehova azali Tata na biso. (Tángá Yisaya 11:9.) Soki tozali kobosana likambo yango te, tokomona mpenza ete disiplini emonisaka ete Nzambe alingaka biso.

20 Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo mosusu oyo etali disiplini na libota mpe na lisangá. Tokolobela ndenge oyo tokoki komipesa disiplini mpe ndenge oyo tokoki kokima likambo oyo ezali mabe koleka disiplini oyo bapesi biso.