Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini epekisami kotya biloko ya Batatoli ya Yehova na site Internet na yo to na basite ya bato nyonso?

Lokola tokabolaka mikanda na biso ofele, bato mosusu bamonaka ete kozwa yango mpe kotya yango na basite Internet mosusu ezali mabe te. Kasi, kosala bongo ezali kozanga kotosa malako mpo na Ndenge ya kosalela basite na biso mpe ekoki kobimisa mikakatano minene. * Ndenge ekomami na malako yango, moto te apesami nzela ya “kotya bililingi, mikanda, bilembo oyo tosalelaka, miziki, bafɔtɔ, bavideo, to biloko mosusu [ya site na biso] na Internet (ata na site moko te, ezala basite ya kotindelana makambo, bafoto to bavideo, to na basite ya kosolola na baninga).” Mpo na nini totyá mobeko wana?

Moto te azali na ndingisa ya kotya biloko na biso na basite Internet mosusu

Moto moko te azali na ndingisa ya kotya makambo oyo ezali na basite na biso na basite mosusu. Bapɛngwi ná bato mosusu oyo batɛmɛlaka biso balukaka kotya mikanda na biso na basite na bango mpo na kobuba Batatoli ya Yehova ná bato mosusu. Na basite na bango, batyaka makambo oyo ekotinda moto oyo atángi yango akóma na bantembe. (Nzembo 26:4; Masese 22:5) Bamosusu bazali kosalela makambo oyo ezali na mikanda na biso to elembo ya jw.org na bapiblisite, na biloko oyo bazali kotɛka, mpe na baprograme oyo batyaka na telefone mpe na tablɛti. Lokola tozali na lotomo nyonso ya kobatela biloko mpe bilembo oyo tosalelaka, tozali na ndingisa ya kopekisa bato básalela yango na ndenge ya mabe. (Masese 27:12) Kasi, soki tondimi kotika bato, ata mpe bandeko na biso, bátya biloko yango na basite mosusu to básalela elembo ya jw.org mpo na kotɛka biloko na bango, ntango tokoluka kopekisa banguna mpe bato ya mombongo kosala bongo, batribinale ekolongisa biso te.

Kozwa mikanda na biso na basite mosusu ekoki kozala likama. Yehova apesi mokumba ya kobimisa bilei ya elimo kaka epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) “Moombo” yango asalelaka basite oyo elandi mpo na kobimisa bilei ya elimo: www.pr418.com, tv.pr418.com, mpe wol.pr418.com. Mpe tozali kaka na baprograme misato oyo tokoki kotya na telefone to na tablɛti: JW Language®, JW Library®, mpe JW Library Sign Language®. Na baprograme yango, bapiblisite to makambo mosusu ya mokili ya Satana ezali te. Kasi, soki bilei ya elimo eleki na banzela mosusu, tokoki koyeba mpenza te soki biloko mosusu ekɔti na kati to babebisi yango.​—Nzembo 18:26; 19:8.

Longola yango, kotya mikanda na biso na basite mosusu oyo endimaka bato bákoma makanisi na bango epesaka bapɛngwi mpe banguna mosusu nzela ya koloba mabe mpo na ebongiseli ya Yehova. Bandeko mosusu bakweaki na motambo ya kosolola na bapɛngwi na Internet, mpe yango efingisaki lisusu nkombo ya Yehova. Kosala ndenge wana ezali te lolenge ya malamu ya ‘koteya na boboto baoyo bazali na ezaleli ebongi te.’ (2 Timote 2:23-25; 1 Timote 6:3-5) Tomoni mpe ete bato basali basite ya kosolola na baninga mpe basite Internet mosusu na nkombo ya ebongiseli ya Yehova, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, to ya mosangani na yango mokomoko. Nzokande, ata ndeko moko te ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi azali na site na ye moko to asalelaka site moko ya kosolola na baninga.

Kolakisa bato site jw.org ezali kosalisa na kopalanganisa “nsango malamu.” (Matai 24:14) Baprograme oyo ebongisami mpo tósalela na mosala ya kosakola ezali se kokómisama kitoko. Tolingi bato nyonso básepela na yango. Yango wana, na kotalela malako oyo ezali na Ndenge ya kosalela, tokoki kotindela moto mokanda na nzela ya e-mail to kotindela ye esika oyo akoki kofina mpo azwa biloko na jw.org. Soki tozali kolakisa bato oyo basepeli na solo basite na biso oyo moombo ya sembo asalelaka, tokosalisa bango bázwa bilei ya elimo oyo euti na esika oyo ebongi, epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”

^ par. 1 Mpo omona esika bakomi “Ndenge ya kosalela,” talá na nse ya lokasa ya ebandeli na jw.org. Malako yango etali biloko nyonso oyo totyaka na basite na biso.