Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tólendisanaka “mingi koleka”

Tólendisanaka “mingi koleka”

“Tótyelanaka likebi . . . , tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.”​—BAEBRE 10:24, 25.

NZEMBO: 90, 87

1. Mpo na nini ntoma Paulo ayebisaki bakristo Baebre bálendisanaka “mingi koleka”?

NA SIƐKLƐ ya liboso, ntoma Paulo apesaki bakristo Baebre toli oyo: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Baebre 10:24, 25) Mbala mosusu bandeko yango bamitunaki ntina oyo Paulo ayebisaki bango bálendisana lisusu mingi koleka. Mbula mitano ekokaki te, ntina moko emonanaki polele. Bamonaki ete ‘mokolo ya Yehova’ mpo na kopesa Yerusaleme etumbu ekómaki pene mpe bamonaki ete basengeli kokima engumba yango ndenge Yesu ayebisaki bango básala. (Luka 21:20-22; Misala 2:19, 20) Mokolo yango eyaki na mobu 70 T.B. ntango Baroma babebisaki Yerusaleme.

2. Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingi na likambo ya kolendisa bandeko lelo oyo?

2 Lelo oyo mpe, ‘mokolo ya Yehova oyo ezali monene mpe nsɔmɔ mingi’ ekómi pene. (Yoele 2:11) Mosakoli Sefania alobaki: “Mokolo monene ya Yehova ekómi pene. Ekómi pene, mpe ezali koya mbangu mpenza.” (Sefania 1:14) Maloba yango etali mpe mikolo na biso. Yango wana, tosengeli ‘kotyelana likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.’ (Baebre 10:24) Na yango, tosengeli koyekola kotyela bandeko likebi mingi koleka mpo tólendisa bango na ntango oyo esengeli.

BANANI BAZALI NA MPOSA YA KOLENDISAMA?

3. Ntoma Paulo alobaki nini na oyo etali kolendisa? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Biblia elobi: “Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.” (Masese 12:25) Na bantango mosusu, biso nyonso tozalaka na mposa bálendisa biso. Paulo amonisaki polele ete ata baoyo bazali na mokumba ya kolendisa basusu bazalaka mpe na mposa basusu bálendisa bango. Akomelaki bakristo ya Roma ete: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, mpo nakabela bino mwa likabo ya elimo mpo bókóma makasi; to, kutu nde, mpo tólendisana, moto na moto alendisama na kondima ya mosusu, ya bino elendisa ngai mpe ya ngai elendisa bino.” (Baroma 1:11, 12) Na yango, na bantango mosusu, ata ntoma Paulo azalaki na mposa basusu bálendisa ye.​—Tángá Baroma 15:30-32.

4, 5. Banani tokoki kolendisa lelo, mpe mpo na nini?

4 Lelo, tokoki kolendisa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, na ndakisa babongisi-nzela ya sembo. Mingi na bango bamipimeli makambo oyo balingaka mpo bázala babongisi-nzela. Ezali mpe bongo mpo na bamisionɛrɛ, bandeko ya Betele, bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango, mpe baoyo basalaka na babiro ya kobongola mikanda. Bango nyonso bamipimelaka makambo ebele mpo bálekisa ntango mingi na mosala ya Yehova. Na yango, tosengeli kolendisa bango. Ezali mpe na bandeko oyo motema na bango ezali kaka na mosala ya ntango nyonso kasi, mpo na makambo mosusu, bakoki kosala yango te. Bango mpe basepelaka soki tolendisi bango.

5 Banani mosusu tosengeli kolendisa? Bandeko basi mpe bandeko mibali oyo baponi kotikala minzemba mpo balingi kotosa Yehova mpe kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakorinti 7:39) Ndenge moko mpe, basi basepelaka soki mibali na bango bazali koyebisa bango ete balingaka bango mpe bazali na botɔndi mpo na nyonso oyo basalaka. (Masese 31:28, 31) Tosengeli mpe kolendisa bakristo oyo bazali koyika mpiko na minyoko to na maladi. (2 Batesaloniki 1:3-5) Yehova mpe Yesu babɔndisaka bandeko nyonso wana ya sembo.​—Tángá 2 Batesaloniki 2:16, 17.

BANKULUTU BASALAKA MAKASI BÁLENDISA BANDEKO

6. Yisaya 32:1, 2 elobeli mokumba nini ya bankulutu?

6 Tángá Yisaya 32:1, 2. Tozali na ntango moko ya mpasi mpenza mpe ezali mpasi te tókóma mawamawa to tólɛmba nzoto. Mpo na kolendisa biso, Yesu Kristo asalelaka “bankumu,” elingi koloba bankulutu oyo batyami mafuta na elimo mpe oyo bazali na kati ya bampate mosusu. Bankulutu yango bazali te “bakonzi” ya kondima na biso kasi nde “baninga ya mosala” mpo na esengo na biso. Balingaka kosalisa biso tózala na esengo mpe tótikala sembo.​—2 Bakorinti 1:24.

7, 8. Ndenge nini bankulutu bakoki kolendisa basusu?

7 Bankulutu bakoki komekola ntoma Paulo, oyo azalaki ntango nyonso kosala makasi alendisa bandeko na ye. Akomelaki bakristo ya Tesaloniki oyo bazalaki na minyoko ete: “Lokola tolingaki bino na bolingo ya motema, tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko, mpo bokómaki bandeko na biso ya bolingo.”​—1 Batesaloniki 2:8.

8 Mpo na komonisa ete bankulutu basengeli kosuka kaka te na maloba mpo na kolendisa bandeko, Paulo akomelaki bankulutu ya Efese ete: “Bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu, mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: ‘Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.’” (Misala 20:35) Paulo andimaki ‘kopesa biloko na ye nyonso mpe komipesa mobimba’ mpo na bandeko. Misala na ye emonisaki ete andimaki kosala oyo akoki mpo na bango. (2 Bakorinti 12:15) Ndenge moko mpe, bankulutu basengeli kolendisa mpe kobɔndisa basusu kaka na maloba te, kasi mpe na misala mpo na komonisa ete batyelaka bango mpenza likebi.​—1 Bakorinti 14:3.

9. Ndenge nini bankulutu bakoki kopesa toli na ndenge oyo ekolendisa?

9 Mpo na kolendisa bandeko, ekoki kosɛnga bankulutu bápesa toli. Na ntango yango mpe, bandakisa oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa bango bápesa toli na ndenge oyo ekolendisa. Yesu atiká ndakisa ya malamu mpenza na oyo etali kopesa toli ntango atindelaki masangá ya Azia Moke bansango nsima ya lisekwa na ye. Apesaki lisangá ya Efese, ya Pergame, mpe ya Tyatire mwa batoli ya makasi. Kasi, liboso apesa toli yango, apesaki bango longonya mpo na makambo nyonso ya malamu oyo bazalaki kosala. (Emoniseli 2:1-5, 12, 13, 18, 19) Yesu ayebisaki lisangá ya Laodikia ete: “Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi napamelaka bango mpe napesaka bango disiplini. Yango wana, zalá na molende mpe bongolá motema.” (Emoniseli 3:19) Ekozala malamu bankulutu bámekola Kristo ntango bazali kopesa toli.

KOLENDISA BASUSU EZALI KAKA MOKUMBA YA BANKULUTU TE

Baboti, bolakisaka bana na bino ndenge ya kolendisa basusu? (Talá paragrafe 10)

10. Ndenge nini biso nyonso tokoki kolendisana?

10 Kolendisa basusu ezali kaka mokumba ya bankulutu te. Paulo alendisaki bakristo nyonso ete bálobaka na basusu “liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.” (Baefese 4:29) Mokomoko na biso asengeli koyeba bamposa ya bandeko mpo na kosalisa bango. Paulo apesaki Baebre toli oyo: “Bólendisa mabɔkɔ oyo elɛmbilɛmbi mpe mabɔlɔngɔ oyo ezali na makasi te, mpe bókoba kosembola banzela ya makolo na bino, mpo eteni oyo elɛmbi elongwa te na litonga, kasi ebika nde kobika.” (Baebre 12:12, 13) Biso nyonso, ata bilenge, tokoki kopesa basusu makasi mpe kolendisa bango na maloba na biso.

11. Nini esalisaki Marthe na eleko oyo azalaki konyokwama na makanisi?

11 Ndeko mwasi moko na nkombo Marthe, * oyo na eleko moko azalaki konyokwama na makanisi, akomi boye: “Mokolo moko ntango nazalaki kobondela mpo moto alendisa ngai, nakutanaki na ndeko mwasi moko ya mokóló oyo amoniselaki ngai bolingo mpe motema mawa, oyo nazalaki mpenza koluka na ntango wana. Ayebisaki ngai ete ye mpe akutanaki na mikakatano oyo nazalaki na yango, mpe yango epesaki ngai makasi.” Ekoki kozala ete ndeko wana ayebaki kutu te ete maloba na ye esalisaki Marthe mingi mpenza!

12, 13. Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na Bafilipi 2:1-4?

12 Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Filipi ete: “Yango wana, soki na kati na bino mwa elendiseli ezali mpo bozali na bomoko na Kristo, soki mwa libɔndisi ya bolingo ezali, soki moto na moto azali komibanzabanza mpo na mosusu, soki mwa bolingo ya motema mpe mawa ezali, bótondisa ngai na esengo mpe bózala na likanisi moko, bózala na bolingo moko, bózala na bomoko na molimo, bózala na likanisi kaka moko mpenza, bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:1-4.

13 Biso nyonso tosengeli koluka ndenge ya kosalisa basusu. Tokoki kopesa bandeko “libɔndisi ya bolingo,” ‘komibanzabanza mpo na bango,’ mpe komonisa “bolingo ya motema” mpo na kolendisa bango.

MAKAMBO OYO ELENDISAKA

14. Nini ekoki kolendisa moto?

14 Koyoka nsango ete bato oyo tosalisaki kala bazali kaka sembo elendisaka biso, ndenge ntoma Yoane akomaki: “Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.” (3 Yoane 4) Babongisi-nzela ebele basepelaka soki bayoki ete moto moko oyo basalisaki ayeba solo eleki bambula azali kaka sembo epai ya Yehova, to kutu akómá mpe mobongisi-nzela. Na yango, soki mobongisi-nzela abandi kolɛmba nzoto, tokolendisa ye soki toyebisi ye bolamu nyonso oyo asalá mpo na kosalisa basusu.

15. Likambo nini tokoki kosala mpo na kolendisa baoyo bazali kosalela Yehova na bosembo?

15 Bakɛngɛli ya zongazonga mingi balobi ete bango ná basi na bango balendisamaki ntango lisangá oyo bautaki kotala etindelaki bango mwa mokanda mpo na kopesa bango matɔndi. Soki tokomeli mpe bankulutu, bamisionɛrɛ, babongisi-nzela, mpe bandeko oyo basalaka na Betele mpo nakopesa bango matɔndi ndenge bazali kosalela Yehova na bosembo, tokoki kolendisa bango mingi.

NDENGE OYO BISO NYONSO TOKOKI KOLENDISA

16. Ekoki kosɛnga nini mpo na kolendisa moto?

16 Okosala nini soki omonaka ete okokaka te kolendisa basusu na maloba? Mpo na koloba solo, kolendisa ezalaka mpasi mpenza te. Okoki kaka kosɛkisa moto mwa moke. Soki asɛkisi yo te, mbala mosusu azali na likambo oyo ezali kotungisa ye. Mpe soki oyoki ye na likebi, ekoki kolendisa ye.​—Yakobo 1:19.

17. Nini elendisaki ndeko mobali moko ya elenge?

17 Ndeko moko ya elenge na nkombo Henri atungisamaki makasi ntango bato ya libota na ye, ata mpe tata na ye oyo azalaki nkulutu, batikaki solo. Mokɛngɛli ya zongazonga moko amonaki ete Henri azalaki mawamawa mpe asɛngaki ye bákende komɛla mwa kafe. Ayokaki Henri na likebi mpenza. Henri amonaki ete mpo asalisa bato ya libota na ye bázongela Yehova, ye moko asengelaki kotikala sembo. Abɔndisamaki mpe ntango atángaki Nzembo 46, Sefania 3:17, mpe Marko 10:29, 30.

Biso nyonso tokoki kolendisana mpe kopesana makasi (Talá paragrafe 18)

18. (a) Mokonzi Salomo akomaki nini na oyo etali kolendisa? (b) Likanisi nini ntoma Paulo apesaki?

18 Ndakisa ya Marthe mpe ya Henri emonisi nini? Emonisi ete mokomoko na biso akoki kobɔndisa mpe kolendisa bandeko. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi! Kongɛnga ya miso esepelisaka motema; nsango oyo ezali malamu ekómisaka mikuwa mafutamafuta.” (Masese 15:23, 30) Oyebi moto moko oyo alɛmbi nzoto to azali mawamawa? Okoki kotángela ye masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to makambo oyo ezali na site Internet na biso! Lisusu, Paulo amonisaki ete koyemba nzembo ya Bokonzi elongo ekoki kolendisa. Akomaki: “Bókoba koteya mpe kokebisana na nzembo, na masanzoli mpo na Nzambe, na nzembo ya elimo elongo na eyembeli kitoko, wana bozali koyembela Yehova na mitema na bino.”​—Bakolose 3:16; Misala 16:25.

19. Mpo na nini kolendisana ekokóma lisusu na ntina mingi, mpe tosengeli kosala nini?

19 Kolendisana ekokóma lisusu na ntina mingi awa mokolo ya Yehova “ezali kobɛlɛma.” (Baebre 10:25) Tokozala na esengo soki tosali ndenge Paulo alobaki: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.”​—1 Batesaloniki 5:11.

^ par. 11 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.