Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Bomoi ya mpasi na ebandeli, kasi na nsima ebele ya mapamboli

Bomoi ya mpasi na ebandeli, kasi na nsima ebele ya mapamboli

Nabotamá na mwa ndako moko oyo esalemá na banzete, na mboka moko moke na nkombo Liberty, na etúká ya Indiana, na États-Unis. Ntango nabotamaki, baboti na ngai basilaki kobota mwana moko ya mobali mpe bana mibale ya basi. Nsima na ngai, mama abotaki lisusu bana mibale ya mibali mpe moko ya mwasi.

Mwa ndako ya banzete, esika nabotamaki

NTANGO nazalaki kotánga, makambo ebongwanaki mpenza te. Bana oyo tobandaki na bango kelasi, bango kaka nde tosilisaki na bango. Na mboka yango, toyebanaki na bato mingi na bankombo.

Nabotamaki na libota ya bana nsambo, mpe nayekolaki mosala ya bilanga ntango nazalaki elenge

Mboka Liberty ezalaki na baferme ya mike pembenipembeni, mpe bazalaki kosala mingimingi bilanga ya masango. Ntango nabotamaki, tata azalaki kosala na ferme moko. Liboso nakokisa mbula 20, nayekolaki kotambwisa tracteur mpe kosala misala mosusu na ferme.

Ntango nabotamaki, tata azalaki na mbula 56 mpe mama azalaki na mbula 35. Atako bongo, tata azalaki makasi mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Alingaki misala ya makasi mpe ateyaki biso nyonso bana na ye tólingaka mpe misala ya makasi. Azalaki mozwi te, kasi tozalaki na esika ya kofanda, bilamba, mpe biloko ya kolya oyo ekoki. Mpe azalaki kolekisa ntango mingi elongo na biso. Tata azalaki na mbula 93 ntango akufaki. Mama akufaki na mbula 86. Bazalaki basambeli ya Yehova te. Kasi, ndeko na ngai moko ya mobali azali nkulutu ya sembo banda 1972.

BOLENGE NA NGAI

Mama azalaki kosambela mingi. Azalaki komema biso na eglize ya Protesta (Baptiste) mikolo nyonso ya lomingo. Ntango nazalaki na mbula 12, nayokaki liteya ya Bosato mpo na mbala ya liboso. Natunaki mama: “Ndenge nini Yesu akoki kozala Mwana mpe Tata na mbala moko?” Nayebaka ete ayanolaki: “Mwana na ngai, ezali libombami. Tokoki kokanga ntina na yango te.” Ya solo, namonaki yango libombami mpenza. Atako bongo, ntango nakómaki na mbula soki 14, nazwaki batisimo na mai moko ya mboka. Bazindisaki ngai na mai mbala misato; ya liboso na nkombo ya Tata, ya mibale na nkombo ya Mwana, mpe ya misato na nkombo ya molimo mosantu!

Na 1952—Ntango nakómaki na mbula 17, liboso nakende mosala ya soda

Ntango nazalaki na eteyelo ya ntei, moninga moko oyo azalaki kosala boxe, alendisaki mpe ngai nasala yango. Na yango, nabandaki koyekola boxe, mpe nakɔtaki na ekipi moko ya boxe (Golden Gloves). Nazalaki kokoka mpenza te; na yango, nsima ya mwa bitumba moke, natikaki na ngai. Na nsima, bakómisaki ngai soda ya États-Unis mpe batindaki ngai na Allemagne. Kuna, bakonzi na ngai batindaki ngai nakende kotánga na eteyelo ya basoda mpo bamonaki ete nakoki kokóma mokambi ya malamu. Balingaki nazala soda bomoi na ngai mobimba. Kasi, nalingaki mosala ya soda te; na yango nsima ya kosala mbula mibale oyo esɛngamaki, natikaki mosala ya soda na 1956. Kasi eumelaki te, nakómaki soda ya lolenge mosusu.

Banda mbula 1954-1956—Nasalaki mbula mibale lokola soda na États-Unis

NABANDI BOMOI YA SIKA

Liboso nayekola solo, nazalaki na likanisi ya libunga na oyo etali kozala mobali ya solosolo. Bafilme mpe makambo oyo nazalaki komona nde ebebisaki makanisi na ngai. Nazalaki kokanisa ete mibali oyo bazalaki kolobela makambo ya Biblia bazalaki mibali ya solosolo te. Kasi, nabandaki koyekola makambo oyo ebongolaki bomoi na ngai. Mokolo moko, ntango nazalaki kotambwisa motuka na ngai ya kitoko ya motane na mboka, bilenge basi mibale babengaki ngai. Bazalaki baleki ya mobali oyo abalaki yaya na ngai ya mwasi. Bilenge yango bazalaki Batatoli ya Yehova. Mokolo moko bapesaki ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, kasi namonaki ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina. Kasi na mbala oyo, babengaki ngai nakende na Boyekoli ya mokanda na lisangá, mwa likita moko mpo na koyekola Biblia, oyo ezalaki kosalema na ndako na bango. Nayebisaki bango ete nakokanisa. Basɛkaki mwa moke mpe batunaki ngai: “Okoya?” Nalobaki: “Ɛɛ, nakoya.”

Nayokaki mawa ndenge nalobaki bongo, kasi namonaki ete nasengeli kokokisa maloba na ngai. Na yango, nakendaki makita na mpokwa wana. Bana oyo bazalaki kuna nde bakamwisaki ngai mpenza. Bayebaki makambo ebele mpenza ya Biblia! Atako nazaláká kokende eglize elongo na mama mikolo nyonso ya lomingo, nayebaki kaka makambo moke ya Biblia. Lokola nakómaki mpenza na mposa ya koyekola makambo mosusu, nandimaki koyekola Biblia. Moko ya makambo ya liboso oyo nayekolaki ezalaki ete nkombo ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ezali Yehova. Bambula liboso, ntango natunaki mama makambo ya Batatoli ya Yehova, ayebisaki ngai kaka ete: “Ah, basambelaka moto moko ya kala na nkombo Yehova.” Na yango, namonaki ete miso na ngai ebandaki kofungwama!

Nakolaki nokinoki na elimo, mpo nayebaki ete makambo oyo nazalaki koyekola ezalaki solo. Na sanza ya 03/1957, sanza libwa nsima ya kokende makita mpo na mbala ya liboso, nazwaki batisimo. Nabongolaki ndenge na ngai ya kotalela makambo. Nasepelaki mingi ntango nayekolaki makambo oyo Biblia eteyaka na oyo etali kozala mobali ya solosolo. Yesu azalaki moto ya kokoka. Azalaki na makasi mpe na nguya koleka mobali mosusu nyonso. Kasi, azalaki kokɔta na bitumba te. Kutu, “atikaki bámonisa ye mpasi.” (Yisaya 53:2, 7) Nayekolaki ete bayekoli ya solo ya Yesu basengeli “nde kozala na boboto na bato nyonso.”​—2 Timote 2:24.

Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na mbula oyo elandaki, na 1958. Mwa moke na nsima, nasengelaki kokata mosala yango mpo na mwa ntango. Mpo na nini? Nazwaki ekateli ya kobala Gloria, moko ya bilenge basi oyo babengisaki ngai na boyekoli ya mokanda! Nayokaka mawa ata moke te mpo na ekateli nazwaki. Gloria azalaki liyaka ya motuya mingi na ntango wana, ata mpe tii lelo. Mpo na ngai, azali lokola diama oyo eleki motuya, mpe nazali na esengo mingi ndenge nabalaki ye! Ye moko ayebisa bino mwa makambo na ye:

“Nazalaki na bandeko 16, basi mpe mibali. Mama na biso azalaki mosaleli ya Yehova ya sembo. Akufaki ntango nazalaki na mbula 14. Nsima ya liwa ya mama, tata na biso abandaki koyekola Biblia. Lokola tozalaki lisusu na mama te, tata ayokanaki na mokambi ya eteyelo mpo na kosalisa biso. Yaya na biso ya mwasi azalaki na mbula ya nsuka na eteyelo ya ntei, mpe tata asɛngaki mokambi ya eteyelo mpo ngai ná yaya tókendaka kelasi mokolo moko te. Na ndenge yango, moko na biso akokaki kotikala na ndako mpo na kobatela baleki. Tozalaki mpe kobongisa bilei ya mpokwa mpo na libota mobimba liboso tata auta mosala. Mokambi ya eteyelo andimaki, mpe tosalaki bongo tii yaya asilisaki kelasi. Mabota mibale ya Batatoli bazalaki koyekola Biblia elongo na biso, mpe kati na biso, bana 11 tokómaki Batatoli ya Yehova. Nazalaki kolinga mosala ya kosakola, atako nazalaki nsɔninsɔni. Mobali na ngai, Sam, asalisi ngai na boumeli ya bambula na likambo yango.”

Ngai ná Gloria tobalanaki na sanza ya 02/1959. Tozalaki kosepela kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo. Kaka na mbula wana na sanza ya nsambo, totondisaki formilɛrɛ mpo na mosala na Betele. Tozalaki mpenza na mposa ya kosala na biro monene. Ndeko Simon Kraker atunaki biso mituna. Ayebisaki biso ete na ntango wana Betele ezalaki te kondima bato oyo babalaná. Kasi tozalaki kaka na mposa ya kosala na Betele, atako ezwaki bambula ebele liboso bábenga biso.

Tokomelaki biro monene mpe tosɛngaki bango bátinda biso esika mposa ya basakoli ezalaki. Bayebisaki biso tókende na Pine Bluff, na etúká ya Arkansas. Na ntango wana, masangá ezalaki kaka mibale na Pine Bluff. Lisangá moko ezalaki ya mindɛlɛ mpe mosusu ya baindo. Totindamaki na lisangá ya baindo, oyo ezalaki na basakoli 14 mpamba.

BOKABWANI KATI NA BAINDO NÁ MINDƐLƐ

Mbala mosusu okoki komituna mpo na nini bakabolaki Batatoli ya Yehova ya mindɛlɛ ná ya baindo. Eyano ezali ete na ntango wana, likambo mosusu ya kosala ezalaki te. Mibeko epekisaki kosangisa mindɛlɛ ná baindo, mpe likambo yango ezalaki kobimisa mobulu. Na bisika mingi, bandeko bazalaki kobanga ete soki basali makita esika moko bakobebisa Ndako ya Bokonzi na bango. Likambo yango esalemaki na bisika mosusu. Soki baindo bakei kosakola ndako na ndako na kartye ya mindɛlɛ, bazalaki kokanga bango mpe mbala mosusu kobɛta bango. Yango wana, mpo mosala ya kosakola ekoba, tozalaki kotosa mibeko na elikya ete makambo ekobonga.

Kosakola ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Ntango tozalaki kosakola na teritware ya baindo, mbala mosusu kozanga ete tóyeba tozalaki kobɛta na porte ya mindɛlɛ. Ezalaki kosɛnga kozwa ekateli: Komeka kolobela lisolo mokuse na Biblia to kosɛnga bolimbisi mpe kokende na porte mosusu. Na ntango wana makambo ezalaki kosalema bongo.

Lokola tozalaki babongisi-nzela, tosengelaki koluka mwa mbongo mpo na kobikela. Misala mingi tozalaki kozwa bazalaki kofuta biso mbongo moke mpenza. Gloria azalaki kosala mwa misala ya kosokola ndako. Na ndako moko bapesaki ngai nzela nayaka kosalisa Gloria, yango ezalaki kosala ete mosala esila nokinoki. Libota yango ezalaki kopesa biso bilei na midi mpe liboso tózonga tozalaki kokabola yango na Gloria. Pɔsɔ nyonso Gloria azalaki kongoma (repasser) bilamba ya libota moko. Ngai nazalaki kobongisa bafololo, kosukola bafenetre, mpe kosala misala mosusu ya ndako. Mokolo mosusu tosukolaki bafenetre ya libota moko ya mindɛlɛ. Ngai nasukolaki libándá mpe Gloria na kati. Ezwaki biso mokolo mobimba, yango wana bapesaki biso bilei na midi. Gloria alyaki na kati kasi esika moko te na libota yango. Ngai nalyaki libándá na garaje, kasi namitungisaki te. Ezalaki biloko ya kitoko. Libota yango ezalaki malamu, kasi bazalaki kolanda makanisi ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango. Nazali koyeba lisusu mokolo moko totɛlɛmaki esika basombaka esansi. Nsima ya kotya esansi, natunaki mondɛlɛ oyo azalaki kosala wana soki Gloria akoki kosalela twalɛti. Atalaki ngai mpe alobaki na nkanda nyonso ete, “ezali ya kokangama.”

BOLAMU OYO BANDEKO BAMONISELAKI BISO

Na ngámbo mosusu, tozalaki kosepela kolekisa ntango elongo na bandeko, mpe tozalaki kosepela na mosala ya kosakola. Ntango tokómaki na Pine Bluff, tozalaki kofanda ná ndeko mobali moko oyo azalaki mosaleli ya lisangá na ntango wana. Mwasi na ye akómaki naino Motatoli te, mpe Gloria abandaki koyekola Biblia elongo na ye. Kaka na ntango wana, ngai mpe nabandaki koyekola Biblia na mwana na bango ya mwasi mpe mobali na ye. Mama yango mpe mwana na bango ya mwasi bazwaki ekateli ya kosalela Yehova mpe bazwaki batisimo.

Tozalaki mpe na baninga na lisangá ya mindɛlɛ. Bazalaki kobengisa biso na bandako na bango mpo na kolya, kasi ezalaki kaka na butu. Etuluku moko na nkombo Ku Klux Klan (KKK), oyo ezalaki kolendisa bokabwani mpe mobulu, ezalaki mpenza kosala mosala na ntango wana. Nazali koyeba lisusu na butu moko ya fɛti ya Halloween namonaki moto moko afandi na veranda, na lolendo nyonso alataki zambala ya mpɛmbɛ mpe ekoti oyo ezipaki tii na kingo, ndenge kaka bato ya Ku Klux Klan bazalaki kolata. Atako makambo ya mabe ezalaki kosalema, yango epekisaki te bandeko bámonisa boboto. Na eleko moko ya molunge, tozalaki na mposa ya mbongo mpo na kokende na liyangani ya etúká, ndeko moko andimaki kosomba motuka na biso mpo tózwa mbongo ya kokende. Mokolo moko, nsima ya sanza moko, tolɛmbaki makasi mpo totambolaki mingi mpo na kosakola ndako na ndako mpe koyekola na bato ebele Biblia. Ntango tozongaki ndako tomonaki likambo moko oyo ekamwisaki biso. Ezalaki motuka na biso, etɛlɛmi liboso ya ndako! Batyaki mokanda na vitre oyo elobaki: “Topesi bino motuka na bino lokola likabo. Ndeko na bino.”

Likambo mosusu ya boboto esimbaki motema na biso makasi. Na 1962, nasengelaki kokende na South Lansing, na etúká ya New York, mpo na kokɔta na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Ezalaki mpo na kopesa formasyo na bankulutu ya masangá, bakɛngɛli ya zongazonga, mpe ya etúká na boumeli ya sanza mobimba. Na ntango yango nazalaki na mosala te, mpe tozalaki na mbongo kaka moke. Kasi, kompanyi moko ya batelefone na Pine Bluff etunaki ngai mwa mituna mpo bázwa ngai na mosala. Soki bandimaki ngai, nalingaki kozala moto moindo ya liboso na kompanyi yango. Nsukansuka bayebisaki ngai ete bazali na mposa bázwa ngai na mosala. Nayebaki te nasala nini. Mpo nazalaki na mbongo te ya kokende na New York. Nazalaki kokanisa mingi soki nandima mosala yango to nakende na eteyelo. Nazalaki komibongisa mpo na kokomela Betele ete nakokende eteyelo te mpe na mbala moko likambo moko esalemaki oyo nabosanaka te.

Ndeko mwasi moko ya lisangá na biso, oyo mobali na ye azalaki motatoli te, abɛtaki na porte na ntɔngɔntɔngɔ mpe apesaki ngai anvɛlɔpi. Ezalaki na mbongo ebele. Ye ná bana na ye ebele bazalaki kolamuka na ntɔngɔ makasi mpe kokende na bilanga ya coton mpo na kolongola matiti. Basalaki bongo mpo nakozwa mbongo oyo ekoki mpo nasala mobembo na New York. Ndeko mwasi yango alobaki: “Kende eteyelo mpe yekolá makambo mingi bongo oteya biso ntango okozonga!” Na nsima, nasɛngaki na kompanyi yango soki bakolinga nabanda mosala nsima ya pɔsɔ mitano. Bapesaki eyano ete “te!” Kasi yango etungisaki ngai te mpo nazwaki ekateli. Nazali na esengo ndenge nazwaki mosala wana te!

Gloria alobi boye mpo na ntango oyo tolekisaki na Pine Bluff: “Nalingaki teritware wana mingi! Nazalaki na bayekoli ya Biblia pene na 20. Yango ezalaki kosala ete tósakola ndako na ndako na ntɔngɔ mpe ntango oyo ekotikala tozalaki kosalela yango mpo na kotambwisa bayekoli ya Biblia tii na ngonga ya 23. Mosala ezalaki mpenza kosepelisa! Nalingaki mpenza kotikala kuna. Nasengeli kondima ete nazalaki na mposa ya kokende na mosala ya zongazonga te, kasi Yehova azalaki kokanisa makambo mosusu.” Mpe makambo esalemaki kaka ndenge Yehova azalaki kokanisa.

MOSALA YA ZONGAZONGA

Ntango tozalaki babongisi-nzela na Pine Bluff, totondisaki formilɛrɛ mpo tókóma babongisi-nzela monene. Toyebaki mpenza ete bakondima tókóma babongisi-nzela monene. Mpo na nini? Mpo mokɛngɛli ya etúká na biso alingaki tókende kosalisa na lisangá moko na Texas, mpe alingaki tósala lokola babongisi-nzela monene kuna. Tosepelaki na likanisi wana. Tozelaki mingi, kasi eyano ezalaki koya te, esika na biso ya kozwa mikanda ezalaki kaka polele. Nsukansuka, mokanda eyaki. Batindaki biso na mosala ya zongazonga na sanza ya 01/1965. Ndeko Leon Weaver, oyo lelo azali mokambi ya Komite ya Filiale na États-Unis, ye mpe atyamaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga.

Kokóma mokɛngɛli ya zongazonga ezalaki kobangisa ngai. Mbula soki moko liboso, ndeko James Thompson, oyo azalaki mokɛngɛli ya etúká na biso atalelaki makoki na ngai. Na boboto nyonso, amonisaki ngai bisika nasengeli kobongisa, alobelaki makambo oyo esengeli mpo na kozala mokɛngɛli ya zongazonga ya malamu. Mwa moke nsima ya kobanda mosala ya zongazonga, namonaki ete toli wana ebongaki mpenza. Ntango nabandaki mosala ya zongazonga, ndeko Thompson azalaki mokɛngɛli ya etúká ya liboso oyo tosalaki elongo. Nayekolaki makambo mingi epai ya ndeko wana ya sembo.

Nasepelaka na lisalisi nazwaki epai ya bandeko ya makoki

Na ntango wana, bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki kozwa formasyo mingi te. Natalaki ndenge mokɛngɛli ya zongazonga moko asalaki ntango akendaki viziti na lisangá moko. Na nsima, ye mpe atalaki ndenge nasalaki na lisangá mosusu pɔsɔ oyo elandaki. Apesaki ngai makanisi mpe malako ya kolanda. Kasi na nsima esengelaki kosala makambo yo moko. Nazali lisusu koyeba ete nalobaki na Gloria, “asengeli mpenza kokende sikoyo?” Nsima ya mikolo, nayebaki likambo moko ya ntina. Ekozala na bandeko ya malamu oyo bakoki kosalisa yo, kasi bakosala yango kaka soki otiki ete básalisa yo. Tii lelo nasepelaka na lisalisi nazwaki epai ya bandeko wana ya makoki na ndakisa, ndeko Brown, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli, mpe ndeko Fred Rusk ya Betele.

Na ntango wana, bokabwani kati na baindo ná mindɛlɛ ezalaki bisika nyonso. Mokolo moko bato ya Ku Klux Klan bazalaki kotambola na balabala na engumba ntango tozalaki kokende kotala masangá na Tennessee. Tokutanaki lisusu na bango mokolo mosusu ntango tokendaki kolya na restora moko wana tozalaki na mosala ya kosakola. Ntango nakendaki twalɛti, mobali moko oyo azalaki na mayemi na nzoto oyo ezalaki komonisa bokabwani atalaki ngai na nkanda mpe alandaki ngai kuna. Kasi, ndeko moko ya mondɛlɛ, oyo azalaki molai koleka moto yango mpe ngai, alandaki biso. Ndeko yango atunaki, “ndeko Herd, boni yo?” Moto yango abimaki na lombangu kozanga ete asalela twalɛti. Na boumeli ya bambula, namonaki ete likambo oyo esalaka mpenza ete bokabwani ezala kati na baindo ná mindɛlɛ ezali te loposo kasi nde lisumu oyo biso nyonso tozalaka na yango. Namonaki mpe ete ndeko azali kaka ndeko ata soki azali na loposo nini, akokufa mpo na yo soki esengeli.

EBELE YA MAPAMBOLI

Tolekisi mbula 12 na mosala ya zongazonga mpe mbula 21 na mosala ya etúká. Ezalaki mpenza bambula ya mapamboli, mpe tokutanaki na makambo ebele ya kolendisa. Kasi ezalaki na lipamboli mosusu ezalaki kozela biso. Na Sanza ya 08/1997 likambo oyo tozelaki bambula ebele, ekokisamaki. Babengaki biso tókende kosala na Betele ya États-Unis. Elekaki mbula 38 banda totondisaki formilɛrɛ ya liboso mpo na Betele. Nakanisaki ete bandeko oyo bakambaka na Betele babengisi ngai mpo napesa mabɔkɔ kaka mpo na mwa ntango, kasi esalemaki bongo te.

Ntango nabalaki Gloria, azalaki liyaka ya motuya mingi, ata mpe tii lelo

Esika ya liboso nasalaki ezalaki na Departema ya Mosala mpe kuna nayekolaki makambo mingi! Kuna bandeko bazalaki koyanola na mituna ya ntina mingi, mpe ya mpasi oyo ezalaki kouta epai ya masangani ya bankulutu, mpe bakɛngɛli ya zongazonga ya ekoló mobimba. Nazali na botɔndi mingi mpo na formasyo bandeko bapesaki ngai mpe ndenge bamoniselaki ngai motema molai. Soki basɛngi ngai lisusu nasala kuna, ekozala kaka na makambo ebele ya koyekola epai ya bandeko wana.

Ngai ná Gloria tolingaka bomoi ya Betele. Banda kala, tosepelaka kolamuka ntɔngɔntɔngɔ, mpe yango esalisi biso mingi na Betele. Nsima soki ya mbula moko, nakómaki moko ya bandeko oyo bapesaka mabɔkɔ na Komite ya Mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Na nsima, na 1999, nakɔtaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Nayekoli makambo mingi na mokumba yango. Kasi liteya ya ntina mingi oyo nazwi ezali ete Yesu Kristo nde azali kotambwisa lisangá, kasi bato te.

Kobanda 1999, nazwi libaku ya kosala na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Ntango natalaka bomoi na ngai, namimonaka mwa moke lokola mosakoli Amose. Yehova amonaki mobateli-mpate wana ya komikitisa oyo azalaki kosala mosala oyo emonanaki lokola ezali na ntina te; kotuba bafigi, oyo ezalaki bilei ya babola. Kasi, akómisaki ye mosakoli mpe apambolaki mosala na ye mingi. (Amose 7:14, 15) Ndenge moko mpe, Yehova amonaki ngai, mwana ya mosali-bilanga oyo azalaki mobola na Liberty, na etúká ya Indiana. Mpe apamboli ngai mingi, kutu nakokoka kotánga mapamboli yango nyonso te! (Masese 10:22) Nakoki koloba ete na ebandeli nazalaki mobola, kasi lelo Yehova apamboli ngai mingi na ndenge oyo nakokaki kokanisa ata moke te!