Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini tosengeli ‘kokoba kobota mbuma mingi’?

Mpo na nini tosengeli ‘kokoba kobota mbuma mingi’?

“Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.”​—YOANE 15:8.

NZEMBO: 53, 60

1, 2. (a) Makambo nini Yesu asololaki na bayekoli na ye na butu liboso akufa? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini ezali malamu tóyeba ntina oyo tósakolaka? (c) Tokolobela nini na lisolo oyo?

NA BUTU liboso Yesu akufa, asololaki na bantoma na ye na boumeli ya ntango molai mpe andimisaki bango ete alingaka bango mingi. Apesaki mpe bango ndakisa ya nzete ya vinyo, oyo tolobelaki na lisolo eleki. Yesu alingaki kolendisa bayekoli na ye ‘bákoba kobota mbuma,’ elingi koloba bákoba kosakola nsango ya Bokonzi.​—Yoane 15:8.

2 Kasi, Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo oyo basengelaki kosala mpe ntina oyo basengelaki kosala yango. Ayebisaki bango ntina oyo basengelaki kokoba kosakola. Ezali malamu tóbosanaka te ntina oyo tosengeli kokoba kosakola. Yango ekotinda biso tóyika mpiko wana tozali kopesa “litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:13, 14) Na lisolo oyo, tokolobela makambo minei oyo euti na Biblia, oyo emonisi ntina oyo tosengeli kosakolaka. Tokolobela mpe makabo minei Yehova apesaka biso mpo na kosalisa biso tókoba kobota mbuma.

TOPESAKA YEHOVA NKEMBO

3. (a) Na kotalela Yoane 15:8, wapi ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka? (b) Na ndakisa oyo Yesu apesaki, mbuma ya vinyo elakisi nini mpe mpo na nini ebongi mpenza?

3 Ntina ya libosoliboso tosakolaka ezali ete tolingi kopesa Yehova nkembo mpe kosantisa nkombo na ye. (Tángá Yoane 15:1, 8.) Ntango Yesu apesaki ndakisa ya nzete ya vinyo, akokanisaki Yehova na mosali-bilanga, to mobateli ya elanga, oyo akolisaka mbuma ya vinyo. Yesu alobaki ete ye moko azali nzete ya vinyo mpe bayekoli na ye bazali bitape. (Yoane 15:5) Na yango, na ndakisa na ye, mbuma ya vinyo elakisi mbuma oyo bayekoli na ye babotaka, elingi koloba mosala ya kosakola. Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi.” Ntango nzete ya vinyo ebotaka mbuma, yango ekumisaka moloni na yango. Ndenge moko mpe ntango tosalaka nyonso tósakola nsango ya Bokonzi, tokumisaka to topesaka Yehova nkembo.​—Matai 25:20-23.

4. (a) Ndenge nini tosantisaka nkombo ya Nzambe? (b) Oyokaka ndenge nini na libaku ya kosantisa nkombo ya Nzambe?

4 Nkombo ya Nzambe ezali mosantu. Ezali na eloko moko te oyo tokoki kosala mpo na kosantisa yango koleka. Na yango, na ndenge nini tosantisaka nkombo ya Nzambe ntango tósakolaka? Mosakoli Yisaya alobaki boye: “Yehova ya mampinga​—ye nde Moto bosengeli kotalela ete azali mosantu.” (Yisaya 8:13) Tokosantisa nkombo ya Nzambe, ntango tozali komona yango monene koleka nkombo nyonso mpe ntango tozali kosalisa basusu báyeba ete nkombo yango ezali mosantu. (Matai 6:9) Na ndakisa, ntango toteyaka basusu solo etali bizaleli kitoko ya Yehova mpe mokano na ye mpo na bato, tosalisaka bango bámona ete makambo nyonso ya mabe oyo Satana alobaki mpo na Yehova ezali lokuta. (Ebandeli 3:1-5) Lisusu, tosantisaka nkombo ya Nzambe ntango tosalisaka bato báyeba ete Yehova abongi “kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya.” (Emoniseli 4:11) Ndeko Rune, oyo alekisi mbula 16 na mosala ya mobongisi-nzela, alobi boye: “Koyeba ete nazwá libaku ya kopesa litatoli mpo na Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba etindaka ngai namonisa botɔndi mpe nakoba kosakola.”

TOLINGAKA YEHOVA MPE MWANA NA YE

5. (a) Na kotalela Yoane 15:9, 10, wapi ntina oyo etindaka biso tósakola? (b) Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba ete basengelaki koyika mpiko?

5 Tángá Yoane 15:9, 10. Ntina ya mibale oyo tosakolaka nsango ya Bokonzi ezali mpo tolingaka Yehova mpe Yesu. (Marko 12:30; Yoane 14:15) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli ‘kotikala na kati ya bolingo na ye.’ Mpo na nini alobaki bongo? Mpo ayebaki ete bayekoli na ye basengelaki koyika mpiko mpo na komitambwisa lokola bakristo ya solo. Na Yoane 15:4-10, Yesu asaleli liloba ‘kotikala’ mbala mingi mpo na kosalisa bayekoli na ye báyeba ete basengeli koyika mpiko.

6. Ndenge nini tomonisaka ete tozali na mposa ya kotikala na bolingo ya Kristo?

6 Ndenge nini tomonisaka ete tozali na mposa ya kotikala na bolingo ya Kristo mpe tolingi ete andima biso? Ezali soki tozali kotosa ye. Yesu asɛngaka biso tósala likambo oyo ye moko asalaki. Alobaki: “Natosi mitindo ya Tata mpe natikali na kati ya bolingo na ye.” Yesu atikelá biso ndakisa.​—Yoane 13:15.

7. Na ndenge nini botosi ezali na boyokani na bolingo?

7 Yesu amonisaki yango polele ete kotosa ezali na boyokani na bolingo ntango alobaki: “Moto oyo azali na mitindo na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai.” (Yoane 14:21) Ntango totosaka etinda ya Yesu ya kosakola, biso mpe tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpo mitinda oyo Yesu apesaka emonisaka likanisi ya Tata na ye. (Matai 17:5; Yoane 8:28) Mpe ntango tomonisaka Yehova mpe Yesu ete tolingaka bango, basalaka ete tótikala na kati ya bolingo na bango.

TOKEBISAKA BATO

8, 9. (a) Ntina nini mosusu etindaka biso tosakolaka? (b) Ndenge nini Ezekiele 3:18, 19 mpe Ezekiele 18:23 etindaka biso tókoba kosakola?

8 Ntina ya misato oyo tosakolaka ezali mpo tolingaka kokebisa basusu mpo na mokolo ya Yehova oyo ezali koya. Biblia ebengi Noa “mosakoli.” (Tángá 2 Petro 2:5.) Liboso ya Mpela, na ntembe te nsango oyo Noa asakolaki ezalaki mpe na likebisi mpo na mokolo ya kobebisama. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo Yesu alobaki: “Ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:38, 39) Atako bato mingi bazalaki koyoka Noa te, akobaki kosakola na bosembo nsango ya likebisi oyo Yehova ayebisaki ye.

9 Lelo oyo, tosakolaka nsango ya Bokonzi epai ya bato mpo na kopesa bango libaku ya koyeba oyo Nzambe akosala mpo na bato na mikolo ezali koya. Lokola Yehova, tolingi ete bato bátyela nsango yango likebi mpe ‘bátikala mpenza na bomoi.’ (Ezekiele 18:23) Ntango tosakolaka ndako na ndako mpe na bisika ya bato nyonso, tokebisaka ebele ya bato ete Bokonzi ya Nzambe ekobebisa mokili oyo mabe.​—Ezekiele 3:18, 19; Danyele 2:44; Emoniseli 14:6, 7.

TOLINGAKA BATO

10. (a) Na kotalela Matai 22:39, wapi ntina mosusu oyo tosakolaka? (b) Ndenge nini Paulo ná Silasi basalisaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ na Filipi?

10 Ntina ya minei oyo etindaka biso tókoba kosakola ezali mpo tolingaka bato. (Matai 22:39) Yango esalisaka biso tókoba kosakola mpo toyebi ete bato bakoki kobongola bizaleli soki makambo ya bomoi na bango ebongwani. Na ndakisa, batɛmɛli babwakaki Paulo ná Silasi na bolɔkɔ na engumba Filipi. Kasi na katikati ya butu, mabele eninganaki mpe baporte ya bolɔkɔ efungwamaki. Mokɛngɛli ya bolɔkɔ abangaki ndenge bakangami bakimaki mpe alingaki komiboma. Kasi Paulo apekisaki ye mpe agangaki: “Komisala mabe te.” Mokɛngɛli ya bolɔkɔ atunaki bango: “Nasala nini mpo nabika?” Paulo ná Silasi bayebisaki ye: “Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobika.”​—Misala 16:25-34.

Tosakolaka mpo tolingaka Yehova, Yesu mpe bato (Talá paragrafe 5, 10)

11, 12. (a) Lisolo ya mokɛngɛli ya bolɔkɔ eteyi biso nini mpo na mosala ya kosakola? (b) Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?

11 Lisolo ya mokɛngɛli ya bolɔkɔ eteyi biso nini mpo na mosala ya kosakola? Tomoni ete ezalaki kaka nsima ya koningana ya mabele nde mokɛngɛli ya bolɔkɔ abongolaki makanisi na ye mpe andimaki lisalisi. Ndenge moko mpe, bato mosusu oyo bandimaka nsango ya Biblia te bakoki kobongola makanisi na bango mpe koluka lisalisi ntango likambo moko ya mpasi ekómeli bango. Na ndakisa, bato mosusu bakoki koyoka mabe soki babungisi mosala na bango to libala na bango ekufi. Basusu bakoki koyoka mawa makasi mpo minganga bayebisi bango ete bazali na maladi moko ya makasi to mpo moto moko oyo bazalaki kolinga akufi. Ntango makambo ya ndenge wana ekómaka, mbala mosusu bato bamitunaka soki ntina ya bomoi ezali nini, likambo oyo bakanisaki te liboso. Bakoki komituna boye, ‘Nasala nini mpo nabika?’ Mpo na mbala ya liboso na bomoi na bango bakoki kokóma na mposa ya koyoka nsango na biso oyo epesaka elikya.

12 Na yango, soki tokobi kosakola na bosembo, tokozala wana ntango bato bakosepela koyoka mpe kondima libɔndisi oyo tokopesa bango. (Yisaya 61:1) Ndeko Charlotte, oyo asali mbula 38 na mosala ya mobongisi-nzela alobi boye: “Lelo oyo bato bazangi elikya mpe esengeli ete bázwa libaku ya koyoka nsango malamu.” Ndeko Ejvor, oyo asali mbula 34 na mosala ya mobongisi-nzela alobi: “Koleka bileko mosusu, lelo oyo bato mingi banyokwamaka na makanisi. Nazali mpenza na mposa ya kosalisa bango. Yango etindaka ngai nasakola.” Ya solo, bolingo oyo tolingaka bato ezali ntina oyo ebongi kotinda biso tókoba kosakola!

MAKABO OYO ESALISAKA BISO TÓYIKA MPIKO

13, 14. (a) Likabo nini Yoane 15:11 elobeli? (b) Ndenge nini tokoki kozwa esengo oyo Yesu azalaka na yango? (c) Ndenge nini esengo esalisaka biso na mosala ya kosakola?

13 Na butu liboso Yesu akufa, alobelaki makabo oyo ekosalisa bantoma na ye bákoba kobota mbuma. Wapi makabo yango, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso lelo oyo?

14 Likabo ya esengo. Tomonaka ete kosakola ezali kilo? Ata moke te. Nsima ya kolobela ndakisa ya nzete ya vinyo, Yesu alobaki ete tokozwa esengo na ye soki tozali kosakola. (Tángá Yoane 15:11.) Na ndenge nini? Na ndakisa oyo Yesu apesaki, ye moko amikokanisaki na nzete ya vinyo mpe bayekoli na ye na bitape. Bitape ezwaka mai ná bavitamini oyo esengeli kaka soki ekangami na nzete ya vinyo. Ndenge moko mpe, tokoki kozala na esengo lokola Yesu kaka soki tozali na bomoko na ye mpe tozali kolanda matambe na ye. Na yango, tokozala na esengo oyo azalaka na yango, esengo oyo eutaka na kosala mokano ya Nzambe. (Yoane 4:34; 17:13; 1 Petro 2:21) Ndeko Hanne, oyo asali mbula koleka 40 na mosala ya mobongisi-nzela, alobi: “Esengo oyo nayokaka nsima ya kobima na mosala ya kosakola etindaka ngai nakoba na mosala ya Yehova.” Esengo ekopesa biso makasi ya kokoba kosakola ata ntango bato bazali koyoka biso te.​—Matai 5:10-12.

15. (a) Likabo nini Yoane 14:27 elobeli? (b) Ndenge nini kimya esalisaka biso tókoba kosakola?

15 Likabo ya kimya. (Tángá Yoane 14:27.) Na mpokwa, mwa ntango liboso Yesu akufa, alobaki na bantoma na ye: “Napesi bino kimya na ngai.” Ndenge nini kimya ya Yesu esalisaka biso tókoba kosakola? Ntango tokobaka kosakola, toyokaka kimya mpo toyebi ete tozali kosepelisa Yehova ná Yesu. (Nzembo 149:4; Baroma 5:3, 4; Bakolose 3:15) Ndeko Ulf, oyo asali mbula 45 na mosala ya mobongisi-nzela, alobi: “Mosala ya kosakola elɛmbisaka ngai, kasi epesaka ngai esengo ya solosolo mpe esalaka ete bomoi na ngai ezala na ntina.” Tozali mpenza na botɔndi ndenge tozwi esengo ya seko!

16. (a) Likabo nini Yoane 15:15 elobeli? (b) Ndenge nini bantoma bakokaki kokoba kozala baninga ya Yesu?

16 Likabo ya boninga. Nsima ya koyebisa bantoma na ye ete alingi bázala na esengo, Yesu alimbolelaki bango ntina oyo basengelaki komonisa bolingo oyo elukaka matomba na yango moko te. (Yoane 15:11-13) Alobaki ete: “Nabengi bino baninga.” Ezali mpenza libaku malamu kozala moninga ya Yesu! Nini elingaki kosalisa bantoma bákoba kozala baninga ya Yesu? Alobaki boye: “Bókende mpe bókoba kobota mbuma.” (Tángá Yoane 15:14-16.) Mbula mibale liboso, Yesu ayebisaki bantoma na ye: “Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Matai 10:7) Na yango, na butu liboso akufa, Yesu alendisaki bayekoli na ye báyika mpiko na mosala ya kosakola. (Matai 24:13; Marko 3:14) Ya solo, Yesu ayebaki ete kotosa etinda oyo apesaki ekozala pɛtɛɛ te. Atako bongo, bazalaki na likoki ya kosala yango mpe kokoba kozala baninga na ye. Ndenge nini? Na lisalisi ya likabo mosusu.

17, 18. (a) Likabo nini Yoane 15:7 elobeli? (b) Ndenge nini likabo yango esalisaki bayekoli ya Yesu? (c) Makabo nini esalisaka biso lelo oyo?

17 Likabo ya koyanola na mabondeli na biso. Yesu alobaki: “Bósɛnga eloko nyonso oyo bolingi mpe ekosalema mpo na bino.” (Yoane 15:7, 16) Na ntembe te, elaka wana ya Yesu elendisaki bantoma! * Bantoma bayebaki mpenza te ete etikalaki moke Yesu akufa. Kasi liwa na ye elingaki komonisa te ete bakozanga mosungi. Yehova azalaki pene ya koyanola na mabondeli na bango mpe kosalisa bango na mosala ya kosakola. Asalaki mpe kaka bongo. Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, bantoma babondelaki Yehova apesá bango mpiko, mpe ayanolaki na mabondeli na bango.​—Misala 4:29, 31.

Tosengeli komindimisa ete Yehova ayanolaka na mabondeli na biso ntango tosɛngaka ye lisalisi (Talá paragrafe 18)

18 Ezali mpe bongo lelo oyo. Totikalaka baninga ya Yesu ntango tozali kokoba kosakola. Mpe tokoki komindimisa ete Yehova azali pene ya koyanola na mabondeli na biso wana tozali kosɛnga ye lisalisi ntango tozali na mokakatano mpo na kosakola. (Bafilipi 4:13) Tozali na esengo ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na biso mpe tozali baninga ya Yesu. Makabo wana nyonso oyo eutaka epai ya Yehova esalisaka biso tókoba kobota mbuma.​—Yakobo 1:17.

19. (a) Mpo na nini tokobaka kosakola? (b) Nini esalisaka biso tósilisa mosala oyo Nzambe apesá biso?

19 Na lisolo oyo, tomoni ntina minei oyo esalaka ete tókoba kosakola: kokumisa Yehova mpe kosantisa nkombo na ye, komonisa ete tolingaka Yehova mpe Yesu, kokebisa bato mpe komonisa ete tolingaka bango. Tomoni mpe ete tozali na makabo minei: esengo, kimya, boninga, mpe biyano na mabondeli na biso. Makabo wana epesaka biso makasi ya kosilisa mosala oyo Nzambe apesá biso. Yehova azalaka na esengo ntango amonaka biso tozali kosala makasi ya ‘kokoba kobota mbuma’!

^ par. 17 Ntango Yesu azalaki kosolola na bantoma, akundwelaki bango mbala na mbala ete Yehova akoyanola na mabondeli na bango.​—Yoane 14:13; 15:7, 16; 16:23.