Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Olukaka ete nani andima yo?

Olukaka ete nani andima yo?

“Mpo Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.”​—BAEBRE 6:10.

NZEMBO: 39, 30

1. Biso nyonso tozalaka na mposa ya nini?

OYOKAKA ndenge nini ntango moto oyo oyebi mpe omemyaka abosani nkombo na yo to mpe azali koyeba yo lisusu te? Ekoki mpenza kolɛmbisa yo nzoto. Mpo na nini? Mpo moto nyonso azalaka na mposa ete báyeba ye. Kasi tolingaka ete básuka kaka te na koyeba biso. Tolingaka báyeba bomoto na biso mpe bándima mosala oyo tosali.​—Mitángo 11:16; Yobo 31:6.

2, 3. Nini ekoki kokóma soki tozali na mposa makasi ya koluka ete bato báyeba biso? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Kasi soki tokebi te, mposa na biso ya koluka ete bato báyeba biso ekoki koleka ndelo mpe kokóma mabe. Mokili ya Satana elingi ete tókóma na mposa ya koyebana mingi mpe tómimona ete tozali na ntina koleka. Soki esalemi bongo, tokopesa te Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe lokumu mpe losambo oyo ebongi na ye.​—Emoniseli 4:11.

3 Na mikolo ya Yesu, bakonzi mosusu ya mangomba bazalaki na makanisi mabe na likambo etali koluka kondimama. Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Bókeba na bakomeli oyo balingaka kolekaleka na bazambala mpe balingaka bambote na bazando mpe bakiti ya liboso na basinagoga mpe bisika ya lokumu mingi na ntango ya bilei ya mpokwa.” Mpe abakisaki boye: “Bakozwa lisambisi moko ya makasi koleka.” (Luka 20:46, 47) Kasi, Yesu akumisaki mwasi mobola oyo mobali akufá na ndenge apesaki mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza, oyo mbala mosusu moto te amonaki likambo asalaki. (Luka 21:1-4) Na ntembe te, ndenge oyo Yesu azalaki kotalela koyebana ekesanaki na basusu. Lisolo oyo ekosalisa biso tózala na makanisi ebongi na oyo etali koyebana, makanisi oyo Yehova alingi tózala na yango.

KOYEBANA OYO ELEKI MALAMU

4. Koyebana nini eleki malamu, mpe mpo na nini?

4 Koyebana nini eleki malamu? Ezali te koyebana oyo bato mingi balukaka na nzela ya bakelasi ya milai, kosala mombongo oyo efutaka malamu, to mpe koluka kokóma moto monene na lisano moko oyo eyebani mingi na mokili. Ntoma Paulo amonisaki koyebana oyo eleki malamu, ntango alobaki ete: “Sikoyo lokola boyebi Nzambe, to mpe sikoyo lokola Nzambe ayebi bino, ndenge nini bozali lisusu kozongela makambo mikemike ya mpamba mpe oyo ezangá ntina mpe bolingi lisusu kozala baombo na yango?” (Bagalatia 4:9) Ezali mpenza libaku malamu ndenge ‘Nzambe ayebi biso’ mpo azali Moyangeli ya Molɔ́ngɔ́ mobimba! Yehova ayebi biso malamu, alingaka biso mpe alingi ete tózala na boyokani malamu na ye. Akelá biso mpo tózala baninga na ye.​—Mosakoli 12:13, 14.

5. Tosengeli kosala nini mpo Nzambe ayeba biso?

5 Yehova azalaki kondima Moize. Ntango ayebisaki Yehova ete: “Salá ete nayeba banzela na yo,” Yehova ayanolaki ye ete: “Likambo oyo mpe, oyo olobi, nakosala yango, mpo ondimami na miso na ngai mpe nayebi yo na nkombo.” (Kobima 33:12-17) Yehova ayebi mokomoko na biso. Kasi tokosala nini mpo tókóma baninga na ye? Tosengeli kolinga ye mpe kopesa ye bomoi na biso.​—Tángá 1 Bakorinti 8:3.

6, 7. Nini ekoki kobebisa boninga na biso na Yehova?

6 Tosengeli kobatela boyokani malamu oyo tozali na yango na Tata na biso ya likoló. Ndenge moko na bakristo ya Galatia, biso mpe tosengeli koboya kozala baombo ya “makambo mikemike ya mpamba mpe oyo ezangá ntina.” (Bagalatia 4:9) Bakristo ya Galatia bakolaki na elimo mpe Nzambe ayebaki bango. Kasi, Paulo alobaki ete kaka bandeko yango bazalaki “lisusu kozongela” makambo ezangá ntina. Ezalaki lokola Paulo atunaki bango ete: ‘Mpo na nini bozongeli kosalela kaka makambo ya mpambampamba mpe oyo ezangá ntina?’

7 Likambo yango ekoki mpe kokómela biso lelo oyo? Ɛɛ, ekoki mpe kokóma. Ndenge moko na Paulo, ntango toyambaki solo, mbala mosusu totikaki koluka lokumu na mokili ya Satana. (Tángá Bafilipi 3:7, 8.) Ntango mosusu toboyaki ebongiseli moko efutela biso mbongo mpo na kotánga ofele, toboyaki mosala ya malamu, to libaku ya kozwa mbongo mingi. Mbala mosusu tolingaki koyebana mingi to kokóma na bozwi mingi mpo toyebi kobɛta miziki to kosala masano moko boye. Kasi totikaki nyonso wana. (Baebre 11:24-27) Ekozala likambo ya bozoba koyoka mawa mpo na bikateli ya malamu tozwaki mpe kokanisa ete bomoi na biso elingaki kozala malamu soki tósalaka makambo oyo totiká! Likanisi wana ekoki kotinda biso tózongela makambo ya mokili oyo, biloko oyo tomonaki ete ezali “makambo mikemike ya mpamba.” *

KOLISÁ MPOSA YA KONDIMAMA NA YEHOVA

8. Nini ekoki kokómisa makasi mposa na biso ya koluka ete Yehova andima biso?

8 Ndenge nini tokoki kokómisa makasi mposa na biso ya koluka ete Yehova andima biso, kasi mokili te? Ya liboso, Yehova andimaka ntango nyonso baoyo basalelaka ye na bosembo mpenza. (Tángá Baebre 6:10; 11:6) Yehova azwaka mosaleli na ye nyonso na motuya, mpe amonaka ete koboya kondima bango, ezali mpenza “kozanga boyengebene” mpe ayebaka ntango nyonso “bato na ye.” (2 Timote 2:19) Yehova “ayebi nzela ya bayengebene,” mpe ayebi ndenge ya kobikisa bango.​—Nzembo 1:6; 2 Petro 2:9.

9. Pesá bandakisa oyo emonisi ndenge Yehova andimaki basaleli na ye?

9 Na kala, makambo oyo Yehova asalaki emonisaki ete ayebaki bato na ye malamu. (2 Ntango 20:20, 29) Na ndakisa, kanisá ndenge abikisaki basaleli na ye na Mbu Motane ntango mampinga ya nguya ya basoda ya Farao ezalaki kolanda bango. (Kobima 14:21-30; Nzembo 106:9-11) Ezalaki mpenza likambo ya kokamwa mpo bato ya ntango wana bazalaki kolobela yango tii nsima ya mbula soki 40. (Yosua 2:9-11) Na ntembe te, koyeba ete Yehova alingaki basaleli na ye na ntango ya kala mpe abikisaki bango ezali mpenza kolendisa biso, mpo mosika te Goge ya Magoge ekobundisa biso! (Ezekiele 38:8-12) Na ntango yango, tokozala mpenza na esengo ndenge tokoluka ete Nzambe andima biso, kasi mokili te.

10. Likambo nini mosusu tosengeli kobosana te mpo na oyo etali koyebana na Yehova?

10 Ya mibale, tosengeli kotya motema ete Yehova akoki koyeba biso na ndenge oyo tokokaki kokanisa te. Soki bato bazali kosala makambo ya malamu kaka mpo bato bákumisa bango, Yehova akopesa bango mbano te. Mpo na nini? Mpo Yesu alobaki ete soki bato bazali kokumisa bango, mbano na bango nyonso yango wana. (Tángá Matai 6:1-5.) Kasi, Yehova “atalaka uta na esika ya kobombana” bato oyo basalelaka basusu makambo ya malamu, atako bazali komona bango te. Yehova amonaka oyo basalaka mpe apambolaka bango. Na bantango mosusu Yehova apesaka basaleli na ye mbano na ndenge oyo bakokaki kokanisa te. Tólobela mwa bandakisa yango.

YEHOVA ATYELAKI ELENGE MWASI MOKO LIKEBI

11. Ndenge nini Yehova andimaki Maria?

11 Yehova aponaki Maria, elenge mwasi moko ya komikitisa mpo azala mama ya Mwana na ye, Yesu. Maria azalaki kofanda na Nazarete, engumba moko ya moke oyo ezalaki mosika na Yerusaleme mpe tempelo na yango ya kitoko. (Tángá Luka 1:26-33.) Mpo na nini Maria azwaki libaku wana? Anzelu Gabriele ayebisaki ye ete ‘Nzambe amoniselaki ye boboto.’ Makambo oyo Maria ayebisaki Elizabeti mwa moke na nsima, emonisaki ete azalaki mpenza moninga ya Yehova. (Luka 1:46-55) Ya solo, Yehova atyelaki Maria likebi, mpe apambolaki ye na ndenge ya kokamwa mpo azalaki sembo epai na ye.

12, 13. Ndenge nini Yesu akumisamaki ntango abotamaki mpe ntango Maria amemaki ye na tempelo nsima ya mikolo 40?

12 Yehova ayebisaki banani ete Yesu abotami? Ayebisaki ata moto moko te ya lokumu to mokonzi moko na Yerusaleme to na Beteleme. Kasi, atindaki baanzelu mpe babimelaki babateli ya mpate, bato ya komikitisa oyo bazalaki kobatela mpate na bango na elanga, libándá ya Beteleme. (Luka 2:8-14) Na nsima, babateli ya mpate yango bakendaki kotala mwana oyo abotamaki. (Luka 2:15-17) Yozefe ná Maria bakamwaki komona ndenge Yesu akumisamaki. Ndenge oyo Yehova asalaka makambo ekeseni mpenza na Zabolo. Ntango Satana atindaki bato ya astroloji bákende kotala Yesu mpe baboti na ye, moto nyonso na Yerusaleme ayebaki ete Yesu abotami, mpe ekɔtisaki mobulungano. (Matai 2:3) Na yango, bana mosusu ebele babomamaki na nsima.​—Matai 2:16.

13 Mobeko oyo Yehova apesaki Bayisraele elobaki ete soki mwana mobali abotami, nsima ya mikolo 40 mama asengelaki kopesa Yehova mbeka. Na yango, Maria, Yozefe ná Yesu basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 9, kolongwa Beteleme tii Yerusaleme. (Luka 2:22-24) Mbala mosusu na nzela Maria azalaki komituna soki nganga-nzambe akosala likambo moko mpo na kokumisa Yesu. Yesu akumisamaki, kasi na ndenge oyo Maria azalaki kokanisa te. Yehova aponaki Simeone, mobali moko oyo azalaki “moyengebene mpe abangaka Nzambe” mpe aponaki Ana, mosakoli moko ya mwasi oyo mobali akufá mpe akómaki na mbula 84, mpo básakola ete Yesu akokóma Masiya to Kristo oyo alakamaki.​—Luka 2:25-38.

14. Mbano nini Yehova apesaki Maria?

14 Lokola Maria abɔkɔlaki Yesu mpe abatelaki ye malamu, Yehova akobaki kondima ye? Ɛɛ. Kutu Nzambe akomisaki na Biblia makambo mosusu oyo Maria alobaki mpe asalaki. Emonani ete Maria azalaki lisusu te na likoki ya kotambola elongo na Yesu na boumeli ya mbula misato na ndambo ntango azalaki kosakola. Mbala mosusu mpo mobali na ye akufaki, yango wana asengelaki kotikala na Nazarete. Ya solo, amonaki te makambo mosusu ebele ya malamu oyo Yesu asalaki. Kasi ntango Yesu akufaki azalaki wana. (Yoane 19:26) Na nsima Maria azalaki na Yerusaleme elongo na bayekoli ya Yesu liboso bázwa elimo santu na pantekote. (Misala 1:13, 14) Na ntembe te, atyamaki mafuta elongo na bayekoli oyo bazalaki wana. Soki esalemaki bongo, yango emonisi ete azwaki libaku ya koyangela elongo na Yesu na likoló mpo na libela. Ezali mpenza mbano moko kitoko mpo na mosala na ye ya sembo!

YEHOVA ANDIMAKI MWANA NA YE

15. Ndenge nini Yehova andimaki Yesu ntango azalaki awa na mabele?

15 Yesu aboyaki lokumu oyo eutaki epai ya bakonzi ya mangomba to ya politiki. Kasi mbala misato mongongo ya Yehova eyokanaki na likoló mpo na komonisa Mwana na ye ete alingaka ye. Yango elendisaki Yesu mingi mpenza! Kaka ntango Yesu azwaki batisimo na ebale Yordani, Yehova alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Emonani ete longola Yesu, kaka Yoane Mobatisi nde ayokaki maloba wana. Mbula soki moko na nsima liboso Yesu akufa, bantoma na ye misato bayokaki ndenge Yehova alobaki mpo na Yesu ete: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.” (Matai 17:5) Mpe ya nsuka, Yehova asololaki lisusu na Yesu, mwa mikolo liboso Yesu akufa.​—Yoane 12:28.

Ndenge oyo Yehova andimaki Mwana na ye eteyi yo nini? (Talá paragrafe 15-17)

16, 17. Ndenge nini Yehova akumisaki Yesu na ndenge moko ya kokamwa mpenza?

16 Yesu ayebaki ete bato bakobenga ye mofingi mpe akokufa liwa moko ya nsɔni. Kasi, abondelaki ete mokano ya Nzambe esalema kasi oyo ya ye te. (Matai 26:39, 42) “Ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni” mpo alingaki ete andimama na Tata na ye, kasi na bato ya mokili te. (Baebre 12:2) Ndenge nini Yehova amonisaki ete andimaki Yesu?

17 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, abondelaki mpo na kozongela nkembo oyo azalaki na yango na likoló elongo na Tata na ye. (Yoane 17:5) Biblia emonisi te ete Yesu alukaki kozwa nkembo koleka oyo akanisaki. Alukaki te ete azwa mbano ndenge asalaki mokano ya Yehova awa na mabele. Kasi Yehova asalaki nini? Akumisaki Yesu na ndenge moko ya kokamwa. Ntango Nzambe asekwisaki ye, mpe azongaki na likoló, “atombolaki ye likoló koleka.” Mpe akómisaki Yesu ekelamu ya elimo oyo akokufa lisusu te, eloko oyo apesaki ata moto mosusu te liboso! * (Bafilipi 2:9; 1 Timote 6:16) Ndenge oyo Yehova andimaki Yesu mpo na mosala na ye ya sembo, ezali mpenza kokamwisa!

18. Nini ekosalisa biso tóluka ete Yehova andima biso, kasi mokili te?

18 Nini ekosalisa biso tóluka kondimama na Yehova, kasi na mokili te? Tosengeli kotya motema ete Yehova ayebaka ntango nyonso basaleli na ye ya sembo mpe apesaka bango mbano, mpe mbala mingi asalaka yango na ndenge oyo bakoki kokanisa te. Tokoki kaka komeka kokanisa ndenge oyo Yehova akopesa biso mbano na mikolo ezali koya. Kasi mpo na sikoyo, ntango tozali koyika mpiko na mikakatano mpe bampasi na mokili oyo mabe, tosengeli kobosana te ete mokili oyo ezali koleka. Na yango, ata soki mokili endimi biso, ekozala ya ntango molai te mpo ezali koleka. (1 Yoane 2:17) Tata na biso ya bolingo, Yehova akobosana soki moke te mosala na biso mpe bolingo oyo tozali komonisela nkombo na ye mpo “azangi boyengebene te.” (Baebre 6:10) Na ntembe te, akomonisa ete andimi biso, mbala mosusu na ndenge oyo tokanisaki ata moke te!

^ par. 7 Mabongoli mosusu ya Biblia esaleli maloba “ezangá nguya mpe ntina te,” “biloko ya pɛtɛpɛtɛ mpe ya mpamba.”

^ par. 17 Ekokaki kozala ete Yesu akanisaki te kozwa mbano yango mpo ata esika moko te Makomami ya Ebre elobeli ekelamu ya elimo oyo azali na nzoto oyo ekoki kokufa te.