Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Miso na yo etalaka wapi?

Miso na yo etalaka wapi?

“Natomboli miso na ngai epai na yo, Ee Yo oyo ozali kofanda na likoló.”​—NZEMBO 123:1.

NZEMBO: 143, 124

1, 2. Kotala epai ya Yehova elimboli nini?

TOZALI kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza” oyo etondi na “mikakatano.” (2 Timote 3:1) Mpe bomoi ekokóma lisusu mpasi koleka liboso Yehova abebisa mokili oyo mabe mpe atya kimya ya solosolo awa na mabele. Na yango, tosengeli komituna boye: ‘Natalaka epai ya nani mpo na koluka lisalisi mpe litambwisi?’ Mbala mosusu okoki koloba “natalaka epai ya Yehova,” mpe yango ezali eyano eleki malamu.

2 Kotala epai ya Yehova elimboli nini? Mpe ndenge nini tokoki komindimisa ete miso na biso etalaka epai ya Yehova ntango tozali na mikakatano? Bambula ebele liboso, mokomi moko ya Biblia alimbolaki ntina oyo tosengeli mpenza kotala epai ya Yehova ntango tozali na mposa ya lisalisi. (Tángá Nzembo 123:1-4.) Alobaki ete ntango totalaka epai ya Yehova, ezali lokola mosaleli oyo azali kotala epai ya nkolo na ye. Na ndenge nini? Mosaleli atyaka motema ete nkolo na ye akopesa ye bilei mpe akobatela ye. Kasi asengeli mpe kotala nkolo na ye ntango nyonso mpo na koyeba likambo oyo nkolo na ye alingi ete asala, mpe na nsima asengeli kosala yango. Ndenge moko mpe, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe malamumalamu mpo na koyeba likambo oyo Yehova alingi tósala, mpe na nsima tosengeli kosala yango. Na yango, tokoki komindimisa ete Yehova akosalisa biso ntango tozali na mposa ya lisalisi.​—Baefese 5:17.

3. Nini ekoki kosala ete tótika kotala epai ya Yehova?

3 Atako toyebi ete tosengeli ntango nyonso kotala epai ya Yehova, kasi na bantango mosusu tobosanaka kosala yango. Yango ekómelaki Marta, moninga ya Yesu. Akómaki “komitungisa na ebele ya misala oyo azalaki kosala.” (Luka 10:40-42) Soki Marta, moto ya sembo amitungisaki mpo na makambo mosusu, atako Yesu azalaki wana elongo na ye, tosengeli kokamwa te soki biso mpe tokómi komitungisa mpo na makambo mosusu. Na yango, nini ekoki kosala ete tótika kotala epai ya Yehova? Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo makambo ya bato mosusu ekoki kolongola likebi na biso. Mpe tokomona ndenge oyo tokoki kokoba kotala epai ya Yehova.

MOTO YA SEMBO ABUNGISI LIBAKU

4. Mpo na nini tokoki kokamwa ndenge Moize abungisaki libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka?

4 Na ntembe te Moize atalaki epai ya Yehova mpo na koluka litambwisi. Biblia elobi ete “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Tángá Baebre 11:24-27.) Elobi lisusu ete “mosakoli moko abimá naino te na Yisraele lokola Moize, oyo Yehova ayebaki ye mpenza boye na elongi.” (Kolimbola Mibeko 34:10) Kasi, atako Moize azalaki mpenza moninga ya Yehova, abungisaki libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. (Mitángo 20:12) Likambo nini asalaki?

5-7. Likambo nini Bayisraele basalaki mwa moke nsima ya kobima na Ezipito, mpe Moize asalaki nini?

5 Pene ya sanza mibale nsima ya kobima na Ezipito, mpe liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, likambo moko ya mpasi esalemaki. Bana ya Yisraele babandaki komilelalela mpo mai ezalaki te. Bakómaki koimaima mpo na Moize, lokola makambo ekómaki ndongo, “Moize abelelaki Yehova ete ‘nakosala nini na bato oyo? Etikali moke bábamba ngai mabanga!’” (Kobima 17:4) Yehova apesaki Moize malako ya polele. Ayebisaki ye azwa nzete mpe abɛta na libanga na Horebe. Biblia elobi: “Moize asalaki bongo na miso ya mikóló ya Yisraele.” Na nsima mai ebandaki kobima mpe Bayisraele bazwaki mai ebele mpe batikaki koimaima.​—Kobima 17:5, 6.

6 Biblia elobi ete Moize apesaki esika yango nkombo Masa, oyo elimboli “komeka” mpe Meriba oyo elimboli “koswanisa.” Mpo na nini? “Mpo na koswanisa oyo bana ya Yisraele baswanisaki Moize mpe mpo bamekaki Yehova, na ndenge bazalaki koloba ete: ‘Yehova azali kati na biso to te?’”​—Kobima 17:7.

7 Yehova amiyokaki ndenge nini na likambo oyo esalemaki na Meriba? Amonaki ete bana ya Yisraele batombokelaki ye mpe bokonzi na ye, kasi kaka Moize te. (Tángá Nzembo 95:8, 9.) Bana ya Yisraele basalaki mpenza mabe. Na libaku wana, Moize asalaki malamu ndenge atalaki epai ya Yehova mpe alandaki malamumalamu malako na ye.

8. Nini esalemaki pene na nsuka ya mobembo ya Bayisraele na esobe?

8 Nzokande, mbula soki 40 na nsima, likambo ya ndenge wana esalemaki lisusu. Bayisraele bakómaki pene na nsuka ya mobembo na bango na esobe. Bakómaki kofanda pene na Kadeshe, mosika te na Mokili ya Ndaka. Esika yango mpe ebengamaki Meriba. * Mpo na nini? Mpo Bayisraele baimaimaki lisusu mpo mai ezalaki te. (Mitángo 20:1-5) Kasi na libaku oyo, Moize asalaki libunga moko monene.

9. Malako nini Yehova apesaki Moize, kasi Moize asalaki nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Moize asalaki nini ntango bato batombokaki? Atalaki lisusu epai ya Yehova mpo na koluka litambwisi. Kasi mpo na mbala oyo Yehova ayebisaki Moize te abɛta lingenda na ye na libanga. Ayebisaki ye nde akamata lingenda na ye, amema bato pene ya libanga mpe aloba na libanga. (Mitángo 20:6-8) Kasi, Moize asalaki bongo te. Ayokaki nkanda makasi mpe agangelaki bato, alobaki: “Bóyoka, sikoyo, bino batomboki! Tóbimisela bino mai na libanga oyo?” Na nsima abɛtaki na libanga, kaka mbala moko te, kasi mbala mibale.​—Mitángo 20:10, 11.

10. Yehova asalaki nini na likambo Moize asalaki?

10 Yehova asilikelaki Moize makasi. (Kolimbola Mibeko 1:37; 3:26) Mpo na nini Yehova asilikelaki ye? Moko ya bantina ekoki kozala mpo Moize atosaki te malako oyo Yehova apesaki ye.

11. Mpo na nini likambo oyo Moize asalaki ekokaki kotinda Bayisraele bákanisa ete Yehova asalaki likamwisi te?

11 Ezalaki mpe na ntina mosusu oyo mbala mosusu etindaki Yehova asilika. Mabanga oyo ezali na Meriba ya liboso ezali makasi mpenza. Ata soki moto abɛti eloko na libanga na makasi ya ndenge nini, ezali mpasi mpenza mai ebima. Nzokande mabanga oyo ezali na Meriba ya mibale ekeseni mpenza na oyo ya liboso. Mingi na yango ezali lokola libanga oyo babengi calcaires. Lokola calcaires ezalaka mpenza makasi te, mbala mingi mai ekɔtaka na kati na yango mpe efandaka na nse. Na nsima, bato bakoki kozwa mai yango soki basali lidusu. Na yango, ntango Moize abɛtaki libanga na esika aloba na yango, ekokaki nde kotinda Bayisraele bákanisa ete mai ebimaki yango moko, kasi ezali likamwisi ya Yehova te? * Toyebi mpenza te.

NDENGE OYO MOIZE AMONISAKI BOTOMBOKI

12. Likambo nini mosusu ekokaki kotinda Yehova asilikela Moize ná Arona?

12 Ekoki kozala mpe na ntina mosusu oyo etindaki Yehova asilikela Moize ná Arona. Moize alobaki na bato ete: “Tóbimisela bino mai na libanga oyo?” Ntango Moize alobaki “to,” ekoki kozala ete azalaki koloba mpo na ye ná Arona. Likambo oyo Moize alobaki emonisaki ete azangaki botosi mpo apesaki Yehova lokumu te mpo na likamwisi wana. Nzembo 106:32, 33 elobi boye: “Lisusu na mai ya Meriba, batumolaki, bongo makambo ebebelaki Moize mpo na bango. Mpo basilikisaki elimo na ye mpe na mbɛbu na ye, abandaki koloba maloba oyo akanaki te.” * (Mitángo 27:14) Moize apesaki te Yehova lokumu oyo ebongi na ye. Yehova alobaki na Moize ná Arona ete: “Bino botombokelaki etinda na ngai.” (Mitángo 20:24) Ezalaki lisumu monene mpenza!

13. Mpo na nini ezalaki likambo ya bosembo mpe ya boyengebene ete Yehova apesa Moize etumbu?

13 Yehova asɛngaki Moize ná Arona makambo mingi mpo apesaki bango mokumba ya kotambwisa libota na ye. (Luka 12:48) Mwa moke liboso, lokola libota mobimba ya ekólo Yisraele etombokaki, Yehova azwaki ekateli ete ekɔta te na Mokili ya Ndaka. (Mitángo 14:26-30, 34) Na yango lokola Moize atombokaki, ezalaki likambo ya bosembo mpe ya boyengebene ete Yehova apesa ye etumbu kaka ndenge apesaki Bayisraele mosusu. Moize ná Bayisraele mosusu oyo batombokaki bakɔtaki te na Mokili ya Ndaka.

NTINA YA LIKAMBO

14, 15. Nini etindaki Moize atombokela Yehova?

14 Likambo nini etindaki Moize atombokela Yehova? Talá lisusu maloba ya Nzembo 106:32, 33, elobi boye: “Lisusu na mai ya Meriba, batumolaki, bongo makambo ebebelaki Moize mpo na bango. Mpo basilikisaki elimo na ye mpe na mbɛbu na ye, abandaki koloba maloba oyo akanaki te.” Atako Bayisraele batombokelaki Yehova, kasi Moize nde asilikaki. Azangaki komipekisa mpe akanisaki te mabe oyo maloba na ye ekokaki kosala.

15 Moize atikaki ete makambo ya basusu elongola likebi na ye mpe atikaki kotala epai ya Yehova. Mbala ya liboso ntango bato bamilelaki mpo na mai, Moize asalaki kaka ndenge Yehova ayebisaki ye. (Kobima 7:6) Kasi ekoki kozala ete alɛmbaki nzoto mpe asilikaki mpo Bayisraele bamonisaki ezaleli ya botomboki na boumeli ya bambula ebele. Ntango mosusu Moize atyaki likebi nde na oyo azalaki komiyoka, kasi te na ndenge oyo akokaki kopesa Yehova nkembo.

16. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na likambo oyo Moize asalaki?

16 Soki Moize mosakoli ya sembo atikaki mpo na mwa ntango kotala epai ya Yehova mpe asalaki lisumu, yango ekoki mpe kokómela biso. Moize akómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, biso mpe tokómi pene ya kokɔta na mokili ya sika. (2 Petro 3:13) Moto moko te akolinga azanga libaku wana ya kitoko. Kasi mpo tókɔta na mokili ya sika, tosengeli kokoba kotala epai ya Yehova mpe kotosa ye ntango nyonso. (1 Yoane 2:17) Mateya nini tokoki kozwa na likambo oyo Moize asalaki?

MAKAMBO YA BASUSU EPEKISA YO TE KOTALA EPAI YA YEHOVA

17. Tosengeli kosala nini mpo tósilikaka nokinoki te?

17 Zalá na komipekisa ata soki basilikisi yo. Na bantango mosusu mokakatano moko ekoki kokómela biso mbala na mbala. Kasi Biblia elobi ete: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.” (Bagalatia 6:9; 2 Batesaloniki 3:13) Soki basali biso likambo ya mabe mbala na mbala, tokopekisa lolemo na biso mpe tokosilika nokinoki te? (Masese 10:19; 17:27; Matai 5:22) Soki batumoli biso, tosengeli koyekola ‘kotikela nde nkanda esika’ elingi koloba kotikela Yehova nkanda. (Tángá Baroma 12:17-21.) Yango elimboli nini? Na esika ya kosilika, tosengeli kozala motema molai mpe kotika ete Yehova akata likambo na ntango oyo alingi. Soki toluki kozongisa mabe na mabe na sika ya kotala epai ya Yehova, ekomonisa ete tozali kotosa ye te.

18. Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali kolanda malako?

18 Landá na likebi mpenza malako ya sika. Tolandaka na likebi mpenza malako ya sika oyo Yehova apesaka biso? Soki ɛɛ, tokokoba kosala makambo te ndenge tomesanaki kosala liboso. Kutu, tokokakatana te kotosa malako nyonso Yehova apesaka biso na nzela ya ebongiseli na ye. (Baebre 13:17) Tosengeli mpe kokeba ete ‘tókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá.’ (1 Bakorinti 4:6) Soki tozali kolanda na likebi malako ya Yehova, ekomonisa ete tozali kokoba kotala epai na ye.

Mateya nini tosengeli kozwa na likambo oyo Moize asalaki ntango basusu basalaki mabunga? (Talá paragrafe 19)

19. Tokoki kosala nini mpo mabunga ya basusu ebebisa te boninga na biso na Yehova?

19 Kotika te ete mabunga ya basusu ebebisa boninga na yo na Yehova. Soki tokobi kotala epai ya Yehova, tokobebisa te boninga na biso na ye mpe tokosilika noki te soki basali biso mabe. Yango ezali na ntina mingi soki, lokola Moize biso mpe tozali na mikumba na ebongiseli ya Nzambe. Ya solo, mpo tóbika, biso nyonso tosengeli kosala makasi mpe kotosa Yehova. (Bafilipi 2:12) Kasi, soki tozali na mikumba ebele, Yehova akosɛnga biso mpe makambo mingi. (Luka 12:48) Soki tolingaka mpenza Yehova, eloko moko te ekokabola biso na bolingo na ye.​—Nzembo 119:165; Baroma 8:37-39.

20. Ekateli nini tosengeli kozwa?

20 Tozali kobika na ntango moko ya mpasi mpe ya mikakatano. Na yango, ezali na ntina ete miso na biso ekoba kotala epai ya Yehova, oyo ‘afandaka na likoló,’ mpo na koyeba likambo alingi tósala. Tosengeli kotika te ete makambo ya basusu ebebisa boninga na biso na Yehova. Likambo oyo ekómelaki Moize ezali koteya biso mpenza. Na esika ya kosala mabe ntango basusu basali mabunga, tiká ete tózwa ekateli ya ‘kotala Yehova Nzambe na biso kino akomonisela biso boboto.’​—Nzembo 123:1, 2.

^ par. 8 Meriba oyo ekesanaki na Meriba mosusu oyo ezalaki pene ya Refidime, oyo bazalaki mpe kobenga yango Masa. Kasi, bisika yango nyonso mibale ebengami Meriba, mpamba te Bayisraele baimaimaki na bisika yango.​—Talá karte oyo ezali na Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe eteni 7.

^ par. 11 Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi ete na kotalela mimeseno ya Bayuda, batomboki balobaki ete yango ezali likamwisi te mpo Moize ayebaki ete mai ezalaki na kati ya libanga yango. Yango wana balingaki asala lisusu likamwisi yango na libanga mosusu. Ya solo, ezalaki likambo ya sika te mpo na bango.

^ par. 12 Talá lisolo “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/1987, na Français.