Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Soki mwasi ná mobali oyo babalani te balekisi butu mobimba elongo kozanga ntina oyo ebongi, yango emonisi nde ete lisumu esalemi mpe bankulutu basengeli kosambisa bango?

Ɛɛ, kolekisa butu mobimba elongo kozanga ntina oyo ebongi ezali mpenza komonisa ete pite esalemaki. Soki bantina oyo ebongi ezali, esengeli kosala komite ya kosambisa.​—1 Bakorinti 6:18.

Lisangani ya bankulutu basengeli kotalela malamumalamu makambo nyonso mpo na kokata soki esengeli kosala komite ya kosambisa. Na ndakisa, bandeko yango bakolisaki lolango na boninga na bango? Bankulutu bapesaki bango toli liboso mpo na etamboli na bango? Nini esali ete bálekisa butu elongo? Babongisaki makambo liboso? Likambo mosusu ya kosala ezalaki te, to likambo moko esalemaki oyo elekaki bango motó, na ndakisa, likambo moko oyo ekanami te esalemaki oyo esalaki ete bázala na likambo mosusu ya kosala te kaka kolekisa butu elongo? (Mosakoli 9:11) Balalaki esika nini? Makambo nyonso ezalaka ndenge moko te, na yango makambo mosusu oyo bankulutu bataleli ekoki kosala ete ekateli ezala ndenge moko te.

Nsima ya kotalela makambo nyonso, bankulutu bakokata soki esengeli kosala komite ya kosambisa.