Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nani azali na ngámbo ya Yehova”

“Nani azali na ngámbo ya Yehova”

“Okobanga Yehova Nzambe na yo. Okosalela ye, mpe okokangama na ye.”​—KOLIMBOLA MIBEKO 10:20.

NZEMBO: 28, 32

1, 2. (a) Mpo na nini kozala na ngámbo ya Yehova ezali likambo ya bwanya? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

KOKANGAMA na Yehova ezali likambo ya bwanya. Moto moko te azali na nguya, bwanya, mpe bolingo lokola Nzambe! Nani akolinga kozala na ngámbo na ye te? (Nzembo 96:4-6) Kasi, basaleli mosusu ya Yehova bakakatanaki ntango esɛngaki bápona ngámbo ya Yehova.

2 Na lisolo oyo, tokolobela bandakisa ya bato mosusu oyo balobaki ete bazali na ngámbo ya Yehova, mpe kaka na ntango wana bazalaki kosala makambo oyo Yehova ayinaka. Mateya ya ntina mingi oyo tokozwa na bandakisa na bango ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova.

YEHOVA ATALATALAKA MITEMA NA BISO

3. Mpo na nini Yehova alukaki kosalisa Kaina, mpe ayebisaki ye nini?

3 Tótalela ndakisa ya Kaina. Azalaki kosambela banzambe ya lokuta te, atako bongo Yehova andimaki losambo na ye te. Mpo Kaina akolisaki makanisi ya mabe na motema na ye. (1 Yoane 3:12) Yehova akebisaki ye na maloba oyo: “Soki obandi kosala makambo ya malamu, okondimama te? Kasi soki osali makambo ya malamu te, lisumu ebatami na monɔkɔ ya ndako na yo, mpe ezali na mposa ya kokanga yo; mpe yo, okokoka kolonga yango?” (Ebandeli 4:6, 7) Yehova amonisaki polele ete soki Kaina abongoli motema mpe aponi kozala na ngámbo na ye, ye mpe akokóma na ngámbo ya Kaina.

4. Kaina asalaki nini ntango azwaki libaku ya kopona kozala na ngámbo ya Yehova?

4 Soki Kaina abongolaki makanisi na ye, Yehova alingaki kondima losambo na ye. Kasi aboyaki koyoka toli ya Nzambe. Makanisi mpe mposa na ye ya moimi ememaki ye tii na kosala likambo moko ya mabe. (Yakobo 1:14, 15) Ntango Kaina azalaki elenge mbala mosusu akanisaki te ete akotɛmɛla Yehova mokolo mosusu. Kasi sikoyo aboyi koyoka toli ya Nzambe, atombokeli ye, mpe abomi ndeko na ye!

5. Makanisi ya ndenge nini ekoki kosala ete Yehova andima biso lisusu te?

5 Ndenge moko na Kaina, lelo oyo mokristo akoki koloba ete asambelaka Yehova mpe kaka na ntango yango asalaka makambo oyo Yehova ayinaka. (Yuda 11) Ekoki kozala ete asakolaka mpe azangisaka makita te. Kasi, kaka na ntango yango, akoki kotika ete makanisi ya mbindo, ya lokoso, to makanisi ya koyina basusu ezwa misisa na motema na ye. (1 Yoane 2:15-17; 3:15) Makanisi ya ndenge wana ekoki komema na kosala lisumu. Atako basusu bakoki te koyeba makanisi mpe misala na biso, kasi Yehova ayebi yango. Ayebi soki tozali mpenza na ngámbo na ye.​—Tángá Yirimia 17:9, 10.

6. Ndenge nini Yehova asalisaka biso tólonga bamposa mabe?

6 Ata ntango tosali mabunga, Yehova abwakaka biso mbala moko te. Ntango tobandi kokende na nzela moko ya mabe, Yehova alobaka na biso ete: “Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino.” (Malaki 3:7) Yehova ayebi ete tozali na bolɛmbu oyo tobundaka na yango. Kasi alingi ete tózala makasi mpe tótɛmɛla oyo ezali mabe. (Yisaya 55:7) Soki tosali yango, alaki ete akosalisa biso mpe akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na kolonga bamposa mabe.​—Ebandeli 4:7.

TÓMIKOSA TE

7. Ndenge nini Salomo abebisaki boninga na ye na Yehova?

7 Tokoki kozwa mateya ebele na ndakisa ya Mokonzi Salomo. Na bolenge na ye, azalaki na boyokani malamu na Yehova. Nzambe apesaki ye bwanya mingi mpe mosala ya ntina ya kotonga tempelo kitoko na Yerusaleme. Kasi, Salomo abebisaki boninga na ye na Yehova. (1 Bakonzi 3:12; 11:1, 2) Mobeko ya Nzambe elobaki polele ete mokonzi asengelaki te “kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa.” (Kolimbola Mibeko 17:17) Salomo atosaki mobeko yango te, mpe nsukansuka abalaki basi 700 mpe akómaki na bamakango 300! (1 Bakonzi 11:3) Mingi kati na basi yango bazalaki bapaya oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Na yango, Salomo abukaki mpe mobeko ya Nzambe oyo epekisaki kobala basi-bapaya.​—Kolimbola Mibeko 7:3, 4.

8. Ndenge nini Salomo asilikisaki Yehova?

8 Mokemoke, Salomo atikaki kolinga Yehova mpe mibeko na ye. Nsukansuka, asalaki makambo ya mabe mpenza. Atongaki etumbelo mpo na nzambe-mwasi Ashitorete mpe Kemoshe, na nsima akómaki kosambela banzambe yango elongo na basi na ye. Kutu, Salomo atongaki bitumbelo yango na ngomba oyo etalani na Yerusaleme, esika oyo atongaki tempelo ya Yehova! (1 Bakonzi 11:5-8; 2 Bakonzi 23:13) Mbala mosusu Salomo azalaki kokanisa ete lokola azalaki kokoba kopesa bambeka na tempelo, Yehova akolandela te makambo mabe oyo azalaki kosala.

9. Nini esalemaki ntango Salomo atosaki te makebisi ya Nzambe?

9 Kasi Yehova alekisaka masumu kaka boye te. Biblia elobi ete: “Yehova asilikelaki Salomo, mpamba te motema na ye ebendamaki, etiki Yehova . . . , oyo abimelaki ye mbala mibale. Mpe mpo na likambo yango, apesaki ye mitindo ete alanda banzambe mosusu te; kasi ye atosaki te makambo oyo Yehova apesaki ye mitindo.” Na yango, Nzambe andimaki ye lisusu te mpe asundolaki ye. Bakitani ya Salomo bayangelaki te na libota mobimba ya Yisraele, mpe mabota oyo elandaki nsima enyokwamaki mingi mpenza.​—1 Bakonzi 11:9-13.

10. Nini ekoki kobebisa boninga na biso na Yehova?

10 Ndenge esalemaki mpo na Salomo, soki toponi baninga oyo batosaka mitinda ya Yehova te, bakoki kobebisa makanisi na biso mpe kobebisa boninga na biso na Yehova. Ekoki kozala ete basusu bazali bandeko na biso ya lisangá, kasi bazali na boninga makasi te na Yehova. To mpe bakoki kozala bandeko ya libota, baninga ya kartye, ya mosala, to ya kelasi oyo basambelaka Yehova te. Soki tozali kolekisa ntango na bato oyo batosaka mitinda ya Yehova te, tokoki kokóma mpenza lokola bango mpe tokoki kobebisa boninga na biso na Nzambe.

Bato oyo olekisaka ntango elongo na bango bakoki kosala nini na boninga na yo na Yehova? (Talá paragrafe 11)

11. Nini ekoki kosalisa biso tópona baninga ya malamu?

11 Tángá 1 Bakorinti 15:33. Bato mingi bazalaka na bizaleli mosusu ya malamu. Mpe baoyo basambelaka Yehova te mbala mosusu basalaka kaka makambo ya mabe te. Ntango mosusu oyebi mpe bato ya ndenge wana. Yango elingi nde koloba ete bazali baninga malamu? Bakoki kosala nini na boninga na yo na Yehova? Basalisaka yo okóma moninga ya Yehova? Makambo nini ezali mpenza na ntina na miso na bango? Balobelaka makambo nini? Masolo na bango ezalaka kaka ya molato ya mikolo oyo, mbongo, baaparɛyi, kominanola, mpe makambo mosusu ya ndenge wana? Mbala mingi balobaka mabe mpo na basusu? Basepelaka koloba masɛki ya nsɔni? Yesu alobaki ete: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Matai 12:34) Soki omoni ete bato oyo bolekisaka ntango elongo bazali kobebisa boninga na yo na Yehova, salá ete olekisaka ntango mingi te na bango, mpe soki esengeli, katá boninga ya ndenge wana.​—Masese 13:20.

YEHOVA ASƐNGAKA BISO TÓSAMBELA KAKA YE

12. (a) Mwa moke nsima ya kobima na Ezipito, Yehova ayebisaki Bayisraele nini? (b) Ntango Yehova asɛngaki Bayisraele básambela kaka ye bapesaki eyano nini?

12 Tokoki mpe kozwa mateya na makambo elekaki mwa moke nsima ntango Yehova abimisaki Bayisraele na boombo na Ezipito. Ntango bayanganaki liboso ya ngomba Sinai, Yehova amimonisaki epai na bango na ndenge ya kokamwa! Bamonaki bankake ná mikalikali, ná lipata moko ya monene mpe bayokaki lokito makasi mpenza ya liseke. (Kobima 19:16-19) Na nsima, bayokaki mongongo ya Yehova ezali koloba ete azali “Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.” Apesaki mpe elaka ete akozala sembo epai ya baoyo balingaka ye mpe batosaka mibeko na ye. (Tángá Kobima 20:1-6.) Yehova amonisaki Bayisraele polele ete soki batikali na ngámbo na ye, ye mpe akozala na ngámbo na bango. Soki ozalaki na kati ya bato wana ebele, koyoka maloba ya Yehova elingaki kosala ete omiyoka ndenge nini? Na ntembe te, olingaki koyanola lokola Bayisraele, oyo balobaki: “Maloba nyonso oyo Yehova alobi, tokosalela yango.” (Kobima 24:3) Kasi eumelaki te, likambo moko oyo ekanamaki te etyaki Bayisraele na komekama.

13. Likambo nini etyaki bosembo ya Bayisraele na komekama?

13 Bayisraele babangaki mpenza ndenge oyo Nzambe amonisaki nguya na ye, yango wana Moize amataki na ngomba Sinai mpo na kosolola na Yehova mpo na bango. (Kobima 20:18-21) Kasi Moize aumelaki na ngomba. Emonani lokola ete Bayisraele bayebaki te básala nini mpo motambwisi na bango azalaki te. Basalaki nini? Ekoki kozala ete batyaki motema mingi epai ya Moize, moto oyo azalaki kotambwisa bango. Babandaki komitungisa mpe balobaki na Arona ete: “Tɛlɛmá, salelá biso nzambe oyo akotambola liboso na biso, mpamba te Moize yango, moto oyo abimisaki biso na mokili ya Ezipito, toyebi mpenza te nini ekómeli ye.”​—Kobima 32:1, 2.

14. Makanisi nini ya libunga Bayisraele bazalaki na yango, mpe Yehova asalaki nini?

14 Bayisraele bayebaki ete ezalaki mabe kosambela bikeko. (Kobima 20:3-5) Kasi eumelaki te babandaki kosambela mwana-ngɔmbɛ! Atako batosaki mibeko ya Yehova te, batyaki na makanisi ete bazalaki kaka na ngámbo na ye. Kutu Arona abengaki losambo ya mwana-ngɔmbɛ yango “fɛti mpo na Yehova”! Yehova asalaki nini? Ayebisaki Moize ete bato “babebisi makambo” mpe “balongwe nzela oyo napesaki bango mitindo.” Yehova ayokaki nkanda makasi kutu akanisaki ata koboma ekólo mobimba.​—Kobima 32:5-10.

15, 16. Ndenge nini Moize ná Arona bamonisaki mpenza ete bazalaki na ngámbo ya Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

15 Kasi, Yehova azali Nzambe ya motema mawa. Azwaki ekateli ya koboma ekólo yango te. Kutu, apesaki Bayisraele libaku ya komonisa ete balingi kozala na ngámbo na ye. (Kobima 32:14) Ntango Moize amonaki ete bato bazalaki koganga, koyemba, mpe kobina liboso ya ekeko, apanzaki mwana-ngɔmbɛ mpe atutaki yango tii ekómaki putulu. Na nsima agangaki ete: “Nani azali na ngámbo ya Yehova? Aya epai na ngai!” Mpe “bana mibali nyonso ya Levi babandaki koyangana epai” ya Moize.​—Kobima 32:17-20, 26.

16 Atako Arona asalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo, abongolaki motema mpe elongo na bana ya Levi mosusu, baponaki ngámbo ya Yehova. Bato wana ya sembo bamonisaki polele ete bazalaki te na ngámbo ya basumuki wana. Bazwaki ekateli ya malamu, mpo kaka na mokolo wana, bankóto ya bato oyo basambelaki mwana-ngɔmbɛ bakufaki. Kasi baoyo bazalaki na ngámbo ya Yehova bakufaki te, mpe Nzambe alobaki ete akopambola bango.​—Kobima 32:27-29.

17. Liteya nini tozwi na makambo oyo ntoma Paulo akomaki mpo na mwana-ngɔmbɛ ya wolo?

17 Likambo yango eteyi biso nini? Ntoma Paulo alobaki: “Makambo wana ekómi bandakisa na biso,” mpo biso tózala “basambeli ya bikeko te.” Paulo alimbolaki ete masolo yango “ekomamaki mpo ezala likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo. Na yango, moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.” (1 Bakorinti 10:6, 7, 11, 12) Ndenge Paulo amonisaki yango, ata bato oyo basambelaka Yehova bakoki kosala makambo oyo ezali mabe. Bakoki kokanisa ete Yehova azali kokoba kondima bango. Kasi, ezali te mpo moto alingi kozala moninga ya Yehova to alobi ete azali sembo epai ya Yehova nde emonisi ete Yehova akondima ye kaka.​—1 Bakorinti 10:1-5.

18. Nini ekoki kosala ete tókóma mosika na Yehova, mpe yango ekoki kobimisa makama nini?

18 Bayisraele bakanisaki ete Moize akoumela te na ngomba Sinai, lokola aumelaki babandaki komitungisa. Soki nsuka ya ebongiseli oyo eyei te ndenge oyo tozali kokanisa, biso mpe tokoki kokóma komitungisa. Tokoki mbala mosusu kokanisa ete makambo kitoko oyo Yehova alaki biso ekokokisama mpenza te, mpe tokoki kotya makanisi nyonso na bamposa na biso ya mosuni na esika ya kosala mokano ya Nzambe. Soki tokebi te, tokoki kokóma mosika na Yehova mpe kobanda kosala makambo oyo tokanisaki kosala ata mokolo moko te.

19. Likambo nini tosengeli ntango nyonso kobosana te, mpe mpo na nini?

19 Yehova asɛngaka biso tótosa ye na motema na biso mobimba mpe tósambela kaka ye. (Kobima 20:5) Mpo na nini asɛngi biso bongo? Mpo alingaka biso. Soki tozali kosala te oyo Yehova alingi, tokosala oyo Satana alingi, mpe yango ekoki komemela biso mpasi. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bokoki te komɛla kɔpɔ ya Yehova mpe kɔpɔ ya bademo; bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.”​—1 Bakorinti 10:21.

KANGAMÁ NA YEHOVA

20. Ndenge nini Yehova asalisaka biso ata ntango tosali libunga?

20 Kaina, Salomo, mpe Bayisraele nyonso bazwaki libaku ya kobongola motema mpe kobongisa bizaleli na bango. (Misala 3:19) Ezali polele ete Yehova asundolaka mbala moko te bato kaka mpo basali libunga. Kanisá ndenge alimbisaki Arona. Lelo oyo, Yehova akebisaka biso na bolingo mpenza mpo na kobatela biso tósala te oyo ezali mabe. Asalelaka Biblia, mikanda na biso, mpe bandeko na biso bakristo. Soki tozali kotya likebi na makebisi ya Yehova, tokomindimisa ete akomonisela biso motema mawa.

21. Tosengeli kosala nini soki bosembo na biso epai ya Yehova etyami na komekama?

21 Boboto monene ya Yehova ezali na ntina. (2 Bakorinti 6:1) Epesaka biso libaku ya ‘koboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili.’ (Tángá Tito 2:11-14.) Lokola tozali na mokili oyo, ekozala kaka na makambo oyo ekotya bosembo na biso epai Yehova na komekama. Zalá na ekateli ya kotikala na ngámbo ya Yehova, mpe kobosana te etinda oyo: “Okobanga Yehova Nzambe na yo. Okosalela ye, mpe okokangama na ye”!​—Kolimbola Mibeko 10:20.