Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tozali bato ya Yehova

Tozali bato ya Yehova

“Esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango, bato oyo ye aponi bázala libula na ye.”​—NZEMBO 33:12.

NZEMBO: 40, 50

1. Mpo na nini tokoki koloba ete biloko nyonso ezali ya Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

BILOKO nyonso ezali ya Yehova! ‘Likoló, ɛɛ mosika kuna na likoló mpenza, ná mabele ná nyonso oyo ezali na kati,’ ezali ya Yehova. (Kolimbola Mibeko 10:14; Emoniseli 4:11) Lokola Yehova akelá bato, biso nyonso tozali bato na ye. (Nzembo 100:3) Kasi, na boumeli ya lisolo ya bato, Nzambe asilá kopona etuluku moko ya bato mpo bázala bato na ye moko mpenza.

2. Na Biblia banani Yehova aponaki bázala mpenza bato na ye?

2 Na ndakisa, Nzembo 135 elobeli basaleli ya Yehova ya sembo na Yisraele ya kala lokola “eloko na ye moko.” (Nzembo 135:4) Lisusu, Hosea asakolaki ete bato mosusu oyo bazali Bayisraele te bakokóma bato ya Yehova. (Hosea 2:23) Esakweli wana ekokisamaki na mobu 36 ya T.B, ntango Yehova akómaki mpe kopona bato oyo bazalaki Bayisraele te mpo báyangela elongo na Kristo na likoló. (Misala 10:45; Baroma 9:23-26) Bato yango oyo batyami mafuta na elimo babengami “ekólo moko mosantu.” Bazali ‘eloko ya Yehova ye moko.’ (1 Petro 2:9, 10) Kasi tokoloba nini mpo na bakristo ya sembo nyonso oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele? Yehova abengi mpe bango “bato na ngai” mpe “bato oyo naponi.”​—Yisaya 65:22.

3. (a) Lelo oyo, Yehova aponi banani bázala bato na ye? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Lelo oyo, “etonga moke,” oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na likoló, mpe “bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele, bango nyonso basambelaka Yehova elongo lokola “etonga kaka moko.” (Luka 12:32; Yoane 10:16) Tolingi mpenza komonisa botɔndi epai ya Yehova ndenge aponá biso tózala bato na ye mpenza. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge tokoki komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova mpo na lokumu monene oyo apesi biso.

TOPESÁ YEHOVA BOMOI NA BISO

4. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi ndenge Yehova andimi tózala na boyokani malamu na ye, mpe ndenge nini Yesu asalaki yango?

4 Tomonisaka botɔndi na biso epai ya Yehova ntango tomipesaka na ye mpe tozwaka batisimo. Na ndenge yango bato nyonso bamonaka ete tokómi bato ya Yehova mpe tolingi kotosa ye. (Baebre 12:9) Yesu asalaki likambo ya ndenge wana ntango azwaki batisimo. Atako azalaki na kati ya ekólo oyo emipesaki na Yehova, ye moko mpe amipesaki lisusu na Yehova. Ezalaki lokola nde alobaki boye: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.”​—Nzembo 40:7, 8.

5, 6. (a) Yehova alobaki nini ntango Yesu azwaki batisimo? (b) Ndakisa nini ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokaka ntango tomipesaka epai na ye?

5 Yehova ayokaki ndenge nini ntango Yesu azwaki batisimo? Biblia elobi ete: “Nsima ya kobatisama, na mbala moko Yesu abimaki na mai; mpe talá! likoló efungwamaki, mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokitela ye lokola ebenga. Mpe talá! Mongongo moko eutaki na likoló elobi: ‘Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.’” (Matai 3:16, 17) Banda kala Yesu azalaki moto ya Yehova. Kasi Yehova asepelaki ntango Yesu apesaki bomoi na ye mpo na kosala mokano na ye. Ndenge moko mpe, Yehova asepelaka ntango tomipesaka na ye, mpe akopambola biso.​—Nzembo 149:4.

6 Lokola biloko nyonso ezali ya Yehova, tokoki kopesa ye nini? Kanisá ete moto moko azali na bafololo ya kitoko na elanga na ye. Mokolo moko mwana na ye ya mwasi ya moke abuki fololo moko mpe apesi ye yango. Atako fololo yango ezali ya tata, akosepela mingi na likabo yango. Mpo yango ezali komonisa ete mwana alingaka tata na ye. Fololo oyo mwana apesi ezali na motuya koleka bafololo mosusu nyonso oyo ezali na elanga. Ndenge moko mpe, Yehova asepelaka ntango topesi ye bomoi na biso mobimba.​—Kobima 34:14.

7. Ndenge nini Malaki asalisi biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokaka mpo na baoyo basalelaka ye na motema mobimba?

7 Tángá Malaki 3:16. Mpo na nini ezali na ntina ete omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo? Ezali solo ete ntango kaka obandaki kosalema na libumu, na ntango wana ozalaki moto ya Yehova, oyo azali Mozalisi ya biloko nyonso. Kanisá esengo oyo Yehova akozala na yango soki ondimi ye lokola Mokonzi mpe omipesi na ye! (Masese 23:15) Yehova ayebi baoyo basalelaka ye na motema mobimba, mpe akomaka bankombo na bango na “buku ya kokanisama.”

8, 9. Yehova asɛngaka nini na bato oyo akomá bankombo na bango na ‘buku na ye ya kokanisama’?

8 Soki tolingi ete nkombo na biso etikala na “buku ya kokanisama” ya Yehova, ezali na likambo oyo tosengeli kosala. Malaki alobaki ete tosengeli kobanga Yehova mpe komanyola nkombo na ye. Soki tosambelaka moto to eloko moko boye, nkombo na biso ekolongolama na buku ya Yehova!​—Kobima 32:33; Nzembo 69:28.

9 Na yango, tosengeli kosuka kaka te na kopesa Yehova elaka ya kosala mokano na ye mpe kozwa batisimo. Ezali na makambo oyo tosalaka kaka mbala moko, kasi kosambela Yehova ezali likambo ya bomoi mobimba. Mikolo nyonso ya bomoi na biso, tosengeli komonisa na misala ete totosaka Yehova.​—1 Petro 4:1, 2.

TOBOYAKA BAMPOSA YA MOKILI

10. Bokeseni nini esengeli kozala kati na baoyo basalelaka Yehova mpe baoyo basalelaka ye te?

10 Na lisolo eleki, tomonaki ete Kaina, Salomo, mpe Bayisraele balobaki ete basambelaka Yehova, kasi batikalaki sembo epai na ye te. Bandakisa wana eteyi biso ete tosengeli te kosuka kaka na koloba ete tosambelaka Yehova. Tosengeli koyina oyo ezali mabe mpe kolinga oyo ezali malamu. (Baroma 12:9) Yehova alobaki ete bokeseni mpenza ekozala “kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.”​—Malaki 3:18.

11. Mpo na nini esengeli kozala mpasi te bato nyonso bámona ete tosambelaka kaka Yehova?

11 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova aponi biso tózala bato na ye! Esengeli “bato nyonso bámona polele” ete tozali kokola na elimo. (Matai 5:16; 1 Timote 4:15) Omituna boye: ‘Bato bakoki komona ete nazali mpenza sembo epai ya Yehova? Nazalaka na esengo ya koyebisa bato ete nazali Motatoli ya Yehova? Tókanisa ndenge oyo Yehova akoyoka soki toyokaka nsɔni ya koyebisa basusu ete tozali bato na ye.​—Nzembo 119:46; tángá Marko 8:38.

Makambo ya bomoi na yo emonisaka polele ete ozali Motatoli ya Yehova? (Talá paragrafe 12, 13)

12, 13. Ndenge nini bandeko mosusu basali ete ekóma mpasi bato báyeba ete bazali Batatoli ya Yehova?

12 Likambo ya mawa ezali ete Batatoli ya Yehova mosusu balandaka “elimo ya mokili.” Yango esali ete bákesana te na bato oyo basambelaka Yehova te. (1 Bakorinti 2:12) “Elimo ya mokili” esalaka ete bato bátya makanisi na bamposa na bango ya moimi. (Baefese 2:3) Na ndakisa, atako tozwaka batoli ndenge na ndenge, basusu bandimaka kolata bilamba oyo ebongi te. Balataka bilamba oyo ekangi nzoto mpe oyo ezali kolakisa binama ya nzoto, bakendaka na yango ata na makita to mayangani. To balekisaka ndelo na ndenge na bango ya kobongisa nsuki. (1 Timote 2:9, 10) Yango wana, ekoki kozala mpasi mpo basusu báyeba soki bazali Batatoli ya Yehova to te.​—Yakobo 4:4.

13 Ezali na makambo mosusu oyo emonisi ete Batatoli ya Yehova mosusu bakeseni te na mokili. Na ndakisa, na bafɛti, bato mosusu babinaka na ndenge oyo ebongi te na bakristo. Bafɔtɔ mpe maloba oyo Batatoli mosusu batyaka na ba-site Internet emonisaka ete bazali na makanisi ya mokili. Mbala mosusu bazwá te disiplini na lisangá mpo na lisumu moko ya monene, kasi bakoki kobebisa bizaleli ya bandeko oyo bazali kosala makasi mpo na kokesana na mokili.​—Tángá 1 Petro 2:11, 12.

Kolanda te bato oyo bazali mpenza te na ngámbo ya Yehova

14. Tosengeli kosala nini mpo na kobatela boninga na biso na Yehova?

14 Eloko nyonso ya mokili ebongisamá mpo tótya makanisi na biso na “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.” (1 Yoane 2:16) Lokola tozali bato ya Yehova, esengeli “tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo.” (Tito 2:12) Makambo nyonso ya bomoi na biso, ezala maloba, kolya, komɛla, ndenge ya kolata, mpe mosala, esengeli komonana polele epai ya moto nyonso ete tozali bato ya Yehova.​—Tángá 1 Bakorinti 10:31, 32.

‘TÓLINGANAKA MAKASI’

15. Mpo na nini tosengeli kosalela bandeko na biso makambo na boboto mpe na bolingo?

15 Ndenge oyo tosalelaka bandeko ya lisangá makambo emonisaka soki tozwaka boninga na biso na Yehova na motuya to te. Biso nyonso tozali bato ya Yehova. Soki tozali te kobosana likambo yango, ntango nyonso tokosalela bango makambo na boboto mpe na bolingo. (1 Batesaloniki 5:15) Yango ezali na ntina nini? Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:35.

16. Ndakisa nini ya Mibeko ya Moize emonisi ndenge oyo Yehova alingaka basaleli na ye?

16 Ndakisa moko oyo euti na Mibeko ya Moize ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo tosengeli kosalela basusu makambo na lisangá. Na tempelo ya Yehova, ezalaki na bisaleli oyo ezalaki kosalelama kaka mpo na losambo. Mibeko emonisaki polele ndenge oyo Balevi basengelaki kosalela yango, mpe moto nyonso oyo aboyaki kolanda malako wana asengelaki kobomama. (Mitángo 1:50, 51) Soki Yehova atyaki likebi na ndenge oyo bazalaki kosalela bisaleli ya losambo, na ntembe te atyaka likebi koleka na makambo oyo basalelaka bato oyo bamipesá na ye, mpe bazali sembo! Amonisaki ete azwaka biso na motuya mingi ntango alobaki: “Mpo moto oyo azali kosimba bino azali kosimba mbuma ya liso na ngai.”​—Zekaria 2:8.

17. Makambo nini Yehova ‘atyaka likebi mpe ayokaka’?

17 Malaki alobaki ete Yehova “azalaki kotya likebi mpe koyoka” ndenge oyo basaleli na ye bazalaki kosalelana makambo. (Malaki 3:16) Yehova “ayebi bato na ye.” (2 Timote 2:19) Ayebi mpenza makambo nyonso tosalaka mpe tolobaka. (Baebre 4:13) Ntango tomoniseli ndeko moko boboto te, Yehova amonaka yango. Kasi tokoki komindimisa mpe ete Yehova amonaka mpe ntango toyambaka bapaya, tokabaka, tolimbisaka, mpe ntango tomonisaka ezaleli ya boboto.​—Baebre 13:16; 1 Petro 4:8, 9.

“YEHOVA AKOSUNDOLA BATO NA YE TE”

18. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi ndenge Yehova aponi biso tózala bato na ye?

18 Tozali mpenza na mposa ya komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova ndenge tozali bato na ye. Toyebi ete ntango topesaki bomoi na biso epai na ye, tozwaki mpenza ekateli oyo eleki malamu. Atako tozali na “kati ya libota oyo etɛngamá mpe egumbamá,” tolingi ete bato bámona ete tozali na ‘mbeba te mpe na ngambo te’ mpe tozali “kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Bafilipi 2:15) Mpo na yango, tozali na ekateli ya koboya kosala eloko nyonso oyo Yehova ayini. (Yakobo 4:7) Lisusu, tolingaka mpe tomemyaka bandeko na biso mpo bango mpe bazali bato ya Yehova.​—Baroma 12:10.

19. Mbano nini Yehova azali kopesa baoyo bazali bato na ye?

19 Biblia epesi elaka oyo: “Yehova akosundola bato na ye te.” (Nzembo 94:14) Yango ezali ndanga mpo na biso. Ezala likambo nini ekómeli biso, Yehova akozala na biso. Ata soki tokufi, akobosana biso te. (Baroma 8:38, 39) “Soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Yehova, mpe soki tokufi, tokufi mpo na Yehova. Yango wana, ezala tozali na bomoi, ezala tokufi, tozali bato ya Yehova.” (Baroma 14:8) Tozali kozela ntango oyo Yehova akozongisa na bomoi baninga na ye ya sembo oyo basilá kokufa. (Matai 22:32) Kutu ata sikoyo, tozali kosepela na makabo ebele ya kitoko oyo euti epai ya Tata na biso. Ndenge Biblia elobi yango, “esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango, bato oyo ye aponi bázala libula na ye.”​—Nzembo 33:12.