Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Otalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango?

Otalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango?

“Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.”​—MASESE 18:13.

NZEMBO: 126, 95

1, 2. (a) Likoki nini tosengeli kokolisa, mpe mpo na nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

BISO nyonso tosengeli kokolisa likoki ya kotalela makambo malamu mpe kokóma na makanisi oyo ebongi. (Masese 3:21-23; 8:4, 5) Soki te, Satana ná mokili na ye bakoki kobebisa makanisi na biso. (Baefese 5:6; Bakolose 2:8) Kasi, mpo na kokóma na makanisi oyo ebongi, tosengeli kotalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango. Masese 18:13 elobi: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.”

2 Na lisolo oyo, tokolobela mikakatano oyo ekoki kosala ete ezala mpasi tóyeba makambo malamu mpe tókóma na makanisi oyo ebongi. Tokolobela mpe mitinda ya Biblia ná bandakisa oyo ekosalisa biso tókolisa likoki ya kotalela makambo malamu.

KONDIMAKA “LILOBA NYONSO” TE

3. Mpo na nini tosengeli kosalela etinda oyo ezali na Masese 14:15? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Lelo oyo, bansango eutaka na bisika ndenge na ndenge. Eyaka na nzela ya Internet, ya televizyo, mpe na banzela mosusu. Na yango, tosengeli kozala ekɛngɛ. Tokoki mpe kozwa bamesaje na nzela ya Internet, ya telefone, to koyoka masolo epai ya bato mpe baninga oyo mbala mosusu bazali na makanisi ya mabe te. Lokola bato mosusu bapanzaka bansango mpe makambo ya lokuta na nko, tosengeli koyeba kotalela makambo malamu. Etinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso? Masese 14:15 elobi: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”

4. Ndenge nini Bafilipi 4:8, 9 ekoki kosalisa biso tópona makambo ya kotánga, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi tóyeba makambo ya solo? (Talá mpe etanda “ Bisika ya koyeba bosolo ya makambo.”)

4 Mpo na kozwa bikateli ya malamu, tosengeli koyeba bosolo ya likambo. Na yango, tosengeli kopona malamu makambo ya kotánga. (Tángá Bafilipi 4:8, 9.) Tosengeli te kolekisa ntango na biso na kotánga makambo na basite Internet oyo toyebi motó ná makolo te, to kotánga bamesaje oyo ezali kaka nungunungu. Tosengeli mingimingi kokeba na basite Internet oyo bapɛngwi basalelaka mpo na komonisa makanisi na bango. Balukaka kolɛmbisa kondima ya basaleli ya Nzambe mpe kobebisa mateya ya solo. Makambo oyo ezali solo te etindaka moto azwa bikateli ya mabe. Kokanisa ata mokolo moko te ete makambo yango ekosala yo eloko te.​—1 Timote 6:20, 21.

5. Makambo nini ya lokuta Bayisraele bayokaki, mpe esalaki bango nini?

5 Makambo ya lokuta ekoki kobimisa mbuma ya mabe mpenza. Na ntango ya Moize, mibali 12 bakendaki konɔnga Mokili ya Ndaka. Ntango bazongaki, mibali 10 bamemaki nsango ya mabe. (Mitángo 13:25-33) Lokola balekisaki ndelo na maloba na bango, Bayisraele babangaki mpe balɛmbaki nzoto. (Mitángo 14:1-4) Nini esalaki bongo? Mbala mosusu bato bakanisaki ete likambo yango ezalaki solo mpo mibali 10 mobimba balobaki makambo ndenge moko. Na yango, baboyaki koyoka makambo ya solo oyo Kalebe ná Yosua balobaki. (Mitángo 14:6-10) Na esika báluka koyeba bosolo ya likambo mpe bátyela Yehova motema, bato basalaki bozoba ya kondima likambo ya lokuta!

6. Mpo na nini tosengeli komitungisa mingi te ntango toyoki makambo ya mabe mpo na basaleli ya Yehova?

6 Tosengeli kokeba mingimingi ntango toyoki makambo oyo etali basaleli ya Yehova. Kobosana te ete Satana azali “mofundi ya bandeko na biso.” (Emoniseli 12:10) Yesu alobaki ete banguna ‘bakokosela biso makambo ya ndenge nyonso.’ (Matai 5:11) Soki tobateli na makanisi maloba ya Yesu, tokomitungisa mingi te soki toyoki makambo ya mabe mpo na basaleli ya Yehova.

7. Mituna nini tosengeli komituna liboso ya kotindela basusu bamesaje na nzela ya Internet to na telefone?

7 Osepelaka mingi kotindela baninga na yo bamesaje na nzela ya Internet to na telefone? Soki omoni likambo moko ya sika oyo bapanzi-nsango babimisi to oyoki lisolo moko ya kokamwa, olingaka kozala moto ya liboso ya kopanza yango? Liboso ya kotindela yango basusu, omituna boye: ‘Nayebi mpenza soki ezali solo? Nataleli mpenza likambo yango malamu?’ Soki te, okoki kopanza bansango ya lokuta epai ya bandeko. Soki oyebi te soki likambo yango ezali mpenza solo, kotindela yango basusu te. Longolá yango!

8. Na mikili mosusu, banguna na biso basalaki nini, mpe ndenge nini tokoki kopesa banguna mabɔkɔ kozanga ete tóyeba?

8 Ezali na likambo mosusu oyo emonisi ete kotindela bato bamesaje na nzela ya Internet to na telefone kozanga kokanisa ezali likama. Na mikili mosusu, batyá mwa bipekiseli na mosala na biso to bapekisá yango mpenza. Banguna na biso na mikili yango bakoki kopanza nsango ya lokuta na nko mpo na kobangisa biso to kosala ete tókóma kokaniselana mabe. Tótalela likambo oyo esalemaki na ekólo moko ya Union soviétique. Bapolisi ya KGB bapanzaki nsango ete bandeko mosusu oyo bazalaki na mikumba minene bawanganaki lisangá. * Likambo ya mawa, bandeko mingi bandimaki nsango yango ya lokuta mpe batikaki ebongiseli ya Yehova. Na nsima, mingi na bango bazongaki, kasi basusu bazongá te. Nsango ya lokuta ebebisaki kondima na bango. (1 Timote 1:19) Ndenge nini tokoki koboya likambo ya ndenge wana esalema? Boyá kopanza bansango ya lokuta to oyo eyebani te soki ezali solo. Kozala bindimandima te. Lukáká nde koyeba bosolo ya makambo.

MAKAMBO MOSUSU EKOKI KOZANGA

9. Likambo nini mosusu esalaka ete tóyeba bosolo ya makambo te?

9 Likambo mosusu oyo esalaka ete ezala mpasi mpo tókóma na makanisi oyo ebongi ezali ete na bantango mosusu, toyokaka kaka ndambo ya lisolo to mpe eteni moko ya lisolo ekoki kozala lokuta. Lisolo oyo ezali na lokuta na kati ekoki kobungisa biso nzela. Tokoki kosala nini mpo tókosama te na masolo ya ndenge wana?​—Baefese 4:14.

10. Mpo na nini etikalaki moke Bayisraele mosusu bákende kobundisa bandeko na bango, mpe nini esalisaki bango bákende te?

10 Tótalela likambo oyo ekómelaki Bayisraele oyo bazalaki kofanda na wɛsti ya Ebale Yordani na eleko ya Yosua. (Yosua 22:9-34) Bayokaki ete Bayisraele oyo bazalaki kofanda na ɛsti ya Yordani, elingi koloba libota ya Rubene, ya Gade, mpe ndambo ya libota ya Manase, batongaki etumbelo moko monene pembeni ya ebale yango. Likambo wana ezalaki solo, kasi makambo mosusu ezangaki. Na kolanda makambo oyo bayokaki, Bayisraele ya ngámbo ya wɛsti bakanisaki ete bandeko na bango ya ɛsti batombokeli Yehova; na yango basanganaki mpo na kokende kobundisa bango. (Tángá Yosua 22:9-12.) Kasi, liboso bákende, batindaki mwa mibali bákende koluka koyeba bosolo ya likambo. Bayokaki nini? Bayisraele ya ngámbo ya ɛsti batongaki etumbelo mpo na kopesa banzambe ya lokuta mbeka te. Batongaki yango mpo ezala ekaniseli oyo ekosalisa moto nyonso ayeba ete bazalaki kosambela Yehova. Na ntembe te, Bayisraele basepelaki ndenge bakendaki kobundisa bandeko na bango te, kasi bazwaki ntango ya koluka koyeba makambo nyonso.

11. (a) Makambo nini ya kozanga bosembo basalelaki Mefiboshete? (b) Nini elingaki kosalisa Davidi asalela Mefiboshete makambo na bosembo?

11 Ekoki kokóma ete moto aloba makambo mosusu oyo ezali solo te mpo na biso. Likambo yango ekómelaki Mefiboshete. Mokonzi Davidi amoniselaki Mefiboshete motema boboto mpe apesaki ye mabele nyonso oyo ezalaki ya nkɔkɔ na ye Saulo. (2 Samwele 9:6, 7) Kasi, na nsima Davidi ayokaki likambo moko ya malamu te mpo na Mefiboshete. Na esika aluka koyeba soki ezalaki solo, Davidi abɔtɔlaki Mefiboshete biloko nyonso. (2 Samwele 16:1-4) Na nsima, ntango Davidi asololaki na ye, Davidi amonaki libunga oyo asalaki mpe azongiselaki Mefiboshete ndambo ya biloko. (2 Samwele 19:24-29) Likambo wana ya kozanga bosembo elingaki kosalema te soki Davidi azwaka ntango ya koyeba makambo nyonso na esika azwa ekateli nokinoki na kolanda ndambo ya makambo oyo ayokaki.

12, 13. (a) Yesu asalaki nini ntango bato balobaki lokuta mpo na ye? (b) Tokoki kosala nini soki bato balobi lokuta mpo na biso?

12 Okoki kosala nini soki batambwisi nsango ya lokuta mpo na yo? Likambo ya ndenge wana ekómelaki mpe Yesu ná Yoane Mobatisi. (Tángá Matai 11:18, 19.) Kasi, Yesu asalaki nini? Alekisaki te ntango na ye mpe makasi na ye nyonso na koyebisa bato ete bakoseli ye makambo. Kasi, alendisaki bato bátalela makambo malamu; bátya makanisi na misala mpe mateya na ye. Ndenge ye moko alobaki yango, “bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.”​—Matai 11:19.

13 Tokoki kozwa liteya ya malamu epai Yesu. Ntango mosusu bato bakoki koloba makambo ya mabe to ya lokuta mpo na biso, mpe tokoki komitungisa ete ebebisa lokumu na biso. Tokoki kosala nini mpo na yango? Soki moto alobi likambo ya lokuta mpo na biso, tósala makambo oyo ekosala ete bato bándima likambo yango te. Kutu, ndenge ndakisa ya Yesu emonisi yango, bizaleli na biso ya malamu ekoki komonisa basusu ete makambo oyo bayokaki ezali lokuta.

ONDIMELAKA MAYELE NA YO MOKO?

14, 15. Mpo na nini tosengeli te kondimela mayele na biso moko?

14 Tomoni ete ekoki kozala mpasi koyeba bosolo ya likambo. Mokakatano mosusu ezali ete tozali bato ya kozanga kokoka. Mbala mosusu tosalelaka Yehova banda bambula mingi mpe tokolisi likoki ya kokanisa mpe bososoli. Ekoki kozala ete bandeko bapesaka biso limemya mpo toyebaka kotalela makambo. Kasi, yango ekoki kokóma motambo mpo na biso?

15 Ɛɛ, soki tobandi kondimela mayele na biso moko. Tokoki kobanda kotalela makambo na kolanda mayoki mpe makanisi na biso. Tokoki kobanda kokanisa ete tokoki koyeba likambo malamu ata soki totaleli makambo nyonso te. Ezali mpenza likama! Biblia ekebisi biso ete tóndimela mayele na biso moko te.​—Masese 3:5, 6; 28:26.

16. Na ndakisa oyo ezali na paragrafe, nini esalemaki na restora, mpe Tom akanisaki nini?

16 Tótalela likambo moko oyo ekoki kosalema. Kanisá ete mokolo moko na mpokwa, ndeko Tom, nkulutu moko oyo aumeli mingi na mokumba yango, akɔti na restora moko mpe amoni John, nkulutu mosusu, afandi na mesa ná mwasi moko oyo azali mwasi na ye te. Tom amoni ete bazali kosepela mpenza kozala elongo, bazali kosɛka, mpe bazali koyambana. Tom amitungisi mingi mpe amituni: ‘Boye John ná mwasi na ye bakoboma libala? Bongo bana na bango?’ Tom asilá komona makambo ya ndenge wana na bomoi na ye. Soki ozalaki Tom, olingaki koyoka ndenge nini?

17. Na ndakisa wana, makambo nini Tom ayebaki na nsima, mpe yango ezali koteya biso nini?

17 Tom akanisaki ete John azali kokosa mwasi na ye; kasi, ayebaki nde makambo nyonso? Mwa moke na nsima, kaka na mpokwa wana, Tom abengaki John. Kanisá ndenge amiyokaki ntango ayebaki ete mwasi wana azali ndeko ya John mpe autaki esika mosusu. Elekaki bambula ebele John ná ndeko na ye bamonanaki te. Mpe lokola azalaki kaka na mwa bangonga, John akokaki kaka kokutana na ye na restora mpo bálya elongo. Mwasi ya John azalaki na likoki te ya kozala elongo na bango. Tom asalaki malamu ndenge ayebisaki moto mosusu te makambo oyo akanisaki. Ata soki tosalelaka Yehova banda kala, tosengeli kaka kotalela makambo nyonso mpo tókóma na makanisi oyo ebongi.

18. Nini ekoki kosala ete tóndima likambo ya mabe mpo na ndeko moko?

18 Ntango tozali koyokana malamu te na ndeko moko ekoki mpe kosala ete tótalela makambo malamu te. Soki tozali kaka kokanisa matata na biso, tokoki kobanda kokanisela ndeko na biso mabe. Na ntango wana, soki toyoki likambo ya mabe mpo na ndeko yango, tokoki kondima yango mbala moko, ata soki ezali solo te. Liteya ezali nini? Soki tozali na makanisi ya mabe mpo na bandeko na biso, tokoki kokanisela bango makambo oyo ezali mpenza solo te. (1 Timote 6:4, 5) Yango wana, tólongola likunya mpe zuwa na mitema na biso. Tóbosana ata mokolo moko te ete Yehova asɛngi biso tólinga bandeko na biso mpe tólimbisaka bango na motema moko.​—Tángá Bakolose 3:12-14.

MITINDA YA BIBLIA EKOBATELA BISO

19, 20. (a) Mitinda nini ya Biblia ekosalisa biso tótalela makambo malamu? (b) Tokolobela nini na lisolo elandi?

19 Lelo oyo, ezali mpasi mpenza koyeba makambo oyo ezali solo mpe kotalela yango malamu mpo toyokaka bansango mosusu oyo ezali mpenza solo te, bansango mosusu ezalaka kaka ndambo, mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Nini ekosalisa biso? Koyeba mitinda ya Biblia mpe kosalela yango! Na ndakisa, Biblia elobi ete koyanola na likambo liboso ya koyoka yango ezali bozoba. (Masese 18:13) Etinda mosusu esalisaka biso tómona ete tosengeli te kondima liloba nyonso kozanga koyeba soki ezali mpenza solo. (Masese 14:15) Mpe ata soki tosalelaka Yehova banda kala, tosengeli te kondimela mayele na biso moko. (Masese 3:5, 6) Mitinda ya Biblia ekobatela biso soki tozali kotalela makambo malamu mpo tókóma na makanisi oyo ebongi mpe tózwa bikateli ya malamu.

20 Kasi ezali mpe na mokakatano mosusu. Lokola tozali bato, mbala mingi tosambisaka basusu na kolanda oyo tozali komona na miso. Na lisolo elandi, tokolobela makambo oyo ekoki kosala ete tókwea te na motambo yango mpe ndenge oyo tokoki kokima yango.

^ par. 8 Talá Buku ya mobu 2004 ya Batatoli ya Yehova, nkasa 111-112, mpe Buku ya mobu 2008, nkasa 133-135, na Français.