Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tóteyaka solo

Tóteyaka solo

“Ee Yehova, . . . liloba na yo mobimba ezali solo.”​—NZEMBO 119:159, 160.

NZEMBO: 29, 53

1, 2. (a) Mosala nini elekaki ntina na bomoi ya Yesu, mpe mpo na nini? (b) Tosengeli kosala nini mpo tózala mpenza “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe”?

YESU KRISTO azalaki liboso mosali-mabaya mpe na nsima moteyi. (Marko 6:3; Yoane 13:13) Asalaki nyonso mibale na ndenge ya kokoka. Na mosala na ye ya mosali-mabaya, ayekolaki kosalela bisaleli ndenge na ndenge mpo abimisa biloko ya malamu. Lokola moteyi, asalelaki malamu boyebi na ye ya Makomami mpo na kosalisa bato báyeba solo ya Liloba ya Nzambe. (Matai 7:28; Luka 24:32, 45) Ntango Yesu azalaki na mbula 30, atikaki mosala ya mabaya mpe akómaki moteyi mpo ayebaki ete yango nde mosala oyo elekaki ntina. Alobaki ete kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki moko ya bantina oyo Nzambe atindaki ye awa na mabele. (Matai 20:28; Luka 3:23; 4:43) Yesu atyaki makanisi nyonso na kosakola nsango malamu, mpe alingaki basusu básala mpe bongo.​—Matai 9:35-38.

2 Mbala mosusu tozali basali-mabaya te, kasi biso nyonso tozali basaleli ya Nzambe mpe tosakolaka nsango malamu. Mosala yango ezali na ntina mingi, kutu Nzambe mpe asalaka yango; tobengami “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Bakorinti 3:9; 2 Bakorinti 6:4) Tondimaka ete “liloba [ya Yehova] mobimba ezali solo.” (Nzembo 119:159, 160) Yango wana tosalaka makasi mpo ‘tósembola liloba ya solo malamumalamu’ na mosala ya kosakola. (Tángá 2 Timote 2:15.) Mpo na yango, tokobaka kokolisa makoki na biso ya kosalela Biblia, esaleli na biso ya libosoliboso mpo na koteya basusu solo ya Yehova, ya Yesu, mpe ya Bokonzi. Mpo na kosalisa biso tósala yango malamu, ebongiseli ya Yehova eponeli biso bisaleli mosusu ya malamu, mpe tosengeli koyeba kosalela mpe yango. Bisaleli yango nyonso tobengi yango Bisaleli mpo na koteya.

3. Mokano nini tosengeli kozala na yango na ntango oyo, mpe ndenge nini Misala 13:48 ezali kosalisa biso tósala yango?

3 Mbala mosusu ozali komituna ntina oyo tobengi yango Bisaleli mpo na koteya, kasi te Bisaleli mpo na kosakola. Ezali bongo mpo “kosakola” elimboli koyebisa nsango moko, kasi “koteya” ezali kolimbola nsango yango mpo moto akanga ntina ya likambo oyo ayoki, mpe na nsima asala makambo oyo ayekoli. Na mwa ntango oyo totikali na yango mpo na kopesa litatoli, tosengeli kozala na mokano ya kobanda koyekola na bato Biblia mpe koteya bato solo mpo bákóma bayekoli ya Kristo. Yango elimboli ete tosengeli koluka na molende bato nyonso oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” mpe kosalisa bango bábanda kosalela Yehova.​—Tángá Misala 13:44-48.

4. Ndenge nini tokoki komona bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko”?

4 Ndenge nini tokoki komona bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko”? Na siɛklɛ ya liboso, lolenge kaka moko ya komona bato yango ezalaki ya kobima na mosala ya kosakola. Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani na kati na yango abongi.” (Matai 10:11) Tosengeli kosala mpe bongo lelo. Toyebi malamu ete bato oyo babongi te, oyo bazali na lolendo to oyo bakipaka mpenza makambo ya Nzambe te balingaka koyoka nsango malamu te. Tozali koluka bato ya mitema sembo, oyo bazali na komikitisa, mpe oyo balingi mpenza koyeba solo. Tokoki kokokanisa mosala na biso ya koluka bato na mosala ya Yesu lokola mosali-mabaya. Mpo asala biloko ya ndako, porte, ekanganeli, to eloko mosusu, asengelaki liboso koluka libaya ya malamu. Na nsima, akokaki kozwa kɛsi na ye ya bisaleli, kosalela mayele na ye, mpe kosala eloko oyo esengeli. Biso mpe tosengeli liboso koluka bato oyo babongi, na nsima tokoki kosalela bisaleli oyo tozali na yango mpe mayele na biso mpo na kosalisa bango bákóma bayekoli.​—Matai 28:19, 20.

5. Likambo nini tosengeli koyeba mpo na bisaleli oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya? Pesá ndakisa. (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Na kɛsi ya bisaleli, esaleli mokomoko ezalaka na mosala na yango. Tózwa ndakisa ya bisaleli oyo Yesu asalelaki ntango azalaki mosali-mabaya. * Asengelaki na bisaleli mpo na kozwa bolai, kotya elembo, kokata, kotɔbɔla, kobongisa libaya, bisaleli mpo na kokokanisa mabaya mpe kokangisa yango. Ndenge moko mpe, esaleli mokomoko oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya ezali na mosala na yango. Tólobela ndenge ya kosalela bisaleli yango ya ntina mingi.

BISALELI OYO ESALISAKA BATO BÁYEBA SOKI TOZALI BANANI

6, 7. (a) Ndenge nini osalelaki bakarte ya jw? (b) Nkasa oyo tosalelaka mpo na kobenga bato na makita ezali na mokano nini?

6 Bakarte ya jw. Esaleli yango ezali moke, kasi ebongi mpenza mpo na kosalisa bato báyeba soki tozali banani mpe elakisaka bango site na biso jw.org. Kuna, bakoki koyeba makambo na biso mosusu mpe kosɛnga ata koyekola Biblia. Bato koleka 400 000 basili kosɛnga boyekoli ya Biblia na nzela ya jw.org, mpe bankama ya bato mosusu basɛngaka mokolo na mokolo! Okoki kotambolaka na mwa bakarte yango mpe kosalela yango soki ozwi libaku ya kopesa litatoli ntango ozali kosala makambo na yo ya mokolo na mokolo.

7 Nkasa ya libyangi. Lokasa oyo tosalelaka mpo na kobenga bato na makita ezalaka na mokano mibale. Na lokasa yango bakomá: “Tosɛngi yo oyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.” Na nsima elobi ete okoki kosala yango “na makita na biso” “to moto ayaka koteya yo.” Na yango, lokasa yango esalisaka bato báyeba soki tozali banani, mpe esɛngaka baoyo “bayebi bobola na bango ya elimo” báyekola Biblia elongo na biso. (Matai 5:3) Ya solo, toyambaka bato nyonso na makita na biso, ezala bandimi koyekola Biblia to te. Soki bayei na makita, bakomona ete bakoki koyekola makambo ebele na Biblia.

8. Mpo na nini ezali na ntina bato báya ata na likita na biso moko? Pesá ndakisa.

8 Ezali na ntina tókoba kobengisa bato báya na makita na biso ata mbala moko. Mpo na nini? Mpo soki bayei, bakomona ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo ya Biblia mpe basalisaka bato báyeba Nzambe, nzokande mangomba ya lokuta esalaka bongo te. (Yisaya 65:13) Na ndakisa, eleki mwa bambula, mobali moko ya États-Unis na nkombo Ray ná mwasi na ye Linda bamonaki bokeseni yango. Bazalaki kondima ete Nzambe azali mpe bazalaki na mposa ya koyeba ye malamu. Na yango, babandaki kokende na ndako-nzambe mokomoko ya engumba na bango mpo na koluka makambo mibale oyo ekotinda bango bápona lingomba oyo bakozala. Ya liboso, balobaki ete basengeli koyekola mwa makambo na ndako-nzambe yango, mpe ya mibale bandimi basengeli kolata malamu, lokola bato oyo basalelaka Nzambe. Basalaki bongo bambula mingi mpo bandako-nzambe ezalaki ebele. Kasi, lingomba moko te ekokisaki mposa na bango. Bayekolaki eloko te, mpe bandimi bazalaki kolata mabe. Nsima ya kokende na ndako-nzambe ya nsuka oyo ezalaki na liste na bango, Linda akendaki mosala mpe Ray azongaki ndako. Na nzela, alekaki liboso ya Ndako ya Bokonzi moko na motuka na ye. Alobaki na nse ya motema, ‘Nakɔta na kati natala soki bazali kosala nini.’ Asalaki malamu mpenza! Moto nyonso na Ndako ya Bokonzi azalaki na boboto mpe alataki malamu. Ray afandaki na molɔngɔ ya liboso mpe asepelaki na makambo oyo ayokaki! Ezalaki kaka ndenge ntoma Paulo alobaki mpo na moto oyo ayei makita na biso mpo na mbala ya liboso mpe alobi: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.” (1 Bakorinti 14:23-25) Nsima na yango, Ray abandaki kokende na makita mikolo nyonso ya lomingo. Na nsima, akómaki kokende na makita nyonso ya kati ya pɔsɔ. Linda mpe akómaki koya na makita, mpe atako bazalaki na mbula koleka 70, bayekolaki Biblia mpe bazwaki batisimo.

BISALELI MPO NA KOBANDA MASOLO

9, 10. (a) Mpo na nini batrakte ezali mpasi te na kosalela? (b) Limbolá ndenge ya kosalela trakte Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

9 Batrakte. Tozali na batrakte mwambe na kati ya Bisaleli mpo na koteya. Kosalela yango ezali mpasi te, mpe esalisaka mingi mpo na kobanda masolo. Banda trakte ya liboso ebimaki na 2013, tosili kobimisa batrakte yango mwambe soki miliare 5 na imprimeri! Batrakte yango ezali ndenge moko. Na yango, soki oyekoli kosalela trakte moko malamu, okoki kosalela nyonso! Ndenge nini okoki kosalela trakte mpo na kobanda lisolo?

10 Mbala mosusu olingi kosalela trakte Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Lakisá moto motuna oyo ezali titre mpe tuná ye: “Osilá komituna soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Okoloba ete ezali . . . ?” Lakisá ye apona na biyano misato oyo etyami wana na nse. Na esika oyebisa ye soki eyano na ye ezali malamu to mabe, fungolá kaka trakte na kati, na esika bakomi “Biblia elobi ete” mpe tángá bavɛrsɛ oyo ezali wana, Danyele 2:44 mpe Yisaya 9:6. Na nsuka ya lisolo, tuná ye motuna oyo ezali na nsima, esika bakomi “Kanisá naino”: “Bomoi ekozala ndenge nini ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela?” Okoki koyanola na motuna yango mbala ya nsima oyo okozongela ye. Ntango bokokutana lisusu, okoki kosalela liteya 7 ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!, oyo ezali mpe moko ya bisaleli na biso mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na moto.

BISALELI MPO NA KOSALISA MOTO ASEPELA NA BIBLIA

11. Bazulunalo na biso ebongisami na mokano nini, mpe tosengeli koyeba nini liboso ya kosalela yango?

11 Bazulunalo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Lamuká! ezali bazulunalo oyo ebimaka mingi mpe ebongolami na minɔkɔ ebele koleka na mokili mobimba! Lokola bato ya mikili ndenge na ndenge batángaka bazulunalo yango, masolo ya ezipeli ebongisamaka mpo esepelisa bato ya bisika nyonso. Tosengeli kosalela bazulunalo yango mpo na kosalisa bato bátya makanisi na likambo oyo eleki ntina na bomoi ya lelo. Kasi, tosengeli liboso koyeba soki zulunalo nini ebongisami mpo na moto boye to boye.

12. (a) Lamuká! ebongisami mpo na banani, mpe ezali na mokano nini? (b) Makambo nini ya malamu okutanaki na yango ntango osalelaki esaleli yango?

12 Lamuká! ebongisami mpo na bato oyo bayebi Biblia malamu te to bayebi yango te. Mbala mosusu bayebi ata liteya moko te ya bokristo, batyelaka mangomba motema mpenza te, to bayebaka te ete Biblia ekoki kosalisa bango na bomoi na bango. Mokano ya libosoliboso ya Lamuká! ezali ya kosalisa motángi andima ete Nzambe azalaka. (Baroma 1:20; Baebre 11:6) Ezali mpe na mokano ya kosalisa motángi andima ete Biblia “ezali mpenza . . . liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13) Mitó ya makambo ya Lamuká! misato oyo ebimi na 2018 ezali: “Nini epesaka esengo?,” “Sekele 12 mpo na libota ya esengo,” mpe “Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa.”

13. (a) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ebongisami mpo na banani? (b) Makambo nini ya malamu okutanaki na yango ntango osalelaki esaleli yango?

13 Mokano ya libosoliboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ezali ya kolimbola mateya ya Biblia mpo na bato oyo bazalaka na mwa limemya mpo na Nzambe mpe Biblia. Mbala mosusu bayebi mwa makambo oyo ezali na Biblia, kasi bakangaka mpenza ntina ya mateya na yango te. (Baroma 10:2; 1 Timote 2:3, 4) Mitó ya makambo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli misato oyo ebimi na 2018 ezali: “Biblia ezali kaka na ntina lelo oyo?,” “Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ekoya?,” mpe “Nzambe akipaka yo?

BISALELI MPO NA KOLENDISA MOTO ANDIMA KOYEKOLA

14. (a) Video minei oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya ebongisami na mokano nini? (b) Makambo nini ya malamu okutanaki na yango ntango olakisaki bavideo yango?

14 Bavideo. Na ntango ya Yesu, mosali-mabaya azalaki na masini te. Kasi lelo, basali-mabaya bazalaka mpe na bisaleli oyo esalaka na kura, na ndakisa sii, masini ya kotɔbɔla, mpe masini ya kokómisa libaya sɛlisɛli. Lelo oyo na mosala ya kosakola, longola mikanda, tozali na bavideo kitoko mpo na kolakisa bato. Minei na yango ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya: Mpo na nini koyekola Biblia?, Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini?, Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? mpe Biso Batatoli ya Yehova tozali banani? Bavideo ya mikuse elekaka miniti mibale te mpe esimbaka malamu na bokutani ya liboso. Tokoki kosalela bavideo oyo eleki miniti mibale soki tozongeli moto mpe soki tozali kosolola na moto oyo azali na ntango mingi. Bavideo yango ezali bisaleli ya malamu mpo ekoki kolendisa bato báyekola Biblia mpe báya na makita na biso.

15. Matomba nini ekoki komonana soki moto atali video na biso na monɔkɔ ya mboka na bango? Pesá bandakisa.

15 Na ndakisa, ndeko mwasi moko akutanaki na mwasi moko oyo autaki Micronésie mpe monɔkɔ ya mboka na ye ezalaki Yap. Ndeko mwasi alakisaki ye video Mpo na nini koyekola Biblia?, na monɔkɔ ya Yap. Ntango video ebandaki, mwasi yango alobaki: “Monɔkɔ na biso. Kokamwa! Moto yango azali koloba lokola bato ya esanga na biso. Azali koloba monɔkɔ na biso!” Na nsima, alobaki ete akotánga mpe akotala eloko nyonso oyo ezali na monɔkɔ na bango na jw.org. (Talá mpe Misala 2:8, 11.) Ndakisa mosusu ezali ya ndeko mwasi moko ya États-Unis oyo mwana ya ndeko na ye ya mobali akendá kofanda mosika, na mboka-mopaya. Ndeko mwasi atindelaki ye esika ya kofina oyo ekomema ye na video Mpo na nini koyekola Biblia, na monɔkɔ ya mboka na bango. Mwana yango atalaki video, mpe atindelaki ndeko mwasi mesaje oyo: “Esika balobi ete moto mabe nde azali koyangela mokili ebendaki mpenza likebi na ngai. Nakɔtaki na site mpe nasɛngaki boyekoli ya Biblia.” Ezali esengo mpo mwana yango afandaka na mboka oyo Leta atyelá mosala na biso bipekiseli!

BISALELI MPO NA KOTEYA SOLO

16. Yebisá mokano ya mwa babuku oyo: (a) Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. (b) Nsango malamu oyo euti na Nzambe! (c) Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?

16 Mwa babuku. Ndenge nini tokoki koteya moto oyo ayebi kotánga malamu te, to oyo azali ata na mokanda moko te ya moombo ya sembo na monɔkɔ na bango? Tokoki kosalela mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. * Esaleli mosusu ya malamu mpo na kobanda boyekoli ya Biblia ezali mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! Okoki kolakisa moto masolo 14 oyo ezali na ezipeli ya nsuka mpe kosɛnga ye apona oyo esepelisi ye mingi. Na sima, bóbanda boyekoli na liteya yango. Osilá komeka kosala bongo ntango ozongelaka bato? Mwa buku ya misato oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya ezali Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? Mwa buku yango ebongisami mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba ebongiseli na biso. Mpo oyeba ndenge ya kosalela mwa buku yango mbala nyonso oyo ozali koyekola Biblia na moto, talá Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo ya 03/2017.

17. (a) Buku mokomoko ya boyekoli ezali na mokano nini? (b) Bato nyonso oyo bazwi batisimo basengeli kosala nini, mpe mpo na nini?

17 Babuku. Nsima ya kobanda koyekola na moto na mwa buku, bokoki kokɔta mbala moko na buku Makambo oyo Biblia eteyaka ntango nyonso oyo olingi. Esaleli yango ekoki kosalisa moto ayeba mateya ya ebandeli. Soki moyekoli azali kokola mpe asilisi buku yango, okoki kokoba koyekola na ye na lisalisi ya buku Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Esaleli yango ekoteya moyekoli ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Kobosana te, ata soki azwi batisimo, moto ya sika asengeli kaka kokoba boyekoli tii akosilisa babuku nyonso mibale. Yango ekosalisa ye azala na kondima makasi epai ya Yehova mpe atikala sembo.​—Tángá Bakolose 2:6, 7.

18. (a) Mokapo ya 1 Timote 4:16 ezali kolendisa biso tósala nini lokola tozali bateyi ya solo, mpe ezali na litomba nini? (b) Ntango tozali kosalela Bisaleli mpo na koteya, tosengeli kozala na mokano nini?

18 Biso Batatoli ya Yehova tozali na mokumba ya koteya bato “solo ya nsango malamu” oyo ekoki komema bango na bomoi ya seko. (Bakolose 1:5; tángá 1 Timote 4:16.) Mpo na kosalisa biso, basaleli biso Bisaleli mpo na koteya oyo ezali na biloko oyo tosengeli na yango. (Talá etanda “ Bisaleli mpo na koteya.”) Tósala nyonso oyo tokoki mpo tósalela yango malamu. Mosakoli mokomoko akotala soki esaleli nini oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya akosalela mpe ntango nini akosalela yango. Kasi, kobosana te: mokano na biso ezali kaka ya kokabola mikanda te; tosengeli mpe te kopesa mikanda na biso epai ya bato oyo basepeli na nsango na biso te. Mokano na biso ezali ya koluka bato ya mitema sembo, bato ya komikitisa, oyo balingi mpenza koyeba Nzambe, mpe oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko,” mpe tósalisa bango bákóma bayekoli.​—Misala 13:48; Matai 28:19, 20.

^ par. 5 Talá lisolo “Mosali-mabaya” mpe etanda “Kɛsi ya mosali-mabaya” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2010.

^ par. 16 Soki moto ayebi kotánga ata moke te, okoki kosɛnga ye alanda boyekoli na mwa buku Yoká Nzambe, oyo ezali mingimingi na bililingi.