Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Nini esalisaki moyekoli Stefano atikala kimya ntango bazalaki konyokola ye?

STEFANO atɛlɛmaki liboso ya mibali oyo bazalaki mitema mabe mpenza. Mibali yango 71 oyo bazalaki basambisi na Sanedrina bazalaki bato ya nguya mingi na ekólo. Nganga-nzambe monene Kaifa, oyo asambisaki Yesu mwa basanza liboso na tribinale yango mpe akatelaki ye etumbu ya liwa, nde ayanganisaki bango. (Matai 26:57, 59; Misala 6:8-12) Ntango bato ndenge na ndenge bazalaki kopesa litatoli ya lokuta mpo na Stefano, bamonaki likambo moko ya kokamwa: elongi na ye ezalaki “lokola elongi ya anzelu.”​—Misala 6:13-15.

Nini esalisaki Stefano abatelaki kimya na ye mpe abanga te? Liboso bámema ye na Sanedrina, Stefano azalaki komipesa mobimba na mosala oyo etambwisamaki na elimo ya Nzambe. (Misala 6:3-7) Ntango bazalaki kosambisa ye, elimo yango ezalaki kosala kati na ye, mpo na kobɔndisa ye mpe kokundwela ye makambo. (Yoane 14:16) Ntango Stefano azongisaki maloba na mpiko, ndenge emonisami na Misala mokapo 7, elimo santu ezongisaki na makanisi na ye mikapo soki 20 to koleka ya Makomami ya Ebre. (Yoane 14:26) Kasi, kondima ya Stefano ekómaki lisusu makasi ntango azwaki emonaneli ya Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.​—Misala 7:54-56, 59, 60.

Mokolo mosusu tokoki kokutana na minyoko to bakoki kokanela biso. (Yoane 15:20) Soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe komipesa na mosala ya kosakola, elimo ya Yehova ekosala kati na biso. Tokozwa mpe makasi ya kotɛmɛla minyoko mpe tokobatela kimya na biso ya motema.​—1 Petro 4:12-14.