Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nakotambola na solo na yo”

“Nakotambola na solo na yo”

“Ee Yehova, lakisá ngai nzela na yo. Nakotambola na solo na yo.”​—NZEMBO 86:11.

NZEMBO: 31, 72

1-3. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela solo ya Biblia? Pesá ndakisa. (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

EKÓMAKA ete bato bákende lisusu kozongisa eloko oyo basombi. Esalemaka bongo mingi koleka mpo na biloko oyo basombi na nzela ya Internet. Mbala mosusu eloko yango esepelisi bango te ndenge bakanisaki to mpe ezali na mwa mbeba. Na yango, bamonaka malamu bákende kozwa eloko mosusu na esika na yango to mpe kosɛnga bázongisela bango mbongo.

2 Ata soki ekoki kosalema ete tósɛnga bázongisela biso mbongo mpo na eloko oyo tosombaki, tózongisa solo ata mokolo moko te, elingi koloba ‘tótɛka’ te “boyebi ya sikisiki” ya solo ya Biblia oyo ‘tosombaki.’ (Tángá Masese 23:23; 1 Timote 2:4) Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, tolekisaki ntango mingi mpo na koyekola solo. Mbala mosusu mpe totikaki mosala ya mbongo mingi, tosalaki mbongwana na boyokani na biso na bandeko ya libota mpe baninga na biso, tobongolaki makanisi mpe etamboli na biso, to mpe totikaki mimeseno oyo esepelisaka Yehova te. Kasi makambo nyonso oyo totikaki ezali na motuya moke soki tokokanisi yango na mapamboli oyo tozwi lokola toyebi solo.

3 Yesu apesaki ndakisa ya moto moko ya mombongo oyo azalaki kosala mibembo mpo na koluka mayaka ya kitoko. Ntango amonaki liyaka moko ya motuya monene, atɛkaki mbala moko biloko nyonso oyo azalaki na yango mpo asomba liyaka yango. Liyaka yango ezali komonisa solo ya Bokonzi ya Nzambe. Na ndakisa wana, Yesu amonisaki ete solo ezalaka na motuya monene mpo na bato oyo bazwi yango. (Matai 13:45, 46) Ntango toyekolaki solo ya Bokonzi ya Nzambe mpe mateya mosusu oyo ezali na Biblia, tozwaki yango na motuya mingi, yango wana tondimaki kotika eloko nyonso oyo esengeli mpo na kozwa yango. Soki tokobi kozwa solo na motuya, tokotɛka yango te. Kasi likambo ya mawa, basaleli mosusu ya Nzambe bazali kozwa lisusu solo na motuya te, kutu batɛki yango. Biso tósala bongo te! Tosengeli kolanda toli ya Biblia ya “kokoba kotambola na kati ya solo.” (Tángá 3 Yoane 2-4.) Yango elingi koloba ete tosengeli kotya solo na esika ya liboso mpe komonisa yango na bomoi na biso. Kasi, mpo na nini mpe ndenge nini moto akoki “kotɛka,” to kotika solo? Tokoki kosala nini mpo likambo yango ekómela biso ata mokolo moko te? Mpe ndenge nini tokoki kokangama na ekateli na biso ya “kokoba kotambola na kati ya solo”?

MPO NA NINI MPE NDENGE NINI BASUSU ‘BATƐKI’ SOLO?

4. Mpo na nini bato mosusu na siɛklɛ ya liboso bakobaki te kotambola na kati ya solo?

4 Na siɛklɛ ya liboso, bato mosusu oyo bandimaki mateya ya Yesu bakobaki te kotambola na kati ya solo. Na ndakisa, ntango Yesu asalaki likamwisi ya koleisa ebele ya bato, na nsima bato yango balandaki ye na ngámbo mosusu ya Mbu ya Galile. Kuna, Yesu alobaki likambo moko oyo ebɛtisaki bango libaku: “Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi na kati na bino te.” Na esika ya kosɛnga Yesu alimbola maloba na ye, balobaki: “Liloba oyo ezali makasi; nani akoki koyoka yango?” Na yango, “mingi na kati ya bayekoli na ye bazongelaki biloko ezalaki na nsima mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te.”​—Yoane 6:53-66.

5, 6. (a) Mpo na nini bato mosusu na mikolo na biso batiki solo? (b) Ndenge nini moto akoki komemama mosika na solo?

5 Likambo ya mawa, bato mosusu lelo mpe batiki solo. Mpo na nini? Basusu babɛtaki libaku mpo na engɛngiseli moko ya vɛrsɛ ya Biblia, to mpo na likambo oyo ndeko moko oyo ayebani mingi alobaki to asalaki. Basusu basepelaki te na toli ya Biblia oyo bapesaki bango, to bazwanaki matata makasi na ndeko moko na lisangá. Basusu mpe balandaki mateya ya bapɛngwi mpe ya bato oyo balobaka lokuta mpo na biso. Yango ezali mwa bantina oyo esali ete basusu bátika Yehova mpe lisangá. (Baebre 3:12-14) Nzokande, elingaki kozala malamu mpenza soki babatelaki kondima na bango epai ya Yesu, ndenge ntoma Petro asalaki! Ntango ebele ya bato babɛtaki libaku mpo na maloba ya Yesu, Yesu atunaki bantoma soki bango mpe balingi kotika ye. Petro ayanolaki: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”​—Yoane 6:67-69.

6 Basusu bamemami mokemoke mosika na solo, mbala mosusu kozanga ete báyeba yango. Moto oyo azali kotika solo mokemoke azali lokola masuwa oyo ezali komemama mokemoke mosika na mokili. Biblia ekebisi biso ete tózala ekɛngɛ mpo “tómemama mosika na nzela te.” (Baebre 2:1) Na bokeseni na moto oyo andimi ye moko kotika solo, moto oyo amemami mosika na solo ayebaka te. Kasi atikaka ete boninga na ye na Yehova elɛmba mpe nsima ya mikolo boninga yango ekoki kokatana. Tokoki kosala nini mpo likambo yango ekómela biso te?

NINI EKOSALISA BISO TÓTƐKA SOLO ATA MOKOLO MOKO TE?

7. Nini ekosalisa biso tótɛka solo te?

7 Mpo na kokoba kotambola na kati ya solo, tosengeli kondima mpe kotosa likambo nyonso oyo Yehova alobi. Tosengeli kotya solo na esika ya liboso na bomoi na biso mpe kolanda mitinda ya Biblia na makambo nyonso. Na libondeli moko, Mokonzi Davidi alobaki na Yehova ete: “Nakotambola na solo na yo.” (Nzembo 86:11) Davidi azwaki ekateli ya kotambola na kati ya solo, biso mpe tosengeli kosala bongo. Soki tozwi ekateli te, tokoki kobanda kokanisa lisusu makambo oyo totikaki mpo tóyekola solo mpe mbala mosusu koluka kutu kozongela yango. Tokoki te kopona mateya nini ya Biblia tokondima mpe mateya nini tokondima te. Tosengeli kotambola na kati ya “solo nyonso.” (Yoane 16:13) Na lisolo eleki, tolobelaki makambo mitano oyo mbala mosusu totikaki mpo na kosomba solo. Sikoyo, tólobela oyo tokoki kosala mpo tózongela te makambo yango oyo totikaki.​—Matai 6:19.

8. Ndenge nini kosalela ntango na bwanya te ekoki kosala ete mokristo amemama mosika na solo? Pesá ndakisa.

8 Ntango. Mpo tómemama mosika te na solo, tosengeli kokoba kosalela ntango na biso na bwanya. Soki tokebi te, tokoki kobanda kolekisa ntango mingi na kominanola, na makambo oyo tosepelaka na yango, na Internet, to na kotala televizyo. Ata soki makambo yango ezali mpenza mabe te, ekoki kozwa biso ntango oyo tozalaki liboso kolekisa na koyekola biso moko mpe na makambo mosusu ya elimo. Likambo ya ndenge wana ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Emma. * Banda bomwana, Emma azalaki kolinga bampunda mpe azalaki kotambwisa yango ntango nyonso oyo akoki. Kasi na nsima, akómaki koyoka mabe mpo na ntango nyonso oyo azalaki kolekisa na kosakana na bampunda mpe azwaki ekateli ya kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Azwaki mpe liteya na ndakisa ya Cory Wells, ndeko mwasi moko oyo azalaká kotambwisa bampunda na lisano ya rodéo. * Lelo oyo, Emma alekisaka ntango mingi na mosala ya Yehova, azwaka mpe ntango ya kolekisa na libota mpe baninga na ye oyo basalelaka mpe Yehova. Ayokaka ete azali na boyokani malamu na Yehova mpe azali na kimya mpo ayebi ete azali kosalela ntango na ye na bwanya.

9. Nini ekoki kosala ete biloko ya mokili ekóma na ntina mingi?

9 Biloko ya mokili. Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, tótya biloko ya mokili na esika ya liboso te. Ntango toyekolaki solo, tomonaki ete kosalela Yehova ezali na ntina mingi koleka biloko ya mokili mpe tosepelaki kotika biloko yango mpo na solo. Kasi, nsima ya mikolo, tokoki komona ndenge basusu bazali kosomba baaparɛyi oyo ezali kobima to kosepela na biloko mosusu ya mokili. Tokoki kobanda kokanisa ete biso tozali kozanga. Okomona totiki kosepela na biloko oyo tozali na yango mpe tobandi komipesa na konduka biloko ya mokili. Likambo ya ndenge wana ekómelaki Demasi. Akómaki kolinga makambo ya mokili mingi tii asundolaki mosala oyo azalaki kosala elongo na ntoma Paulo. (2 Timote 4:10) Mbala mosusu Demasi alingaki biloko ya mokili mingi koleka mosala ya Nzambe, to alingaki lisusu te komipimela makambo mosusu mpo na kosala elongo na Paulo. Yango ezali koteya biso nini? Mbala mosusu kala tozalaki mpenza kolinga biloko ya mokili. Soki tokebi te, mposa na yango ekoki kokola lisusu mpe kokóma makasi tii kosala ete tólinga lisusu solo te.

10. Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, likambo nini tosengeli kotɛmɛla?

10 Boyokani na biso na basusu. Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, tosengeli te komitika na mbamba ya bato oyo basalelaka Yehova te. Ntango toyekolaki solo, boyokani na biso na bandeko mpe baninga na biso oyo basalelaka Yehova te ebongwanaki. Ekoki kozala ete basusu basalaki biso matata te, kasi, basusu batɛmɛlaki biso. (1 Petro 4:4) Ezali solo ete tosalaka makasi tóyokana malamu na bandeko ya libota na biso mpe tózala na boboto. Kasi tosengeli te kotya mibeko ya Yehova pembeni mpo na kosepelisa bango. Mpe na kolanda likebisi oyo ezali na 1 Bakorinti 15:33, baninga na biso ya motema basengeli kozala kaka bato oyo balingaka Yehova.

11. Nini ekosalisa biso tóboya makanisi mpe etamboli ya mbindo?

11 Makanisi mpe etamboli ya mbindo. Mpo tókoba kotambola na kati ya solo, tosengeli kozala basantu, to pɛto na miso ya Yehova. (Yisaya 35:8; tángá 1 Petro 1:14-16.) Ntango toyekolaki solo, tosalaki bambongwana mpo bomoi na biso eyokana na mateya ya Biblia. Basusu basalaki bambongwana ya minene. Kasi, tosengeli kaka kokeba ete tótika te etamboli na biso ya pɛto mpo na kokóma na etamboli ya mbindo ya mokili oyo. Nini ekosalisa yo okwea te na etamboli ya mbindo? Kanisá eloko oyo Yehova apesá mpo tózala basantu: bomoi ya kokoka ya Mwana na ye Yesu Kristo. (1 Petro 1:18, 19) Mpo tókoba kozala pɛto na miso ya Yehova, tosengeli ntango nyonso kokanisaka motuya ya mbeka ya lisiko.

12, 13. (a) Mpo na nini tosengeli kotalela bafɛti ya mokili ndenge Yehova atalelaka yango? (b) Tokotalela nini sikoyo?

12 Mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te. Bato ya libota na biso, baninga ya mosala mpe baninga ya kelasi bakoki kolinga ete tósangana na bafɛti na bango. Nini ekosalisa biso tótɛmɛla mbamba ya kosangana na mimeseno mpe bafɛti oyo esepelisaka Yehova te? Tosengeli kobatela na makanisi na biso ntina oyo Yehova asepelaka na makambo yango te. Tokoki kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo na koyeba ndenge oyo bafɛti yango ebandaki. Soki tomanyoli bantina oyo Biblia epesi ya kosangana na bafɛti yango te, tokomona mpenza ete tozali kotambola na nzela oyo ‘endimami na Nkolo.’ (Baefese 5:10) Soki tozali kotyela Yehova mpe Liloba na ye motema, tokokwea te na motambo ya “kolɛnga liboso ya bato.”​—Masese 29:25.

13 Tozali na elikya ya kotambola na kati ya solo libela na libela. Nini ekosalisa biso tókangama makasi na ekateli ya kokoba kotambola na kati ya solo? Tótalela makambo misato.

KANGAMÁ MAKASI NA EKATELI NA YO YA KOTAMBOLA NA KATI YA SOLO

14. (a) Ndenge nini kokoba koyekola Biblia ekosalisa biso tózala na ekateli makasi ya kotɛka solo te? (b) Mpo na nini bwanya, disiplini mpe mayele ezali na ntina?

14 Ya liboso, kobá koyekola Biblia mpe komanyola na mozindo makambo oyo ozali koyekola. Zalá na programɛ ya malamu mpo na kosala yango mbala na mbala. Soki ozali koyekola mingi, okolinga solo mingi mpe okozala na ekateli ya kotɛka yango ata mokolo moko te. Longola ‘kosomba solo,’ Masese 23:23 elobi na biso ete tósomba mpe “bwanya ná disiplini ná mayele.” Koyeba solo ya Biblia ekoki te. Tosengeli kosalela yango na bomoi na biso. Mayele ekosalisa biso tómona ndenge makambo oyo tozali koyekola eyokani na makambo oyo toyebaki liboso. Bwanya ekotinda biso tósalela boyebi yango. Na bantango mosusu, solo epesaka biso disiplini, esalisaka biso tómona bisika oyo tosengeli kobongisa. Tosengeli kondima nokinoki disiplini yango, mpo Biblia elobi ete ezali na motuya koleka palata.​—Masese 8:10.

15. Ndenge nini solo ebatelaka biso lokola mokaba?

15 Ya mibale, zalá na ekateli ya kosalela mateya ya Biblia na bomoi na yo ya mokolo na mokolo. Biblia ekokanisi solo na mokaba ya soda. (Baefese 6:14) Na ntango ya kala, mokaba ya soda ezalaki kosalisa ye mpe kobatela loketo na ye na etumba. Kasi, asengelaki kokanga yango makasi. Soki akangi yango malamu te, ekosalisa mpenza te. Ndenge nini solo ebatelaka biso lokola mokaba? Soki tokangami na solo ya Biblia ntango nyonso, ekosalisa biso tókanisaka malamu mpe tózwa bikateli ya malamu. Soki tokutani na mokakatano to komekama, solo ya Biblia ekosalisa biso tózala na ekateli ya kosala oyo ezali malamu. Kaka ndenge soda abosanaka te kotya mokaba na ye ntango akei etumba, biso mpe tosengeli kolata solo lokola mokaba. Tosengeli kosalela solo ya Biblia na likambo nyonso ya bomoi na biso. Soda azalaki mpe kotya mopanga na mokaba na ye. Tótala ndenge oyo biso mpe tokoki kosala bongo.

16. Ndenge nini koteya solo esalisaka biso tókoba kotambola na kati ya solo?

16 Ya misato, teyáká solo ya Biblia ntango nyonso oyo ozwi libaku. Biblia ezali lokola mopanga. Kaka ndenge soda ya mpiko azalaki kokanga mopanga na ye makasi, biso mpe tosengeli kokangama makasi na Liloba ya Nzambe. (Baefese 6:17) Biso nyonso tokoki kokolisa mayele na biso ya koteya mpo na “kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15) Ntango tozali kosalela Biblia mpo na koteya basusu, tokoyeba solo malamu koleka mpe tokolinga yango mingi mpenza. Yango ekosala ete tókangama makasi na ekateli na biso ya kokoba kotambola na kati ya solo.

17. Mpo na nini solo ezali na motuya na miso na yo?

17 Solo ezali likabo ya motuya oyo Yehova apesi biso. Esalisi biso tózala na boyokani makasi na Tata na biso ya likoló. Yango nde eloko oyo eleki mpenza motuya. Yehova ateyi biso makambo ebele, kasi yango ezali kaka ebandeli! Apesi biso elaka ete akokoba koteya biso libela na libela. Na yango, zwá solo na motuya lokola liyaka moko ya kitoko. Kobá ‘kosomba solo mpe kotɛka yango te.’ Soki osali bongo, lokola Davidi, okokokisa elaka oyo epai ya Yehova ete: “Nakotambola na solo na yo.”​—Nzembo 86:11.

^ par. 8 Topesi ye nkombo mosusu.

^ par. 8 Kɔtá na TV JW, mpe kende na MASOLO YA BOMOI > SOLO EBONGOLAKA BATO.