Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe asalá makambo nini?

Nzambe asalá makambo nini?

Soki olingi koyeba moto moko malamu, esɛngaka koyeba makambo oyo asalá mpe mikakatano oyo alongá. Ndenge moko mpe, soki olingi koyeba Nzambe malamu, osengeli koyeba makambo oyo asalá. Soki osali yango, okomona ete asalá makambo ebele oyo ezali kosalisa biso lelo mpe oyo ekosalisa biso na mikolo ekoya.

NZAMBE AKELÁ BILOKO NYONSO MPO NA BOLAMU NA BISO

Yehova azali Mozalisi Monene, mpe “bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.” (Baroma 1:20) “Ye azali Mokeli ya mabele na nzela ya nguya na ye, Ye oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka na nzela ya bwanya na ye, mpe Ye oyo atandaki likoló na nzela ya mayele na ye.” (Yirimia 10:12) Biloko oyo Nzambe akelá emonisaka mpe ete akipaka biso.

Tókanisa kaka ndenge Yehova apesá biso bato bomoi ya malamu koleka na ndenge akelá biso “na elilingi na ye.” (Ebandeli 1:27) Elakisi ete asalá biso na ndenge oyo ezali kopesa biso nzela tómonisa ata mwa moke bizaleli na ye. Apesá biso mayele ya koyeba makanisi mpe mitinda na ye. Ntango tozali kolanda makanisi mpe mitinda yango na bomoi na biso, epesaka biso esengo mingi mpe esalisaka biso tózala na bomoi ya malamu koleka. Longola yango, apesi biso libaku ya kokóma baninga na ye.

Ndenge oyo Nzambe abongisá mabele emonisaka polele ndenge oyo atalelaka biso. Ntoma Paulo akomaki ete Nzambe “amitikaki mpenza te kozanga litatoli, ndenge asaleli [biso] bolamu, ndenge apesaka [biso] bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na [biso] mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” (Misala 14:17) Nzambe asukaki kaka te na kopesa biso biloko oyo ekoki kosalisa biso mpo tózala na bomoi. Mpo tósepela na bomoi yango, apesá biso biloko ebele mpe ya ndenge na ndenge. Nzokande, ezali mpe na likambo mosusu oyo Nzambe abongisaki mpo na biso.

Yehova akelaki mabele mpo bato báfanda wana libela na libela. Biblia elobi: “Mabele, apesá yango bana ya bato” mpe “azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Nzembo 115:16; Yisaya 45:18) Bato ya ndenge nini basengelaki kofanda wana mpe mpo na ntango boni? Biblia elobi: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

Yango wana, ntango Yehova akelaki mobali mpe mwasi ya liboso, Adama ná Eva, atyaki bango na paradiso awa na mabele “mpo na kolona yango mpe kobatela yango.” (Ebandeli 2:8, 15) Nzambe apesaki bango mokumba moko kitoko; alobaki na bango boye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Ebandeli 1:28) Yango elakisi ete Adama ná Eva bakokaki koumela seko na seko awa na mabele. Kasi, baboyaki kotosa Nzambe na nko mpe na bongo, bazalaki lisusu te “bayengebene” oyo “bakozwa mabele.” Ndenge tokomona yango, atako Adama ná Eva bazangaki botosi, Yehova atikaki te mokano na ye mpo na bato mpe mpo na mabele. Kasi liboso, tólobela naino likambo mosusu oyo Nzambe asalá.

NZAMBE APESÁ BISO LILOBA NA YE

Biblia ebengamaka mpe Liloba ya Nzambe. Mpo na nini Yehova apesá biso yango? Libosoliboso mpo tóyeba ye. (Masese 2:1-5) Biblia epesi eyano te na motuna mokomoko oyo tokoki komituna mpo na Nzambe; kutu, buku moko te ekoki kosala yango. (Mosakoli 3:11) Atako bongo, makambo nyonso oyo ekomami na Biblia esalisaka biso tóyeba Nzambe. Ndenge na ye ya kosalela bato makambo esalisaka biso tóyeba bizaleli na ye. Tokoki koyeba bato ya ndenge nini alingaka mpe bato ya ndenge nini aboyaka. (Nzembo 15:1-5) Eteyaka biso losambo oyo andimaka, bizaleli oyo asepelaka na yango, mpe ndenge oyo tosengeli kotalela biloko ya mokili. Longola yango, maloba mpe misala ya Mwana na ye Yesu Kristo, oyo ekomami na Biblia, emonisaka biso polele bizaleli ya Yehova.​—Yoane 14:9.

Yehova apesá biso mpe Liloba na ye Biblia mpo tóyekola ndenge ya kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Na Biblia, Yehova ayebisi biso ndenge ya kozala na libota ya esengo, kosepela na oyo tozali na yango, mpe ndenge ya kolonga mitungisi. Ndenge tokomona yango na lisolo mosusu, Biblia epesi biyano na mituna oyo bato mingi bamitunaka, na ndakisa: Mpo na nini bampasi etondi na mokili? Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ekoya? Elimboli mpe makambo oyo Nzambe asali mpo mokano oyo azalaki na yango na ebandeli ekokisama.

Biblia ekokani na mokanda mosusu te; makambo mingi emonisi ete ezali mokanda ya Nzambe. Bato nyonso oyo bakomá yango bazali 40, na eleko ya mbula 1 600; atako bongo, ezali na motó ya likambo moko, mpo ezali mpenzampenza nde mokanda ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Biblia ekeseni na mikanda mosusu ya kala; atako eumeli bambula mingi, maloba na yango ebatelamaki malamu. Tokoki komona yango soki tokokanisi ebele ya bamaniskri ya Biblia oyo ezali tii lelo. Longola yango, ezali na bato oyo basalaki nyonso mpo Biblia ebongolama te, ekabolama te, mpe etángama te; kasi balongaki te. Lelo oyo, Biblia ezali mokanda oyo ebongolami mpe ekabolami mingi koleka mikanda mosusu nyonso. Lokola Biblia ezali tii lelo, elakisi ete “liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.”​—Yisaya 40:8.

NZAMBE ALAKAKI ETE AKOKOKISA MOKANO NA YE

Nzambe abongisaki mpe makambo mpo mokano na ye mpo na bato ekokisama. Ndenge tolobaki yango liboso, Nzambe alingaki ete bato báfanda libela awa na mabele. Nzokande, ntango Adama abukaki mobeko ya Nzambe, na maloba mosusu asalaki lisumu, ezala ye moko mpe bana oyo alingaki kobota bakokaki lisusu te kozala na bomoi ya seko. Biblia elobi: “Kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Baroma 5:12) Ntango Adama abukaki mobeko, emonanaki lokola nde mokano ya Nzambe ekokokisama lisusu te. Kasi, Yehova asalaki nini?

Makambo oyo Yehova asalaki ezali komonisa mpenza bizaleli na ye. Mpo na kolakisa ete azali sembo, apesaki Adama ná Eva etumbu mpo na mabe na bango; kasi abongisaki makambo mpo na kosalisa bana oyo basengelaki kobota. Mpo na kolakisa ete azali na bwanya, Yehova akanisaki ndenge ya kobongisa likambo wana, mpe ayebisaki yango mbala moko. (Ebandeli 3:15) Mpo tólongwa na lisumu mpe na liwa, Nzambe atindaki Mwana na ye, Yesu Kristo. Yango esɛngaki nini?

Mpo bato bálongwa na lisumu mpe na liwa oyo ekɔtaki mpo na lisumu ya Adama, Yehova atindaki Yesu awa na mabele mpo na koteya bato nzela ya bomoi mpe “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” a (Matai 20:28; Yoane 14:6) Yesu akokaki kopesa lisiko mpo azalaki moto ya kokoka, ndenge Adama azalaki liboso asala lisumu. Kasi, Yesu atosaki Nzambe tii na liwa, likambo oyo Adama asalaki te. Lokola ebongaki te ete Yesu azwa etumbu ya liwa, Yehova asekwisaki ye mpe azongaki na likoló. Yesu akokaki sikoyo kosala likambo oyo Adama asalaki te: kofungola nzela mpo bato bázwa bomoi ya seko. Biblia elobi: “Mpo ndenge kozanga botosi ya moto kaka moko ekómisaki ebele ya bato basumuki, ndenge mpe botosi ya moto kaka moko ekokómisa bato mingi bayengebene.” (Baroma 5:19) Na nzela ya mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola biso, Nzambe akokokisa maloba na ye mpe bato bakozala na bomoi ya seko na mabele.

Oyo Yehova asalaki mpo na kosilisa mabe oyo lisumu ya Adama ememaki ezali koteya biso makambo ebele mpo na ye. Tomoni ete eloko moko te ekoki kopekisa Yehova asilisa likambo oyo abandi; liloba na ye “ekolonga” kaka. (Yisaya 55:11) Ezali mpe kosalisa biso tómona ete Yehova alingaka biso mingi mpenza. Biblia elobi boye: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo, na likambo oyo, ezali te ete biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye azala mbeka mpo na kozipa masumu na biso.”​—1 Yoane 4:9, 10.

Nzambe “abombaki kutu Mwana na ye te kasi akabaki ye mpo na biso nyonso”; yango wana tozali na elikya ete ndenge alaki yango, “akopesa biso . . . biloko mosusu nyonso na boboto mpenza.” (Baroma 8:32) Nzambe alaki kosalela biso makambo nini? Tángá lisolo oyo elandi.

NZAMBE ASALÁ MAKAMBO NINI? Yehova akelá bato mpo bázala na bomoi ya seko awa na mabele. Apesaki biso Biblia mpo tóyeba ye. Yehova apesaki Yesu Kristo lokola lisiko, mpo mokano na ye ekokisama

a Mpo na koyeba makambo mingi mpo na lisiko, talá buku Sepelá na bomoi libela na libela! liteya 27, ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na Internet na www.pr418.com.