Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kozala na bomoi EZALI kaka na ntina

Kozala na bomoi EZALI kaka na ntina

Faizal abungisaki mwasi na ye na liwa; nsima ya mbula moko, basengelaki kosala ye moko lipaso ya motema. Alobi boye: “Ntango natángaka mokanda ya Yobo, namonaka ete soki Yehova atyaki yango na Biblia, ezalaki mpamba te. Soki totángi na Biblia lisolo ya moto moko oyo akutanaki na makambo oyo tozali kokutana na yango, ekitisaka mpasi ya motema na biso.” Abakisi boye: “Kozala na bomoi ezali kaka na ntina.”

Tarsha azalaki naino moke ntango mama na ye akufaki. Alobi boye: “Koyeba Nzambe esalisaka moto azala na bomoi oyo ezali na ntina, epesaka elikya mpe esengo ata soki tozali kokutana na makambo ndenge na ndenge ya mpasi. Yehova akoki mpenza kopesa biso makasi ya kolonga mikakatano ya mokolo na mokolo.”

TOMONI na masolo oyo eleki ete makambo ya mpasi oyo tokutanaka na yango ekoki kotinda moto amona mpenza ete akómi na nsuka. Ntango ozali kobunda na mikakatano na yo, okoki komituna soki kozala na bomoi ezali kaka na ntina to soki ezali na moto oyo akipaka mpasi na yo. Yebá ete Nzambe ayebaka mpasi na yo. Ozali na valɛrɛ mingi na miso na ye.

Mokomi ya Nzembo 86 alobaki boye mpo na komonisa elikya na ye epai ya Nzambe: “Na mokolo ya mpasi na ngai nakobenga yo, mpo okoyanola ngai.” (Nzembo 86:7) Kasi, mbala mosusu okoki komituna ete, ‘Ndenge nini Nzambe akoyanola ngai “na mokolo ya mpasi na ngai”?’

Atako Nzambe akolimwisa te mikakatano oyo ozali kokutana na yango, Biblia eyebisi biso ete akoki kopesa yo kimya ya makanisi oyo ekosalisa yo oyika mpiko: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.” (Bafilipi 4:6, 7) Talá ndenge bavɛrsɛ oyo ezali kondimisa biso ete Nzambe ayebaka mpasi na biso.

Nzambe ayebaka mpasi na yo

“Nzambe abosanaka ata moko na [bakɛngɛli-mboka] te . . . Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”​Luka 12:6, 7.

KANISÁ NAINO: Nzambe akipaka ata mwa bandɛkɛ wana mikemike. Nzambe amonaka ata mwa moko na yango; mokomoko ezali ekelamu ya bomoi mpe ezali na valɛrɛ na miso na ye. Na miso ya Nzambe, moto azali na valɛrɛ mingi koleka bandɛkɛ wana. Moto azali ekelamu oyo eleki bikelamu mosusu nyonso ya Nzambe awa na mabele; asalemá na “elilingi” ya Nzambe mpe akoki komonisa bizaleli malamu na ye.​—Ebandeli 1:26, 27.

“Ee Yehova, otalitali ngai, mpe oyebi ngai. . . . Otyeli likanisi na ngai likebi. . . . Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai.”​Nzembo 139:1, 2, 23.

KANISÁ NAINO: Nzambe ayebi yo malamumalamu. Ayebi makanisi mpe mabanzo ya motema na yo. Ata soki bato mosusu bazali koyeba mpasi na yo te, Nzambe ayebi yango mpe azali na mposa ya kosalisa yo. Nyonso wana ezali kolakisa ete kozala na bomoi ezali kaka na ntina.

Bomoi na yo ezali na ntina

“Ee Yehova, yoká libondeli na ngai; mpe kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi ekómela yo. . . . Sembolelá ngai litoi na yo; na mokolo oyo nazali kobenga, salá mbangu, yanolá ngai. . . . Akobaluka mpenza mpo na koyoka libondeli ya baoyo biloko na bango nyonso epunzami.”​Nzembo 102:1, 2, 17.

KANISÁ NAINO: Ezali lokola nde banda bato babandá komona mpasi, Yehova akomaka na kaye mpisoli nyonso oyo batangisaka. (Nzembo 56:8) Mpisoli na yo mpe ezali na kati. Nzambe abosanaka te bampasi mpe kolela na yo nyonso mpo ozali na valɛrɛ mingi na miso na ye.

“Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. . . . Ngai, Yehova Nzambe na yo, . . . nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’”​Yisaya 41:10, 13.

KANISÁ NAINO: Nzambe alingi kosalisa yo. Soki okwei, akotɛlɛmisa yo.

Tozali na elikya ya avenire ya malamu

“Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko . . . mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”​Yoane 3:16.

KANISÁ NAINO: Na miso ya Nzambe, ozali na valɛrɛ mingi; yango wana andimaki kopesa Mwana na ye Yesu lokola mbeka mpo na yo. Mbeka yango ezali kopesa yo elikya ya kozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina mpo na libela. *

Ata soki ozali kotungisama mpe koyoka lokola nde okómi na nsuka, yekoláká Liloba ya Nzambe mpe kolisá kondima na makambo oyo alaki. Okozala na esengo mpe okomona ete kozala na bomoi ezali kaka na ntina.

^ par. 19 Mpo na koyeba makambo mosusu na ndenge oyo mbeka ya Yesu ezali kosalisa biso, talá video Kanisá liwa ya Yesu na site Internet www.pr418.com. Talá na esika bakomi MIKANDA > BAVIDEO > MAKITA MPE MOSALA NA BISO.