Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 7

Luká komikitisa mpe sepelisá Yehova

Luká komikitisa mpe sepelisá Yehova

“Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele . . . Bóluka komikitisa.”​—SEF. 2:3.

LOYEMBO 80 ‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’

NA MOKUSE *

1-2. (a) Biblia elobi nini mpo na Moize, mpe makambo nini asalaki? (b) Elaka nini esengeli kolendisa biso tólona ezaleli ya komikitisa?

BIBLIA elobi ete Moize azalaki “na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.” (Mit. 12:3) Elingi nde koloba ete Moize azalaki makasi te, azalaki kobanga kozwa bikateli, to azalaki kobanga komonisa ngámbo oyo azali? Bato mosusu balobaka ete moto ya komikitisa azalaka bongo. Kasi likanisi wana ezali solo ata moke te. Moize azalaki na makasi, na mpiko mpe azalaki kozwa bikateli. Na lisalisi ya Yehova, akendaki kokutana na mokonzi ya nguya ya Ezipito, akambaki bato soki milio 3 na esobe, mpe asalisaki Bayisraele bálonga banguna na bango.

2 Tozali te na mikakatano oyo Moize alongaki, kasi mokolo na mokolo tokoki kokutana na bato to makambo oyo esalaka ete kobatela ezaleli ya komikitisa ezala mpasi. Nzokande, elaka moko ya malamu esengeli kolendisa biso tólona ezaleli yango. Yehova alobi ete “bato ya komikitisa bakozwa mabele.” (Nz. 37:11) Omonaka ete ozali na komikitisa? Bato mosusu mpe bakoloba bongo? Liboso ya koyanola na mituna wana ya ntina mingi, tosengeli liboso koyeba soki kozala na komikitisa elimboli nini.

KOMIKITISA EZALI NINI?

3-4. (a) Komikitisa ezali lokola nini? (b) Tosengeli komonisa bizaleli nini mpo tózala bato ya komikitisa, mpe mpo na nini?

3 Komikitisa * ezali lokola liyemi moko ya kitoko. Na ndenge nini? Ndenge kaka moto oyo asalaka mayemi asangisaka langi ndenge na ndenge ya kitoko mpo na kosala liyemi, biso mpe tosengeli kosangisa mwa bizaleli ya kitoko mpo tózala bato ya komikitisa. Kati na bizaleli yango, tokoki kotánga botosi, motema pɛtɛɛ to boboto, mpe mpiko. Mpo na nini tosengeli mpenza komonisa bizaleli yango mpo Yehova asepela na biso?

4 Kaka bato ya komikitisa nde batosaka makambo oyo Nzambe asɛngi. Na ndakisa, Nzambe asɛngi biso tózala na boboto, motema pɛtɛɛ. (Mat. 5:5; Gal. 5:23) Ntango tosalaka makambo oyo Nzambe asɛngi, Satana ayokaka nkanda. Na yango, ata soki tozali na komikitisa mpe na boboto, bato mingi ya mokili ya Satana bayinaka biso. (Yoa. 15:18, 19) Yango wana, tozali na mposa ya mpiko mpo na kotɛmɛla Satana.

5-6. (a) Mpo na nini Satana ayinaka bato ya komikitisa? (b) Tokozwa biyano na mituna nini?

5 Moto oyo azali na komikitisa te azalaka na lolendo, azalaka na nkanda makasimakasi, mpe atosaka Yehova te. Satana azalaka bongo. Yango wana ayinaka mpenza bato ya komikitisa! Bizaleli na bango ya malamu emonisaka polele ete azali mabe mpenza. Mpe likambo ya mabe koleka mpo na Satana, bamonisaka ete azali mobuki-lokuta. Mpo na nini? Mpo ata soki alobi nini to asali nini, akoki te kopekisa bato ya komikitisa básalela Yehova!​—Yobo 2:3-5.

6 Ntango nini ekoki kozala mpasi tómonisa ezaleli ya komikitisa? Mpe mpo na nini tosengeli kokoba koluka komikitisa? Mpo na kozwa biyano na mituna wana, tótalela ndakisa ya Moize, ya Baebre misato oyo bazalaki baombo na Babilone, mpe ndakisa ya Yesu.

NTANGO NINI EZALAKA MPASI KOMONISA KOMIKITISA?

7-8. Moize asalaki nini ntango basusu bazangaki limemya epai na ye?

7 Ntango bapesi biso bokonzi: Ekoki kozala mpasi mpo moto oyo azali na bokonzi amonisa komikitisa, mingimingi ntango moto oyo azali na nse ya bokonzi na ye azangi limemya epai na ye, to alobi ete azwaka bikateli ya mabe. Likambo ya ndenge wana esilá kokómela yo? Soki moto ya libota na yo asali bongo, okosala nini? Talá ndenge oyo Moize asalaki.

8 Yehova atyaki Moize akamba ekólo Yisraele mpe apesaki ye nzela ya kokoma mibeko oyo ezalaki kotambwisa ekólo yango. Ntembe ezalaki te ete Yehova azalaki kosalisa Moize. Atako bongo, Miriame ná Arona, bandeko ya Moize, balobaki mabe mpo na ye mpe balobaki ete azwaki ekateli ya mabe na kotalela mwasi oyo abalaki. Bato mosusu, soki bazalaki na bokonzi lokola Moize, bakokaki koyoka nkanda makasi mpe kozongisa mabe na mabe, kasi Moize asalaki bongo te. Asilikaki noki te. Kutu, abondelaki Yehova alongola etumbu oyo apesaki Miriame. (Mit. 12:1-13) Mpo na nini Moize asalaki bongo?

Moize abondelaki Yehova alongola etumbu oyo apesaki Miriame (Talá paragrafe 8)

9-10. (a) Yehova asalisaki Moize akanga ntina ya likambo nini? (b) Mateya nini batata ya mabota mpe bankulutu bakoki kozwa na ndakisa ya Moize?

9 Moize atikaki Yehova abongisa ye. Mbula soki 40 liboso, ntango azalaki kofanda na ndako ya mokonzi ya Ezipito, Moize azalaki na komikitisa te. Kutu, azalaki kosilika mpambampamba yango wana abomaki mobali moko, mpo amonaki ete asalaki likambo ya kozanga bosembo. Moize akanisaki ete Yehova akondima makambo oyo asalaki. Na boumeli ya mbula 40, Yehova asalisaki Moize akanga ntina ete asengelaki kaka na mpiko te mpo na kokamba Bayisraele; asengelaki mpe kozala na komikitisa. Mpe mpo na komonisa komikitisa, asengelaki kozala na botosi mpe na motema pɛtɛɛ. Akangaki mpenza liteya yango mpe akómaki mokɛngɛli ya malamu mpenza.​—Kob. 2:11, 12; Mis. 7:21-30, 36.

10 Lelo oyo, ezali malamu batata ya mabota mpe bankulutu bámekola Moize. Soki basaleli bino makambo na limemya te, bósilika nokinoki te. Bózala na komikitisa mpe bóndimaka mabunga na bino. (Mos. 7:9, 20) Bótosaka malako ya Yehova mpo na kosilisa mikakatano. Mpe bópesaka ntango nyonso eyano na boboto. (Mas. 15:1) Batata ya mabota mpe bankulutu oyo basalaka ndenge wana basepelisaka Yehova, batyaka kimya, mpe bapesaka ndakisa malamu na oyo etali komonisa komikitisa.

11-13. Ndakisa nini Baebre misato batikelá biso?

11 Ntango bazali konyokola biso: Banda kala, bakonzi ya mokili banyokolaka basaleli ya Yehova. Bakoki koloba ete tosalaka “makambo ya mabe,” nzokande banyokolaka biso mpenza nde mpo toponaka “kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Mis. 5:29) Bakoki kosɛka biso, kotya biso na bolɔkɔ, to ata kobɛta biso. Kasi na lisalisi ya Yehova, tokozongisa mabe na mabe te; tokotikala kimya na ntango ya komekama yango.

12 Tótalela ndakisa ya Baebre misato oyo bazalaki baombo na Babilone: Hanania, Mishaele mpe Azaria. * Mokonzi ya Babilone asɛngaki bango bágumbamela ekeko moko monene ya wolo. Na boboto nyonso, bamonisaki mokonzi ntina oyo bakosambela ekeko yango te. Bakobaki kotosa Nzambe atako mokonzi alobaki ete akobwaka bango na litumbu ya mɔtɔ oyo ezalaki kopela. Ntango babwakaki bango na mɔtɔ, Yehova abikisaki mibali yango mbala moko, kasi bakanisaki te ete akosala kaka bongo. Kutu, balobaki ete bakondima likambo nyonso oyo Yehova akopesa nzela ete esalema. (Dan. 3:1, 8-28) Bamonisaki ete bato ya komikitisa bazalaka mpenza na mpiko; eloko moko te, ezala mokonzi, likama, to etumbu ekoki kobebisa ekateli na biso ya “kokangama kaka” na Yehova.​—Kob. 20:4, 5.

13 Ntango bosembo na biso epai ya Nzambe emekami, ndenge nini tokoki komekola Baebre misato? Na komikitisa nyonso, totyaka motema ete Yehova akobatela biso. (Nz. 118:6, 7) Bato oyo bafundi biso ete tozali bato mabe, toyanolaka bango na boboto mpe na limemya. (1 Pe. 3:15) Mpe toboyaka na motema moko kosala eloko oyo ekobebisa boninga na biso na Tata na biso ya bolingo.

Ntango basusu batɛmɛli biso, tosengeli koyanola bango na limemya (Talá paragrafe 13)

14-15. (a) Nini ekoki kosalema ntango tozali kotungisama? (b) Na kotalela Yisaya 53:7, 10, mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azali ndakisa eleki monene na oyo etali komonisa komikitisa na ntango ya mitungisi?

14 Ntango tozali kotungisama: Biso nyonso totungisamaka mpo na bantina ndenge na ndenge. Tokoki kotungisama liboso ya kosala ekzamɛ na kelasi to liboso ya kokokisa mokumba moko na esika ya mosala. Tokoki komitungisa ata soki kaka tokanisi ete tokosala ekzamɛ moko epai ya monganga. Ntango tozali kotungisama, ezalaka mpasi tómonisa komikitisa. Makambo oyo esalaka biso eloko te ekoki kobanda kopesa biso nkanda. Tokoki koloba na basusu maloba oyo ezangi boboto mpe kokatela bango mangala. Soki ozali kotungisama, kanisá ndakisa ya Yesu.

15 Na basanza na ye ya nsuka awa na mabele, Yesu atungisamaki makasi. Ayebaki ete akobomama mpe akonyokwama makasi mpenza. (Yoa. 3:14, 15; Gal. 3:13) Mwa basanza liboso akufa, alobaki ete azali koyoka mpasi mpenza. (Luka 12:50) Mpe mwa mikolo liboso ya liwa na ye, alobaki ete: “Molimo na ngai etungisami.” Tokoki komona ete azalaki na komikitisa mpe na botosi epai ya Nzambe ndenge ayebisaki ye mitungisi na ye polele na nzela ya libondeli. Abondelaki boye: “Tata, bikisá ngai naleka ngonga oyo. Atako bongo, ezali mpo na yango nde nakómi na ngonga oyo. Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” (Yoa. 12:27, 28) Ntango ngonga ekokaki, na mpiko nyonso Yesu amitikaki na mabɔkɔ ya banguna ya Nzambe, mpe babomaki ye na ndenge ya mpasi mpe ya nsɔni mpenza. Atako atungisamaki mpe anyokwamaki mpenza, Yesu amonisaki komikitisa mpe asalaki mokano ya Nzambe. Tokoki mpenza koloba ete Yesu azali ndakisa eleki monene na oyo etali komonisa komikitisa na ntango ya mitungisi!​—Tángá Yisaya 53:7, 10.

Yesu azali ndakisa eleki monene ya komikitisa (Talá paragrafe 16-17) *

16-17. (a) Ndenge nini bantoma ya Yesu batyaki komikitisa na ye na komekama? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yesu?

16 Na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele, baninga na ye ya motema, elingi koloba bantoma, batyaki komikitisa na ye na komekama. Kanisá ndenge Yesu atungisamaki na butu yango. Akolonga kotikala sembo tii na liwa? Soki atikali sembo te, moto moko te akozala na elikya ya bomoi. (Rom. 5:18, 19) Likambo oyo eleki ntina, akokaki kobebisa to kobatela lokumu ya Tata na ye. (Yobo 2:4) Na nsima, ntango azalaki kolya mpo na mbala ya nsuka elongo na bantoma na ye, masolo na bango ebalukaki na “ntembe makasi” mpo na koyeba “nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” Nzokande, Yesu asilaki kosembola bango mbala mingi mpo na likambo yango, ata mpe mwa bangonga liboso, kaka na butu yango! Likambo ya kokamwa, Yesu asilikaki te; abatelaki kimya na ye. Na boboto nyonso, kasi na mpiko, Yesu amonisaki lisusu makanisi oyo basengelaki kozala na yango. Na nsima, apesaki bango longonya ndenge batikalaki sembo epai na ye.​—Luka 22:24-28; Yoa. 13:1-5, 12-15.

17 Soki okutanaki na likambo ya ndenge wana, olingaki kosala nini? Tokoki komekola Yesu mpe kotikala kimya ata na ntango oyo totungisami. Tótosa na motema mobimba etinda ya Yehova ete ‘tókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu.’ (Kol. 3:13) Ekozala mpasi te tótosa etinda yango soki tobosani te ete biso nyonso tolobaka mpe tosalaka makambo oyo ekoki kopesa basusu nkanda. (Mas. 12:18; Yak. 3:2, 5) Mpe tósala makasi mpo tópesaka basusu longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu.​—Ef. 4:29.

MPO NA NINI TOSENGELI KOKOBA KOLUKA KOMIKITISA?

18. Ndenge nini Yehova asalisaka bato ya komikitisa bázwa bikateli ya malamu, kasi basengeli kosala nini?

18 Ekosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu. Ntango tozali koyeba te oyo tosengeli kosala na likambo moko ya ntina mingi, Yehova akosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Kasi akosala yango kaka soki tozali na komitikisa. Alaki biso ete akoyoka “mposa [to lilɔmbɔ] ya bato ya komikitisa.” (Nz. 10:17) Mpe akosuka kaka na koyoka mposa to lilɔmbɔ na biso te. Biblia elobi: “Akotambwisa bato ya komikitisa na ekateli na ye ya lisambisi, mpe akoteya bato ya komikitisa nzela na ye.” (Nz. 25:9) Yehova atambwisaka biso na nzela ya Biblia mpe ya mikanda * ná biloko ndenge na ndenge oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisaka. (Mat. 24:45-47) Tosengeli kondima lisalisi ya Yehova na komikitisa nyonso, koyekola Biblia ná mikanda ya moombo ya sembo, mpe kosalela na motema moko makambo oyo tozali koyekola.

19-21. Libunga nini Moize asalaki na Kadeshe, mpe mateya nini tokoki kozwa na likambo yango?

19 Ekosalisa biso tókima mabunga mosusu. Kanisá lisusu Moize. Na boumeli ya bambula, abatelaki komikitisa mpe asepelisaki Yehova. Na nsima, pene na nsuka ya mobembo ya mpasi oyo eumelaki mbula 40, oyo alekisaki elongo na Bayisraele na esobe, Moize amonisaki komikitisa te. Ndeko na ye ya mwasi, oyo mbala mosusu abikisaki ye na Ezipito ntango abotamaki sika, autaki kokufa na Kadeshe mpe bakundaki ye. Mpe Bayisraele babandaki lisusu koloba ete bazalaki kokokisa bamposa na bango ndenge esengeli te. Na mbala oyo, “babandaki koswanisa Moize” mpo mai ezalaki te. Atako Yehova asalaki makamwisi ebele na nzela ya Moize, mpe atako Moize akambaki bato bambula ebele na ndenge oyo ebongi, bato yango bazalaki komilela. Bamilelaki kaka mpo na kozanga mai te kasi mpe mpo na Moize, lokola nde ye moto asalaki ete báyoka mposa ya mai.​—Mit. 20:1-5, 9-11.

20 Moize asilikaki makasi mpe azalaki lisusu na boboto te. Na esika amonisa kondima mpe aloba na libanga, ndenge Yehova ayebisaki ye, agangelaki bato mpe alobaki ete akosalela bango likamwisi. Na yango, abɛtaki libanga mbala mibale mpe mai ebimaki ebele. Lolendo mpe nkanda etindaki ye asala libunga moko monene. (Nz. 106:32, 33) Ndenge Moize azangaki komikitisa na libaku wana, esalaki ete akɔta te na Mokili ya Ndaka.​—Mit. 20:12.

21 Tokoki kozwa mateya ya ntina mingi na likambo yango. Ya liboso, tosengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kobatela ezaleli na biso ya komikitisa. Soki na bantango mosusu tomonisi yango te, lolendo ekoki kobima mpe kotinda biso tóloba to tósala makambo na bozoba. Ya mibale, mitungisi ekoki kolɛmbisa biso; yango wana tosengeli kosala makasi tózala na komikitisa, ata ntango tozali kotungisama.

22-23. (a) Mpo na nini tosengeli kokoba koluka komikitisa? (b) Maloba oyo ezali na Sefania 2:3 emonisi nini?

22 Ekobatela biso. Mosika te, Yehova akolongola bato nyonso ya mabe na mabele, mpe akotika kaka bato ya komikitisa. Na ntango yango, kimya ya solosolo ekozala. (Nz. 37:10, 11) Okozala na kati ya bato yango ya komikitisa? Okoki kozala, soki osali makambo oyo Yehova asɛngi biso na nzela ya mosakoli Sefania.​—Tángá Sefania 2:3.

23 Mpo na nini Sefania 2:3 elobi ete: “Ntango mosusu bokobombama”? Maloba yango elimboli te ete Yehova azangi makoki ya kobatela bato oyo balukaka kosepelisa ye mpe oyo ye alingaka. Kasi, emonisi ete tosengeli kosala mwa eloko mpo tóbatelama. Tokoki kobika na “mokolo ya nkanda ya Yehova” mpe kozwa bomoi ya seko soki tosali milende banda sikoyo ya koluka komikitisa mpe kosepelisa Yehova.

LOYEMBO 120 Tómekola motema pɛtɛɛ ya Kristo

^ par. 5 Moto moko te kati na biso abotamá moto ya komikitisa. Tosengeli kolona ezaleli yango. Tokoki komona ete ezali mpasi te komonisa komikitisa ntango tozali elongo na bato ya kimya, kasi ekoki kozala mpasi kosala yango ntango tozwani matata na bato ya lolendo. Na lisolo oyo, tokolobela mwa mikakatano oyo ekoki kosɛnga tólonga mpo na kokolisa ezaleli ya komikitisa.

^ par. 3 NDIMBOLA YA MALOBA: Komikitisa. Bato ya komikitisa basalelaka basusu makambo na boboto mpe batikalaka kimya ata ntango basusu basilikisi bango. Bazalaka na lolendo te mpe bamitombolaka te; bamonaka ete basusu baleki bango. Ntango basaleli yango mpo na kolobela Yehova, komikitisa elimboli ete asalelaka bato oyo bazali na nse na ye makambo na bolingo mpe na motema mawa.

^ par. 12 Bato ya Babilone bapesaki Baebre wana misato nkombo Shadrake, Meshake, mpe Abedenego.​—Dan. 1:7.

^ par. 18 Na ndakisa, talá lisolo “Bikateli na yo ekumisa Nzambe,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2011.

^ par. 59 ELILINGI: Yesu abatelaki kimya mpe asembolaki bayekoli na ye na boboto ntango bawelanaki mpo na koyeba nani kati na bango aleki baninga..