Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 12

Monisá ete omityaka na esika ya basusu

Monisá ete omityaka na esika ya basusu

“Bino nyonso . . . bómityaka na esika ya bamosusu.”​—1 PE. 3:8.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

NA MOKUSE *

1. Na kotalela 1 Petro 3:8, mpo na nini tosepelaka kozala elongo na bato oyo batyaka likebi na ndenge tozali komiyoka mpe balukaka bolamu na biso?

TOSEPELAKA mingi kozala elongo na bato oyo batyaka likebi na ndenge oyo tozali komiyoka mpe balukaka bolamu na biso. Basalaka makasi bámitya na esika na biso, báyeba makanisi na biso mpe ndenge oyo tozali komiyoka. Bayebaka nini tosengeli na yango mpe basalisaka biso, mbala mosusu liboso kutu tósɛnga lisalisi. Tosepelaka mingi na bato oyo bamonisaka ete ‘bamityaka na esika na biso.’ *​—Tángá 1 Petro 3:8.

2. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tómityaka na esika ya basusu?

2 Lokola tozali bakristo, biso nyonso tolingaka koyokela basusu mawa, to komitya na esika ya basusu. Kasi mpo na koloba solo, ntango mosusu kosala yango ezalaka pɛtɛɛ te. Mpo na nini? Ya liboso, mpo tozali bato ya kozanga kokoka. (Rom. 3:23) Yango wana, tosengeli kobundisa ezaleli oyo tobotamá na yango ya koluka kaka matomba na biso moko. Ya mibale, ekoki kozala ete basusu kati na biso bayebaka te komitya na esika ya basusu mpo na ndenge oyo babɔkwamá to mpo na makambo oyo bakutaná na yango na bomoi. Ya misato, ekoki kozala ete tolandaka makanisi ya bato oyo tofandi na bango esika moko. Na mikolo oyo ya nsuka, bato mingi bakipaka te ndenge oyo basusu bazali komiyoka. Kutu, mingi bazali nde “bato oyo bamilingaka.” (2 Tim. 3:1, 2) Nini ekoki kosalisa biso mpo makambo wana epekisa biso te tómityaka na esika ya basusu?

3. (a) Ndenge nini tokoki kokóma na momeseno ya komitya na esika ya basusu? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Tokoki kokóma na momeseno ya komitya na esika ya basusu soki tolandi ndakisa ya Yehova Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Kristo. Lokola Yehova Nzambe azali bolingo, azali ndakisa eleki malamu na likambo etali komitya na esika ya basusu. (1 Yoa. 4:8) Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza. (Yoa. 14:9) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ndenge oyo moto akoki koyokela basusu mawa. Na lisolo oyo, tokomona liboso ndenge oyo Yehova ná Yesu bamonisaki ete bamityaka na esika ya basusu. Na nsima, tokomona ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa na bango.

NDENGE OYO YEHOVA AMITYAKA NA ESIKA YA BASUSU

4. Ndenge nini Yisaya 63:7-9 emonisi ete Yehova atyaka likebi na ndenge oyo basaleli na ye bamiyokaka?

4 Biblia eteyaka ete Yehova atyaka likebi na ndenge oyo basaleli na ye bamiyokaka. Na ndakisa, tótalela ndenge oyo Yehova ayokaki ntango Bayisraele na ntango ya kala bakutanaki na minyoko. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.” (Tángá Yisaya 63:7-9.) Nsima ya bambula, na nzela ya mosakoli Zekaria, Yehova alobaki ete ntango bato bazalaki konyokola basaleli na ye, ezalaki lokola bazalaki konyokola ye. Yehova ayebisaki basaleli na ye boye: “Moto oyo azali kosimba bino azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zek. 2:8) Oyo nde maloba ya nguya oyo emonisi ndenge Yehova amityaka na esika ya basaleli na ye!

Yehova amoniselaki Bayisraele motema mawa na ndenge abimisaki bango na boombo na Ezipito (Talá paragrafe 5)

5. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo Yehova asalisaki basaleli na ye oyo bazalaki konyokwama?

5 Yehova asukaka kaka te na koyokela basaleli na ye oyo bazali konyokwama mawa. Asalisaka mpe bango. Na ndakisa, ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito, Yehova ayebaki mpasi na bango mpe yango etindaki ye asikola bango. Yehova alobaki na Moize boye: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai . . . mpe nayoki kolela na bango . . . ; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona. Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito.” (Kob. 3:7, 8) Yehova ayokelaki basaleli na ye mawa, yango wana abimisaki bango na boombo. Bambula mingi na nsima, na Mokili ya Ndaka, banguna babundisaki Bayisraele. Yehova asalaki nini? “Yehova azalaki koyoka mawa na komilelalela na bango mpo na banyokoli na bango mpe mpo na baoyo bazalaki kotindikatindika bango.” Lisusu, mawa oyo Yehova ayokelaki basaleli na ye etindaki ye asalisa bango. Atindaki basambisi mpo bábikisa Bayisraele na mabɔkɔ ya banguna.​—Bas. 2:16, 18.

6. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova atyaki likebi na mayoki ya mosaleli na ye moko oyo azalaki na makanisi oyo ebongi te.

6 Yehova atyaka likebi na ndenge oyo basaleli na ye bamiyokaka, ata soki ntango mosusu bazali na makanisi oyo ebongi te. Tózwa ndakisa ya mosakoli Yona. Nzambe atindaki ye akende kosakola nsango ya lisambisi epai ya bato ya Ninive. Kasi ntango bato yango babongolaki motema, Nzambe alimbisaki bango. Nzokande, Yona asepelaki te na ekateli oyo Yehova azwaki. “Asilikaki makasi” mpo nsango oyo asakolaki ete Ninive ekobebisama ekokisamaki te. Kasi, Yehova amoniselaki Yona motema molai mpe asalisaki ye abongola makanisi na ye. (Yona 3:10–4:11) Nsukansuka, Yona abongolaki makanisi na ye. Kutu, Yehova asalelaki ye akoma lisolo yango mpo esalisa mpe biso.​—Rom. 15:4. *

7. Ndenge oyo Yehova asalelaka basaleli na ye makambo emonisi nini?

7 Ndenge oyo Yehova asalelaka basaleli na ye makambo emonisi ete amityaka na esika na bango. Ayebaka mpasi mpe minyoko oyo mokomoko na biso akutanaka na yango. Yehova ‘ayebi malamu motema ya bana ya bato.’ (2 Nt. 6:30) Ayebaka makanisi ya mitema na biso, ndenge oyo tozali mpenza komiyoka, mpe ayebi esika makoki na biso esuki. Mpe ‘akotika te ete tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema.’ (1 Ko. 10:13) Koyeba bongo ezali mpenza kokitisa biso motema!

NDENGE OYO YESU AZALAKI KOMITYA NA ESIKA YA BASUSU

8-10. Makambo nini esalisaki Yesu ayeba komitya na esika ya basusu?

8 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki mpenza komitya na esika ya basusu. Makambo soki misato esalisaki ye ayeba komitya na esika ya basusu. Ya liboso, ndenge tolobeli yango liboso, Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye ya likoló na ndenge ya kokoka. Lokola Tata na ye, Yesu azalaki kolinga bato. Atako azalaki kosepela na biloko nyonso oyo asalisaki Yehova akela, Yesu ‘azalaki kolinga mingi bana ya bato.’ (Mas. 8:31) Bolingo ezalaki kotinda ye amitya na esika ya basusu.

9 Ya mibale, lokola Yehova, Yesu azalaki na likoki ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato. Azalaki na likoki ya koyeba nini etindi moto aloba to asala likambo boye to ndenge oyo moto azali komiyoka. (Mat. 9:4; Yoa. 13:10, 11) Yango wana, ntango Yesu azalaki komona bato bazali na mpasi na mitema, mawa ezalaki kotinda ye abɔndisa bango.​—Yis. 61:1, 2; Luka 4:17-21.

10 Ya misato, Yesu ye moko akutanaki na mikakatano mosusu oyo bato bakutanaka na yango. Na ndakisa, emonani ete Yesu akolaki na libota ya babola. Ntango azalaki kosala elongo na tata-mobɔkɔli na ye Yozefe, Yesu ayekolaki kosala misala ya makasi. (Mat. 13:55; Mrk. 6:3) Lisusu, emonani lokola ete Yozefe akufaki liboso Yesu asilisa mosala na ye awa na mabele. Na yango, ekoki kozala ete Yesu ayokaki mpasi ya kobungisa moto na liwa. Longola yango, Yesu ayebaki mpasi ya kozala na libota oyo bato nyonso basambelaka Yehova te. (Yoa. 7:5) Makambo wana nyonso mpe makambo mosusu esalisaki Yesu ayeba mikakatano ya bato mpe ayeba komitya na esika na bango.

Mawa etindi Yesu alongola moto oyo akufá matoi na kati ya bato mpo abikisa ye (Talá paragrafe 11)

11. Ntango nini emonanaki polele ete Yesu azalaki komitya na esika ya basusu? Limbolá. (Talá elilingi ya ezipeli.)

11 Ezalaki komonana polele ete Yesu azalaki komitya na esika ya basusu ntango azalaki kosala makamwisi. Yesu azalaki te kosala makamwisi kaka mpo esengelaki asala yango. “Mawa” mpo na bato oyo bazalaki konyokwama nde ezalaki kotinda ye asala yango. (Mat. 20:29-34; Mrk. 1:40-42) Na ndakisa, kanisá ndenge oyo Yesu ayokaki ntango azwaki moto oyo akufá matoi, alongolaki ye na kati ya ebele ya bato, atyaki ye pembeni, to ntango asekwisaki mwana mobali ya mwasi moko oyo mobali akufá. (Mrk. 7:32-35; Luka 7:12-15) Yesu amityaki na esika ya bato wana mpe alingaki kosalisa bango.

12. Ndenge nini Yoane 11:32-35 emonisi ete Yesu amityaki na esika ya Marta ná Maria?

12 Yesu amonisaki ete amityaki na esika ya Marta mpe Maria. Ntango amonaki mawa makasi oyo bazalaki na yango mpo ndeko na bango Lazare akufaki, “Yesu alelaki, abimisi mpisoli.” (Tángá Yoane 11:32-35.) Yesu alelaki te kaka mpo abungisaki moninga na ye ya motema. Kutu, ayebaki ete akosekwisa Lazare. Yesu alelaki nde mpo amonaki mpe ayebaki mpasi mpe mawa oyo baninga na ye bazalaki na yango na mitema.

13. Ndenge nini koyeba ete Yesu azalaki komitya na esika ya basusu ezali kolendisa biso?

13 Koyeba ete Yesu azalaki komitya na esika ya bato ezali mpenza kolendisa biso. Ya solo, biso tozali bato ya kokoka te lokola ye. Kasi, tolingaka ye mpo azalaki komitya na esika ya basusu. (1 Pe. 1:8) Koyeba ete sikoyo Yesu azali Mokonzi mpe azali koyangela na Bokonzi ya Nzambe ezali kolendisa biso. Etikali moke, alongola bampasi nyonso. Lokola Yesu azalaki mpe moto awa na mabele, azali mokonzi oyo abongi mpenza mpo na kosalisa bato bálongwa na bampasi nyonso oyo boyangeli ya Satana ebimisá. Ya solo, kozala na Mokonzi oyo ‘akoki koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso’ ezali mpenza lipamboli.​—Ebr. 2:17, 18; 4:15, 16.

LANDÁ NDAKISA YA YEHOVA MPE YA YESU

14. Na kotalela Baefese 5:1, 2, kokanisa ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu ekotinda biso tósala nini?

14 Soki tozali kokanisa ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu, yango ekotinda biso tósala lisusu makasi mpo na komitya na esika ya basusu. (Tángá Baefese 5:1, 2.) Biso tozali te na likoki ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato. Atako bongo, tokoki koyeba ndenge oyo moto azali komiyoka mpe nini asengeli na yango. (2 Ko. 11:29) Tokeseni na bato mingi na mokili, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko; biso ‘totyaka likebi kaka na makambo na biso moko te, kasi totyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.’​—Flp. 2:4.

(Talá paragrafe 15-19) *

15. Mingimingi banani basengeli komonisa ete bamityaka na esika ya basusu?

15 Mingimingi, bankulutu ya lisangá basengeli komonisa ete bamityaka na esika ya basusu. Bayebi ete bakozongisa monɔkɔ mpo na bampate oyo bazali kokɛngɛla. (Ebr. 13:17) Mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo, bankulutu basengeli koyeba komitya na esika ya basusu. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bamityaka na esika ya basusu?

16. Nkulutu oyo amityaka na esika ya basusu asalaka nini, mpe mpo na nini kosala bongo ezali na ntina?

16 Nkulutu oyo amityaka na esika ya basusu alekisaka ntango mingi elongo na bandeko ya lisangá. Atunaka mituna, ayokaka na likebi mpe azalaka na motema molai. Yango ezali na ntina, mingimingi ntango mpate moko alingi kobimisa makambo oyo azali na yango na motema, kasi azali kobundana mpo na koluka maloba oyo ebongi. (Mas. 20:5) Soki nkulutu azali kolekisa ntango mingi elongo na bandeko, bakotyela ye motema, akokóma moninga na bango, mpe bakolinga ye mingi.​—Mis. 20:37.

17. Ezaleli nini bandeko mibali mpe basi mingi balobi ete basepelaka komona epai ya bankulutu? Pesá ndakisa.

17 Bandeko mibali mpe basi mingi balobaka ete ezaleli oyo basepelaka na yango mingi epai ya bankulutu ya lisangá ezali ndenge bamityaka na esika ya basusu. Mpo na nini? Adelaide alobi boye: “Ezalaka mpasi te kosolola na bankulutu mpo oyebi ete bakomitya na esika na yo.” Abakisi boye: “Okoki koyeba ete bazali komitya na esika na yo na ndenge oyo bazali koloba ntango ozali kosolola na bango.” Ndeko mobali moko asepelaki na ndenge oyo nkulutu moko amityaki na esika na ye; alobi boye: “Namonaki ndenge mai ya miso ezalaki kotambola na miso ya nkulutu yango ntango nazalaki koyebisa ye likambo oyo ezalaki kotungisa ngai. Nakobosana likambo wana te.”​—Rom. 12:15.

18. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya komitya na esika ya basusu?

18 Ezali kaka bankulutu te nde basengeli komonisa ete bamityaka na esika ya basusu. Biso nyonso tokoki komonisa ezaleli yango. Ndenge nini? Salá makasi oyeba mikakatano oyo bato ya libota na yo mpe bandeko ya lisangá bazali kokutana na yango. Na kati ya lisangá, monisá ete okipaka bilenge, bandeko oyo bazali kobɛla, mibange, mpe bandeko oyo moto moko ya libota na bango akufi. Tunáká mpo na koyeba soki bazali malamu. Yokáká malamu ntango bazali koloba. Salisá bango bámona ete ozali mpenza komitya na esika na bango. Luká kosalisa bango na ndenge oyo okoki kosala yango. Soki tosali bongo, tokomonisa ete bolingo na biso ezali kaka ya maloba te, kasi mpe ya misala.​—1 Yoa. 3:18.

19. Mpo na nini tosengeli kozala makambo makasimakasi te ntango tolingi kosalisa basusu?

19 Tosengeli kozala makambo makasimakasi te ntango tolingi kosalisa basusu. Mpo na nini? Mpo bato nyonso basalaka ndenge moko te ntango bakutani na mikakatano. Bato mosusu balobaka polele, kasi basusu balingaka koyebisa bato mpasi na bango te. Yango wana, tosengeli koluka kosalisa bango, kasi tosengeli koboya kotuna mituna oyo ekomonisa ete tolingi kokɔta na makambo oyo etali kaka bango moko. (1 Tes. 4:11) Bamosusu bakoki koyebisa biso ndenge oyo bazali komiyoka, kasi biso tokoki komona ete tosengeli te kondima makanisi na bango. Atako bongo, tosengeli koyeba ete ezali ndenge wana nde bango bazali komiyoka. Tosengeli koyoka noki, kasi kowelela koloba te.​—Mat. 7:1; Yak. 1:19.

20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Longola komitya na esika ya basusu na kati ya lisangá, tosengeli mpe komonisa ezaleli wana ya malamu na mosala na biso ya kosakola. Ndenge nini tokoki komitya na esika ya basusu ntango tozali kokómisa bato bayekoli? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 130 Tólimbisaka

^ par. 5 Yehova mpe Yesu bamityaka na esika ya basusu. Lisolo oyo ekomonisa mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa na bango. Tokomona mpe ntina oyo tosengeli komitya na esika ya basusu mpe ndenge oyo tokoki kosala yango.

^ par. 1 NDIMBOLA YA MALOBA: ‘Komitya na esika ya basusu’ elimboli koluka koyeba ndenge oyo basusu bazali komiyoka mpe kosala makasi biso mpe tómiyoka ndenge wana. (Rom. 12:15)

^ par. 6 Yehova amityaki mpe na esika ya basaleli na ye mosusu ya sembo oyo balɛmbaki nzoto to bazalaki kobanga. Kanisá lisolo ya Hana (1 Sa. 1:10-20), ya Eliya (1 Bak. 19:1-18), mpe ya Ebede-meleke (Yir. 38:7-13; 39:15-18).

^ par. 65 BILILINGI: Makita na Ndako ya Bokonzi epesaka biso mabaku mingi ya kolendisana. Tozali komona (1) nkulutu moko azali kosolola na boboto na elenge oyo azali mosakoli ná mama na ye, (2) tata moko ná mwana na ye ya mwasi bazali kosalisa ndeko mwasi moko mobange akɔta na motuka, mpe (3) bankulutu mibale bazali koyoka na likebi ndeko mwasi moko oyo ayei koluka toli.