Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 13

Monisá ete omityaka na esika ya basusu na mosala ya kosakola

Monisá ete omityaka na esika ya basusu na mosala ya kosakola

“Mawa ekangaki ye mpo na bango . . . Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.”​—MARKO 6:34.

LOYEMBO 70 Tóluka banani babongi

NA MOKUSE *

1. Wapi likambo mosusu oyo esimbaka mitema na biso na bomoto ya Yesu? Limbolá.

LIKAMBO mosusu oyo esimbaka mitema na biso na bomoto ya Yesu ezali likoki na ye ya koyeba mikakatano oyo biso bato ya kozanga kokoka tokutanaka na yango. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki ‘kosepela elongo na bato oyo bazalaki kosepela’ mpe ‘kolela elongo na bato oyo bazalaki kolela.’ (Rom. 12:15) Na ndakisa, ntango bayekoli na ye 70 bazongaki na esengo nsima ya kokokisa malamu mokumba oyo apesaki bango ya kosakola nsango malamu, Yesu “atondaki na esengo mpe na elimo santu.” (Luka 10:17-21) Nzokande, ntango amonaki mawa oyo bandeko ya Lazare bazalaki na yango mpo ndeko na bango akufaki, Yesu “atungisamaki makasi na elimo mpe abulunganaki.”​—Yoa. 11:33.

2. Nini ezalaki kosalisa Yesu amitya na esika ya bato?

2 Nini esalisaki Yesu, moto ya kokoka, amonisela bato ya kozanga kokoka motema mawa mpe ngɔlu ndenge wana? Libosoliboso, ezali mpo Yesu azalaki kolinga bato. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, ‘azalaki kolinga mingi bana ya bato.’ (Mas. 8:31) Lokola azalaki kolinga bato mingi, yango esalisaki ye ayeba malamu ndenge oyo bato bakanisaka. Ntoma Yoane alobi boye: “Ayebaki eloko nini ezali na kati ya moto.” (Yoa. 2:25) Yesu azalaki komitya na esika ya basusu. Bato bazalaki komona ete azalaki kolinga bango, yango wana bazalaki kosepela na nsango ya Bokonzi oyo azalaki kosakola. Soki biso mpe tozali kosala makasi tómityaka na esika ya basusu, tokozala na likoki ya kosalisa ebele ya bato na mosala na biso ya kosakola.​—2 Tim. 4:5.

3-4. (a) Soki tozali komitya na esika ya basusu, ndenge nini tokotalela mosala na biso ya kosakola? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Ntoma Paulo ayebaki ete azalaki na mokumba ya kosakola; biso mpe toyebi ete tozali na mokumba yango. (1 Ko. 9:16) Kasi, soki tozali komitya na esika ya basusu, tokomona ete tosengeli kosakola te kaka mpo ezali mokumba oyo tosengeli kokokisa. Tokomonisa ete totyelaka bato likebi mpe tozali na mposa ya kosalisa bango. Lisusu, toyebi ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Soki tozali kotalela mosala na biso ya kosakola ndenge wana, tokosepela na yango lisusu mingi.

4 Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo tokoki komitya na esika ya basusu na mosala na biso ya kosakola. Liboso, tokomona mateya oyo tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki komitya na esika ya bato. Na nsima, tokolobela ndenge minei oyo tokoki kolanda ndakisa na ye.​—1 Pe. 2:21.

YESU AZALAKI KOMITYA NA ESIKA YA BASUSU NA MOSALA YA KOSAKOLA

Komitya na esika ya basusu etindaki Yesu asakola nsango ya kobɔndisa (Talá paragrafe 5-6)

5-6. (a) Yesu amonisaki ete azalaki komitya na esika ya banani? (b) Mpo na nini Yesu azalaki koyokela bato oyo azalaki koteya mawa, ndenge Yisaya 61:1, 2 esakolaki yango?

5 Tótalela ndakisa moko oyo emonisi ndenge oyo Yesu azalaki komitya na esika ya basusu. Mokolo moko, Yesu ná bayekoli na ye balɛmbaki mpo basakolaki nsango malamu kozanga kopema. “Bazwaki ata ntango ya kolya biloko te.” Na yango, Yesu azwaki bayekoli na ye mpe bakendaki ‘na esika oyo bato bazalaki te’ mpo ‘bápema mwa moke.’ Kasi, ebele ya bato bapotaki mbangu mpo na kokóma liboso esika Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kokende. Yesu asalaki nini ntango akómaki kuna mpe amonaki bato yango? “Mawa * ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate ezangi mobateli. Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.”​—Mrk. 6:30-34.

6 Mpo na nini Yesu ayokelaki bato wana mawa mpe amityaki na esika na bango? Alobaki ete bato yango “bazalaki lokola bampate ezangi mobateli.” Mbala mosusu, Yesu amonaki ete basusu kati na bango bazalaki babola mpe bazalaki kosala mosala bangonga mingi mpo na kokokisa bamposa ya libota na bango. Ekoki kozala ete basusu bazalaki na mawa mpo moto moko ya libota na bango akufaki. Soki ezalaki bongo, na ntembe te, Yesu ayebaki bomoi ya ndenge nini bazalaki na yango. Ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, ekoki kozala ete Yesu ye moko mpe akutanaki na mikakatano yango mosusu. Lokola Yesu azalaki komitya na esika ya basusu, azalaki kosepela koyebisa bango nsango moko ya kobɔndisa.​—Tángá Yisaya 61:1, 2.

7. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Yesu?

7 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu? Lokola Yesu, bato mingi na bisika oyo tofandi ‘bazali lokola bampate oyo ezangi mobateli.’ Bazali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Nzokande, biso tozali na eloko oyo basengeli na yango mpenza: nsango ya Bokonzi. (Em. 14:6) Lokola tomekolaka Nkolo na biso, tosakolaka nsango malamu mpo ‘toyokelaka moto oyo azangá ná mobola mawa.’ (Nz. 72:13) Toyokelaka bato mawa, yango wana tolingaka kosala mwa eloko mpo na kosalisa bango.

NDENGE OYO TOKOKI KOMONISA ETE TOMITYAKA NA ESIKA YA BASUSU

Taleláká oyo moto mokomoko asengeli na yango (Talá paragrafe 8-9)

8. Wapi lolenge moko oyo tokoki komonisa ete tomityaka na esika ya basusu? Pesá ndakisa.

8 Nini ekoki kosalisa biso tómonisa ete tomityaka na esika ya bato oyo tosakwelaka nsango malamu? Tolingaka komitya na esika ya bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola mpe kosalela bango makambo ndenge tolingaka básalela biso. * (Mat. 7:12) Tótalela ndenge minei oyo tokoki kosala yango. Ya liboso, luká koyeba oyo moto mokomoko asengeli na yango. Mosala na biso ya kosakola nsango malamu ezali lokola mosala ya monganga. Monganga ya malamu alukaka koyeba nini moto ya maladi mokomoko asengeli na yango. Atunaka mituna mpe ayokaka na likebi ntango moto ya maladi azali koyebisa ndenge oyo azali komiyoka. Na esika ya kokomela ye nkisi ya liboso oyo eyeli ye na motó, monganga yango akoki kotika naino mwa ntango eleka mpo amona bilembo oyo emonisi maladi, na nsima, akoki kopesa ye lisalisi oyo ebongi. Ndenge moko mpe, na mosala ya kosakola, tosengeli te kosalela kaka mayele moko ya kobanda lisolo epai ya moto nyonso oyo tokutani na ye. Totalelaka nde makambo ya bomoi ya moto na moto mpe makanisi na ye.

9. Nini tosengeli te kokanisa mbala moko? Limbolá.

9 Ntango okutani na moto moko na mosala ya kosakola, osengeli te kokanisa mbala moko ete oyebi makambo ya bomoi na ye to mateya oyo andimaka mpe ntina oyo andimaka yango. (Mas. 18:13) Tuná nde moto yango mituna na mayele mpo na koyeba ye mpe mateya oyo andimaka. (Mas. 20:5) Soki ezali mabe te na mimeseno ya mboka na bino, tuná ye mosala nini asalaka, libota na ye, makambo nini ayebi, mpe makanisi na ye. Soki tozali kotuna bato mituna, ezali lokola nde tozali kopesa bango libaku báyebisa biso mpo na nini basengeli na nsango malamu. Ntango toyebi oyo basengeli na yango, tokoki komonisa ete tozali komitya na esika na bango mpe kosalisa bango na ndenge oyo ebongi, ndenge Yesu azalaki kosala.​—Kokanisá na 1 Bakorinti 9:19-23.

Kanisá bomoi ya ndenge nini moto oyo ozali kopesa litatoli akoki kozala na yango (Talá paragrafe 10-11)

10-11. Na kotalela 2 Bakorinti 4:7, 8, wapi lolenge ya mibale oyo tokoki komonisa ete tomityaka na esika ya basusu? Pesá ndakisa.

10 Ya mibale, meká kokanisa bomoi ya ndenge nini bakoki kozala na yango. Mbala mosusu, tokoki koyeba bomoi ya ndenge nini bazali na yango. Kutu, biso nyonso tokutanaka na mikakatano oyo bato nyonso ya kozanga kokoka bakutanaka na yango. (1 Ko. 10:13) Toyebi ete bomoi na mokili oyo ekoki kozala mpasi mingi. Kaka na lisalisi ya Yehova nde toyikaka mpiko. (Tángá 2 Bakorinti 4:7, 8.) Sikoyo, meká komitya na esika ya bato oyo bazali kobunda na mikakatano ya mokili oyo bango moko, kozanga lisalisi ya Yehova! Lokola Yesu, toyokelaka bango mawa, yango wana tolingaka koyebisa bango “nsango malamu ya eloko moko ya malamu koleka.”​—Yis. 52:7.

11 Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Sergey. Liboso ayekola solo, Sergey azalaki nsɔninsɔni mpe azalaki koloba mingi te. Ezalaki mpasi mpo asolola na bato. Na nsima, andimaki koyekola Biblia. Alobi boye: ‘Ntango nazalaki koyekola Biblia, namonaki ete bakristo bazali na mokumba ya koyebisa basusu makambo oyo bandimaka. Nakanisaki ete nakosala yango ata mokolo moko te.’ Kasi, akanisaki bato oyo bayoká naino mateya ya solo te mpe akanisaki bomoi ya ndenge nini bakokaki kozala na yango lokola bayebi Yehova te. Abakisi boye: ‘Makambo ya sika oyo nazalaki koyekola ememelaki ngai esengo mingi mpe kimya ya motema. Nayebaki ete bato mosusu mpe basengelaki koyekola mateya yango ya solo.’ Lokola Sergey akómaki na mposa makasi ya komitya na esika ya basusu, akómaki na mpiko mpo na kosakola. Alobi boye: ‘Eloko ekamwisaki ngai mpenza ezali ete koyebisa basusu makambo ya Biblia esalisaki ngai nakóma na kondima makasi mpe natika kozala nsɔninsɔni. Esalaki mpe ete mateya wana ya sika efanda mpenza na motema na ngai moko.’ *

Mpo na basusu, ekoki kosɛnga ntango mingi mpo na kokola na elimo (Talá paragrafe 12-13)

12-13. Mpo na nini tosengeli komonisela bato oyo toteyaka na mosala ya kosakola motema molai? Pesá ndakisa.

12 Ya misato, moniselá bato oyo oteyaka motema molai. Kobosana likambo oyo te: Ekoki kozala ete bayoká naino te mateya mosusu ya Biblia oyo biso toyebi malamu. Longola yango, mingi na bango bakangamá makasi na mateya oyo bayebisá bango. Ntango mosusu, bamonaka ete mateya ya lingomba na bango esalisaka bango bákangama makasi na libota na bango, na mimeseno ya bonkɔkɔ na bango, mpe na bato ya ekólo na bango. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?

13 Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete balingi kobuka gbagba (pont) moko ya kala oyo ebebi mpo na kotonga mosusu ya sika. Bakosala nini? Mbala mingi, batongaka gbagba ya sika ntango oyo ya kala ezali naino wana. Soki gbagba ya sika esili, nde bakoki kobuka oyo ya kala. Ndenge moko mpe, liboso ya koyebisa bato bátika mateya ya “kala” oyo bakangamá na yango, tosengeli liboso kosalisa bango báyeba mpe bálinga mateya ya “sika,” elingi koloba mateya ya Biblia oyo bayebaki liboso te. Kaka na ntango wana nde bakoki kotika kokangama na mateya ya kala oyo bazalaki kondima. Ekoki kosɛnga ntango mingi mpo na kosalisa bato bábongwana ndenge wana.​—Rom. 12:2.

14-15. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bayebi malamu te to bayebi ata moke te elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele? Pesá ndakisa.

14 Soki tozali komonisela bato motema molai na mosala ya kosakola, tokomizela te ete bákanga ntina ya mateya ya Biblia to bándima yango kaka mbala ya liboso oyo bayoki yango. Kasi, soki tozali komitya na esika ya basusu, tokotikela bato ntango mpo bákanisa na mozindo makambo oyo Biblia elobi. Na ndakisa, kanisá ndenge oyo tokoki kosalisa moto akanga ntina ya elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Bato mingi bayebi liteya yango malamu te to bayebi yango ata moke te. Ntango mosusu bakanisaka ete soki moto akufi, nyonso esili mpo na ye. To bakanisaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka likoló. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?

15 Ndeko mobali moko alobeli mayele oyo amonaka ete ebongi mpenza. Liboso, atángelaka moto Ebandeli 1:28. Na nsima, atunaka boye: ‘Epai wapi Nzambe alingaki ete bato báfanda, mpe na bomoi ya ndenge nini?’ Bato mingi bayanolaka: “Na mabele, na bomoi ya malamu.” Nsima na yango, ndeko yango atángaka Yisaya 55:11 mpe atunaka soki mokano ya Nzambe ebongwani. Mbala mingi, bato bayanolaka: “Te, ebongwani te.” Na nsuka, ndeko yango atángaka Nzembo 37:10, 11 mpe atunaka bomoi ya ndenge nini bato bakozala na yango na mikolo ezali koya. Kosalela Biblia ndenge wana esalisaki ndeko yango asalisa bato mingi báyeba ete Nzambe azali kaka na mposa ete bato ya malamu bázala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele.

Mwa likambo oyo emonisi boboto, na ndakisa kotinda mokanda ya kolendisa, ekoki kosala makambo mingi ya malamu (Talá paragrafe 16-17)

16-17. Na kotalela Masese 3:27, wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tomityaka na esika ya basusu? Pesá ndakisa.

16 Ya minei, luká mabaku ya komonisa ete otyelaka bato likebi. Na ndakisa, tokosala nini soki toyei kotala moto na ntango oyo ebongi te? Tokoki kosɛnga bolimbisi mpe koyebisa ye ete tokozongela ye na ntango oyo ebongi. Kasi, tokosala nini soki tomoni ete esɛngi tósalisa ye na mwa misala? Bongo soki moto oyo toyei kotala akɔtá ndako mpo na maladi to mpo na bobange, kasi azali na mposa básalisa ye na likambo moko? Na makambo ya ndenge wana, mbala mosusu tokoki komona malamu tósalisa moto yango.​—Tángá Masese 3:27.

17 Ndeko mwasi moko azwaki matomba mpo azalaki kosalela bato makambo ya malamu oyo ezalaki komonana lokola ezali na ntina te. Lokola azalaki komitya na esika ya basusu, akomelaki libota moko oyo mwana na bango akufaki mokanda. Mokanda yango ezalaki na bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezalaki kobɔndisa. Ndenge nini mokanda yango esalisaki libota yango? Mama ya mwana oyo akufaki akomaki boye: “Lobi, nalekisaki mokolo moko ya mabe mpenza. Nandimi te ete okoyeba ndenge oyo mokanda na yo esalisaki biso. Kutu, nazali kozanga maloba mpo na kopesa yo matɔndi mpe koyebisa yo ndenge mokanda yango ebɔndisi biso. Lobi, natángaki mokanda yango ata mbala 20. Nakanisaki te ete mokanda yango ekokaki kozala na maloba ya boboto, ya kolendisa mpe ya kobɔndisa ndenge wana. Napesi yo matɔndi mingi.” Kozanga ntembe, tokoki kozwa matomba mingi soki tozali komitya na esika ya bato oyo bazali konyokwama mpe kosala mwa eloko mpo na kosalisa bango.

TALELÁKÁ MOKUMBA NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA NA NDENGE OYO EBONGI

18. Na kotalela 1 Bakorinti 3:6, 7, mpo na nini tosengeli kotalela mokumba na biso na ndenge oyo ebongi?

18 Ya solo, tosengeli kotalela mokumba na biso na mosala ya kosakola na ndenge oyo ebongi. Tokoki kosalisa bato báyeba Nzambe, kasi ezali na makambo mosusu oyo biso tokokoka kosala te. (Tángá 1 Bakorinti 3:6, 7.) Yehova nde abendaka bato. (Yoa. 6:44) Nsukansuka, moto na moto akondima to akoboya koyoka nsango malamu na kotalela motema na ye. (Mat. 13:4-8) Kobosana te ete bato mingi bandimaki te nsango oyo Yesu azalaki kosakola, atako azalaki moteyi oyo alekaki bateyi nyonso na mokili! Yango wana, tosengeli kolɛmba nzoto te soki bato mingi oyo tozali koluka kosalisa baboyi koyoka nsango malamu oyo tosakolaka.

19. Matomba nini tokozwa soki tozali komitya na esika ya basusu na mosala na biso ya kosakola?

19 Tokozwa matomba mingi soki tozali komitya na esika ya basusu na mosala ya kosakola. Tokosepela lisusu mingi na mosala na biso ya kosakola. Tokoyoka esengo monene oyo eutaka na kopesa. Lisusu, tokosalisa ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ bázala na mokakatano te mpo na kondima nsango malamu. (Mis. 13:48) Na yango, “soki tozali mpenza na ntango oyo ebongi mpo na yango, tósalela bato nyonso oyo ezali malamu.” (Gal. 6:10) Na ndenge yango, tokozala na esengo mpo tozali kopesa Tata na biso ya likoló nkembo.​—Mat. 5:16.

LOYEMBO 64 Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma

^ par. 5 Soki tozali komitya na esika ya basusu, tokokóma na esengo mingi mpe mosala na biso ya kosakola ekobimisa matomba mingi. Mpo na nini ezali bongo? Na lisolo oyo, tokomona mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu; tokomona mpe ndenge minei oyo tokoki komonisa ete tomityaka na esika ya bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola.

^ par. 5 NDIMBOLA YA MALOBA: Ndenge elimbolami na lisolo oyo, koyokela moto mawa elimboli komitya na esika ya moto oyo azali konyokwama to oyo basaleli makambo na boboto te. Komitya na esika ya basusu ndenge wana ekoki kotinda moto asala nyonso oyo akoki kosala mpo na kosalisa bango.

^ par. 8 Talá lisolo “Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2014.