Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 10

Nini ezali kopekisa ngai nazwa batisimo?

Nini ezali kopekisa ngai nazwa batisimo?

“Bango nyonso mibale bakitaki na mai, Filipe ná mokube; mpe abatisaki ye.”​—MIS. 8:38.

LOYEMBO 52 Komipesa mpe batisimo

NA MOKUSE *

1. Adama ná Eva babungisaki nini, mpe yango ememá nini?

KANISÁ naino: Nani nde asengeli kotya mibeko mpo na koyeba oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe? Ntango Adama ná Eva balyaki mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe, bamonisaki polele ete baboyi kotyela Yehova motema mpe kolanda mibeko na ye. Baponaki kotya mibeko na bango moko na oyo etali malamu mpe mabe. (Eba. 3:22) Kasi, kanisá nyonso oyo babungisaki. Babungisaki boninga oyo bazalaki na yango na Yehova. Babungisaki mpe libaku ya kozala na bomoi ya seko, mpe batikelá bana na bango lisumu mpe liwa. (Rom. 5:12) Nzela oyo Adama ná Eva baponaki ememá mpasi mingi.

Nsima ya kondimela Yesu, mokube moko moto ya Etiopi andimaki kozwa batisimo kozanga kozela (Talá paragrafe 2-3)

2-3. (a) Mokube moko moto ya Etiopi asalaki nini ntango Filipe asakolelaki ye? (b) Mapamboli nini tozwaka ntango tozwi batisimo? (c) Mituna nini tokotalela?

2 Tótalela ndenge oyo Adama ná Eva basalaki mpe ndenge oyo mokube moko moto ya Etiopi asalaki ntango Filipe asakwelaki ye. Mokube yango akómaki na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo Yehova ná Yesu basalaki mpo na ye, yango wana, na mbala moko, azwaki batisimo. (Mis. 8:34-38) Ntango tomipesi na Nzambe na nzela ya libondeli mpe lokola mokube wana, tozwi batisimo, tomonisi polele ete tozali na botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova ná Yesu basali mpo na biso. Tomonisi mpe ete totyelaka Yehova motema mpe tondimaka ete kaka ye nde asengeli kotya mibeko na oyo etali malamu mpe mabe.

3 Kanisá ebele ya mapamboli oyo tozwi na ndenge tozali kosalela Yehova! Moko na yango ezali ete Yehova akopesa biso nyonso oyo Adama ná Eva babungisaki, ezala mpe libaku ya kozala na bomoi ya seko. Lokola tondimelaka Yesu Kristo, Yehova azali kolimbisa mabunga na biso mpe tozali na lisosoli ya pɛto. (Mat. 20:28; Mis. 10:43) Tokɔti mpe na libota ya Yehova, ya basaleli na ye oyo andimaka, mpe tozali na elikya moko ya malamu mpo na mikolo ezali koya. (Yoa. 10:14-16; Rom. 8:20, 21) Atako tozwi mapamboli wana nyonso, bato mosusu oyo bayebi Yehova bakakatanaka mpo na kolanda ndakisa ya mokube wana moto ya Etiopi. Mbala mosusu, makambo nini epekisaka bango bázwa batisimo? Mpe nini ekoki kosalisa bango mpo makambo wana epekisa bango te kozwa batisimo?

MAKAMBO OYO EPEKISAKA BATO MOSUSU BÁZWA BATISIMO

Mikakatano oyo basusu bakutanaka na yango liboso ya kozwa batisimo

Kobanga ete okokoka te (Talá paragrafe 4-5) *

4-5. Mikakatano nini elenge mobali moko na nkombo Avery mpe elenge mwasi moko na nkombo Hannah bazalaki na yango?

4 Kobanga ete okokoka te. Avery, elenge moko ya mbula 19, azali na baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova. Eyebani ete tata na ye akipaka libota na ye malamu mpe azali nkulutu moko ya molende. Atako bongo, Avery azalaki kobanga kozwa batisimo. Mpo na nini? Alobi boye: “Nazalaki komona ete nakokoka te kozala lokola tata na ngai.” Avery azalaki mpe kobanga ete akokoka te kokokisa mikumba oyo bakoki kopesa ye na mikolo ezali koya. Abakisi boye: “Nazalaki kobanga ete básɛnga ngai nabondela liboso ya bato, nasala badiskur, to nakamba etuluku moko na mosala ya kosakola.”

5 Hannah, oyo azali na mbula 18, azalaki mpenza kobanga ete akokoka te kosalela Yehova. Abɔkwamaki epai ya baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova. Atako bongo, azalaki kondima te ete akokoka kotosa mibeko ya Yehova. Mpo na nini? Hannah azalaki komona ete akokoka te kosala likambo moko ya malonga. Ntango mosusu, azalaki mpenza komiyoka mabe, yango wana azalaki komizokisa, kasi yango ezalaki nde kobebisa lisusu makambo. Alobi boye: “Nazalaki koyebisa ata moto moko te, ata mpe baboti na ngai, makambo oyo nazalaki kosala; mpe nazalaki kokanisa ete Yehova akondima ngai soki moke te mpo na makambo oyo nazalaki komisala.”

Baninga mosusu bakoki kozongisa yo nsima (Talá paragrafe 6) *

6. Nini ezalaki kopekisa Vanessa azwa batisimo?

6 Baninga mosusu bakoki kozongisa yo nsima. Vanessa, oyo azali na mbula 22, alobi boye: “Nazalaki na moninga moko malamu, oyo nayebanaki na ye banda mbula soki zomi.” Kasi, moninga yango azalaki kosalisa Vanessa te akokisa mokano na ye ya kozwa batisimo. Yango ezalaki kotungisa Vanessa mingi; alobi boye: “Namonaka ete ezali mpasi kozwa baninga; yango wana nazalaki kobanga ete soki boninga na ngai na ye ebebi, nakozwa moninga mosusu ya motema lokola ye te.”

Kobanga ete osala libunga ya monene (Talá paragrafe 7) *

7. Elenge mwasi moko na nkombo Makayla azalaki kobanga nini, mpe mpo na nini?

7 Kobanga ete osala libunga ya monene. Makayla azalaki na mbula mitano ntango ndeko na ye ya mobali alongolamaki na lisangá. Ntango azalaki kokola, amonaki mpasi oyo baboti na ye bazalaki koyoka mpo na makambo oyo ndeko na ye asalaki. Makayla alobi boye: “Nazalaki kobanga kozwa batisimo mpo, soki nasali libunga ya monene, bakoki kolongola ngai na lisangá, mpe yango ekopesa baboti na ngai lisusu mpasi.”

Kobanga ete bátɛmɛla yo (Talá paragrafe 8) *

8. Elenge mobali moko na nkombo Miles azalaki kobanga nini?

8 Kobanga ete bátɛmɛla yo. Tata ya Miles mpe mama-mobɔkɔli na ye bazali Batatoli ya Yehova; kasi mama na ye azali Motatoli ya Yehova te. Miles alobi boye: “Nafandaki ná mama na ngai mbula 18, kasi nazalaki kobanga koyebisa ye ete nalingi kozwa batisimo. Namonaki ndenge asilikaki ntango tata na ngai akómaki Motatoli ya Yehova. Yango wana, nazalaki kobanga ete abimisela ngai matata.”

NDENGE NINI OKOKI KOSALA MPO MAKAMBO WANA EPEKISA YO TE?

9. Nini ekosalema soki oyebi ndenge oyo Yehova atondi na bolingo mpe na motema molai?

9 Adama ná Eva batikaki kolanda nzela ya Yehova mpo bakobaki te kolinga Yehova mingi na mitema na bango. Atako bongo, Yehova atikaki bango báumela lisusu mingi na bomoi mpo bábota bana mpe bábɔkɔla bango na kolanda mibeko oyo bango moko bamityeli. Eumelaki te, emonanaki polele ete ekateli oyo Adama ná Eva bazwaki ya koboya ete Yehova atambwisa bango ezalaki mpenza bozoba. Mwana na bango ya liboso abomaki ndeko na ye oyo asalaki ata mabe moko te; na nsima mobulu ekómaki mingi na mokili mpe bato mingi bakómaki koluka kaka matomba na bango moko. (Eba. 4:8; 6:11-13) Kasi, Yehova azwaki ebongiseli moko mpo na kobikisa bana nyonso ya Adama ná Eva oyo baponi kosalela ye. (Yoa. 6:38-40, 57, 58) Soki oyebi malamu ndenge oyo Yehova atondi na bolingo mpe na motema molai, na ntembe te, okolinga ye lisusu mingi. Okondima te kolanda nzela oyo Adama ná Eva baponaki, mpe okomipesa na Yehova na nzela ya libondeli.

Ndenge oyo okoki kolonga mikakatano yango

(Talá paragrafe 9-10) *

10. Mpo na nini komanyola Nzembo 19:7 ekoki kosalisa yo osalela Yehova?

10 Kobá koyekola mpo oyeba Yehova lisusu malamu. Soki ozali koyekola lisusu mingi makambo ya Yehova, okomona ete kobanga oyo ozalaki na yango ete okokoka te kosalela ye ekosila. Avery, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nazalaki kobanga lisusu te nsima ya kotánga mpe komanyola likambo oyo Yehova alaki na Nzembo 19:7.” (Tángá.) Ntango Avery amonaki ndenge oyo maloba wana ya Yehova ekokisamaki epai na ye, akómaki kolinga Yehova lisusu mingi. Kolinga Yehova esalisaka biso tótika kobanga ete tokokoka te kosalela ye, tótalela nde Yehova mpe tóluka liboso kosala oyo ye alingi. Hannah, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ntango nazalaki kotánga mpe koyekola Biblia, namonaki ete soki nazali komizokisa, ezalaki lokola nde nazali kozokisa mpe Yehova.” (1 Pe. 5:7) Na nsima, Hannah akómaki ‘motosi ya liloba ya Nzambe.’ (Yak. 1:22) Matomba nini azwaki? Alobi boye: “Ntango namonaki matomba oyo nazalaki kozwa mpo na nazali kotosa Yehova, nakómaki kolinga ye lisusu mingi. Sikoyo, nandimi mpenza ete Yehova akotambwisa ngai ntango nyonso oyo nakozala na mposa ya lisalisi na ye.” Hannah atikaki momeseno oyo azalaki na yango ya komizokisa. Nsukansuka, amipesaki na Yehova na nzela ya libondeli mpe azwaki batisimo.

(Talá paragrafe 11) *

11. (a) Vanessa asalaki nini mpo na kozwa baninga ya malamu? (b) Yango eteyi biso nini?

11 Poná malamu baninga na yo. Vanessa, oyo tolobelaki liboso, ayaki komona ete moninga na ye wana azalaki kozongisa ye nsima mpo asalela Yehova te. Yango wana, akataki boninga yango. Kasi Vanessa asukaki wana te. Asalaki makasi mpo na kozwa baninga ya sika, na kati ya lisangá. Alobi ete ndakisa ya Noa ná libota na ye esalisaki ye mingi. Alobi boye: “Noa ná libota na ye bazalaki kofanda esika moko na bato oyo bazalaki kolinga Yehova te, atako bongo, bango na bango na kati ya libota bazalaki baninga ya malamu.” Nsima ya kozwa batisimo, Vanessa akómaki mobongisi-nzela. Lelo oyo, alobi boye: “Yango esalisaki ngai nazwa baninga ya malamu, kaka na lisangá na biso te, kasi mpe na masangá mosusu.” Yo mpe okoki kozwa baninga ya malamu soki ozali komipesa mingi na mosala oyo Yehova apesi biso lelo oyo.​—Mat. 24:14.

(Talá paragrafe 12-15) *

12. (a) Kobanga ya ndenge nini Adama ná Eva bazangaki? (b) Yango ebimisaki nini?

12 Kobanga ya malamu. Kobanga mosusu ezalaka malamu. Na ndakisa, tosengeli kobanga koyokisa Yehova motema mpasi. (Nz. 111:10) Soki Adama ná Eva bábangaka Yehova ndenge wana, balingaki te kotombokela ye. Kasi, batombokelaki ye. Nsima ya kosala bongo, miso na bango efungwamaki na ndenge basosolaki ete basali lisumu. Banda wana, bakokaki kotikela bana na bango kaka lisumu mpe liwa. Lokola basosolaki ete babuki mobeko ya Nzambe, bayokaki nsɔni ndenge bazalaki bolumbu, yango wana bamisalelaki biloko ya kozipa nzoto.​—Eba. 3:7, 21.

13-14. (a) Na kotalela 1 Petro 3:21, mpo na nini tosengeli te kobanga liwa mingi? (b) Mpo na bantina nini tolingaka Yehova?

13 Tosengeli kobanga Yehova na ndenge ya malamu. Nzokande, tosengeli te kobanga liwa mingi. Yehova asilá kobongisa makambo mpo tózwa bomoi ya seko. Soki tosali lisumu, kasi tobongoli mpenza motema, Yehova akolimbisa biso. Akolimbisa biso mpo tondimaka mbeka ya lisiko ya Mwana na ye. Likambo ya libosoliboso oyo tosalaka mpo na komonisa ete tozali na kondima ezali komipesa na Nzambe na nzela ya libondeli mpe kozwa batisimo.​—Tángá 1 Petro 3:21.

14 Tolingaka Yehova mpo na bantina mingi. Apesaka biso biloko nyonso ya malamu mokolo na mokolo mpe ateyaka biso mpo tóyeba ye malamu mpe tóyeba mokano na ye. (Yoa. 8:31, 32) Atyeli biso lisangá na ye mpo etambwisaka biso mpe esalisaka biso. Azali kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango sikoyo, mpe apesi biso elikya ya kozala na bomoi ya seko mpe ya kokoka na mikolo ezali koya. (Nz. 68:19; Em. 21:3, 4) Soki tozali komanyola na makambo nyonso oyo Yehova asilá kosala mpo na komonisa ete alingaka biso, tokolinga ye lisusu mingi. Soki tozali kolinga Yehova, tokobanga ye, kasi na ndenge ya malamu. Tokobanga koyokisa Yehova motema mpasi mpo tolingaka ye mingi.

15. Ndenge nini Makayla atikaki kobanga ete asala libunga ya monene?

15 Makayla, oyo tolobelaki liboso, atikaki kobanga ete akosala libunga ya monene ntango ayebaki malamu ndenge oyo Yehova alimbisaka. Alobi boye: “Nayaki koyeba ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. Nayaki mpe koyeba ete Yehova alingaka biso mpe alimbisaka biso na nzela ya mbeka ya lisiko.” Bolingo oyo azalaki kolinga Yehova etindaki ye amipesa na ye na nzela ya libondeli mpe azwa batisimo.

(Talá paragrafe 16) *

16. Ndenge nini basalisaki Miles atika kobanga ete bátɛmɛla ye?

16 Miles, oyo azalaki kobanga ete mama na ye atɛmɛla ekateli na ye ya kozwa batisimo, alukaki toli epai ya mokɛngɛli ya zongazonga. Miles alobi boye: “Mokɛngɛli yango ya zongazonga akolaki mpe na libota oyo mama na ye azalaki Motatoli ya Yehova te. Asalisaki ngai nayeba makambo ya koloba mpo na kosalisa mama andima ekateli na ngai ya kozwa batisimo, mpe ayeba ete ezalaki tata te nde azalaki kotinda ngai nasala bongo.” Mama ya Miles asepelaki na ekateli na ye te. Nsukansuka, esɛngaki ete Miles alongwa na ndako ya mama na ye, kasi akangamaki kaka na ekateli na ye. Abakisi boye: “Koyeba makambo ya malamu oyo Yehova asali mpo na ngai esimbaki motema na ngai. Ntango namanyolaki mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu, nasosolaki ete Yehova alingaka ngai mingi. Yango etindaki ngai namipesa na Yehova na nzela ya libondeli mpe nazwa batisimo.”

KANGAMÁ NA EKATELI NA YO

Tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na oyo Yehova asali mpo na biso (Talá paragrafe 17)

17. Libaku nini biso nyonso tozali na yango?

17 Ntango Eva alyaki mbuma ya nzete oyo ezalaki na elanga ya Edene, amonisaki ete aboyi litambwisi ya Tata na ye. Mpe ntango Adama alyaki mbuma yango, amonisaki ete azalaki na botɔndi te mpo na nyonso oyo Yehova asalaki mpo na ye. Biso nyonso tozali na libaku ya komonisa ete tolingi te kozwa ekateli lokola oyo Adama ná Eva bazwaki. Ntango tozwi batisimo, tomonisi Yehova ete tondimi lotomo oyo azali na yango ya kotyela biso mibeko na oyo etali malamu mpe mabe. Tomonisaka ete tolingaka Tata na biso Yehova mpe totyelaka ye motema.

18. Ndenge nini okoki kolonga kosalela Yehova?

18 Mokakatano oyo tozalaka na yango nsima ya batisimo ezalaka nde kotosa mibeko ya Yehova mokolo na mokolo, kasi te kolanda makanisi na biso moko. Bamilio ya basaleli ya Yehova balongi kosala yango mbula na mbula. Okomekola bango soki yo mpe okobi kokolisa boyebi na yo ya Biblia, Liloba ya Nzambe, ozali koyangana mbala na mbala elongo na bandeko, mpe soki ozali koyebisa basusu na molende makambo oyo oyekoli mpo na Yehova, Tata na yo ya bolingo. (Ebr. 10:24, 25) Ntango olingi kozwa bikateli, landá toli oyo Yehova azali kopesa na nzela ya Biblia mpe ya ebongiseli na ye. (Yis. 30:21) Soki ozali kosala bongo, nyonso oyo okosala ekolonga.​—Mas. 16:3, 20.

19. Likambo nini osengeli kobosana te, mpe mpo na nini?

19 Soki obosani te mapamboli oyo ozali kozwa na ndenge ozali kolanda litambwisi ya Yehova, okolinga ye mingi mpe okosepela lisusu na mibeko na ye. Mpe eloko moko te oyo mokili ya Satana ezali kolaka biso ekoki kopekisa yo osalela Yehova. Kanisá ndenge bomoi na yo ekozala soki okokisi mbula nkóto. Na ntango wana, okomona ete ekateli oyo ozwaki ya kozwa batisimo ezalaki ekateli oyo eleki malamu!

LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova

^ par. 5 Ekateli eleki ntina oyo osengeli kozwa ezali oyo ya kozwa batisimo to te. Mpo na nini ekateli yango ezali na ntina mingi? Lisolo oyo ekoyanola na motuna wana. Ekosalisa mpe baoyo bazali kokanisa kozwa batisimo báyeba nini basengeli kosala mpo makambo mosusu epekisa bango te kokokisa mokano na bango.

^ par. 56 ELILINGI: Kobanga ete okokoka te: Elenge mobali moko azali kobanga kopesa eyano na makita.

^ par. 58 ELILINGI: Baninga mabe: Elenge mwasi moko oyo azali na moninga mabe ayoki nsɔni ntango amoni bandeko na mosala ya kosakola.

^ par. 60 ELILINGI: Kobanga ete osala libunga ya monene: Elenge mwasi moko oyo ndeko na ye ya mobali alongolami na lisangá mpe alongwe na ndako, azali kobanga ete likambo ya bongo mpe ekómela ye.

^ par. 62 ELILINGI: Kobanga ete bátɛmɛla yo: Elenge mobali moko azali kobanga kobondela mpo mama na ye oyo azali Motatoli ya Yehova te azali kotala ye.

^ par. 65 ELILINGI: Kobanga ete okokoka te: Elenge mobali moko amoni ete asengeli koyekola mingi mpo atika kobanga.

^ par. 67 ELILINGI: Baninga mabe: Elenge mwasi moko amoni sikoyo ete kozala Motatoli ya Yehova ezali lokumu.

^ par. 69 ELILINGI: Kobanga ete osala libunga ya monene: Elenge mwasi moko atiki solo esimba motema na ye mpe azwi batisimo.

^ par. 71 ELILINGI: Kobanga ete bátɛmɛla yo: Elenge mobali moko azwi mpiko ya kolimbolela mama na ye oyo azali Motatoli ya Yehova te mateya ya solo oyo andimaka.