Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 11

Yoká mongongo ya Yehova

Yoká mongongo ya Yehova

“Oyo azali Mwana na ngai . . . bóyoka ye.”​—MAT. 17:5.

LOYEMBO 89 Yoká, tosá, mpe pambwamá

NA MOKUSE *

1-2. (a) Ndenge nini Yehova asololaka na bato? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

YEHOVA alingaka kosolola na biso. Na ntango ya kala, asalelaki basakoli, baanzelu, mpe Mwana na ye Kristo Yesu, mpo na koyebisa bato makanisi na ye. (Amo. 3:7; Gal. 3:19; Em. 1:1) Lelo oyo, asololaka na biso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Apesá biso Biblia mpo tóyeba makanisi na ye mpe banzela na ye.

2 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Yehova alobaki uta na likoló na mabaku misato. Tótalela oyo Yehova alobaki, mateya oyo tokoki kozwa na maloba yango, mpe ndenge makambo oyo alobaki ekoki kosalisa biso.

“YO OZALI MWANA NA NGAI YA BOLINGO”

3. (a) Ndenge totángi yango na Marko 1:9-11, Yehova alobaki nini ntango Yesu azwaki batisimo? (b) Maloba yango emonisaki makambo nini misato ya ntina mpo na Yesu?

3 Marko 1:9-11 elobeli mbala ya liboso oyo Yehova alobaki uta na likoló. (Tángá.) Alobaki: “Yo ozali mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.” Ntango Yesu ayokaki mongongo ya Tata na ye ezali koloba ete alingaka ye mpe atyelaka ye motema, yango esimbaki mpenza motema na ye! Maloba ya Yehova emonisaki makambo misato mpo na Yesu: Ya liboso, Yesu azali Mwana na ye. Ya mibale, Yehova alingaka Mwana na ye. Ya misato, Yehova andimi Mwana na ye. Tótalela na mozindo likambo mokomoko oyo alobaki.

4. Boyokani ya ndenge nini Yesu akómaki na yango na Nzambe ntango azwaki batisimo?

4 “Yo ozali mwana na ngai.” Na maloba wana, Yehova amonisaki ete Yesu, Mwana na ye ya bolingo, akómaki na boyokani ya ndenge mosusu na ye. Ntango Yesu azalaki na likoló, azalaki mwana ya Nzambe ya elimo. Nzokande, ntango azwaki batisimo, atyamaki mafuta na elimo santu. Na ntango wana, Nzambe amonisaki ete Mwana na ye Yesu atyamaki mafuta na elimo mpe akómaki na elikya ya kozonga na likoló mpo na kokóma Mokonzi oyo Ye moko aponi mpe nganga-nzambe monene. (Luka 1:31-33; Ebr. 1:8, 9; 2:17) Yango wana, na batisimo ya Yesu, ezalaki na ntina ete Tata na ye aloba: “Yo ozali Mwana na ngai.”​—Luka 3:22.

Tosepelaka ntango bapesi biso longonya mpe balendisi biso (Talá paragrafe 5) *

5. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na oyo etali kolinga basusu mpe kolendisa bango?

5 “Ya bolingo.” Maloba wana oyo Yehova alobaki mpo na komonisa ete alingaka Mwana na ye mpe andimi ye ezali kotinda biso tólukaka mabaku ya kolendisa basusu. (Yoa. 5:20) Tosepelaka soki moto moko oyo tomemyaka amonisi ete alingaka biso mpe apesi biso longonya mpo na likambo moko ya malamu oyo tosali. Ndenge moko mpe, bandeko ya lisangá mpe bato ya libota na biso bazalaka na mposa ete tólingaka bango mpe tólendisaka bango. Ntango topesaka basusu longonya, tolendisaka bango bákóma na kondima makasi mpe tosalisaka bango básalela Yehova na bosembo. Mingimingi, baboti basengeli kolendisa bana na bango. Soki baboti bazali kopesa bana longonya oyo euti na motema mpe komonisa ete balingaka bango, bakosalisa bango bákola malamu.

6. Mpo na nini tosengeli kotyela Yesu Kristo motema?

6 “Nandimi yo.” Maloba wana emonisi ete Yehova azalaki na ntembe ata moke te ete Yesu akokokisa na bosembo nyonso mokano na ye. Yehova azalaki mpenza kotyela Mwana na ye motema; yango wana biso mpe tosengeli mpenza kozala na elikya ete Yesu akokokisa na bosembo makambo nyonso oyo Yehova alaki. (2 Ko. 1:20) Soki tozali kolanda ndakisa ya Yesu, tokozala na ekateli makasi ya koyekola epai na ye mpe kolanda matambe na ye. Yehova atyelaka mpe basaleli na ye nyonso motema ete bakokoba kolanda ndakisa ya Mwana na ye.​—1 Pe. 2:21.

“BÓYOKA YE”

7. Na kotalela Matai 17:1-5, na libaku nini mosusu Yehova alobaki uta na likoló, mpe alobaki nini?

7 Tángá Matai 17:1-5. Mbala ya mibale oyo Yehova alobaki uta na likoló ezalaki ntango Yesu “abongwanaki.” Yesu abengisaki Petro, Yakobo, ná Yoane mpo bákende elongo na ye na ngomba moko ya molai. Ntango bazalaki kuna, bamonaki emonaneli moko ya kokamwa. Elongi ya Yesu engɛngaki mpe bilamba na ye ekómaki kongɛnga. Bato mibale, oyo moko azalaki komonisa Moize mpe mosusu Eliya, babimaki pembeni ya Yesu mpe babandaki kosolola na ye mpo na liwa mpe lisekwa na ye. Atako bantoma yango misato “bazalaki kobunda na mpɔngi,” bamonaki emonaneli wana ya kokamwa ntango balamukaki. (Luka 9:29-32) Na nsima, lipata moko monene ezipaki bango, mpe bayokaki mongongo moko eutaki na lipata yango: mongongo ya Nzambe! Kaka ndenge esalemaki na ntango ya batisimo ya Yesu, Yehova alobaki ete andimi Mwana na ye mpe alingaka ye ntango alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” Kasi na mbala oyo, Yehova abakisaki boye: “Bóyoka ye.”

8. Ndenge nini emonaneli wana elendisaki Yesu mpe bayekoli na ye?

8 Emonaneli yango elakisaki nkembo mpe nguya oyo Yesu akozala na yango ntango akozala Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Na ntembe te, Yesu Kristo alendisamaki mpe azwaki makasi mpo ayika mpiko na minyoko mpe liwa ya mpasi oyo ezalaki kozela ye. Lisusu, emonaneli yango ekómisaki kondima ya bayekoli makasi mpe elendisaki bango bátikala sembo na komekama oyo basengelaki kokutana na yango na mosala monene oyo ezalaki kozela bango na bambula oyo ekolanda. Mbula soki 30 na nsima, ntoma Petro alobelaki ndenge oyo Yesu abongwanaki; yango emonisi ete abosanaki emonaneli yango ata moke te.​—2 Pe. 1:16-18.

9. Toli nini ya ntina mingi Yesu apesaki bayekoli na ye?

9 “Bóyoka ye.” Yehova amonisaki polele ete alingi tóyokaka maloba ya Mwana na ye mpe tótosa yango. Makambo nini Yesu alobaki ntango azalaki awa na mabele? Alobaki makambo mingi ya ntina oyo tosengeli koyoka! Na ndakisa, na bolingo mpenza, alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosakola nsango malamu, mpe mbala na mbala azalaki koyebisa bango básɛnzɛlaka. (Mat. 24:42; 28:19, 20) Longola yango, alendisaki bango básala makasi mpenza mpe bátika te. (Luka 13:24) Yesu ateyaki bayekoli na ye mbala na mbala ete basengeli kolingana, kozala na bomoko, mpe kotosa mitindo na ye. (Yoa. 15:10, 12, 13) Toli wana oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ebongaki mpenza! Tii na moi ya lelo, toli yango ezali kaka na ntina mingi, ndenge ezalaki ntango Yesu apesaki yango.

10-11. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali koyoka Yesu?

10 Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali na ngámbo ya solo ayokaka mongongo na ngai.” (Yoa. 18:37) Tokomonisa ete tozali koyoka mongongo ya Yesu soki tozali ‘kokoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.’ (Kol. 3:13; Luka 17:3, 4) Tokomonisa mpe ete tozali koyoka mongongo ya Yesu soki tozali kosakola na molende nsango malamu, ezala ‘na eleko ya malamu to na eleko ya mpasi.’​—2 Tim. 4:2.

11 Yesu alobaki mpe boye: “Bampate na ngai eyokaka mongongo na ngai.” (Yoa. 10:27) Bayekoli ya Yesu bamonisaka ete bayokaka mongongo na ye ntango bayokaka maloba na ye mpe batosaka yango. Batikaka te ete “mitungisi ya bomoi” elongola likebi na bango na makambo oyo eleki ntina. (Luka 21:34) Bamonaka nde ete kotosa mitindo ya Yesu ezali likambo ya ntina mingi na bomoi na bango, ata soki bakutani na mikakatano ya makasi. Bandeko mingi bazali koyika mpiko na mikakatano ya makasi, na ndakisa botɛmɛli ya banguna, bobola makasi, mpe makama oyo ebimaka yango moko. Ata na mikakatano wana nyonso, bazali kotikala sembo epai ya Yehova. Yesu apesaki bango elaka oyo: “Moto oyo azali na mitindo na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye.”​—Yoa. 14:21.

Mosala ya kosakola esalisaka biso tólongola likebi te na makambo eleki ntina (Talá paragrafe 12) *

12. Wapi lolenge mosusu oyo tokoki komonisa ete tozali koyoka Yesu?

12 Lolenge mosusu oyo tokoki komonisa ete tozali koyoka Yesu ezali ya kotosa mpe kosala na bomoko na bandeko oyo ye aponi mpo na kokamba biso. (Ebr. 13:7, 17) Na bambula euti koleka, ebongiseli ya Yehova ebongoli makambo mingi, na ndakisa ndenge ya kosalela bisaleli ya sika mpe mayele ya sika na mosala na biso ya kosakola, ndenge ya kosala likita ya katikati ya pɔsɔ, ndenge ya kotonga Bandako ya Bokonzi, kobongisa yango lisusu, mpe kobatela yango. Tozali na botɔndi mingi mpo na litambwisi wana oyo emonisi bolingo mpe bwanya! Tokoki kozala na kondima ete Yehova akopambola milende oyo tozali kosala mpo na kolanda malako oyo ebongiseli na ye ezali kopesa biso na ntango oyo ebongi.

13. Matomba nini tokozwa soki tozali koyoka Yesu?

13 Tozwaka matomba mingi soki tozali koyoka makambo nyonso oyo Yesu ateyaki. Yesu alakaki bayekoli na ye ete mateya na ye ekopemisa bango. Alobaki boye: “Milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Mat. 11:28-30) Liloba ya Nzambe, oyo ezali mpe na masolo minei ya baevanzile oyo elobeli bomoi mpe mosala ya Yesu, epemisaka biso, epesaka biso lisusu makasi na elimo, mpe ekómisaka biso bato ya bwanya. (Nz. 19:7; 23:3) Yesu alobaki boye: “Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—Luka 11:28.

‘NAKOPESA NKOMBO NA NGAI NKEMBO’

14-15. (a) Na kotalela Yoane 12:27, 28, na libaku nini Yehova alobaki uta na likoló mpo na mbala ya misato? (b) Mpo na nini maloba wana ya Yehova ebɔndisaki Yesu mpe elendisaki ye?

14 Tángá Yoane 12:27, 28. Evanzile oyo Yoane akomaki elobeli mbala ya misato oyo Yehova alobaki uta na likoló. Mwa mikolo liboso ya liwa na ye, Yesu azalaki na Yerusaleme mpo na fɛti na ye ya nsuka ya Elekeli. Alobaki boye: “Molimo na ngai etungisami.” Na nsima, abondelaki boye: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Na mbala moko, Tata na ye alobaki uta na likoló, ete: “Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.”

15 Yesu atungisamaki mpo na mokumba monene oyo azalaki na yango ya kotikala sembo epai ya Yehova. Yesu ayebaki ete etikalaki moke anyokwama makasi mpe akufa liwa ya mpasi. (Mat. 26:38) Mpo na Yesu, kokumisa nkombo ya Tata na ye ezalaki likambo oyo elekaki ntina. Bafundaki Yesu ete atuki Nzambe, mpe azalaki komitungisa mpo na ndenge oyo liwa na ye ekokaki komema nsɔni na nkombo ya Tata na ye. Na ntembe te, maloba wana ya Yehova ekitisaki Yesu motema! Esalisaki ye andima ete nkombo ya Yehova ekokumisama. Maloba wana ya Yehova ebɔndisaki Yesu mingi mpe elendisaki ye mpo ayikela minyoko oyo ezalaki kozela ye mpiko. Atako emonani ete kaka Yesu ye moko nde ayokaki maloba oyo Tata na ye alobaki na libaku wana, Yehova asalaki ete maloba yango ekomama na Biblia mpo na biso nyonso.​—Yoa. 12:29, 30.

Yehova akopesa nkombo na ye nkembo mpe akobikisa basaleli na ye (Talá paragrafe 16) *

16. Mpo na nini tomitungisaka ntango mosusu mpo na nsɔni oyo ekoki kobwakama na nkombo ya Yehova?

16 Lokola Yesu, biso mpe tokoki komitungisa mpo na nsɔni oyo ekoki kobwakama na nkombo ya Yehova. Ekoki kozala ete lokola Yesu, basaleli biso makambo oyo ezali sembo te. To ekoki kozala ete bansango ya lokuta oyo banguna bapanzaka mpo na biso ezali kotungisa biso. Tokoki kokanisa nsɔni oyo maloba ya ndenge wana ekoki kobwaka na nkombo ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Na ntango wana, maloba ya Yehova ebɔndisaka biso mingi. Kasi, tosengeli komitungisa koleka ndelo te. Tokoki kozala na kondima ete “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na [biso] mpe makanisi na [biso] na nzela ya Kristo Yesu.” (Flp. 4:6, 7) Yehova akotika te kopesa nkombo na ye nkembo. Na nzela ya Bokonzi na ye, akosilisa bampasi nyonso oyo Satana mpe mokili na ye bazali kobimisela basaleli na ye ya sembo.​—Nz. 94:22, 23; Yis. 65:17.

MATOMBA YA KOYOKA MONGONGO YA YEHOVA LELO OYO

17. Na kotalela Yisaya 30:21, ndenge nini Yehova alobaka na biso lelo oyo?

17 Tii na moi ya lelo, Yehova alobaka na biso. (Tángá Yisaya 30:21.) Ya solo, toyokaka te mongongo ya Nzambe uta na likoló ezali koloba na biso. Kasi, apesá biso Liloba na ye, Biblia, oyo na nzela na yango apesaka biso malako. Longola yango, elimo ya Yehova etindaka “kapita ya sembo” akoba kopesa basaleli na ye bilei ya elimo. (Luka 12:42) Kanisá ebele ya bilei ya elimo oyo tozwaka na nzela ya mikanda, Internet, bavideo, mpe mikanda mosusu ya koyoka!

18. Ndenge nini maloba ya Yehova ekómisi kondima na yo makasi mpe epesi yo mpiko?

18 Tóbosana te maloba oyo Yehova alobaki ntango Mwana na ye azalaki awa na mabele! Tiká ete maloba ya Nzambe, oyo ezali na Biblia, esalisa biso tóyeba ete Yehova azali komona makambo nyonso mpe ete akosilisa bampasi nyonso oyo Satana mpe mokili na ye ya mabe babimiseli biso. Mpe tózala na ekateli ya koyoka na likebi mongongo ya Yehova. Soki tosali bongo, tokoyika mpiko ata na mokakatano nini tozali na yango sikoyo, mpe na mikakatano nyonso oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya. Biblia ekundweli biso ete: “Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko, mpo nsima ya kosala mokano ya Nzambe, bózwa eloko oyo alakaki.”​—Ebr. 10:36.

LOYEMBO 4 “Yehova azali Mobateli na ngai”

^ par. 5 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Yehova alobaki uta na likoló mbala misato. Na libaku moko, Yehova ayebisaki bayekoli ya Yesu báyoka Mwana na ye. Lelo oyo, Yehova alobaka na biso na nzela ya Liloba na ye, oyo ezali mpe na mateya ya Yesu, mpe na nzela ya ebongiseli na ye. Na lisolo oyo, tokomona matomba oyo tozwaka soki tozali koyoka Yehova mpe Yesu.

^ par. 52 BILILINGI: Nkulutu moko amoni mosaleli na misala azali kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi mpe kobongisa mikanda na esika ya kobomba mikanda. Nkulutu yango apesi ye longonya.

^ par. 54 ELILINGI: Na Sierra Leone, ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali kopesa molɔbi-mbisi lokasa ya libyangi mpo na makita.

^ par. 56 ELILINGI: Batatoli ya Yehova na ekólo moko oyo Leta atyá mwa bipekiseli na mosala na biso bazali kosala makita na ndako ya ndeko moko. Balati te ndenge tolataka na makita mpo na koboya kobenda likebi ya bato.