Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 20

Kobɔndisa baoyo basalá bango makambo ya nsɔni na bomwana

Kobɔndisa baoyo basalá bango makambo ya nsɔni na bomwana

“Nzambe ya kobɔndisama nyonso . . . abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”​—2 KO. 1:3, 4.

LOYEMBO 134 Bana bazali mokumba Nzambe apesi

NA MOKUSE *

1-2. (a) Ndakisa nini emonisi ete bato bazalaka na mposa ya libɔndisi mpe na likoki ya kobɔndisa basusu? (b) Likambo nini ya mpasi mingi ekómelaka bana mosusu?

BATO nyonso bazalaka na mposa ya libɔndisi; bazalaka mpe na likoki ya kobɔndisa basusu. Na ndakisa, ntango mwana moke akwei mpe ayoki mpasi ntango azali kosakana, akimaka mbangu na kolela epai ya Papa to Mama. Baboti bakosilisa mpasi ya mwana te, kasi bakoki kobɔndisa ye. Bakoki kotuna ye soki nini esalemi, kopangwisa ye mai ya miso, koloba na ye maloba ya kokitisa motema mpe ya boboto, mpe mbala mosusu kopakola ye mwa nkisi. Mwa moke na nsima, mwana akotika kolela mpe akoki ata kozongela kosakana. Mokemoke, mpasi na ye ekosila.

2 Kasi, ekómaka ete bana bányokwama na ndenge ya mabe mpenza. Mikóló mosusu babebisaka bana na makambo ya kosangisa nzoto. Likambo yango ekoki kokómela mwana mbala moko, to mbala ebele na boumeli ya bambula. Ezala soki esalemi mbala moko to mbala ebele, mwana oyo babebisi na makambo ya kosangisa nzoto akoki kotikala na mpasi makasi na motema ntango molai. Na bantango mosusu, bakangaka moto oyo abebisi mwana mpe azwaka etumbu. Kasi, ntango mosusu, ekoki komonana lokola ete moto oyo abebisaki mwana azwá etumbu te. Kasi, ata soki moto oyo abebisi mwana azwi etumbu kozanga koumela, mpasi ya mwana ekoki koumela ata ntango akokóma mokóló.

3. Ndenge emonisami na 2 Bakorinti 1:3, 4, Yehova alingi nini, mpe mituna nini tokotalela?

3 Soki mokristo moko oyo babebisá ye na bomwana abundanaka kaka na mpasi na ye na motema atako akómi mokóló, nini ekoki kosalisa ye? (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Ya solo, Yehova alingi ete bámonisela bampate na ye bolingo mpe bábɔndisa bango na ndenge oyo esengeli. Na yango, tótalela mituna oyo misato: (1) Mpo na nini baoyo babebisá bango na bomwana na makambo na kosangisa nzoto bazalaka na mposa ya libɔndisi? (2) Banani bakoki kopesa libɔndisi oyo esengeli? (3) Ndenge nini tokoki kobɔndisa bango na ndenge oyo ebongi?

MPO NA NINI BAZALI NA MPOSA YA LIBƆNDISI?

4-5. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba ete bana bakeseni na mikóló? (b) Mpo na nini ekoki kokóma mpasi mpo mwana oyo babebisi atyela basusu motema?

4 Mikóló mosusu oyo banyokwamaki na bomwana mpo babebisaki bango na makambo ya kosangisa nzoto, bazalaka kaka na mposa ya libɔndisi ata soki bambula eleki mingi. Mpo na nini? Mpo tókanga ntina ya likambo yango, tosengeli liboso koyeba ete bana bakeseni mpenza na mikóló. Mbala mingi, ndenge oyo mwana ayokaka ntango babebisi ye, ekeseni na ndenge oyo mokóló akoki koyoka ntango moto moko asali ye mabe. Tótalela mwa bandakisa.

5 Esengeli bana bázala na boyokani makasi na bato oyo bazali kobɔkɔla mpe kobatela bango mpe bázala na likoki ya kotyela bango motema. Boyokani ya ndenge wana esalisaka bana báyoka ete babatelami mpe esalaka ete bátyela bato oyo balingaka bango motema. (Nz. 22:9) Likambo ya mawa, babebisaka bana mingi kaka na bandako na bango, mpe mbala mingi bato oyo basalaka yango ezalaka bandeko ya libota to baninga. Ntango moto oyo mwana atyelaka motema asali ye ndenge wana, ekoki kokóma mpasi mpo mwana atyela lisusu bato motema, ata nsima ya bambula ebele.

6. Mpo na nini kobebisa mwana na makambo ya kosangisa nzoto ezali likambo ya nsɔmɔ mpe ya mabe mpenza?

6 Bana bazali na likoki ya komibatela te, mpe kobebisa mwana ezali likambo ya nsɔmɔ mpe ya mabe mpenza. Kosala ná mwana makambo ya kosangisa nzoto bambula ebele liboso ete akóma mokóló oyo akoki mpo na kosangisa nzoto na libala, ekoki kosala mwana mabe mingi. Kobebisa mwana ndenge wana ekoki kobongola ndenge na ye ya kotalela likambo ya kosangisa nzoto. Ekoki kosala ete mwana amimona ntina te mpe akoka te kokangama na bato to kotyela bango motema.

7. (a) Mpo na nini ezalaka mpasi te moto mabe akosa mwana mpo abebisa ye, mpe makambo nini akoki koyebisa mwana? (b) Lokuta ya ndenge wana ekoki kosala nini epai ya mwana?

7 Bana bazali na makoki mingi te ya kokanisa, ya kotalela makambo malamu, to ya koyeba likama mpe kokima yango. (1 Ko. 13:11) Yango wana, ezalaka mpasi te bato mabe bákosa bana mpo bábebisa bango. Bato yango bayebisaka bana makambo ya lokuta mpenza, na ndakisa, soki babebisi mwana ezali foti na ye moko, asengeli koloba likambo yango te, soki alobi yango moto te akondimela ye mpe akosalisa ye, to ete soki mokóló akokisi bamposa na ye ya kosangisa nzoto epai ya mwana ezalaka mpo na komonisa ete alingaka mpenza mwana yango. Lokuta ya ndenge wana ekoki kobebisa makanisi ya mwana mpe ekoki kozwa bambula ebele mpo ayeba ete nyonso wana ezalaki lokuta. Ntango mwana yango azali kokola akoki komimona mbindo, azangá ntina, mpe abongi te bálinga ye to bábɔndisa ye.

8. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akoki kobɔndisa baoyo bazali na mpasi na motema?

8 Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ndenge mwana oyo babebisi na makambo ya kosangisa nzoto anyokwamaka bambula mingi. Kobebisa mwana ezali likambo ya mabe mpenza! Lokola likambo yango epalangani mingi ezali komonisa polele ete tozali na mikolo ya nsuka, ntango oyo bato mingi “balinganaka te na kati ya libota” mpe ntango oyo “bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka.” (2 Tim. 3:1-5, 13) Satana azali na mayele mabe mpenza, mpe ezalaka mawa ntango bato bazali kosala makambo oyo esepelisaka ye. Kasi, Yehova azali na makasi mingi mpenza koleka Satana to bato na ye. Ayebi malamu mayele mabe ya Satana. Tokoki kondima ete Yehova ayebi malamu mpasi oyo tozali komona, mpe akoki kopesa biso libɔndisi oyo tosengeli na yango. Ezali mpenza lipamboli kosalela “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso, mpo biso mpe tókoka kobɔndisa baoyo bazali na ndenge nyonso ya bolɔzi na kobɔndisama oyo tobɔndisami na Nzambe.” (2 Ko. 1:3, 4) Kasi, Yehova asalelaka banani mpo na kobɔndisa biso?

BANANI BAKOKI KOPESA LIBƆNDISI?

9. Na kotalela maloba ya Mokonzi Davidi oyo ezali na Nzembo 27:10, Yehova akosala nini na bato oyo libota na bango esundolá bango?

9 Bana oyo baboti basundolá, to oyo babebisamá na bomwana epai ya bato oyo bayebaki malamu, bazali mpenza na mposa ya libɔndisi mingi. Mokonzi Davidi ayebaki ete kaka Yehova nde akoki kopesa libɔndisi ya solosolo. (Tángá Nzembo 27:10.) Davidi azalaki na kondima ete Yehova ayambaka baoyo libota na bango esundolá bango. Ndenge nini Yehova asalaka yango? Asalaka yango na nzela ya basaleli na ye ya sembo. Bandeko na biso ya lisangá bazali libota na biso ya elimo. Na ndakisa, Yesu alobaki ete bato oyo bakómaki kosambela Yehova lokola ye bazalaki bandeko ya mibali, ya basi, mpe mama epai na ye.​—Mat. 12:48-50.

10. Ndenge nini ntoma Paulo alobelaki mosala makasi oyo asalaki lokola nkulutu?

10 Talá ndakisa oyo emonisi ete boyokani oyo tozalaka na yango na lisangá ezali mpenza ya bandeko ya libota. Ntoma Paulo azalaki nkulutu ya sembo oyo azalaki kosala mosala makasi. Azalaki ndakisa malamu; kutu, elimo ya Nzambe esalisaki ye ayebisa basusu bámekola ye ndenge ye mpe amekolaki Kristo. (1 Ko. 11:1) Mpo na mosala makasi oyo azalaki kosala lokola nkulutu, ntoma Paulo alobaki boye: “Tokómaki nde bato ya boboto na kati na bino, lokola ntango mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye mpenza.” (1 Tes. 2:7) Lelo oyo mpe, bankulutu ya sembo babimisaka maloba ya boboto mpe ya kokitisa motema ntango basalelaka Makomami mpo na kopesa libɔndisi na baoyo basengeli na yango.

Mbala mingi, bandeko basi oyo bakɔmɛli na elimo bayebaka mpenza kobɔndisa (Talá paragrafe 11) *

11. Nini emonisi ete kaka bankulutu te nde bakoki kopesa basusu libɔndisi?

11 Kaka bankulutu nde bakoki kopesa libɔndisi na bato oyo babebisamá na bomwana? Te. Biso nyonso tozali na mokumba ya ‘kokoba kobɔndisana.’ (1 Tes. 4:18) Mingimingi, bandeko basi oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kolendisa bandeko basi oyo bazali na mposa ya libɔndisi. Yango wana, Yehova amikokanisaki na mama oyo azali kobɔndisa mwana na ye. (Yis. 66:13) Biblia elobeli basi mosusu oyo babɔndisaki bato oyo bazalaki na mpasi. (Yobo 42:11) Lelo oyo, Yehova asepelaka komona basi bakristo bazali kobɔndisa bandeko basi mosusu oyo bazali kobundana na mpasi na motema! Na bantango mosusu, na ndenge ya mayele, nkulutu moko to bankulutu mibale bakoki kosɛnga ndeko mwasi moko oyo akɔmɛli na elimo soki akoki kosalisa ndeko mwasi oyo azali konyokwama ndenge wana. *

NDENGE YA KOPESA LIBƆNDISI

12. Likambo nini tosengeli kosala te?

12 Ntango tozali kosalisa ndeko moko, tosengeli te koluka koyeba makambo oyo ndeko yango amoni malamu alobela te. (1 Tes. 4:11) Na yango, tokoki kosala nini mpo na baoyo bazali na mposa ya lisalisi mpe libɔndisi? Tótalela makanisi mitano oyo eyokani na Biblia, oyo ekosalisa biso tóbɔndisa basusu.

13. Ndenge emonisami na 1 Bakonzi 19:5-8, anzelu ya Yehova asalaki nini mpo na Eliya, mpe ndenge nini tokoki komekola anzelu yango?

13 Pesá lisalisi oyo ebongi. Ntango mosakoli Eliya azalaki kokima bato oyo bazalaki koluka koboma ye, alɛmbaki nzoto mingi mpe asɛngaki liwa. Yehova atindaki anzelu moko epai ya mosakoli yango oyo alɛmbaki nzoto. Anzelu apesaki Eliya lisalisi oyo ebongaki mpenza. Apesaki ye bilei mpe na boboto, ayebisaki ye alya. (Tángá 1 Bakonzi 19:5-8.) Lisolo yango epesi biso liteya ya ntina mingi: Ntango mosusu mwa likambo ya moke, oyo esalemi na boboto, ekoki kosalisa mingi. Mbala mosusu mwa bilei, mwa likabo, to mwa mokanda oyo ezali na maloba oyo ebongi ekondimisa ndeko oyo azali kotungisama ete tolingaka ye mpe totyelaka ye likebi. Soki ezali pɛtɛɛ te mpo na yo kosolola na moto makambo oyo ezali kopesa ye mpasi na motema, okoki kosalisa ye soki osaleli makanisi oyo touti kolobela.

14. Wapi liteya mosusu oyo tokoki kozwa na lisolo ya Eliya?

14 Salá ete moto oyo atungisami akitisa motema mpe atika kobanga. Tokoki kozwa liteya mosusu na lisolo ya Eliya. Na ndenge ya likamwisi, Yehova asalisaki mosakoli na ye asala mobembo molai na makolo tii na Ngomba Horebe. Mbala mosusu, kozala na esika wana ya mosika, epai Yehova asalaká kondimana na bato na ye bambula mingi liboso, ekitisaki Eliya motema. Ekoki kozala ete kuna, Eliya ayokaki ete akómi mosika na bato oyo bazalaki koluka koboma ye. Liteya nini tokoki kozwa? Soki tolingi kobɔndisa moto oyo babebisá ye na bomwana, mbala mosusu ekoki kosɛnga tósalisa ye naino akitisa motema. Na ndakisa, mpo na kosolola na ndeko mwasi moko oyo azali kotungisama, bankulutu basengeli koyeba ete akoki kokitisa motema mpe kotika kobanga soki azali komɛla mwa eloko na ndako, na esika bázala na Ndako ya Bokonzi. Kasi, ndeko mosusu akosepela bázala na Ndako ya Bokonzi.

Tokosalisa moto soki tozali na motema molai ntango tozali koyoka ye, kobondela na motema moko elongo na ye mpe kosalela maloba ya kobɔndisa (Talá paragrafe 15-20) *

15-16. Kozala moyoki malamu elimboli nini?

15 Zalá moyoki malamu. Biblia epesi toli oyo ya polele: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yak. 1:19) Ozalaka moyoki malamu? Mbala mosusu tokanisaka ete kozala moyoki malamu elimboli kaka kofanda nyɛɛ, kotala ndenge moto azali koloba, mpe koloba eloko te. Nzokande, kozala moyoki malamu esɛngi mpe makambo mosusu. Na ndakisa, nsukansuka ntango Eliya ayebisaki Yehova makambo nyonso oyo ezalaki kotungisa ye, Yehova ayokaki ye mpenza. Yehova amonaki ete Eliya azalaki kobanga, komiyoka ye moko, mpe azalaki kokanisa ete mosala nyonso oyo asalaki ezalaki mosala ya mpunda. Na bolingo nyonso, Yehova asalisaki ye alongola makanisi yango. Yehova amonisaki ete ayokaki Eliya malamu.​—1 Bak. 19:9-11, 15-18.

16 Ntango tozali koyoka ndeko moko, ndenge nini tokoki komitya na esika na ye mpe komonisa motema mawa, oyo emonisaka bolingo? Ntango mosusu, mwa maloba oyo eponami malamu ekoki komonisa ye ndenge oyo toyoki na motema. Okoki koloba na ye: “Nayoki mabe ndenge basalá yo bongo! Kosala mwana likambo ya bongo ezali mabe mpenza!” Okoki kotuna motuna moko to mibale mpo oyeba soki ozali kolanda malamu makambo oyo azali koloba. Okoki koloba: “Okoki kolimbola lisusu mpo nakanga ntina malamu?” to “Yango elingi koloba ete . . . Ezali bongo?” Maloba ya boboto ndenge wana ekoki kosalisa moto amona ete ozali mpenza koyoka ye, mpe ozali kosala makasi okanga ntina ya makambo oyo azali koloba.​—1 Ko. 13:4, 7.

17. Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai mpe ‘kowela koloba te’?

17 Kasi, kebá ete ‘owelaka koloba te.’ Kokata ye maloba te mpo na kopesa toli to koluka kosembola makanisi na ye. Mpe zalá na motema molai! Nsukansuka, ntango Eliya ayebisaki Yehova makambo nyonso oyo ezalaki kotungisa ye, alekisaki ndelo na maloba na ye mpe azalaki na mawa makasi. Ata ntango Yehova alendisaki kondima ya Eliya, Eliya ayebisaki ye lisusu makambo oyo ezalaki na motema na ye, mpe azongelaki kaka maloba oyo alobaki liboso. (1 Bak. 19:9, 10, 13, 14) Yango eteyi biso nini? Na bantango mosusu, moto oyo azali konyokwama azalaka na mposa ya koloba makambo oyo ezali kotungisa ye, ata mbala ebele. Ndenge moko na Yehova, osengeli kozala na motema molai ntango ozali koyoka. Na esika ya koluka kaka komonisa ye makambo oyo asengeli kosala, osengeli komitya na esika na ye mpe komonisa motema mawa.​—1 Pe. 3:8.

18. Ndenge nini mabondeli na biso ekoki kobɔndisa baoyo bazali na mpasi na motema?

18 Salá libondeli oyo euti na motema elongo na ndeko oyo azali na mpasi na motema. Bato oyo bazali kotungisama makasi bakoki kozala na bolɛmbu mpo na kobondela. Moto mosusu akoki komona ete abongi te kobondela Yehova. Mpo na kobɔndisa moto ya ndenge wana, tokoki kobondela elongo na ye, mpe kotánga nkombo na ye na libondeli. Tokoki koyebisa Yehova ete tolingaka ndeko yango mpe ete bandeko ya lisangá balingaka ye. Tokoki mpe kosɛnga Yehova asalisa mosaleli na ye oyo azali na motuya akitisa motema mpe azwa libɔndisi. Mabondeli ya ndenge wana ekoki kobɔndisa mingi.​—Yak. 5:16.

19. Nini ekoki kosalisa biso ntango tolingi kobɔndisa moto?

19 Salelá maloba oyo ekobikisa mpe ekokitisa motema. Kanisáká liboso ya koloba. Maloba oyo ebongi te ekoki kosala mpasi. Maloba ya boboto ekoki kobikisa. (Mas. 12:18) Na yango, bondelá Yehova asalisa yo osalela maloba ya boboto, oyo ekobɔndisa, mpe oyo ekokitisa motema. Kobosana te ete maloba ya Yehova oyo ezali na Biblia ezali na nguya koleka maloba mosusu nyonso.​—Ebr. 4:12.

20. Ntango mosusu makambo ya mabe oyo bandeko mosusu bakutaná na yango etindá bango bákóma na makanisi nini, mpe makambo nini tosengeli kokundwela bango?

20 Bandeko mosusu, ezala ya basi to ya mibali, oyo babebisá bango na bomwana bakómá kokanisa ete bazali mbindo, bazali na ntina te, balingaka bango te, to kutu ete ebongi te bálinga bango. Makanisi wana ezali solo te! Yango wana, salelá Makomami mpo na kokundwela bango ete bazali mpenza na motuya na miso ya Yehova. (Talá etanda “ Libɔndisi oyo euti na Makomami.”) Salisá bango bákanisa lisusu ndenge anzelu alendisaki mosakoli Danyele na boboto nyonso ntango alɛmbaki nzoto mpe atungisamaki. Yehova alingaki Danyele ayeba ete azali na motuya mingi na miso na ye. (Dan. 10:2, 11, 19) Ndenge moko mpe, bandeko na biso oyo bazali kotungisama bazali na motuya na miso ya Yehova!

21. Nini ekokómela basali-mabe nyonso oyo babongolá motema te, kasi biso nyonso tosengeli kosala nini sikoyo?

21 Ntango tozali kobɔndisa basusu, tozali kokundwela bango bolingo ya Yehova. Mpe tosengeli kobosana ata moke te ete Yehova azali mpe Nzambe ya bosembo. Ayebi moto mokomoko oyo babebisá ye na bomwana. Amonaka makambo nyonso, mpe akopesa etumbu na basali-mabe nyonso oyo babongolá motema te. (Mit. 14:18) Kasi mpo na sikoyo, tósala nyonso oyo tokoki mpo na komonisa bolingo epai ya bato oyo babebisá bango na bomwana. Lisusu, ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete Yehova akobikisa mpo na libela baoyo nyonso banyokwamaka mpo na Satana mpe mokili na ye! Mosika te, makambo yango ya mpasi ekoya lisusu na makanisi to motema te.​—Yis. 65:17.

LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko

^ par. 5 Mbala mingi, baoyo babebisamá na bomwana na makambo ya kosangisa nzoto bakoki kozala na mikakatano ata nsima ya bambula ebele. Lisolo oyo ekosalisa biso tóyeba mpo na nini ezalaka bongo. Tokotalela mpe soki banani bakoki kobɔndisa bato ya ndenge wana. Na nsima, tokolobela makambo oyo tokoki kosala mpo na kopesa libɔndisi oyo ebongi.

^ par. 11 Moto oyo babebisá na makambo ya kosangisa nzoto, oyo anyokwamaka tii lelo mpo na likambo yango, ye moko nde asengeli kotala soki akokende komona monganga mpo na kozwa lisalisi.

^ par. 76 ELILINGI: Ndeko mwasi moko oyo akɔmeli na elimo azali kobɔndisa ndeko mwasi mosusu oyo azali na mpasi na motema.

^ par. 78 ELILINGI: Bankulutu mibale bayei kotala ndeko mwasi oyo azali kotungisama. Ndeko yango asɛngi ete ndeko mwasi oyo akɔmeli na elimo azala mpe wana.