Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 18

Bolingo mpe bosembo na lisangá ya bokristo

Bolingo mpe bosembo na lisangá ya bokristo

“Bókoba komemelana kilo, mpe na ndenge yango bókokisa mobeko ya Kristo.”​—GAL. 6:2.

LOYEMBO 12 Yehova, Nzambe monene

NA MOKUSE *

1. Makambo nini mibale tokoki kondima?

BANDA kala, Yehova Nzambe alingaka basaleli na ye mpe akokoba kolinga bango ntango nyonso. Alingaka mpe bosembo. (Nz. 33:5) Na yango, tokoki kondima makambo oyo mibale: (1) Yehova ayokaka mpasi ntango basaleli bato na ye makambo ya kozanga bosembo. (2) Alaki ete akotya bosembo. Na lisolo ya liboso kati na masolo oyo minei, * toyekolaki ete Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele na nzela ya Moize esimbamaki na bolingo. Ezalaki kolendisa bato bázala sembo epai ya bato nyonso, mingimingi epai ya baoyo bazangaki libateli. (Mib. 10:18) Mibeko yango emonisaka ete Yehova atyelaka mpenza basaleli na ye likebi.

2. Tokozwa biyano na mituna nini?

2 Mibeko ya Moize esukaki na mobu 33 T.B., ntango lisangá ya bokristo etyamaki. Yango elingaki nde koloba ete bakristo bakozanga mobeko oyo esimbami na bolingo mpe oyo elendisaka bato bázala sembo? Ezali bongo te! Bakristo bazwaki mobeko ya sika. Na lisolo oyo, tokomona liboso soki mobeko yango ezali nini. Na nsima, tokozwa biyano na mituna oyo: Mpo na nini tokoki koloba ete mobeko yango esimbami na bolingo? Mpo na nini tokoki koloba ete elendisaka bato bázala sembo? Na nse ya mobeko yango, ndenge nini baoyo bazali na bokonzi basengeli kosalela basusu makambo?

“MOBEKO YA KRISTO” EZALI NINI?

3. “Mobeko ya Kristo,” oyo Bagalatia 6:2 elobeli, esangisi makambo nini?

3 Tángá Bagalatia 6:2. Bakristo bazali na nse ya “mobeko ya Kristo.” Yesu akomaki mibeko te mpo bayekoli na ye bálanda, kasi apesaki bango malako, mitindo, mpe mitinda mpo etambwisa bango. “Mobeko ya Kristo” esangisi makambo nyonso oyo Yesu ateyaki. Na baparagrafe oyo elandi, tokoyeba makambo mingi oyo etali mobeko yango.

4-5. Wapi lolenge mibale oyo Yesu ateyaki, mpe ateyaki ntango nini?

4 Yesu ateyaki bato na lolenge mibale. Ya liboso, asalelaki maloba mpo na koteya. Maloba na ye ezalaki na nguya mpo alobelaki solo oyo etali Nzambe, ntina ya bomoi, mpe amonisaki ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi nyonso ya bato. (Luka 24:19) Ya mibale, ateyaki na nzela ya ndakisa na ye. Na bomoi na ye, amonisaki bayekoli na ye ndenge oyo basengeli kozala.​—Yoa. 13:15.

5 Yesu ateyaki na boumeli ya mosala na ye awa na mabele. (Mat. 4:23) Ateyaki mpe bayekoli na ye mwa moke nsima ya lisekwa na ye. Na ndakisa, abimelaki etuluku ya bayekoli, oyo mbala mosusu bazalaki bato koleka 500, mpe apesaki bango mitindo oyo: “Bókómisa bato bayekoli.” (Mat. 28:19, 20; 1 Ko. 15:6) Lokola azali Mokonzi ya lisangá, Yesu akobaki kopesa bayekoli na ye malako ata ntango azongaki na likoló. Na ndakisa, na mobu soki 96 T.B., Kristo atindaki ntoma Yoane alendisa bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo mpe apesa bango toli.​—Kol. 1:18; Em. 1:1.

6-7. (a) Mateya ya Yesu ekomami wapi? (b) Ndenge nini totosaka mobeko ya Kristo?

6 Mateya ya Yesu ekomami wapi? Baevanzile minei ezali na makambo mingi oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki ntango azalaki awa na mabele. Mikanda mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo esalisaka biso tótalelaka makambo lokola Yesu, mpo bato oyo bakomaki yango batambwisamaki na elimo santu mpe bazalaki na “makanisi ya Kristo.”​—1 Ko. 2:16.

7 Mateya: Makambo oyo Yesu ateyaki ekoki kosalisa biso na makambo nyonso ya bomoi. Na yango, mobeko ya Kristo etali makambo nyonso oyo tosalaka na ndako, na mosala to na kelasi, mpe na lisangá. Toyekolaka mobeko yango ntango totángaka Makomami ya Grɛki ya bokristo mpe tomanyolaka yango. Totosaka mobeko yango ntango tosalelaka malako, mitindo, mpe mitinda oyo ezali na Makomami ya Grɛki. Kotosa mobeko ya Kristo ezali mpe kotosa Nzambe na biso ya bolingo, Yehova, mpo makambo nyonso oyo Yesu ateyaki, eutaki epai na ye.​—Yoa. 8:28.

MOBEKO YA KRISTO ESIMBAMI NA BOLINGO

8. Mobeko ya Kristo esimbami na moboko nini?

8 Soki ndako etongami na moboko ya makasi, bato oyo bafandi na kati bamiyokaka ete babatelami mpe babangaka eloko te. Ndenge moko mpe, mobeko oyo esimbami na moboko ya makasi esalaka ete bato oyo batosaka yango bámiyoka ete babatelami mpe bábanga eloko te. Mobeko ya Kristo esimbami na bolingo, oyo ezali moboko oyo eleki malamu. Mpo na nini tokoki koloba bongo?

Soki tozali kosalela basusu makambo na bolingo, tozali kotosa “mobeko ya Kristo” (Talá paragrafe 9-14) *

9-10. Bandakisa nini emonisi ete Yesu azalaki kosala makambo na bolingo, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

9 Ya liboso, Yesu amonisaki bolingo na makambo nyonso oyo asalaki. Moto oyo alingaka basusu amoniselaka bango motema mawa. Motema mawa etindaki Yesu ateya ebele ya bato, abikisa bato ya maladi, aleisa baoyo bazalaki na nzala, mpe asekwisa bakufi. (Mat. 14:14; 15:32-38; Mrk. 6:34; Luka 7:11-15) Atako kosala makambo nyonso wana elyaki ye ntango mpe makasi, Yesu andimaki kotya bamposa ya basusu na esika ya liboso. Koleka nyonso, amonisaki bolingo monene ntango apesaki bomoi na ye mpo na basusu.​—Yoa. 15:13.

10 Mateya: Tokoki komekola Yesu soki tozali kotya bamposa ya basusu na esika ya liboso. Tokoki mpe komekola ye soki toyekoli komonisela bato ya teritware na biso motema mawa. Soki motema mawa ya ndenge wana nde ezali kotinda biso tósakola mpe tóteya nsango malamu, tozali kotosa mobeko ya Kristo.

11-12. (a) Nini emonisi ete Yehova atyelaka biso mpenza likebi? (b) Ndenge nini tokoki komekola bolingo ya Yehova?

11 Ya mibale, Yesu amonisaki bolingo ya Tata na ye. Na mosala na ye, Yesu amonisaki ete Yehova atyelaka mpenza basaleli na ye likebi. Na ndakisa, Yesu ateyaki ete mokomoko na biso azali na motuya mingi na miso ya Tata na biso ya likoló. (Mat. 10:31) Yehova azalaka na mposa makasi ya koyamba lisusu mpate oyo abungaki, oyo abongoli motema mpe azongi na lisangá. (Luka 15:7, 10) Lisusu, Yehova amonisaki ete alingaka biso ndenge apesaki Mwana na ye mbeka mpo na biso.​—Yoa. 3:16.

12 Mateya: Ndenge nini tokoki komekola bolingo ya Yehova? (Ef. 5:1, 2) Tosengeli komona ete ndeko mokomoko na lisangá azali na motuya mingi, mpe koyamba na esengo ‘mpate oyo abungaki,’ kasi azongeli Yehova. (Nz. 119:176) Tomonisaka ete tolingaka bandeko na biso ntango tomipesaka mpo na kosalisa bango, na ndakisa, ntango bazali na bosɛnga. (1 Yoa. 3:17) Ntango tozali kosalela basusu makambo na bolingo, tozali kotosa mobeko ya Kristo.

13-14. (a) Ndenge emonisami na Yoane 13:34, 35, Yesu asɛngaki bayekoli na ye bámonisa nini, mpe mpo na nini yango ezali mobeko ya sika? (b) Ndenge nini totosaka mobeko ya sika?

13 Ya misato, Yesu asɛngaki bayekoli na ye bámonisa bolingo oyo ezangi moimi. (Tángá Yoane 13:34, 35.) Mobeko oyo Yesu apesaki ezali ya sika mpo esɛngaka biso tómonisa bolingo na ndenge oyo esɛngamaki te na Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisraele, elingi koloba kolinga bandeko ndenge Yesu alingaki biso. Yango esɛngaka bolingo oyo ezangi moimi. * Tosengeli kolinga bandeko na biso koleka ndenge oyo tomilingaka. Tosengeli kolinga bango makasi, tii kondima ata kopesa bomoi na biso mpo na bango, ndenge Yesu asalaki mpo na biso.

14 Mateya: Ndenge nini totosaka mobeko ya sika? Na mokuse, totosaka yango ntango tozali komipimela mpo na bolamu ya bandeko na biso. Tondimaka kaka te komipimela makambo ya minene, lokola kondima kokufa mpo na bandeko na biso, kasi tomipimelaka mpe ata makambo ya mike. Na ndakisa, ntango tosali milende mpo na kosalisa ndeko moko ya mobange aya na makita, ntango tondimi kotika makambo oyo tolingaka mpo na kosepelisa ndeko moko, to ntango tozwi konje na mosala mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi makama, tozali kotosa mobeko ya Kristo. Yango esalaka mpe ete moto nyonso na lisangá amiyoka ete abatelami mpe abanga eloko te.

MOBEKO OYO ELENDISAKA BATO BÁZALA SEMBO

15-17. (a) Ndenge nini misala ya Yesu emonisaki bosembo na ye? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yesu?

15 Na Biblia, liloba “bosembo” elimboli libosoliboso kosala oyo Nzambe alobi ete ezali malamu, mpe kosala yango kozanga kopona bilongi. Mpo na nini tokoki koloba ete mobeko ya Kristo elendisaka bato bázala sembo?

Yesu azalaki na boboto mpe azalaki komemya basi, ata basi oyo bato bazalaki kotyola (Talá paragrafe 16) *

16 Ya liboso, tótalela ndenge oyo misala ya Yesu emonisaki bosembo na ye. Na mikolo na ye, bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazalaki koyina baoyo bazalaki Bayuda te, bazalaki kotyola Bayuda oyo batángá mingi te, mpe bazalaki na limemya te mpo na basi. Kasi, Yesu azalaki sembo mpe azalaki kopona bilongi te. Andimaki bato oyo bazalaki Bayuda te, oyo bandimelaki ye. (Mat. 8:5-10, 13) Azalaki kosakwela bato nyonso, mozwi to mobola mpe azalaki kokanisela bango mabe te. (Mat. 11:5; Luka 19:2, 9) Azalaki konyokola basi te. Kasi, azalaki komonisela bango boboto mpe komemya bango, ata baoyo bato mosusu bazalaki kotyola.​—Luka 7:37-39, 44-50.

17 Mateya: Tokoki komekola Yesu soki tozali kopona bilongi te mpe tozali kosakwela bato nyonso oyo bandimi koyoka biso, bázala bazwi to babola, to bato ya lingomba nini. Mibali bakristo bakolanda ndakisa ya Yesu soki bazali kosalela basi makambo na limemya. Soki tozali kosala bongo, tozali kotosa mobeko ya Kristo.

18-19. Yesu ateyaki nini mpo na bosembo, mpe yango eteyi biso nini?

18 Ya mibale, tótalela oyo Yesu ateyaki mpo na bosembo. Ateyaki mitinda oyo ekosalisa bayekoli na ye básalelaka basusu makambo na bosembo. Na ndakisa, kanisá etinda oyo elobi ete makambo nyonso oyo bolingi bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo. (Mat. 7:12) Biso nyonso tolingaka ete básalela biso makambo na bosembo. Na yango, tosengeli mpe kosalela basusu makambo na bosembo. Soki tosali bongo, yango ekoki kotinda bango básalela mpe biso makambo na bosembo. Kasi, tokosala nini soki basaleli biso makambo na bosembo te? Yesu ateyaki mpe bayekoli na ye ete bátya motema ete Yehova ‘akosala ete likambo ya bato oyo babelelaka ye butu moi, ekatama na bosembo.’ (Luka 18:6, 7) Maloba yango ezali nde elaka: Nzambe na biso ya bosembo ayebi komekama oyo tozali kokutana na yango na mikolo oyo ya nsuka, mpe akosala ete makambo ekatama na bosembo na ntango oyo ebongi.​—2 Tes. 1:6.

19 Mateya: Soki tozali kotosa mitinda oyo Yesu ateyaki, tokosalela bato makambo na bosembo. Mpe soki basaleli biso makambo na bosembo te na mokili oyo ya Satana, koyeba ete Yehova akosala ete makambo ekatama na bosembo ebɔndisaka biso.

NDENGE OYO BAOYO BAZALI NA BOKONZI BASENGELI KOSALELA BASUSU MAKAMBO

20-21. (a) Ndenge nini baoyo bazali na bokonzi basengeli kosalela basusu makambo? (b) Ndenge nini mobali akoki komonisa bolingo oyo ezangi moimi? (c) Ndenge nini tata asengeli kosalela bana na ye makambo?

20 Na nse ya mobeko ya Kristo, ndenge nini baoyo bazali na bokonzi basengeli kosalela basusu makambo? Lokola bolingo nde esimbi mobeko yango, baoyo bazali na bokonzi basengeli kopesa baoyo bazali na nse ya bokonzi na bango lokumu mpe kosalela bango makambo na bolingo. Basengeli kobosana te ete Kristo alingi ete tómonisa bolingo na makambo nyonso.

21 Na libota. Mobali asengeli kolinga mwasi na ye “ndenge Kristo mpe alingaki lisangá.” (Ef. 5:25, 28, 29) Mobali akomekola bolingo ezangi moimi oyo Kristo amonisaki soki azali kotya bamposa mpe matomba ya mwasi na ye na esika ya liboso. Mibali mosusu bakoki komona ete ezali mpasi komonisa bolingo yango, mbala mosusu mpo babɔkwamá te esika oyo bazalaki kosalela bato makambo na bosembo mpe na bolingo. Bakoki komona ete ezali mpasi bátika mimeseno wana ya mabe, kasi basengeli kosala mbongwana yango mpo na kotosa mobeko ya Kristo. Soki mobali azali komonisa bolingo oyo ezangi moimi, ekozala mpasi te mwasi na ye amemya ye. Tata oyo alingaka mpenza bana na ye akopesa bango mpasi ata moke te, ezala na maloba to na misala. (Ef. 4:31) Kasi, amonisaka bana na ye ete alingaka mpe andimaka bango mpo bámiyoka ete babatelami mpe bábanga eloko te. Soki tata azali kosala bongo, bana bakolinga ye mpe bakotyela ye motema.

22. Ndenge emonisami na 1 Petro 5:1-3, “bampate” ezali ya nani, mpe ndenge nini bankulutu basengeli kosalela yango makambo?

22 Na lisangá. Bankulutu basengeli kobosana te ete “bampate” ezali ya bango te. (Yoa. 10:16; tángá 1 Petro 5:1-3.) Maloba “etonga ya Nzambe” mpe “libula ya Nzambe,” ekundwelaka bankulutu ete bampate ezali ya Yehova. Alingi ete básalela bampate na ye makambo na bolingo mpe bálɛngɛla yango. (1 Tes. 2:7, 8) Yehova asepelaka na bankulutu oyo bakokisaka mokumba na bango ya babateli ya mpate na bolingo nyonso. Lisusu, bandeko ya lisangá balingaka mpe bamemyaka bankulutu ya ndenge wana.

23-24. (a) Mokumba nini bankulutu bazali na yango ntango lisumu moko ya monene esalemi? (b) Makambo nini bankulutu basengeli kobosana te ntango bazali kotalela likambo yango?

23 Mokumba nini bankulutu bazali na yango ntango lisumu moko ya monene esalemi? Mokumba na bango ekeseni na oyo ya bazuzi mpe mikóló oyo bazalaki kotalela makambo na nse ya Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele. Na nse ya Mibeko yango, mibali oyo bazalaki na mikumba bazalaki kokata kaka te makambo etalaki losambo ya Yehova, kasi mpe makambo oyo etalaki bana-mboka mpe makambo oyo esimbaki mbala moko te losambo ya Yehova. Kasi, na nse ya mobeko ya Kristo, mokumba ya bankulutu ezali ya kotalela kaka makambo ya mabe oyo esimbi losambo ya Yehova. Bayebi ete bakonzi ya Leta bazali na mokumba oyo Nzambe apesá bango ya kotalela makambo ya bana-mboka mpe makambo oyo ebuki mibeko. Na ndakisa, bazali na bokonzi ya kopesa bitumbu lokola kofutisa moto lomande to kokɔtisa ye bolɔkɔ.​—Rom. 13:1-4.

24 Bankulutu basalaka nini ntango moto moko na lisangá asali lisumu ya monene? Basalelaka Biblia mpo na kotalela likambo yango malamumalamu mpe bazwaka bikateli. Babosanaka te ete bolingo nde esimbi mobeko ya Kristo. Bolingo etindaka bankulutu bámituna boye: Ndenge nini tokoki kosalisa moto nyonso na lisangá oyo basaleli ye mabe? Mpo na moto oyo asali mabe yango, bolingo ekotinda bankulutu bámituna boye: Abongoli motema? Tokoki kosalisa ye abongisa boyokani na ye na Yehova?

25. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

25 Tozali mpenza na botɔndi ndenge tozali na nse ya mobeko ya Kristo! Soki biso nyonso tosali makasi tótosa yango, tokosalisa mpo lisangá na biso ezala esika oyo moto nyonso akoki komiyoka ete balingi ye, bazwaka ye na motuya, mpe abatelami. Kasi, tozali na mokili oyo “bato mabe” bazali ‘kosala lisusu mabe koleka.’ (2 Tim. 3:13) Tosengeli ntango nyonso kozala ekɛngɛ. Ndenge nini lisangá emonisaka bosembo ya Nzambe ntango babebisi mwana na makambo ya kosangisa nzoto? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna yango.

LOYEMBO 15 Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!

^ par. 5 Lisolo oyo ná masolo mibale oyo elandi ezali na kati ya masolo minei oyo ezali komonisa ntina oyo tokoki kondima ete Yehova azali Nzambe ya bolingo mpe ya bosembo. Alingaka ete básalela basaleli na ye makambo na bosembo, mpe abɔndisaka baoyo basali bango makambo ya kozanga bosembo na mokili oyo mabe.

^ par. 1 Talá lisolo “Bolingo mpe bosembo na Yisraele ya kala” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 02/2019.

^ par. 13 NDIMBOLA YA MALOBA: Bolingo oyo ezangi moimi etindaka biso tótya bamposa mpe bolamu ya basusu na esika ya liboso. Etindaka mpe biso tóndima kotika to komipimela eloko moko mpo na bolamu ya basusu.

^ par. 61 ELILINGI: Yesu azali kotala na likebi mwasi oyo mobali akufá, oyo mwana na ye kaka moko ya mobali akufi. Motema mawa etindi Yesu asekwisa elenge mobali yango.

^ par. 63 ELILINGI: Yesu azali kolya na ndako ya Mofarisai moko na nkombo Simo. Mwasi moko, oyo mbala mosusu azali mwasi ya ndumba, auti kosokola Yesu makolo na mai ya miso na ye, apangwisi yango na nsuki na ye mpe asopeli yango mwa mafuta. Simo asepeli te na likambo oyo mwasi yango asali, kasi Yesu alobi malamu mpo na mwasi yango.