Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 26

Salisá baoyo bazali kotungisama báyika mpiko

Salisá baoyo bazali kotungisama báyika mpiko

“Bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mpenza, bato ya komikitisa.”​—1 PE. 3:8.

LOYEMBO 107 Ndakisa ya bolingo ya Nzambe

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini tokoki komekola Yehova, Tata na biso ya bolingo?

YEHOVA alingaka biso mingi mpenza. (Yoa. 3:16) Tosepelaka komekola Tata na biso ya bolingo. Na yango, tosalaka makasi ‘tómityaka na esika ya bamosusu, tózalaka na bolingo ya bondeko, mpe tózala bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mpenza,’ mingimingi baoyo “bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (1 Pe. 3:8; Gal. 6:10) Ntango bandeko na biso ya elimo bakutani na makambo oyo ezali kotungisa bango, tolingaka kosalisa bango.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Baoyo nyonso balingi kozala na libota ya Yehova bakokutana na makambo oyo ekotungisa bango. (Mrk. 10:29, 30) Na ntembe te, lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, komekama ekokóma lisusu makasi. Ndenge nini tokoki kosalisana? Tótalela mateya oyo tokoki kozwa na masolo ya Biblia oyo elobeli Lota, Yobo, mpe Naomi. Tokolobela mpe mikakatano oyo bandeko na biso bazali kokutana na yango lelo, mpe tokomona ndenge oyo tokoki kosalisa bango báyika mpiko.

ZALÁ NA MOTEMA MOLAI

3. Ndenge 2 Petro 2:7, 8 emonisi yango, ekateli nini ya mabe Lota azwaki, mpe mbuma nini yango ebimisaki?

3 Lota azwaki ekateli ya mabe ndenge aponaki kokende kofanda na Sodoma, engumba oyo bato na yango bazalaki na etamboli ya mbindo mpenza. (Tángá 2 Petro 2:7, 8.) Engumba yango ezalaki na bozwi, kasi Lota akutanaki na mikakatano mingi ndenge akendaki kofanda kuna. (Eba. 13:8-13; 14:12) Mbala mosusu mwasi ya Lota akómaki kolinga mingi engumba yango mpe bato mosusu oyo bazalaki kofanda kuna mpe yango esalaki ete azanga botosi epai ya Yehova. Mwasi yango akufaki ntango Nzambe anɔkisaki sufulu mpe mɔtɔ na mokili yango. Kanisá mpe bana basi mibale ya Lota. Bazalaki bafianse ya mibali oyo bakufaki na Sodoma. Lota abungisaki ndako na ye, bozwi na ye, kasi likambo ya mpasi koleka, abungisaki mwasi na ye. (Eba. 19:12-14, 17, 26) Na ntango wana oyo Lota azalaki kotungisama mingi, Yehova atikaki nde komonisela ye motema molai? Te.

Yehova ayokelaki Lota mawa mpe atindaki baanzelu bábikisa ye ná libota na ye (Talá paragrafe 4)

4. Ndenge nini Yehova amoniselaki Lota motema molai? (Talá elilingi ya ezipeli.)

4 Atako Lota aponaki kokende kofanda na Sodoma, Yehova ayokelaki ye mawa na ndenge atindaki baanzelu bákende kobimisa ye ná libota na ye na engumba yango. Kasi, na esika atosa noki mitindo oyo baanzelu bapesaki ye ete bálongwa mbala moko na Sodoma, Lota “azalaki koumela.” Na yango, baanzelu basimbaki lobɔkɔ na ye mpe basalisaki ye ná libota na ye bábima na engumba yango. (Eba. 19:15, 16) Na nsima, baanzelu bayebisaki ye akima na etúká ya ngombangomba. Kasi na esika atosa Yehova, Lota asɛngaki akende na engumba oyo ezalaki pene. (Eba. 19:17-20) Yehova ayokelaki Lota mpe atikaki ye akende na engumba yango. Na nsima, Lota akómaki kobanga kofanda na engumba yango mpe akendaki na etúká ya ngombangomba, esika oyo Yehova ayebisaki ye liboso. (Eba. 19:30) Yehova amoniselaki ye mpenza motema molai! Ndenge nini tokoki komekola Yehova?

5-6. Ntango tozali komekola Nzambe, ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na 1 Batesaloniki 5:14?

5 Lokola Lota, ndeko moko ya lisangá akoki kozwa bikateli ya mabe oyo ekoki kobimisela ye mikakatano ya makasi. Okosala nini soki likambo ya bongo esalemi? Motema na biso ekoki kotinda biso tóyebisa ye ete azali kobuka oyo alonaki, mpe yango ekozala lokuta te. (Gal. 6:7) Kasi, tokoki kosalisa ye na ndenge ya malamu koleka soki tomekoli lolenge oyo Yehova asalisaki Lota. Na ndenge nini?

6 Yehova atindaki baanzelu kaka te mpo bákebisa Lota kasi mpe mpo na kosalisa ye abika ntango Sodoma ebebisamaki. Ndenge moko mpe, ekoki kosɛnga tókebisa ndeko moko soki tomoni ete azali kolanda nzela oyo ekoki komemela ye mikakatano. Kasi tokoki mpe kosalisa ye. Ata soki azali kosalela mbala moko te toli ya Biblia oyo azali kozwa, tosengeli kozala na motema molai. Zalá lokola baanzelu wana mibale. Na esika tósundola ndeko yango to mpe tókima ye, tosengeli koluka ndenge mosusu oyo ebongi ya kosalisa ye. (1 Yoa. 3:18) Ekoki kosɛnga ete na ndenge ya elilingi tósimba ye na lobɔkɔ, mpe tósalisa ye asalela toli ya malamu oyo azwi.​—Tángá 1 Batesaloniki 5:14.

7. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova atalelaki Lota?

7 Yehova akokaki kotalela kaka mabunga ya Lota. Kasi, bambula mingi na nsima, elimo na ye etindaki ntoma Petro akoma ete Lota azalaki moyengebene. Ezali mpenza likambo ya esengo ndenge Yehova alimbisaka mabunga na biso! (Nz. 130:3) Tokoki kozwa liteya na ndenge oyo Yehova atalelaki Lota. Soki tozali kotalela bizaleli malamu ya bandeko, tokozala na motema molai mingi epai na bango. Mpe yango ekoki kosala ete bándima lisalisi oyo tozali kopesa bango.

YOKELÁKÁ BASUSU MAWA

8. Koyokela basusu mawa ekotinda biso tósala nini?

8 Na bokeseni na Lota, soki Yobo anyokwamaki, ezalaki te mpo azwaki ekateli ya mabe. Kasi, akutanaki na makambo mingi ya mpasi. Abungisaki bozwi na ye, lokumu na ye esilaki na mboka mpe abɛlaki maladi moko ya makasi. Likambo ya mpasi koleka, bana na ye nyonso bakufaki. Lisusu, baninga na ye misato ya lokuta bakoselaki ye makambo. Nini esalaki ete babɔndisi yango misato ya lokuta báyokela Yobo mawa te? Balukaki te koyeba malamumalamu likambo oyo ezalaki kokómela ye. Na yango, bakaniselaki Yobo mabe mpe bapamelaki ye kozanga boboto. Nini ekoki kosalisa biso mpo tósala te libunga ya ndenge wana? Kobosana te ete kaka Yehova nde ayebaka na bosikisiki likambo oyo ekómeli moto. Tyá likebi ntango moto oyo azali konyokwama azali koloba. Koyoka kaka maloba te; meká mpe komona mpasi oyo azali na yango. Soki osali bongo, okokoka mpenza komitya na esika ya ndeko yango.

9. Koyokela basusu mawa ekopekisa biso kosala nini, mpe mpo na nini?

9 Koyokela basusu mawa ekopekisa biso tólobaloba mikakatano oyo bakutani na yango. Moto ya sɔngisɔngi atongaka lisangá te, kasi akɔtisaka nde bokabwani. (Mas. 20:19; Rom. 14:19) Moto ya ndenge wana azangi boboto, amityaka na esika ya basusu te mpe maloba na ye ekoki lisusu kobakisela ndeko mpasi likoló ya mpasi. (Mas. 12:18; Ef. 4:31, 32) Ekoleka malamu soki tozali kotalela bizaleli ya malamu oyo moto azali na yango mpe kokanisa ndenge ya kosalisa ye ayikela komekama na ye mpiko!

Tómonisa motema molai ntango ndeko moko azali koloba “bilobaloba mpamba,” mpe tóloba na ye na ndenge ya kobɔndisa na ntango oyo ebongi (Talá paragrafe 10-11) *

10. Maloba oyo ezali na Yobo 6:2, 3 ezali koteya biso nini?

10 Tángá Yobo 6:2, 3. Na bantango mosusu, Yobo akómaki koloba “bilobaloba mpamba.” Kasi na nsima, andimaki ete makambo mosusu oyo alobaki ezalaki malamu te. (Yobo 42:6) Ndenge moko na Yobo, moto oyo azali kotungisama mpo na likambo moko akoki kokóma bilobaloba mpe koloba makambo oyo ekopesa ye mawa na nsima. Tosengeli kosala nini na ntango yango? Na esika ya kotyola ye, tosengeli koyokela ye mawa. Tóbosana te ete mokano ya Yehova ezalaki te ete tózala na mikakatano mpe tótungisama, ndenge ezali lelo. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki mosaleli ya sembo ya Yehova akómi bilobaloba ntango atungisami makasi. Ata soki alobi makambo oyo ezali solo te mpo na Yehova to mpo na biso, tosengeli te kosilikela ye nokinoki to kopamela ye mpo na makambo oyo alobi.​—Mas. 19:11.

11. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Elihu ntango bazali kopesa toli?

11 Na bantango mosusu, esɛngaka mpe ete moto oyo atungisami mpo na likambo moko azwa mwa toli to disiplini oyo ekosalisa ye. (Gal. 6:1) Ndenge nini bankulutu bakoki kosala yango? Basengeli komekola Elihu, oyo ayokaki Yobo mpe amityaki na esika na ye. (Yobo 33:6, 7) Elihu apesaki toli na ye kaka nsima ya kokanga ntina ya makambo oyo ezalaki kotungisa Yobo. Mpo na komekola Elihu, bankulutu basengeli koyokaka na likebi mpe komeka kokanga ntina ya makambo oyo ezali kotungisa moto. Na nsima, ntango bakopesa toli, ekozanga te kosimba motema ya moto yango.

LOBÁKÁ NA NDENGE YA KOBƆNDISA

12. Naomi ayokaki ndenge nini ntango mobali na ye mpe bana na ye bakufaki?

12 Naomi azalaki mwasi ya sembo mpe azalaki kolinga Yehova. Kasi nsima ya liwa ya mobali na ye mpe ya bana na ye mibale ya mibali, alingaki ete babenga ye lisusu Naomi te, kasi nde “Mara,” oyo elimboli “Bololo.” (Ruta 1:3, 5, 20, 21) Ruta, bokilo ya Naomi, atikaki Naomi te na mpasi nyonso oyo akutanaki na yango. Asukaki kaka te na kosalisa ye, kasi azalaki mpe koloba na ye na ndenge ya kobɔndisa. Ayebisaki Naomi maloba ya polele oyo eutaki na motema mpo na komonisa ye ete alingaki ye mpe akosalisa ye.​—Ruta 1:16, 17.

13. Mpo na nini ndeko oyo molongani na ye akufi azalaka na mposa ya lisalisi na biso?

13 Ntango molongani ya ndeko moko akufi, ndeko yango azalaka na mposa ya lisalisi na biso. Mwasi ná mobali oyo babalani bazali lokola nzete mibale oyo ekoli esika moko. Nsima ya bambula, misisa na yango esanganaka. Ntango nzete moko epikolami mpe ekufi, nzete oyo etikali ekoki konyokwama makasi. Ndenge moko mpe, ntango molongani ya ndeko moko akufi, molongani oyo atikali na bomoi akoki konyokwama ntango molai. Paula, * oyo mobali na ye akufaki na mbalakaka, alobi boye: “Bomoi na ngai ebongwanaki mpenza, mpe nazalaki komona ete makasi na ngai esili. Moninga na ngai ya motema azalaki lisusu te. Nazalaki koyebisa mobali na ngai makambo nyonso. Esengo na ngai ezalaki esengo na ye mpe mpasi na ngai ezalaki mpasi na ye. Soki nazali na mitungisi, azalaki ntango nyonso koyoka ngai. Nayokaki lokola nde bakati ngai na biteni mibale.”

Ndenge nini tokoki kosalisa moto oyo molongani na ye akufi? (Talá paragrafe 14-15) *

14-15. Ndenge nini tokoki kobɔndisa moto oyo molongani na ye akufi?

14 Ndenge nini tokoki kobɔndisa moto oyo molongani na ye akufi? Likambo ya liboso oyo tosengeli kosala ezali ya kosolola na ye, ata soki tokoki komona ete ezali mpasi kosala yango to tozali koyeba te tóloba nini. Paula, oyo touti kolobela, alobi boye: “Nayebi ete bato balingaka kolobela liwa te. Babangaka ete báloba likambo oyo ekoki kopesa mpasi. Kasi, malamu kutu oyoka ata likambo oyo ekosala yo mpasi, na esika oyoká ata eloko te.” Mbala mosusu, moto oyo azali kolela atyaka motema te ete bakoloba na ye likambo moko ya bwanya. Paula alobi boye: “Nazalaki kosepela ntango baninga bazalaki koloba kaka ete: ‘Liwa ya molongani na yo epesi biso mawa.’”

15 Ndeko William, oyo mwasi na ye akufá eleki mwa bambula, alobi boye: “Nasepelaka soki bato bazali kobɛta masolo ya mwasi na ngai; yango endimisaka ngai ete bato balingaki ye mpe bazalaki komemya ye. Yango esalisaka ngai mingi mpenza. Maloba na bango ebɔndisaka ngai mingi, mpo mwasi na ngai azalaki na motuya mingi mpo na ngai mpe tosalá makambo mingi elongo.” Bianca oyo mobali na ye akufá, alobi boye: “Ntango bandeko babondeli elongo na ngai mpe batángeli ngai vɛrsɛ moko to mibale, yango ebɔndisaka ngai. Nasepelaka mpe ntango bazali kobɛta masolo ya mobali na ngai, mpe koyoka ngai ntango nazali kobɛta masolo na ye.”

16. (a) Makambo nini tosengeli kosala mpo na moto oyo molongani na ye akufi? (b) Ndenge Yakobo 1:27 emonisi yango, mokumba nini tozali na yango?

16 Kaka ndenge Ruta atikaki Naomi te, tosengeli kokoba kosalisa baoyo babungisi na liwa moto oyo balingaki. Paula alobi boye: “Nsima ya liwa ya mobali na ngai, bandeko basalisaki ngai mingi na ebandeli. Nsima ya mikolo, bato bazongelaki bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Nzokande, ya ngai bomoi ebongwanaki. Ezalaka malamu soki basusu bakangi ntina ete moto oyo molongani na ye akufi azalaka kaka na mposa ya lisalisi, ata soki basanza to mpe bambula eleki.” Toboyi te, moto na moto azali na ndenge na ye. Bato mosusu baumelaka te na komesana na mbongwana oyo esalemi na bomoi na bango. Kasi bato mosusu bakanisaka moto oyo akufá mbala nyonso oyo bazali kosala likambo oyo bazalaki kosala elongo na moto yango. Moto na moto azalaka na ndenge na ye ya komonisa mawa. Tóbosana te ete Yehova apesi biso lokumu monene mpe mokumba ya kosalisa moto oyo molongani na ye akufi.​—Tángá Yakobo 1:27.

17. Mpo na nini moto oyo molongani asundoli ye azali na mposa ya lisalisi na biso?

17 Bato mosusu bayokaka mpasi makasi mpe batungisamaka mpo molongani na bango asundoli bango. Joyce, oyo mobali na ye akimaki ye mpe azwaki mwasi mosusu, alobi boye: “Mpasi ya koboma libala eleki ata mpasi ya kokufela molongani. Soki likama to maladi nde ebomaki mobali na ngai, elingaki kozala te likambo oyo aponi kosala. Kasi sikoyo ye moko nde aponaki kosundola ngai. Nayokaki ete nasambwe mpe nazali na ntina te.”

18. Ndenge nini tokoki kosalisa baoyo bazali lisusu na molongani te?

18 Soki tozali kosala mwa makambo mikemike ya boboto mpo na baoyo bazali lisusu na molongani te, tokomonisa ete tolingi bango mpenza. Sikoyo lokola batikali bango moko, bazali na mposa ya baninga. (Mas. 17:17) Ndenge nini okoki komonisa ete ozali moninga na bango? Okoki kobengisa bango mpo bólya mwa eloko elongo. Okoki mpe kosɛnga bango bólekisa mwa ntango elongo mpo na kominanola to mpe bóbima na mosala ya kosakola. Na bantango mosusu, okoki mpe kobengisa bango na losambo na bino na kati ya libota. Soki osali bongo, okosepelisa motema ya Yehova, mpo “azali pene na baoyo motema ebukani,” mpe azali “mosambisi [to mobateli] ya basi oyo mibali bakufá.”​—Nz. 34:18; 68:5.

19. Na kotalela 1 Petro 3:8, ekateli nini ozwi?

19 Mosika te, ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, ‘tokobosana mpenza bampasi ya kala.’ Tozali mpenza kozela ntango oyo “makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” (Yis. 65:16, 17) Kasi liboso ntango yango ekoka, tósalisanaka mpe tómonisa na maloba mpe na misala na biso ete tolingaka bandeko na biso nyonso ya elimo.​—Tángá 1 Petro 3:8.

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

^ par. 5 Lota, Yobo, mpe Naomi basalelaki Yehova na bosembo, kasi bakutanaki mpe na makambo oyo etungisaki bango mingi. Lisolo oyo elobeli mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa na bango ya koyika mpiko. Emonisi mpe ntina oyo tosengeli kozala na motema molai, koyokela basusu mawa mpe koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya bandeko oyo bazali na mikakatano.

^ par. 13 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 57 ELILINGI: Ndeko oyo azali kotungisama azali koloba “bilobaloba mpamba,” mpe nkulutu moko amonisi motema molai mpe azali koyoka ye. Na nsima, ntango nkanda ya ndeko yango ekiti, nkulutu yango azali kopesa ye toli na boboto.

^ par. 59 ELILINGI: Ndeko moko ná mwasi na ye bayei kolekisa ntango elongo na ndeko mosusu oyo mwasi na ye autaki kokufa. Bazali kotala bafɔtɔ mpe kobɛta masolo na bango.