Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 28

Kobá kosambela Yehova na ntango ya epekiseli

Kobá kosambela Yehova na ntango ya epekiseli

“Tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.”​—MIS. 4:19, 20.

LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!

NA MOKUSE *

1-2. (a) Mpo na nini tokamwaka te soki guvɛrnema epekisi mosala na biso? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

NA 2018, basakoli koleka 223 000 bazalaki kofanda na bamboka oyo guvɛrnema epekisá mosala na biso nyonso, to etyelá biso bipekiseli na makambo mosusu. Yango ekamwisaka biso te. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, lokola tozali bakristo ya solo, toyebi ete bakonyokola biso. (2 Tim. 3:12) Ata soki tofandi wapi, ekoki kosalema ete bakonzi ya mboka bápekisa biso na mbalakaka kosambela Nzambe na biso ya bolingo, Yehova.

2 Soki na mboka na bino, guvɛrnema ezwi ekateli ya kopekisa losambo ya Yehova, mbala mosusu okoki komituna boye: ‘Monyoko yango elakisi ete Yehova aboyi biso?’ Epekiseli ekosala ete tótika kosambela Yehova? Nasengeli kokende na mboka mosusu esika nakosambela Nzambe na bonsomi?’ Tokolobela mituna yango na lisolo oyo. Tokolobela mpe ndenge oyo tokoki kokoba kosambela Yehova na ntango ya epekiseli, mpe mitambo oyo tosengeli kokima.

MINYOKO ELAKISAKA ETE YEHOVA ABOYI BISO?

3. Na kotalela 2 Bakorinti 11:23-27, minyoko nini ntoma Paulo akutanaki na yango atako azalaki sembo, mpe ndakisa na ye emonisi nini?

3 Soki guvɛrnema epekisi losambo na biso, tokoki komikosa na kokanisa ete tozali na lipamboli ya Nzambe te. Kasi tóbosana te: minyoko elakisaka te ete Yehova asilikeli biso. Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Nzambe azalaki kosepela na ye mingi. Azwaki lokumu monene ya kokoma mikanda 14 oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo, mpe azalaki ntoma epai ya bikólo. Atako bongo, akutanaki na minyoko ya makasi. (Tángá 2 Bakorinti 11:23-27.) Ndakisa ya ntoma Paulo emonisi ete Yehova apesaka nzela ete basaleli na ye ya sembo bákutana na minyoko.

4. Mpo na nini mokili eyinaka biso?

4 Yesu amonisaki ntina oyo tokokutana na botɛmɛli. Alobaki ete bakoyina biso mpo tozali bato ya mokili te. (Yoa. 15:18, 19) Ntango tokutani na minyoko, elakisi te ete Yehova atiki kopambola biso. Elakisi nde ete tozali kosala oyo ezali malamu!

EPEKISELI EKOSALA ETE TÓTIKA KOSAMBELA YEHOVA?

5. Bato ya mokili bakokoka kosukisa losambo ya Yehova? Limbolá.

5 Bato ya mokili bakokoka te kosukisa losambo ya Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Baoyo bameká kosala yango balongá te. Tótalela makambo oyo esalemaki na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Baguvɛrnema ya bikólo mingi ekómaki konyokola basaleli ya Nzambe. Mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Allemagne oyo Banazi bazalaki koyangela; epekisamaki mpe na Australie, na Canada, mpe na mikili mosusu. Kasi, talá makambo oyo esalemaki: Na 1939, ntango etumba yango ebandaki, basakoli bazalaki 72 475 na mokili mobimba. Kasi, balapolo emonisaki ete ntango etumba yango esilaki na 1945, basakoli bazalaki 156 299. Lokola Yehova apambolaki basaleli na ye, motángo ya basakoli ebakisamaki koleka mbala mibale!

6. Na esika botɛmɛli ebangisa biso, ekoki nde kosala nini? Pesá ndakisa.

6 Na esika botɛmɛli ebangisa biso, ekoki nde kotinda biso tósalela Yehova mingi koleka. Na ndakisa, ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki na mwana moko ya mobali bafandaki na ekólo oyo guvɛrnema epekisaki losambo na biso. Na esika bázonga nsima mpo na kobanga, bandeko yango bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Ndeko mwasi atikaki kutu mosala na ye, atako ezalaki ya mbongo mingi. Ndeko mobali alobaki ete epekiseli etindaki bato mingi báluka koyeba soki Batatoli ya Yehova bazali mpenza banani. Yango esalaki ete abanda koyekola Biblia na bato ebele. Epekiseli esalisaki mpe na ndenge mosusu. Nkulutu moko na ekólo yango alobaki ete bato mingi oyo batikaki kosambela Yehova bazongelaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola.

7. (a) Liteya nini tokoki kozwa na Balevi 26:36, 37? (b) Okosala nini na ntango ya epekiseli?

7 Ntango banguna bapekisi mosala na biso, bakanisaka ete yango ekobangisa biso mpo tótika kosalela Yehova. Lisusu, bakoki kotambwisa bansango ya lokuta mpo na biso, kotinda basoda báya kolukaluka mikanda na bandako na biso, komema biso na batribinale, to mpe kotya bamosusu kati na biso na bolɔkɔ. Bakanisaka ete soki batye bandeko mosusu na bolɔkɔ, yango ekobangisa biso. Soki tokómi kobanga bango mpe makambo oyo bakoki kosala biso, biso moko tokoki kobanda komityela bipekiseli na losambo ya Yehova. Tólinga te kokóma lokola bato oyo Balevi 26:36, 37 elobeli. (Tángá.) Tokotika te ete kobanga etinda biso tólɛmbisa mabɔkɔ to tótika kosala makambo ya losambo na biso. Tokotyela Yehova motema mobimba mpe tokozala na nsɔmɔ te. (Yis. 28:16) Tokobondela Yehova mpo atambwisa biso. Lokola asalisaka biso, ata guvɛrnema ya nguya ndenge nini ekoki te kopekisa biso tókoba kosambela Nzambe na biso na bosembo.​—Ebr. 13:6.

NASENGELI KOKENDE NA MBOKA MOSUSU?

8-9. (a) Ekateli nini tata ya libota to mokristo nyonso asengeli kozwa? (b) Nini ekosalisa moto azwa ekateli ya malamu?

8 Soki guvɛrnema ya mboka oyo ofandi epekisi losambo na biso, mbala mosusu okomituna soki osengeli kokende kofanda na ekólo oyo okoki kosalela Yehova na bonsomi. Yango ezali ekateli ya moto na moto. Mpo na kozwa ekateli, ndeko mosusu akoki kotalela na mozindo likambo oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki ntango bakutanaki na minyoko. Nsima ya kobomama ya Stefano, bayekoli ya Yesu oyo bazalaki na Yerusaleme bapanzanaki na bitúká ya Yudea mpe ya Samaria, mpe bakatisaki tii na Fenisia, na Shipre, mpe na Antiokia. (Mat. 10:23; Mis. 8:1; 11:19) Kasi, ndeko mosusu akoki kotalela likambo oyo ntoma Paulo asalaki ntango minyoko mosusu eyelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Paulo amonaki malamu alongwa te na bisika oyo bazalaki kotɛmɛla mosala ya kosakola. Atyaki bomoi na ye na likama mpo na kopalanganisa nsango malamu mpe kolendisa bandeko oyo bazalaki na bingumba yango, epai minyoko ezalaki makasi.​—Mis. 14:19-23.

9 Masolo yango eteyi biso nini? Tata mokomoko ya libota asengeli kozwa ekateli soki basengeli kokende na mboka mosusu to te. Liboso azwa ekateli, asengeli kobondela mpe kotalela malamu libota na ye. Akotalela mpe mbuma ya malamu mpe mbuma mabe oyo libota ekoki kobuka soki bakei. Na likambo yango, mokristo mokomoko asengeli ‘komema mokumba na ye.’ (Gal. 6:5) Tosengeli te kosambisa basusu mpo na ekateli oyo bazwi.

NDENGE NINI TOKOKOBA KOSAMBELA YEHOVA NA NTANGO YA EPEKISELI?

10. Malako nini Betele mpe bankulutu bakopesa?

10 Ndenge nini okoki kokoba kosambela Yehova na ntango ya epekiseli? Betele ekopesa bankulutu ya lisangá malako mpe makanisi ya malamu mpo na ndenge ya kozwa bilei ya elimo, ndenge ya kosala makita, mpe ndenge ya kosakola nsango malamu. Soki Betele ezali na likoki te ya kosolola na bankulutu, na ntango wana bankulutu bakosalisa yo mpe bandeko nyonso ya lisangá mpo bókoba kosambela Yehova. Bakopesa malako oyo eyokani na makambo oyo ezali na Biblia mpe na mikanda ya moombo ya sembo.​—Mat. 28:19, 20; Mis. 5:29; Ebr. 10:24, 25.

11. Mpo na nini okoki kotya motema ete okozanga bilei ya elimo te, mpe okoki kosala nini mpo obatela bilei na yo ya elimo?

11 Yehova alaki ete basaleli na ye bakolya malamu na elimo. (Yis. 65:13, 14; Luka 12:42-44) Na yango, tyá motema ete ebongiseli na ye ekosala nyonso mpo na kosalisa yo na ndenge oyo esengeli mpo otikala sembo. Kasi, yo moko okoki kosala nini? Na ntango ya epekiseli, luká esika ya malamu mpo na kobomba Biblia mpe mikanda mosusu ya moombo ya sembo. Kotika te biloko yango ya motuya, ya papye to oyo otyá na aparɛyi, ezala na esika oyo bakoki komona yango mbala moko. Mokomoko na biso asengeli kosala makambo oyo ekosalisa ye abatela kondima na ye makasi.

Lokola Yehova asalisaka biso, tokoki kosala makita kozanga kobanga (Talá paragrafe 12) *

12. Bibongiseli nini bankulutu bakoki kozwa mpo makita esalema na ndenge oyo ekobenda likebi ya bato te?

12 Ndenge nini tokobanda kosala makita? Bankulutu bakozwa bibongiseli mpo oyanganaka na makita na ndenge oyo ekobenda likebi ya banguna te. Bakoki kosɛnga ete bósalaka makita bato moke esika moko, mpe mbala mosusu bakobanda kobongola mbala na mbala ntango mpe esika oyo bokokutana. Okoki kopesa mabɔkɔ na kobatela basusu soki ozali kotya makɛlɛlɛ te ntango oyei to ntango ozali kolongwa na esika ya makita. Ekoki mpe kosɛnga olata na ndenge oyo ekobenda likebi ya basusu te.

Ata soki guvɛrnema etyeli biso bipekiseli, tokotika kosakola te (Talá paragrafe 13) *

13. Liteya nini tokoki kozwa epai ya bandeko na biso ya bikólo ya Union soviétique?

13 Mosala ya kosakola ekosalema na kotala ndenge makambo ezali na esika boye to boye. Kasi, lokola tolingaka Yehova mpe tosepelaka koyebisa bato makambo ya Bokonzi na ye, tokoluka kaka ndenge ya kosakola. (Luka 8:1; Mis. 4:29) Mpo na mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova basalaki na bikólo ya Union soviétique, Emily Baran, moto moko ya istware, alobaki boye: “Ntango guvɛrnema epekisaki bandimi yango bábima mpo na koyebisa bato mateya na bango, Batatoli bakómaki koteya bato ya kartye, baninga ya mosala, mpe baninga mosusu. Ntango likambo yango esalaki ete bátinda bango na bakaa ya bakangami, Batatoli bakómaki koteya bato mosusu ya bolɔkɔ.” Na yango, atako bazalaki na ntango ya epekiseli, bandeko na biso ya bikólo ya Union soviétique batikaki kosakola te. Soki mokolo mosusu mosala ya kosakola epekisami na esika oyo ofandi, okoki komekola bandeko wana!

MITAMBO OYO OSENGELI KOKIMA

Tosengeli koyeba ntango ya kofanda nyɛɛ (Talá paragrafe 14) *

14. Nzembo 39:1 ekoki kosalisa biso tókima motambo nini?

14 Kebá na makambo oyo okoyebisa basusu. Na ntango ya epekiseli, tosengeli koyeba “ntango ya kofanda nyɛɛ.” (Mos. 3:7) Tosengeli koyeba kobomba makambo mosusu, na ndakisa bankombo ya bandeko, bisika oyo tozali kosala makita, ndenge oyo tozali kosakola mpe ndenge oyo tozali kozwa bilei ya elimo. Tokoyebisa bakonzi ya mboka makambo yango te, ata mpe baninga to bandeko na biso ya libota, ezala tofandi na bango na ekólo moko to bafandi na bikólo mosusu. Soki tobimisi basekele yango, tokotya bomoi ya bandeko na biso na likama.​—Tángá Nzembo 39:1.

15. Satana akoluka kosala nini, mpe ndenge nini tokoki kokima motambo na ye?

15 Kotika te makambo ya mikemike ekabola biso. Satana ayebi ete esika bokabwani ezali makambo esimbaka te. (Mrk. 3:24, 25) Na yango, akoluka ntango nyonso kokɔtisa bokabwani na kati na biso. Ayebi ete soki alongi kosala yango, tokobanda kobunda biso na biso na esika tóbundisa ye.

16. Ndakisa nini ya malamu ndeko Gertrud Poetzinger atikelá biso?

16 Ata bakristo oyo bakɔmɛli na elimo basengeli kokeba mpo bákwea te na motambo yango. Tózwa ndakisa ya ndeko Gertrud Poetzinger mpe Elfriede Löhr, bandeko basi mibale oyo bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Bazalaki esika moko na bolɔkɔ elongo na bandeko basi mosusu na kaa ya bakangami ya Banazi. Ndeko Gertrud akómaki koyokela ndeko Elfriede zuwa mpo badiskur oyo azalaki kosala ezalaki mpenza kolendisa bandeko basi mosusu na kaa. Na nsima, ndeko Gertrud ayokaki nsɔni mpe asɛngaki Yehova asalisa ye. Akomaki boye: “Tosengeli koyekola kondima ntango bato mosusu bazali na mayele koleka biso to bazwi mikumba ebele koleka biso.” Nini esalisaki ye alongola zuwa? Ndeko Gertrud asalaki makasi atalaka kaka bizaleli malamu ya ndeko Elfriede mpe boboto na ye. Yango esalaki ete azongisa boyokani ya malamu na ndeko Elfriede. Nsukansuka, babimisaki bango na bolɔkɔ mpe basalelaki Yehova na bosembo tii na nsuka ya bomoi na bango awa na mabele. Soki tosali makasi tózala na matata te na bandeko na biso, tokokwea te na motambo ya kokɔtisa bokabwani kati na biso.​—Kol. 3:13, 14.

17. Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kolanda malako ya ebongiseli ya Yehova?

17 Landáká malako. Soki tolandi malako oyo tozwi epai ya bandeko oyo bazali kokamba biso, tokoboya mindɔndɔ. (1 Pe. 5:5) Na ndakisa, na mboka moko epai mosala na biso epekisamaki, bandeko oyo bazalaki kokamba bapesaki malako ete basakoli bápesa bato mikanda te na mosala ya kosakola. Kasi, ndeko mobali moko oyo azalaki mobongisi-nzela amonaki ete ayebi mingi mpe atikelaki bato mikanda. Nini esalemaki? Mwa moke na nsima, ntango ye ná bandeko mosusu basilisaki kosakola, bapolisi bakangaki bango. Emonanaki ete bazalaki kolanda bango nsimansima mpe bazwaki mikanda oyo batikelaki bato. Lisolo yango eteyi biso nini? Tosengeli kolanda malako, ata soki tosepeli na yango te. Yehova akozanga te kopambola biso soki tozali kosala na bomoko na bandeko oyo atye mpo bákamba biso.​—Ebr. 13:7, 17.

18. Mpo na nini tosengeli te kotya mibeko oyo ezangá ntina?

18 Kotyela te bandeko mibeko ezangá ntina. Soki bankulutu batye mibeko oyo ezangá ntina, ekozala mpasi mingi mpo na bandeko. Ndeko Juraj Kaminský akanisaki makambo oyo esalemaki ntango epekiseli ezalaki na ekólo Tchécoslovaquie ya kala; alobaki boye: “Ntango bakangaki bandeko oyo bazalaki na mikumba minene mpe bankulutu mosusu ebele, bankulutu mosusu mpe bakɛngɛli ya zongazonga oyo bakɔtaki bolɔkɔ te bakómaki kotya mibeko na bango moko mpe koyebisa basakoli makambo ndenge na ndenge oyo basengeli kosala to oyo basengeli kosala te.” Yehova apesi biso bokonzi te ya kozwela basusu bikateli na makambo moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye moko. Ndeko oyo azali kotya mibeko oyo ezali na ntina te azali kobatela bandeko te, alingi nde kokóma mokonzi ya kondima na bango.​—2 Ko. 1:24.

KOTIKA ATA MOKOLO MOKO TE KOSAMBELA YEHOVA

19. Atako Satana akotika te kobundisa biso, ndenge nini maloba ya 2 Ntango 32:7, 8 ezali kosalisa biso tózala na mpiko?

19 Monguna na biso, Satana, akokoba konyokola basaleli ya sembo ya Yehova. (1 Pe. 5:8; Em. 2:10) Satana ná bato na ye bakoluka kopekisa biso kosambela Yehova. Kasi, ezali na ntina te tóbanda kobangabanga! (Mib. 7:21) Yehova azali na ngámbo na biso, mpe akokoba kosunga biso ata ntango mosala na biso epekisami.​—Tángá 2 Ntango 32:7, 8.

20. Ekateli nini ozwi?

20 Biso nyonso tózwa ekateli oyo bandeko na biso ya siɛklɛ ya biso bazwaki ntango bayebisaki bakonzi ya ntango wana ete: “Soki ezali boyengebene na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. Kasi biso, tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.”​—Mis. 4:19, 20.

LOYEMBO 73 Pesá biso mpiko

^ par. 5 Tosengeli kosala nini soki guvɛrnema epekisi biso kosambela Yehova? Lisolo oyo elobeli makambo oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te mpo tótika ata mokolo moko te kosambela Nzambe na biso!

^ par. 59 ELILINGI: Bililingi nyonso ezali komonisa bandeko oyo bafandi na bamboka oyo guvɛrnema etyá bipekiseli na mosala na biso. Awa, mwa bandeko bazali kosala makita na depo ya ndeko moko.

^ par. 61 ELILINGI: Ndeko mwasi moko (na lobɔkɔ ya mwasi) azali kosolola na mwasi moko mpo na kotala soki akozwa libaku ya koteya ye.

^ par. 63 ELILINGI: Bapolisi bazali kotuna ndeko mobali moko mituna, kasi aboyi kobimisa makambo ya lisangá.