Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 40

Zalá na mingi ya kosala na nsuka ya “mikolo ya nsuka”

Zalá na mingi ya kosala na nsuka ya “mikolo ya nsuka”

“Bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.”​—1 KO. 15:58.

LOYEMBO 58 Tóluka baninga ya kimya

NA MOKUSE *

1. Nini endimisaka biso ete tozali na “mikolo ya nsuka”?

OBOTAMÁ nsima ya mobu 1914? Soki bongo, olekisi bomoi na yo mobimba na eleko ya “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo. (2 Tim. 3:1) Biso nyonso toyokaka nsango ya makambo oyo Yesu alobaki ete ekosalema na mikolo ya nsuka. Na ndakisa, bitumba, kozanga bilei, koningana ya mabele, bamaladi ya mabe, ndenge bato bazali se kobuka mibeko, mpe ndenge bazali konyokola basaleli ya Yehova. (Mat. 24:3, 7-9, 12; Luka 21:10-12) Tomonaka mpe ndenge bato bazali na bizaleli ya mabe oyo ntoma Paulo asakolaki. (Talá etanda “ Bizaleli ya bato ya mikolo oyo.”) Biso basaleli ya Yehova tondimaka ete tozali na “eleko ya nsuka ya mikolo.”​—Mika 4:1.

2. Tosengeli kozwa biyano na mituna nini?

2 Lokola bambula mingi esili koleka kobanda 1914, na ntembe te, tozali sikoyo na nsuka ya “mikolo ya nsuka.” Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene, tosengeli kozwa biyano na mwa mituna oyo ya ntina mingi: Makambo nini ekosukisa “mikolo ya nsuka”? Mpe Yehova alingi tósala nini wana tozali kozela makambo yango?

MAKAMBO NINI EKOSUKISA “MIKOLO YA NSUKA”?

3. Na kotalela esakweli ya 1 Batesaloniki 5:1-3, liyebisi nini bikólo ekopesa?

3 Tángá 1 Batesaloniki 5:1-3. Ntoma Paulo alobeli “mokolo ya Yehova.” Na vɛrsɛ yango, “mokolo ya Yehova” ezali eleko oyo ekobanda na kobebisama ya “Babilone Monene,” oyo ezali lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta, mpe ekosuka na Armagedone. (Em. 16:14, 16; 17:5) Mwa moke liboso “mokolo” yango ebanda, bikólo ekoloba: “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” (Babiblia mosusu elobi: “Kimya ezali, makambo ezali te.”) Na bantango mosusu, bakonzi ya mokili basalelaka maloba ya ndenge wana ntango balobelaka ndenge ya kobongisa boyokani kati na bikólo. * Kasi, liyebisi “kimya, likambo ya kobanga ezali te” oyo Biblia elobeli ekokesana na oyo wana. Mpo na nini? Mpo ntango liyebisi yango ekopesama, bato mingi bakokanisa ete bakonzi ya mokili balongi kokómisa mokili esika ya kimya mpenza. Nzokande, “bolɔzi moko monene” ekobanda mpe “libebi ya mbalakaka ekoyela bango.”​—Mat. 24:21.

Kokosama te ntango bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” (Talá paragrafe 3-6) *

4. (a) Makambo nini toyebi te mpo na maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te”? (b) Toyebi likambo nini mpo na yango?

4 Toyebi mwa makambo mosusu oyo etali maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” Kasi, makambo mosusu, toyebi yango te. Na ndakisa, toyebi te soki nini nde ekotinda bakonzi báloba maloba yango mpe ndenge oyo bakoloba yango. Toyebi mpe te soki ekozala kaka liyebisi moko to mayebisi ebele oyo ekolandana. Ata soki esalemi ndenge nini, toyebi likambo oyo: Tosengeli kokosama te mpe kokanisa ete bakonzi ya mokili bakoki kotya kimya na mokili. Kasi, Biblia eyebisi biso ete tózela liyebisi yango, mpo ekozala elembo oyo ekomonisa ete “mokolo ya Yehova” elingi kobanda!

5. Ndenge nini 1 Batesaloniki 5:4-6 ezali kosalisa biso tómibongisa mpo na “mokolo ya Yehova”?

5 Tángá 1 Batesaloniki 5:4-6. Ntoma Paulo ayebisi biso ndenge oyo tokoki komibongisa mpo na “mokolo ya Yehova.” Alobi ete tosengeli ‘kolala mpɔngi te lokola bamosusu.’ Tosengeli ‘kozala ekɛngɛ’ mpe miso gaa. Na ndakisa, tosengeli kofungola miso mpo tókima ntango nyonso likama ya kobendama na makambo ya mokili mpe kokɔta na makambo ya politiki. Soki tozali kokɔta na makambo yango, tokoki kokóma “bato ya mokili.” (Yoa. 15:19) Toyebi ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekotya kimya na mokili.

6. Tosengeli kosalisa basusu básala nini, mpe mpo na nini?

6 Tosengeli mpe kolamwisa basusu na mpɔngi, kosalisa bango báyeba makambo oyo Biblia esakolaki ete ekosalema na mokili. Tóbosana te ete soki kaka bolɔzi monene ebandi, bato bakozala lisusu na ntango te ya kopona kosalela Yehova. Yango wana, sikoyo nde ntango ya kosakola! *

KOBÁ KOMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Ntango tozali kosakola lelo oyo, tomonisaka ete Bokonzi ya Nzambe nde ekotya kimya ya solosolo na mokili (Talá paragrafe 7-9)

7. Yehova alingi tósala nini sikoyo?

7 Na mwa ntango oyo etikali liboso “mokolo” na ye ebanda, Yehova alingi tókoba komipesa na mosala ya kosakola. Tosengeli kosala makasi mpo ‘tózala na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.’ (1 Ko. 15:58) Yesu asakolaki makambo oyo tokosala. Ntango alobelaki makambo minene oyo ekosalema na mikolo ya nsuka, abakisaki ete: “Nsango malamu esengeli liboso kosakolama na bikólo nyonso.” (Mrk. 13:4, 8, 10; Mat. 24:14) Kanisá naino: Mbala nyonso oyo obimi na mosala ya kosakola, opesaka mabɔkɔ na kokokisama ya esakweli yango ya Biblia!

8. Nini emonisi ete mosala ya kosakola ezali kobota mbuma?

8 Mbuma nini mosala ya kosakola Bokonzi eboti? Mbula na mbula, ebele ya bato bazali koyoka nsango malamu. Na ndakisa, kanisá ndenge motángo ya basakoli ya Bokonzi na mokili mobimba ebakisami na mikolo oyo ya nsuka. Na 1914, basakoli bazalaki 5155 na mikili 43. Lelo oyo, basakoli bazali soki milio 8 ná ndambo na mikili 240! Atako bongo, mosala na biso esili naino te. Tosengeli kokoba koyebisa basusu ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato.​—Nz. 145:11-13.

9. Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola nsango ya Bokonzi?

9 Mosala ya kosakola Bokonzi ekosuka tii ntango Yehova akoloba ete esili. Ntango boni etikali mpo bato báyekola koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo? (Yoa. 17:3) Toyebi te. Toyebi kaka ete liboso bolɔzi monene ebanda, moto nyonso oyo azali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” akoki kondima nsango malamu mpe kopona kosalela Yehova. (Mis. 13:48) Ndenge nini tokoki kosalisa bato na mwa ntango oyo etikali?

10. Ndenge nini Yehova azali kosalisa biso mpo tóteya bato solo?

10 Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova azali kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na koteya bato solo. Na ndakisa, tozwaka formasyo pɔsɔ nyonso na likita ya kati ya pɔsɔ. Likita yango esalisaka biso tóyeba makambo oyo tokoloba mbala ya liboso oyo tokutani na moto mpe ntango tozali kozongela bato. Eteyaka biso mpe ndenge ya koyekola Biblia na bato. Lisusu, ebongiseli ya Yehova esangiseli biso bisaleli mpo na koteya. Bisaleli yango esalisaka biso mpo na . . .

  • kobanda masolo,

  • kopesa bato mposa ya koyoka nsango na biso,

  • kosalisa bato bálinga koyeba makambo mosusu,

  • koteya solo ntango tozali koyekola na bato, mpe

  • kosɛnga bato oyo basepeli bákɔta na site Internet na biso to báya na Ndako ya Bokonzi.

Ya solo, kozala na bisaleli yango ekoki te. Tosengeli kosalela yango. * Na ndakisa, soki osololi malamu na moto moko oyo asepeli mpe otikeli ye trakte to zulunalo, akokoba kotánga ye moko tii mokolo oyo bokokutana lisusu. Mokomoko na biso azali na mokumba ya kokoba komipesa sanza nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi.

11. Mpo na nini Mateya ya Biblia ya koyekola na Internet etyami na site na biso?

11 Ndakisa mosusu oyo emonisi ete Yehova azali kosalisa bato báyeba solo ezali Mateya ya Biblia ya koyekola na Internet oyo etyami na jw.org®. Mpo na nini mateya yango etyami na Internet? Mpo sanza na sanza, ebele ya bato na mokili mobimba bakɔtaka na Internet mpo na koluka mateya ya Biblia. Mateya oyo etyami na site Internet na biso ekoki kosalisa bato yango bámona solo ya Liloba ya Nzambe. Ntango mosusu mpe okutanaka na bato oyo bakoki kokakatana mpo na kondima koyekola Biblia. Soki bongo, lakisá bango esika mateya yango ezali na site na biso to tindelá bango adrɛsi oyo ekoki kosalisa bango bákɔta mbala moko esika mateya yango ezali na Internet. *

12. Makambo nini moto akoki koyekola na Mateya ya Biblia ya koyekola na Internet?

12 Mateya ya Biblia ya koyekola na Internet elobeli makambo lokola oyo: “Biblia mpe Nkolo na yango,” “Bato oyo Biblia elobeli,” mpe “Nsango ya elikya oyo ezali na Biblia.” Moto oyo aponi mitó ya makambo yango akoki koyekola:

  • Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa moto

  • Yehova, Yesu, mpe baanzelu bazali banani?

  • Mpo na nini Nzambe akelaki bato?

  • Mpo na nini bampasi mpe mabe ezali na mokili?

Mateya yango elobeli mpe ndenge oyo Yehova . . .

  • akosukisa bampasi mpe liwa,

  • akozongisa bakufi na bomoi, mpe

  • akolongola baguvɛrnema ya bato mpo na kotya Bokonzi na ye.

13. Mateya oyo moto akoki koyekola na Internet ezwi esika ya ebongiseli ya koyekola Biblia na bato? Limbolá.

13 Mateya oyo moto akoki koyekola na Internet ezwi te esika ya ebongiseli ya koyekola Biblia na bato. Yesu apesá biso libaku monene ya kokómisa bato bayekoli. Tozali na elikya ete bato oyo basepelaka na solo bakoyekola mateya oyo ezali na Internet, bakosepela na makambo yango, mpe bakoluka koyeba makambo mosusu. Soki esalemi bongo, bakoki kondima koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova. Na nsuka ya liteya mokomoko, balendisi moto atondisa lokasa ya kosɛnga koyekola Biblia na Motatoli moko. Mokolo na mokolo, bato soki 230 na mokili mobimba basɛngaka boyekoli ya Biblia na nzela ya site Internet na biso. Ezali na ntina mingi moto ayekola Biblia na Motatoli ya Yehova!

KOBÁ KOLUKA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

14. Na kotalela malako ya Yesu oyo ezali na Matai 28:19, 20, tosengeli kosala nini, mpe mpo na nini?

14 Tángá Matai 28:19, 20. Ntango tozali koyekola Biblia na bato, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na ‘kokómisa bango bayekoli, mpe koteya bango bátosa makambo nyonso oyo Yesu apesi mitindo.’ Tosengeli kosalisa bato bámona ete ezali na ntina mingi bápona ngámbo ya Yehova mpe ya Bokonzi na ye. Yango elakisi ete tosengeli komeka kolendisa bato mpo báfandisa solo na mitema na bango, básalela makambo oyo bazali koyekola, bámipesa na Yehova na libondeli, mpe bázwa batisimo. Kaka soki basali makambo yango nde bakobika na mokolo ya Yehova.​—1 Pe. 3:21.

15. Tozali na ntango te ya kosala nini, mpe mpo na nini?

15 Ndenge tomonaki yango, ntango etikali moke mpenza mpo nsuka ya mokili oyo eya. Yango wana, tozali na ntango te ya kokoba koyekola Biblia na bato oyo bazali mpenza na mposa te ya kokóma bayekoli ya Kristo. (1 Ko. 9:26) Mosala na biso esengeli kosalema na lombangu. Ezali na bato mingi oyo basengeli koyoka nsango ya Bokonzi na mwa ntango moke oyo etikali.

KOZALA NA BOYOKANI ATA MOKE TE NA MANGOMBA YA LOKUTA

16. Na kotalela Emoniseli 18:2, 4, 5, 8, biso nyonso tosengeli kosala nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

16 Tángá Emoniseli 18:2, 4, 5, 8. Bavɛrsɛ yango emonisi likambo mosusu oyo Yehova alingi basaleli na ye básala. Bakristo nyonso ya solo basengeli komonisa polele ete bazali na boyokani ata moke te na Babilone Monene. Liboso ya koyeba solo, mbala mosusu moyekoli moko ya Biblia azalaki mondimi ya lingomba moko ya lokuta. Ntango mosusu akendaka ndako-nzambe mpe asalaka makambo ya losambo kuna. Mbala mosusu atyaka mabonza mpo na lingomba yango. Liboso moyekoli yango akóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, asengeli kokata bansinga nyonso na mangomba ya lokuta. Asengeli kotinda mokanda na lingomba na ye ya kala to na ebongiseli mosusu oyo ezali na boyokani na Babilone Monene mpo na komonisa ete alongwe kuna. *

17. Misala ya ndenge nini mokristo asengeli koboya, mpe mpo na nini?

17 Mokristo ya solo asengeli kosala nyonso mpo mosala na ye ezala na boyokani ata moke te na Babilone Monene. (2 Ko. 6:14-17) Na ndakisa, akozala te mosali na ndako-nzambe moko boye. Lisusu, soki mokristo asalaka na esika moko boye, akondima te kokende kosala mosala na ndako oyo esalelamaka mpo na losambo ya lokuta. Mpe soki azali na mosala ya ye moko, akondima te kosala mosala mpo na lingomba moko ya Babilone to kosala na bango kɔntra moko boye. Mpo na nini tosalaka masɛki te na likambo yango? Mpo tolingi te kosangana na misala mpe masumu ya bibongiseli ya mangomba oyo ezali mbindo na miso ya Nzambe.​—Yis. 52:11. *

18. Ndenge nini ndeko moko akangamaki na mitinda ya Biblia na oyo etali mosala ya mosuni?

18 Eleki mwa bambula, nkulutu moko oyo azalaki mosali-mabaya, akutanaki na mobali moko oyo azalaki kotambwisa misala ya kotonga na ndako-nzambe moko na mboka na bango; moto yango asɛngaki nkulutu yango asalela ye mwa misala na ndako-nzambe yango. Ayebaki ete nkulutu wana alingaka kosala misala na bandako-nzambe te. Kasi, alukaki moto mosusu tii azwaki te. Atako bongo, ndeko na biso akangamaki na mitinda ya Biblia mpe aboyaki mosala yango. Pɔsɔ oyo elandaki, zulunalo ya mboka yango elakisaki fɔtɔ ya mosali-mabaya mosusu azali kotya ekulusu na ndako-nzambe wana. Soki ndeko na biso andimaka mosala wana, mbala mosusu fɔtɔ na ye nde elingaki kotyama na zulunalo yango. Kanisá ndenge bandeko ya lisangá balingaki kotalela ye! Kanisá mpe ndenge oyo Yehova alingaki koyoka mpo na yango.

MAKAMBO NINI TOYEKOLI?

19-20. (a) Makambo nini toyekoli? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Na kolanda bisakweli ya Biblia, likambo ya monene oyo ekosalema mosika te na mokili ezali ete bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” Na kotalela makambo oyo Yehova ateyi biso, toyebi ete bikólo ekokoka te kotya kimya ya solosolo mpo na libela. Tosengeli kosala nini liboso ete likambo yango esalema mpe libebi ya mbalakaka eya? Yehova alingi tókoba komipesa na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe tósala nyonso mpo na kokómisa bato ebele bayekoli. Lisusu, tosengeli kokabwana na mangomba nyonso ya lokuta. Yango elimboli kolongwa bandimi ya mangomba yango mpe koboya misala oyo ezali na boyokani na Babilone Monene.

20 Ezali na makambo mosusu oyo ekosalema na nsuka ya “mikolo ya nsuka.” Ezali mpe na makambo mosusu oyo Yehova alingi tósala. Makambo yango nini, mpe ndenge nini tokoki komibongisa mpo na likambo nyonso oyo ekosalema mosika te? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 71 Tozali limpinga ya Yehova!

^ par. 5 Mosika te, bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te!” Yango ekozala elembo oyo ekomonisa ete bolɔzi monene elingi kobanda. Yehova alingi tósala nini sikoyo, liboso likambo yango esalema? Lisolo oyo ekosalisa biso tózwa eyano.

^ par. 3 Na ndakisa, na site Internet ya ONU, balobi ete ONU “ezali kobatela kimya na mokili mobimba, likambo ya kobanga ezali te.”

^ par. 10 Mpo na koyeba ndenge ya kosalela biloko oyo ezali na Bisaleli mpo na koteya, talá lisolo “Tóteyaka solo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2018.

^ par. 11 Mateya yango ezali naino na Anglais mpe na Portugais, mpe tokobakisa minɔkɔ mosusu.

^ par. 16 Tosengeli mpe kokeba na bibongiseli oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta, oyo esangisaka bilenge mpo bálekisa ntango elongo na kominanola, lokola YMCA (ebongiseli ya bilenge bakristo ya mibali) to YWCA (ebongiseli ya bilenge bakristo ya basi), tala “Mituna ya batangi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya1/1/1979. Atako bakoki koloba ete makambo oyo basalaka na bibongiseli ya ndenge wana ezali mpenza ya losambo te, bibongiseli yango elendisaka makanisi mpe mikano oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta.

^ par. 17 Mpo na koyeba misala oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta, na kolanda mitinda ya Biblia, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/1999.

^ par. 83 ELILINGI: Bato oyo bazali na restora bazali kokamwa ntango bamoni “Nsango ekwei” na televizyo mpo na maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” Ndeko moko ná mwasi na ye bazali kopema na restora yango nsima ya mosala ya kosakola, mpe bakosami te na maloba yango.