Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 48

‘Bósukisa makambo oyo bobandaki kosala’

‘Bósukisa makambo oyo bobandaki kosala’

“Bósukisa mpe kosala yango.”​—2 KO. 8:11.

LOYEMBO 35 ‘Tóluka koyeba makambo oyo eleki ntina’

NA MOKUSE *

1. Yehova atikeli biso nzela ya kosala nini?

YEHOVA atikeli biso nzela ya kopona lolenge ya bomoi oyo tolingi kozala na yango. Alakisaka biso ndenge ya kozwa bikateli ya malamu, mpe ntango tozwi bikateli oyo esepelisi ye, asalisaka biso tólonga. (Nz. 119:173) Wana tozali kosalela mingi toli ya bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe, tokobanda mpe kozwa bikateli ya malamu.​—Ebr. 5:14.

2. Mokakatano nini tokoki kozala na yango nsima ya kozwa ekateli?

2 Nzokande, ata soki tozwi ekateli ya malamu, mbala mosusu tozalaka na mokakatano ya kokómisa likambo yango tii na nsuka. Tótalela mwa bandakisa: Ndeko mobali moko ya elenge azwi ekateli ya kotánga Biblia na mobimba na yango. Alongi kotánga mwa bapɔsɔ, kasi na nsima atiki. Ndeko mwasi moko azwi ekateli ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, kasi azali se kozongisa nsima mokolo ya kobanda. Bankulutu ya lisangá moko bazwi ekateli ete bakomipesa na kotala bandeko mpo na kolendisa bango, kasi basanza ebele eleki, basali yango kaka te. Bandakisa yango ekeseni, kasi ekokani na likambo moko. Bazwaki bikateli, kasi bakokisi yango te. Na siɛklɛ ya liboso, bakristo ya Korinti bazalaki na mokakatano ya ndenge wana. Tótalela mateya oyo tokoki kozwa epai na bango.

3. Ekateli nini bakristo ya Korinti bazwaki, kasi nini esalemaki?

3 Na mobu soki 55 T.B., bakristo ya korinti bazwaki ekateli moko ya ntina mingi. Bayokaki ete bandeko ya Yerusaleme mpe ya Yudea bazali konyokwama mpe bazali na bobola, mpe ete bandeko ya masangá mosusu bazalaki kosangisa mbongo mpo na kosalisa bango. Boboto mpe ezaleli ya kokaba etindaki bakristo ya Korinti bázwa ekateli ete bakosalisa bandeko oyo bazalaki na bosɛnga, yango wana batunaki ntoma Paulo ndenge oyo bakokaki kosala yango. Paulo atindelaki lisangá yango malako mpe atyaki Tito asalisa bango na kokɔngɔla makabo yango. (1 Ko. 16:1; 2 Ko. 8:6) Kasi, mwa basanza na nsima, Paulo ayokaki ete bakristo ya Korinti bapesaki makabo yango te. Na yango, ezalaki komonana ete bakosilisa te kosangisa likabo na bango ntango ekosɛnga ete ememama na Yerusaleme nzela moko na makabo ya masangá mosusu.​—2 Ko. 9:4, 5

4. Ndenge emonisami na 2 Bakorinti 8:7, 10, 11, Paulo alendisaki bakristo ya Korinti básala nini?

4 Bakristo ya Korinti bazwaki ekateli ya malamu, mpe Paulo apesaki bango longonya mpo na kondima mpe mposa makasi na bango ya kokaba. Kasi esɛngaki mpe alendisa bango ete básukisa makambo oyo babandaki kosala. (Tángá 2 Bakorinti 8:7, 10, 11.) Likambo oyo ekómelaki bango ezali koteya biso ete ata bakristo ya sembo bakoki kozala na mokakatano mpo na kokokisa ekateli ya malamu oyo bazwaki.

5. Mituna nini tokotalela?

5 Ndenge moko na bakristo ya Korinti, tokoki komona ete ezali mpasi tókokisa bikateli oyo tozwaki. Mpo na nini? Mpo mbala mingi kozanga kokoka etindaka biso tózongisa makambo nsima. To mpe makambo oyo ekanami te ekoki kopekisa biso tósala oyo tokanaki kosala. (Mos. 9:11; Rom. 7:18) Tosengeli kosala nini soki esɛngi tótalela lisusu ekateli moko oyo tozwaki mpe ndenge nini tokoki koyeba soki tosengeli kobongola yango to te? Mpe nini ekoki kosalisa biso tókóma na makoki mingi ya kokómisa tii na nsuka makambo oyo tobandi?

LIBOSO YA KOZWA EKATELI

6. Ntango nini ekoki kosɛnga tóbongola ekateli oyo tozwaki?

6 Bikateli mosusu ya ntina oyo tozwaka, tokobongola yango ata mokolo moko te. Na ndakisa, tokangamaka na ekateli na biso ya kosalela Yehova mpe ya kotikala sembo epai ya molongani na biso. (Mat. 16:24; 19:6) Nzokande, ezali na bikateli mosusu oyo ekoki kosɛnga ete tóbongola yango. Mpo na nini? Mpo makambo ebongwanaka. Tokoki kosala nini mpo tózwaka mpenza bikateli ya malamu?

7. Tosengeli kosɛnga Nzambe nini, mpe mpo na nini?

7 Bondelá mpo na kosɛnga bwanya. Na litambwisi ya elimo santu, Yakobo akomaki: “Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba.” (Yak. 1:5) Biso nyonso ‘tozangaka bwanya’ na makambo mosusu. Na yango, sɛngá Yehova asalisa yo ntango ozali kozwa ekateli moko mpe ntango olingi kobongola ekateli oyo ozwaki. Soki osali bongo, Yehova akosalisa yo ozwa bikateli ya malamu.

8. Bolukiluki nini tosengeli kosala liboso ya kozwa ekateli?

8 Salá bolukiluki ya mozindo. Tángá Liloba ya Nzambe, mikanda ya moombo ya sembo, mpe sololá na bandeko oyo oyebi ete bakopesa yo toli ya bwanya. (Mas. 20:18) Kosala bolukiluki ya ndenge wana ezali na ntina mingi liboso ya kopona mosala mosusu, kokende kofanda na mboka mosusu, to kopona kelasi oyo osengeli kotánga mpo esalisa yo ozwa mosala oyo ekosunga yo na mosala ya Yehova.

9. Litomba nini tokozwa soki tozali sembo epai na biso moko?

9 Talelá makanisi oyo ezali kotinda yo. Yehova atyaka likebi na makanisi oyo etindaka biso tósala makambo. (Mas. 16:2) Alingaka tózala sembo na makambo nyonso. Na yango, na ntango ya kozwa bikateli, tosengeli kozala sembo epai na biso moko mpe epai ya basusu. Soki tozali sembo mpenza te, ekoki kozala mpasi tókangama na ekateli na biso. Na ndakisa, ndeko mobali moko ya elenge akoki kozwa ekateli ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi, nsima ya mwa ntango, ekómi mpasi mpo akokisa bangonga oyo esɛngami mpe esengo na ye na mosala ya kosakola ekiti. Ntango mosusu akanisaki ete mposa na ye ya kosepelisa Yehova nde etindaki ye akóma mobongisi-nzela. Kasi, ekoki nde kozala ete alingaki libosoliboso nde kosepelisa baboti na ye to ndeko moko boye?

10. Nini esengeli kotinda moto asala mbongwana?

10 Tózwa mpe ndakisa ya moyekoli moko ya Biblia oyo azwi ekateli ya kotika komɛla likaya. Na ebandeli abundibundi mpe akangi motema pɔsɔ moko to mibale, kasi na nsima, azongeli lisusu komɛla likaya. Nsukansuka, alongi kotika komɛla likaya! Bolingo na ye mpo na Yehova mpe mposa ya kosepelisa Ye esalisi moyekoli yango atika momeseno na ye ya mabe.​—Kol. 1:10; 3:23.

11. Mpo na nini osengeli komityela mikano ya sikisiki?

11 Mityelá mikano ya sikisiki. Soki omityeli mikano ya sikisiki, ekozala mpasi te mpo okómisa tii na nsuka makambo oyo obandi. Na ndakisa, okoki kozwa ekateli ya kotánga Biblia mingi yo moko. Kasi soki osali programɛ ya sikisiki te mpo na yango, okokokisa mokano na yo te. * To mpe, bankulutu ya lisangá bakoki kozwa ekateli ete bakobanda kotala bandeko mbala na mbala mpo na kolendisa bango, kasi mwa ntango eleki, basali kaka te makambo oyo bayokanaki. Mpo bálonga, bakoki komituna mituna lokola oyo: “Tosalaki mpenza liste ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali na mposa ya kolendisama? Totyaki ntango ya sikisiki mpo na kokende kotala bango?”

12. Ekoki kosɛnga tósala nini, mpe mpo na nini?

12 Zalá na bokatikati. Moko te kati na biso azali na ntango, makoki mpe makasi ya kosala likambo nyonso oyo akolinga kosala. Na yango, zalá na bokatikati mpe kozala makambo makasimakasi te. Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga obongola ekateli mpo omoni ete okokoka te kokokisa yango. (Mos. 3:6) Sikoyo, kanisá ete otalelaki lisusu ekateli oyo ozwaki, obongolaki yango ndenge esengeli, mpe omoni ete okoki kokokisa yango. Tótalela makambo mitano oyo ekoki kosalisa yo osilisa makambo oyo obandaki.

NDENGE YA KOKOKISA MAKAMBO OYO OKANI

13. Ndenge nini okoki kozwa makasi oyo osengeli na yango mpo okokisa ekateli oyo ozwi?

13 Bondelá mpo na kosɛnga makasi. Yehova akoki kopesa yo makasi mpo okokisa ekateli oyo ozwaki. (Flp. 2:13) Na yango, sɛngá ye elimo santu mpo epesa yo makasi oyo osengeli na yango. Kobá kobondela ata soki omoni lokola ete eyano na libondeli na yo ezali koumela. Kaka ndenge Yesu alobaki: “Bókoba kosɛnga [elimo santu], mpe bakopesa bino.”​—Luka 1:9, 13.

14. Ndenge nini likanisi oyo ezali na Masese 21:5 ekoki kosalisa yo okokisa ekateli oyo ozwi?

14 Komá ndenge oyo okosala. (Tángá Masese 21:5.) Mpo na kosukisa likambo nyonso oyo obandi, osengeli kokoma ndenge oyo okosala yango. Na nsima, osengeli kolandela makambo oyo okomaki. Ndenge moko mpe, ntango ozwi ekateli, salá liste ya makambo nyonso okani kosala mpo na kokokisa ekateli yango. Soki ezali likambo ya monene, salá yango ndambondambo mpo olandela yango malamu. Paulo alendisaki bakristo ya Korinti ete mokomoko na bango abomba mwa eloko pembeni “mokolo nyonso ya liboso na pɔsɔ” na esika bázela mpe báluka kokɔngɔla makabo yango ntango akoya. (1 Ko. 16:2) Kosala makambo ya minene ndambondambo ekoki mpe kosalisa yo oyoka te ete makambo elekeli yo.

15. Matomba nini ekomonana soki okomi makambo oyo okani kosala?

15 Kokoma polele makambo oyo okosala ekoki kosalisa yo okokisa bikateli oyo ozwaki. (1 Ko. 14:40) Na ndakisa, bankulutu bazali na malako oyo elobi ete basengeli kopona nkulutu moko mpo akomaka ekateli nyonso oyo ezwami, ata mpe nkombo ya nkulutu to bankulutu oyo bakolandela likambo yango mpe mokolo oyo basengeli kosilisa yango. Ntango bankulutu balandaka malako yango, ezalaka mpasi te básala makambo oyo bakanaki. (1 Ko. 9:26) Okoki komeka kosala mpe ndenge wana na makambo na yo moko. Na ndakisa, okoki kokoma makambo oyo okani kosala na mokolo mpe kokoma yango na molɔngɔ oyo okosala yango. Kosala bongo ekoki kosalisa yo osukisa likambo oyo obandaki, kasi mpe osala makambo ebele na ntango moke.

16. Osengeli kosala nini mpo okokisa ekateli oyo ozwi, mpe ndenge nini Baroma 12:11 endimisi likanisi yango?

16 Tyá molende. Esɛngaka molende mpo na kolandela makambo oyo okani kosala mpe kosukisa yango. (Tángá Baroma 12:11.) Paulo ayebisaki Timote ‘akoba komipesa’ mpe atya molende na makambo oyo azalaki kosala mpo akóma moteyi malamu. Tokoki kosalela toli yango na mikano mosusu nyonso ya elimo.​—1 Tim. 4:13, 16.

17. Ndenge nini Baefese 5:15, 16 ekoki kosalisa biso tósala makambo oyo tokanaki?

17 Salelá ntango na yo na mayele. (Tángá Baefese 5:15, 16.) Tyá ntango oyo okosala makambo oyo okanaki mpe kobongola ntango yango te. Kozela te ete makambo nyonso ekóma ya kokoka; zelá zelá, mokomboso azangá mokila. (Mos. 11:4) Kotika te ete makambo oyo ezali mpenza na ntina te elya yo ntango mpe makasi oyo osengeli na yango mpo na makambo ya ntina mingi. (Flp. 1:10) Soki likoki ezali, poná kosala makambo na yo na ntango oyo bato bakotungisa yo te. Yebisá basusu ete olingi kotya makanisi nyonso na makambo oyo ozali kosala. Okoki kokanga telefone na yo mpe koluka kotánga bamesaje to kokɔta na site Internet ya kosolola na baninga na ntango mosusu. *

18-19. Nini ekoki kosalisa yo okoba kokokisa makambo oyo okanaki ata soki okutani na mwa mikakatano?

18 Kanisá mbuma oyo ekobota. Mbuma oyo ekateli na yo ekobota ezali lokola esika oyo okani kokóma ntango ozali kosala mobembo. Soki ozali mpenza na mposa ya kokóma na esika yango, okokoba kokende ata soki bakangi nzela mpe esɛngi ozwa nzela mosusu. Ndenge moko mpe, soki totye makanisi na mbuma oyo ekateli na biso ekobota, tokokoba kokokisa yango kaka ata soki tokutani na mwa mikakatano.​—Gal. 6:9.

19 Kozwa bikateli ya malamu ezalaka pɛtɛɛ te mpe kokokisa yango ekoki kozala mpasi. Kasi na lisalisi ya Yehova, okoki kozwa bwanya mpe makasi oyo osengeli na yango mpo na kosukisa makambo oyo obandaki kosala.

LOYEMBO 65 Kende liboso!

^ par. 5 Oyokaka mawa mpo na bikateli mosusu oyo ozwá? To ozalaka ntango mosusu na mokakatano ya kozwa bikateli ya malamu mpe kokokisa yango? Lisolo oyo ekosalisa yo olonga mikakatano yango mpe oyeba kosilisa makambo oyo obandi.

^ par. 11 Mpo na kosalisa yo na botángi na yo ya Biblia, okoki kosalela “programɛ ya kotánga Biblia” oyo ezali na site jw.org®.

^ par. 17 Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali ndenge ya kosalela ntango na yo, talá lisolo “20 façons de libérer du temps” na Lamuká! ya 04/2010, na Français.