Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 47

Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Balevi

Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Balevi

“Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba.”​—2 TIM. 3:16.

LOYEMBO 98 Makomami ekomami na elimo ya Nzambe

NA MOKUSE *

1-2. Mpo na nini bakristo basengeli kotya likebi na mokanda ya Balevi?

NTOMA Paulo akundwelaki moninga na ye elenge Timote ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba.” (2 Tim. 3:16) Mokanda ya Balevi mpe ezali na kati ya Makomami yango. Ndenge nini otalelaka mokanda yango? Bato mosusu bamonaka ete ezali mokanda moko oyo etondi na mibeko oyo esilá ngala, kasi bakristo ya solo bamonaka yango bongo te.

2 Mokanda ya Balevi ekomamaki eleki sikoyo mbula soki 3 500, kasi Yehova asalaki ete ebatelama “mpo eteya biso.” (Rom. 15:4) Mokanda ya Balevi esalisaka biso tóyeba makanisi ya Yehova na makambo ndenge na ndenge. Na yango, tosengeli kotya likebi na mokanda yango. Kutu, ezali na mateya ebele oyo tokoki koyekola. Tólobela mateya minei.

NDENGE YA KONDIMAMA NA YEHOVA

3. Mpo na nini bazalaki kopesa bambeka mbula nyonso na Mokolo ya kozipa masumu?

3 Liteya ya liboso: Tosengeli liboso kondimama na Yehova mpo andima mpe bambeka na biso. Mbula nyonso na Mokolo ya kozipa masumu, ekólo mobimba ya Yisraele ezalaki koyangana mpe nganga-nzambe monene azalaki kopesa bambeka ya banyama. Bambeka yango ezalaki kokundwela Bayisraele ete basengelaki kopɛtolama na masumu! Kasi na mokolo yango, liboso ete nganga-nzambe monene akɔta na Esika oyo Eleki Bosantu ná makila ya banyama oyo bapesi mbeka, asengelaki naino kosala likambo mosusu, oyo ezalaki na ntina mingi koleka bolimbisi ya masumu ya bato.

(Talá paragrafe 4) *

4. Ndenge emonisami na Balevi 16:12, 13, nganga-nzambe monene azalaki kosala nini mbala ya liboso oyo akɔti na Esika Oyo Eleki Bosantu na Mokolo ya kozipa masumu? (Talá elilingi ya ezipeli.)

4 Tángá Balevi 16:12, 13. Kanisá makambo oyo ezalaki kosalema na Mokolo ya kozipa masumu: nganga-nzambe monene akɔti na tabernakle. Yango ezali mbala ya liboso kati na mbala misato oyo akokɔta na Esika Oyo Eleki Bosantu na mokolo yango. Na lobɔkɔ moko asimbi elokó oyo etondi na mpaka ya malasi ya nsolo kitoko, mpe na lobɔkɔ mosusu asimbi eloko moko ya wolo oyo etondi na makala ya mɔtɔ. Atɛlɛmi mwa moke na rido oyo ezali na porte ya Esika Oyo Eleki Bosantu. Na limemya nyonso, akɔti na Esika Oyo Eleki Bosantu mpe atɛlɛmi liboso ya sanduku ya kondimana. Na ndenge ya elilingi, azali liboso ya Yehova Nzambe! Sikoyo, na likebi mpenza, nganga-nzambe asopi mpaka ya malasi na makala ya mɔtɔ, mpe nsolo kitoko etondi na esika yango. * Na nsima, akokɔta lisusu na Esika Oyo Eleki Bosantu ná makila ya banyama oyo bapesi mbeka ya masumu. Tósimba ete atumbi mpaka ya malasi liboso apesa mbeka ya makila ya banyama.

5. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo bazalaki kosalela mpaka ya malasi na Mokolo ya kozipa masumu?

5 Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo bazalaki kosalela mpaka ya malasi na Mokolo ya kozipa masumu? Biblia emonisaka ete mabondeli ya basaleli ya sembo ya Yehova oyo endimami ezali lokola mpaka ya malasi. (Nz. 141:2; Em. 5:8) Kobosana te ete nganga-nzambe azalaki na limemya makasi ntango amemi mpaka ya malasi liboso ya Yehova. Ndenge moko mpe, ntango tozali kobondela Yehova, tosengeli kosala yango na limemya makasi. Tozalaka na botɔndi mingi ndenge Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba apesi biso nzela ya kobondela ye mpe kozala penepene na ye, lokola mwana liboso ya tata na ye. (Yak. 4:8) Yehova andimi tózala baninga na ye! (Nz. 25:14) Tozwaka na motuya mpenza libaku oyo apesi biso, yango wana tolingaka ata moke te koyokisa ye mawa.

6. Ndenge nganga-nzambe monene azalaki kotumba mpaka ya malasi liboso apesa bambeka ezali koteya biso nini?

6 Kobosana te ete nganga-nzambe monene azalaki kotumba mpaka ya malasi liboso apesa bambeka. Na ndenge yango, alingaki Nzambe andima ye naino, mpo bambeka oyo akopesa mpe endimama. Yango ezali koteya biso nini? Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asengelaki naino kosala likambo moko oyo ezalaki na ntina mingi koleka lobiko ya bato liboso apesa bomoi na ye mbeka. Likambo yango nini? Asengelaki kozala na bomoi ya botosi mpe ya sembo mpo Yehova andima mbeka oyo akopesa. Na ndenge yango, alingaki komonisa ete kosala makambo ndenge Yehova alingi nde lolenge malamu ya bomoi. Yesu alingaki komonisa ete Tata na ye nde azali na lotomo ya koyangela mpe ete boyangeli na ye nde ebongi.

7. Mpo na nini bomoi mobimba ya Yesu awa na mabele esepelisaki mpenza Tata na ye?

7 Awa na mabele, Yesu atosaki mibeko ya sembo ya Yehova na ndenge ya kokoka. Atako akutanaki na komekama mpe ayebaki ete akokufa liwa ya mpasi, Yesu azalaki na ekateli ya komonisa ete boyangeli ya Tata na ye nde eleki malamu. (Flp. 2:8) Ntango akutanaki na mikakatano, Yesu abondelaki “na koganga makasi mpe na mpisoli.” (Ebr. 5:7) Mabondeli na ye oyo eutaki na motema emonisaki ete azalaki sembo epai ya Yehova mpe yango epesaki ye makasi ya kokoba kotosa Ye. Na miso ya Yehova, mabondeli ya Yesu ezalaki lokola nsolo kitoko ya mpaka ya malasi ya malamu. Bomoi mobimba ya Yesu esepelisaki mpenza Tata na ye mpe elongisaki boyangeli na Ye.

8. Ndenge nini tokoki komekola Yesu?

8 Mpo tómekola Yesu, tosengeli kosala makasi tózala na bomoi ya botosi mpe ya sembo. Ntango tokutani na komekama, tóbondela Yehova na motema mobimba asalisa biso mpo tósepelisa ye. Na ndenge yango, tokomonisa ete tondimi ndenge na ye ya koyangela. Tobosanaka te ete soki tosalaka makambo oyo ayinaka, Yehova akondima mabondeli na biso te. Kasi, soki tozali kotosa mibeko ya Yehova, tokoki kozala na elikya ete mabondeli na biso oyo euti na motema ekozala lokola nsolo kitoko ya mpaka ya malasi ya malamu epai ya Yehova. Mpe tóyeba ete bosembo mpe botosi na biso esepelisaka Tata na biso ya likoló.​—Mas. 27:11.

TOSALELAKA YEHOVA MPO TOZALI NA BOTƆNDI MPE TOLINGAKA YE

(Talá paragrafe 9) *

9. Mpo na nini Bayisraele bazalaki kopesa mbeka ya boyokani?

9 Ya mibale: Tosalelaka Yehova mpo tozali na botɔndi epai na ye. Mpo tómona yango polele, tólobela naino bambeka ya boyokani oyo Bayisraele bazalaki kopesa na losambo na bango. * Mokanda ya Balevi emonisi ete Moyisraele akokaki kopesa mbeka ya boyokani “mpo na komonisa botɔndi.” (Lev. 7:11-13, 16-18) Azalaki kopesa yango mpo alingi, kasi te mpo esɛngisamaki. Na yango, mbeka ya boyokani ezalaki likabo oyo moto azalaki kopesa na bolingo na ye moko mpo alingaki Yehova Nzambe na ye. Moto yango, libota na ye, mpe banganga-nzambe bazalaki kolya mosuni ya nyama oyo apesi mbeka. Kasi, biteni mosusu ya nyama yango ezalaki kaka mpo na Yehova. Biteni nini?

(Talá paragrafe 10) *

10. Na kotalela bambeka ya boyokani oyo Balevi 3:6, 12, 14-16 elobeli, nini nde ezalaki kotinda Yesu asala mokano ya Tata na ye?

10 Liteya ya misato: Bolingo etindaka biso tópesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu. Yehova azalaki komona ete mafuta ya nyama nde eteni oyo eleki malamu. Alobaki mpe ete biloko ya kati ya nyama, na ndakisa mimpíko (rognons), ezalaki na motuya mingi. (Tángá Balevi 3:6, 12, 14-16.) Na yango, Yehova azalaki kosepela mingi ntango Moyisraele andimi kopesa mbeka ya biloko ya kati ya nyama mpe mafuta na yango. Moyisraele oyo apesi likabo yango azalaki komonisa ete alingi mpenza kopesa Nzambe eloko na ye oyo eleki malamu. Ndenge moko mpe, Yesu andimaki kopesa Yehova oyo eleki malamu na ndenge asalelaki ye na molimo mobimba mpo alingaki Ye. (Yoa. 14:31) Kosala mokano ya Nzambe ezalaki kosepelisa Yesu; alingaki mpenza mobeko ya Nzambe. (Nz. 40:8) Na ntembe te, Yehova asepelaki komona ndenge Yesu andimaki kosalela ye na bolingo na ye moko!

Bolingo mpo na Yehova etindaka biso tópesa ye eloko na biso oyo eleki malamu (Talá paragrafe 11-12) *

11. Na ndenge nini mosala na biso ezali lokola bambeka ya boyokani, mpe nini ekoki kobɔndisa biso?

11 Mosala oyo tosalelaka Yehova ezali lokola bambeka ya boyokani mpo yango esalisaka biso tómonisa mayoki na biso mpo na ye. Topesaka Yehova eloko na biso oyo eleki malamu, mpe tosalaka yango mpo tolingaka ye na motema na biso mobimba. Na ntembe te, Yehova asepelaka komona bamilio ya bato oyo basambelaka ye mpo balingaka ye mpe balingaka mibeko na ye mingi! Koyeba ete Yehova asukaka kaka te na komona mpe kosepela na misala na biso, kasi atalaka mpe ntina oyo tosalaka yango, ebɔndisaka biso. Na ndakisa, soki ozali mobange mpe ozali lisusu te kosala mingi ndenge olingaka, yebá ete Yehova amityaka na esika na yo. Okoki kokanisa ete oyo ozali kosala ezali moke, kasi Yehova amonaka nde bolingo makasi oyo ozalaka na yango epai na ye, oyo etindaka yo osala oyo okoki. Asepelaka na mbeka na yo oyo eleki malamu, oyo opesaka na kotalela makoki na yo.

12. Ndenge nini Yehova azalaki kotalela bambeka ya boyokani, mpe mpo na nini yango ezali kolendisa biso?

12 Liteya nini tokoki kozwa na bambeka ya boyokani? Ntango mɔtɔ ezalaki kozikisa biteni oyo eleki malamu ya nyama, milinga ezalaki komata mpe Yehova azalaki kosepela. Na yango, yebá ete Yehova asepelaka soki ondimi kopesa ye eloko na yo oyo eleki malamu mpe ozali kosalela ye na molimo na yo mobimba. (Kol. 3:23) Kanisá ndenge Yehova asepelaka na yo. Amonaka ete milende na yo na mosala na ye, ezala mingi to moke, ezali na motuya mingi mpe akobosana yango soki moke te.​—Mat. 6:20; Ebr. 6:10.

YEHOVA AZALI KOPAMBOLA EBONGISELI NA YE

13. Na kotalela Balevi 9:23, 24, ndenge nini Yehova amonisaki ete andimi bonganga-nzambe oyo etyamaki?

13 Liteya ya minei: Yehova azali kopambola eteni ya ebongiseli na ye oyo ezali awa na mabele. Tótalela likambo oyo esalemaki na mobu 1512 L.T.B., ntango batɛlɛmisaki tabernakle pene na Ngomba Sinai. (Kob. 40:17) Moize akambaki molulu moko mpo na kotya Arona ná bana na ye banganga-nzambe. Na nsima, ekólo mobimba ya Yisraele eyanganaki mpo na kotala ndenge banganga-nzambe bakopesa mbeka ya banyama mpo na mbala ya liboso. (Lev. 9:1-5) Ndenge nini Yehova amonisaki ete andimi bonganga-nzambe oyo etyamaki sika? Wana Arona ná Moize bazalaki kopambola bato, Yehova atindaki mɔtɔ mpe ezikisaki biteni ya mbeka oyo ezalaki na etumbelo.​—Tángá Balevi 9:23, 24.

14. Mpo na nini kondima oyo Yehova andimaki bonganga-nzambe ya libota ya Arona ezali na ntina mpo na biso lelo?

14 Mɔtɔ oyo eutaki na likoló ntango batyaki nganga-nzambe monene emonisaki nini? Yehova atindaki mɔtɔ wana mpo na komonisa ete andimaki mpenza libota ya Arona ezala ya banganga-nzambe. Ntango Bayisraele bamonaki polele ete Yehova azali elongo na banganga-nzambe wana, bakangaki ntina ete basengeli mpe kopesa bango mabɔkɔ. Ezali na liteya oyo tokoki kozwa na lisolo yango? Ɛɛ! Bonganga-nzambe na Yisraele ezalaki kaka elili ya bonganga-nzambe moko ya malamu koleka. Yesu, Nganga-nzambe monene oyo aleki nyonso, azali na bonganga-nzambe ya bakonzi 144 000, oyo bakosala elongo na ye na likoló.​—Ebr. 4:14; 8:3-5; 10:1.

Yehova azali kopambola mpe kotambwisa ebongiseli na ye. Topesaka yango mabɔkɔ na motema mobimba (Talá paragrafe 15-17) *

15-16. Ndenge nini Yehova amonisaka ete andimi “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

15 Na 1919, Yesu atyaki mwa etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Moombo yango akambaka mosala ya kosakola mpe apesaka bayekoli ya Kristo ‘bilei na ntango oyo ebongi.’ (Mat. 24:45) Tozali na elembeteli ya polele oyo emonisi ete Nzambe andimi moombo ya sembo mpe ya mayele?

16 Satana ná mokili na ye bazali kosala nyonso mpo na kopekisa moombo ya sembo asala mosala na ye. Soki mpo na lisalisi ya Yehova te, mbɛlɛ moombo ya sembo alingaki kokoka kosala mosala yango te. Atako bitumba mibale ya mokili mobimba, minyoko ya makasi, kobeba ya nkita na mokili mobimba mpe makambo ya kozanga bosembo oyo bazali kosalela basaleli ya Nzambe, moombo ya sembo mpe ya mayele azali kokoba kopesa bayekoli ya Kristo na mabele mobimba bilei ya elimo. Kanisá ebele ya bilei ya elimo oyo tozali na yango lelo, oyo tozwaka ofele, na minɔkɔ koleka 900! Ezali elembeteli ya polele oyo ezali komonisa ete Nzambe azali elongo na moombo ya sembo. Mosala ya kosakola mpe emonisaka ete Yehova azali kopambola moombo ya sembo. Nsango malamu ezali mpenza kosakolama na “mabele mobimba esika bato bafandi.” (Mat. 24:14) Ntembe ezali te ete lelo oyo, Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye mpe kopambola yango mingi.

17. Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela?

17 Ezali malamu tómituna boye: ‘Nazalaka na botɔndi ndenge nazali na kati ya eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele?’ Yehova apesi bilembeteli oyo emonisi ete azali kosalela ebongiseli na ye awa na mabele, kaka ndenge atindaki mɔtɔ uta na likoló na ntango ya Moize mpo na komonisa ete andimaki bonganga-nzambe oyo etyamaki. Tozali na bantina ebele ya komonisa botɔndi. (1 Tes. 5:18, 19) Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela? Tosengeli kosalela toli ya Biblia oyo tozwaka na nzela ya mikanda na biso, na makita, na mayangani ya mike mpe ya minene. Longola yango, tosengeli mpe komipesa na mosala ya kosakola mpe ya koteya.​—1 Ko. 15:58.

18. Ozwi ekateli ya kosala nini?

18 Tiká ete tózala na ekateli ya kosalela mateya oyo tozwi na mokanda ya Balevi. Tósala makasi tóndimama na Yehova mpo andima mbeka na biso. Tósalela Yehova mpo na komonisa botɔndi na biso epai na ye. Tiká ete tókoba kopesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu mpo tolingaka ye na motema na biso mobimba. Mpe tósala nyonso mpo na kopesa mpenza mabɔkɔ na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela lelo oyo. Soki tosali nyonso wana, tokomonisa ete tosepelaka na libaku oyo Yehova apesi biso ya kozala Batatoli na ye!

LOYEMBO 96 Buku ya Nzambe​—Eloko ya motuya mingi

^ par. 5 Mokanda ya Balevi ezali na mibeko oyo Yehova apesaki ekólo Yisraele ya kala. Lokola tozali bakristo, tozali na nse ya mibeko yango te, kasi ezali na litomba mpo na biso. Na lisolo oyo, tokotalela mateya ya ntina oyo tokoki kozwa na mokanda ya Balevi.

^ par. 4 Mpaka ya malasi oyo bazalaki kotumba na tabernakle ezalaki eloko moko mosantu, mpe na Yisraele ya kala bazalaki kosalela yango kaka na losambo ya Yehova. (Kob. 30:34-38) Mokanda moko te elobi ete bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kotumba mpaka ya malasi na losambo na bango.

^ par. 9 Mpo na koyeba makambo mosusu etali mbeka ya boyokani, talá buku Étude perspicace des Écritures Volimi 2, lok. 847.

^ par. 54 Na Mokolo ya kozipa masumu, nganga-nzambe monene na Yisraele azalaki kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu ná mpaka ya malasi mpe makala ya mɔtɔ mpo na kotondisa esika yango na nsolo kitoko. Na nsima, azalaki lisusu kokɔta kuna ná makila ya banyama ya mbeka ya masumu

^ par. 56 ELILINGI: Moyisraele moko apesi nganga-nzambe mpate lokola mbeka ya boyokani mpo na komonisa botɔndi ya bato ya libota na ye epai ya Yehova.

^ par. 58 ELILINGI: Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete alingaka Yehova na ndenge azalaki kotosa mibeko na ye mpe asalisaki bayekoli na ye básala mpe bongo.

^ par. 60 ELILINGI: Atako azali na maladi, ndeko mwasi moko ya mobange azali kopesa litatoli na nzela ya kokoma mikanda mpo na kopesa Yehova eloko na ye oyo eleki malamu.

^ par. 62 ELILINGI: Na sanza ya 02/2019, Ndeko Gerrit Lösch ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi abimisi Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Allemand, bayangani bamonisi botɔndi mpe bazali na esengo. Lelo oyo, na ndakisa ya bandeko basi wana mibale, basakoli ya Allemagne basalelaka Biblia yango mingi na mosala ya kosakola.