Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 49

“Ezali na ntango” ya kosala mpe ya kopema

“Ezali na ntango” ya kosala mpe ya kopema

“Bóya . . . na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.”​—MRK. 6:31.

LOYEMBO 143 Kobá kosala, kokɛngɛla mpe kozela

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini bato mingi batalelaka mosala?

NA ESIKA oyo ofandi, ndenge nini bato mingi batalelaka mosala? Na mikili mingi, bato bakómi kosala mosala makasi mpe kolekisa bangonga mingi mpenza na mosala, na ndenge oyo esalemá naino te. Mbala mingi, bato oyo babomaka nzoto na mosala bazalaka na ntango te ya kopema, ya kolekisa elongo na mabota na bango, to mpe ya koyekola makambo ya Nzambe. (Mos. 2:23) Nzokande, ezali na bato mosusu oyo balingaka mosala te mpe bapesaka bantina ya lokuta mpo na kokima mosala.​—Mas. 26:13, 14.

2-3. Yehova ná Yesu bapesaka ndakisa nini na oyo etali mosala?

2 Na kokesana na bato ya mokili oyo batalelaka mosala na bokatikati te, tótala ndenge oyo Yehova ná Yesu batalelaka mosala. Ntembe ezali te ete Yehova azali mosali monene. Yesu amonisaki yango polele ntango alobaki: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, ngai mpe nazali kokoba kosala.” (Yoa. 5:17) Kanisá mosala nyonso oyo Nzambe asalaki mpo na kokela ebele ya baanzelu mpe minzoto ná baplanɛti. Tomonaka mpe ebele ya biloko kitoko oyo Nzambe akelá awa na mabele. Mokomi ya nzembo azalaki na ntina ya koloba ete: “Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya. Mabele etondi na biloko oyo obimisaki.”​—Nz. 104:24.

3 Yesu amekolaki Tata na ye. Mwana yango, oyo amonisamaki lokola bwanya, azalaki wana ntango Nzambe “abongisaki likoló.” Azalaki pembeni ya Yehova “lokola mosali ya mayele.” (Mas. 8:27-31) Bankóto ya bambula na nsima, ntango Yesu ayaki awa na mabele, asalaki mosala ya malamu mpenza. Azalaki kotalela mosala yango lokola bilei, mpe makambo oyo asalaki emonisaki ete Nzambe nde atindaki ye.​—Yoa. 4:34; 5:36; 14:10.

4. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yehova ná Yesu na oyo etali kopema?

4 Ndakisa ya Yehova ná Yesu na oyo etali kosala mosala makasi elimboli nde ete kopema ezali na ntina te mpo na biso? Ezali bongo te. Yehova alɛmbaka soki moke te, na yango azali na ntina ya kopemisa nzoto te. Kasi, Biblia elobi ete nsima ya kokela likoló ná mabele, Yehova “atikaki kosala mpe abandaki kopema.” (Kob. 31:17) Nzokande, emonani ete maloba yango elakisi nde ete Yehova azelisaki mosala mpe azwaki ntango mpo na kosepela na oyo asalaki. Ndenge moko mpe, Yesu asalaki mosala makasi ntango azalaki awa na mabele, kasi azalaki kozwa ntango ya kopema mpe ya kolya elongo na baninga na ye.​—Mat. 14:13; Luka 7:34.

5. Mokakatano nini bandeko mingi bazalaka na yango?

5 Biblia elendisi basaleli ya Nzambe básepelaka kosala mosala. Basaleli ya Nzambe bazalaka gɔigɔi te, bazalaka nde makasi na mosala. (Mas. 15:19) Mbala mosusu osalaka mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo. Lisusu, biso bayekoli ya Kristo tozali na mokumba ya kosakola nsango malamu. Atako bongo, osengeli mpe kopema na ndenge oyo esengeli. Na bantango mosusu, ozalaka na mokakatano mpo na kokabola ntango ya mosala ya mosuni, ya mosala ya kosakola, mpe ya kopema? Ndenge nini tokoki koyeba ntango boni kosala mosala mpe ntango boni kopema?

YEKOLÁ KOZALA NA BOKATIKATI

6. Ndenge nini Marko 6:30-34 emonisi ete Yesu azalaki kotalela mosala mpe kopema na bokatikati?

6 Na oyo etali mosala, ezali na ntina kozala na bokatikati. Elimo ya Nzambe etindaki Mokonzi Salomo akoma ete: “Likambo na likambo [ezali] na ntango na yango.” Alobelaki kolona, kotonga, kolela, kosɛka, kobina, mpe makambo mosusu. (Mos. 3:1-8) Emonani polele ete mosala mpe kopema ezali makambo mibale ya ntina mingi na bomoi. Yesu azalaki na bokatikati na oyo etali mosala mpe kopema. Mokolo moko, bantoma basalaki mingi na mosala ya kosakola mpe “bazwaki ata ntango ya kolya biloko te.” Yesu alobaki na bango: “Bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.” (Tángá Marko 6:30-34.) Atako ye ná bayekoli na ye bazalaki ntango nyonso te kozwa likoki ya kopema ndenge oyo balingi, Yesu ayebaki ete bango nyonso bazalaki na mposa ya kopemaka.

7. Kotalela mobeko ya Sabata ekosalisa biso na nini?

7 Na bantango mosusu, esɛngaka mpenza kopema mwa moke to kobongola mwa moke makambo na biso ya mokolo na mokolo. Mpo tómona yango, tótalela ebongiseli moko oyo Nzambe atyaki mpo na basaleli na ye na ntango ya kala: Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ. Tozali na nse ya Mibeko ya Moize te; kasi tokoki kozwa matomba mingi soki totaleli makambo oyo mibeko elobaki mpo na Sabata. Mateya oyo tokozwa ekoki kosalisa biso tóyeba soki tozalaka na bokatikati to te na oyo etali mosala mpe kopema.

SABATA​—MOKOLO YA KOPEMA MPE YA LOSAMBO

8. Na kotalela Kobima 31:12-15, Sabata ezalaki mokolo ya kosala nini?

8 Liloba ya Nzambe elobi ete nsima ya kokela “mikolo” motoba, Nzambe atikaki kokela awa na mabele. (Eba. 2:2) Kasi, Yehova alingaka mosala, mpe “azali kokoba kosala” makambo mosusu. (Yoa. 5:17) Ebongiseli ya Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ elandi ndakisa ya mokolo ya kopema ya Yehova oyo mokanda ya Ebandeli elobeli. Nzambe alobaki ete Sabata ezalaki elembo kati na ye ná Yisraele. Ezalaki mokolo ya “kopema mpenza . . . , eloko moko mosantu mpo na Yehova.” (Tángá Kobima 31:12-15.) Mosala epekisamaki mpo na moto nyonso, ezala bana, baombo, ata mpe banyama ya mboka. (Kob. 20:10) Ezalaki mpo na kopesa bato nzela ya kotya likebi mingi na makambo ya losambo.

9. Nini emonisi ete na mikolo ya Yesu bato mosusu bazangaki bokatikati na ndenge ya kotalela Sabata?

9 Mokolo ya Sabata ezalaki mpo na bolamu ya bato ya ekólo ya Nzambe; kasi na mikolo ya Yesu, bakonzi mingi ya mangomba bakómaki kolekisa ndelo na ndenge na bango ya kotalela Sabata. Bazalaki koloba ete na mokolo ya Sabata, ata kobuka mitó ya blé mpo na kolya, to kobikisa moto ya maladi ezalaki kobuka mibeko. (Mrk. 2:23-27; 3:2-5) Kasi, yango eyokanaki te na makanisi ya Nzambe, mpe Yesu amonisaki yango polele epai ya bayoki na ye.

Na mokolo ya Sabata, Yozefe ná libota na ye bazalaki komipesa na makambo ya losambo (Talá paragrafe 10) *

10. Matai 12:9-12 emonisi ete Yesu azalaki kotalela Sabata ndenge nini?

10 Yesu ná Bayuda oyo bazalaki bayekoli na ye bazalaki kotosa Sabata mpo bazalaki na nse ya Mibeko ya Moize. * Kasi, na maloba mpe misala na ye, Yesu amonisaki ete na oyo etali kotosa Sabata, esengeli kozala makambo makasimakasi te, mpe ete kosala likambo ya boboto mpo na kosalisa basusu na mokolo yango ezalaki mabe te. Alobaki polele ete: “Okoki kosala likambo ya malamu na sabata.” (Tángá Matai 12:9-12.) Azalaki komona te ete kosala likambo ya boboto mpo na kosalisa basusu ezali kobuka mobeko ya Sabata. Makambo oyo Yesu asalaki emonisaki ete ayebaki moko ya bantina minene oyo Nzambe atyaki mobeko ya Sabata. Lokola bato ya ekólo ya Nzambe bazalaki kopemisa misala ya makasi oyo bazalaki kosala mokolo na mokolo, bakokaki kotya makanisi nyonso na makambo ya losambo. Na ntembe te, Yesu akolaki na libota oyo ezalaki komipesa na makambo ya losambo na mokolo ya Sabata. Toyebi yango mpo, ntango Yesu azalaki na mboka na bango Nazarete, Biblia elobi ete: “Ndenge [Yesu] amesanaki kosala na mokolo ya sabata, akɔtaki na sinagoga, mpe atɛlɛmaki mpo na kotánga.”​—Luka 4:15-19.

NDENGE NINI OTALELAKA MOSALA?

11. Nani apesaki Yesu ndakisa ya malamu na oyo etali mosala?

11 Na ntembe te, Yozefe tata-mobɔkɔli ya Yesu alakisaki Yesu mosala ya mabaya, mpe ayebisaki ye ndenge Nzambe atalelaka mosala. (Mat. 13:55, 56) Mpe Yesu azalaki komona ntango Yozefe azalaki kosala mosala makasi mokolo na mokolo mpo na kokokisa bamposa ya libota. Kutu, na nsima, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Mosali asengeli kozwa lifuti na ye.” (Luka 10:7) Yango emonisi ete Yesu ayebaki kosala mosala makasi.

12. Bavɛrsɛ nini emonisi likanisi ya Biblia na oyo etali kosala mosala makasi?

12 Ntoma Paulo mpe ayebaki kosala mosala makasi. Mosala na ye ya libosoliboso ezalaki ya koyebisa basusu makambo ya Yesu mpe mateya na ye. Atako bongo, Paulo azalaki mpe kosala mosala mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Bato ya Tesaloniki bayebaki ete “na mosala makasi mpe na mitoki,” azalaki kosala “butu moi” mpo ‘amemisa moto moko te kilo monene.’ (2 Tes. 3:8; Mis. 20:34, 35) Mbala mosusu, Paulo azalaki kolobela mosala na ye ya kotonga bahema. Ntango azalaki na Korinti, afandaki na ndako ya Akila ná Prisile mpe “bazalaki kosala mosala [elongo], mpo mosala na bango ezalaki ya kotonga bahema.” Koloba ete Paulo azalaki kosala “butu moi” elimboli te ete azalaki kosala kozanga kotika. Na bantango mosusu, azalaki kotika mosala ya kotonga bahema, na ndakisa na Sabata. Na mokolo yango, azalaki na mabaku ebele ya kosakwela Bayuda, oyo bazalaki mpe kosala mosala te na mokolo ya Sabata.​—Mis. 13:14-16, 42-44; 16:13; 18:1-4.

13. Ndakisa ya Paulo ekoki koteya biso nini?

13 Ntoma Paulo atiká ndakisa ya malamu. Azalaki kosala mosala ya mosuni, kasi azalaki mpe kolekisa ntango mbala na mbala “na mosala mosantu ya nsango malamu ya Nzambe.” (Rom. 15:16; 2 Ko. 11:23) Alendisaki basusu básala mpe bongo. Na yango, abengaki Akila ná Prisile “baninga na [ye] ya mosala na kati ya Kristo Yesu.” (Rom. 12:11; 16:3) Lisusu, Paulo alendisaki bakristo ya Korinti bázala na “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” (1 Ko. 15:58; 2 Ko. 9:8) Kutu, elimo ya Yehova esalisaki ntoma Paulo akoma ete: “Soki moto alingi kosala mosala te, alya mpe te.”​—2 Tes. 3:10.

14. Yesu alingaki koloba nini na maloba na ye oyo ezali na Yoane 14:12?

14 Mosala oyo eleki ntina na mikolo oyo ya nsuka ezali mosala ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Kutu, Yesu asakolaki ete bayekoli na ye bakosala misala minene koleka ye! (Tángá Yoane 14:12.) Alingaki koloba te ete tokosala makamwisi lokola ye. Alingaki koloba ete bayekoli na ye bakosakola mpe bakoteya na bisika mingi koleka, epai ya bato ebele koleka, mpe na boumeli ya ntango molai koleka ye.

15. Mituna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini?

15 Soki osalaka mosala ya mosuni, omituna boye: ‘Na esika ya mosala, eyebani ete nazalaka makasi na mosala? Nasilisaka mosala oyo bapesi ngai na ntango oyo esengeli mpe nasalaka mpenza oyo nakoki?’ Soki oyanoli ɛɛ, wana patrɔ akoki kotyela yo motema. Yango ekosala mpe ete bato oyo batalaka yo básepela na nsango ya Bokonzi. Na oyo etali mosala ya kosakola mpe ya koteya, omituna boye: ‘Eyebani ete nazalaka makasi na mosala ya kosakola? Nabongisaka malamu bokutani ya liboso? Nazongelaka nokinoki bato oyo basepelaki? Nasalelaka mbala na mbala mayele ndenge na ndenge ya kosakola? Soki oyanoli ɛɛ, okozala na esengo na mosala ya kosakola.

NDENGE NINI OTALELAKA KOPEMA?

16. Bokeseni nini ezali kati na ndenge oyo Yesu ná bantoma bazalaki kotalela kopema mpe ndenge oyo bato mingi batalelaka yango lelo oyo?

16 Yesu ayebaki ete na bantango mosusu, ye ná bantoma na ye bazalaki na mposa ya kopema. Kasi, bato mingi ya ntango wana mpe bato mingi lelo oyo bazali lokola mozwi oyo Yesu alobelaki na ndakisa moko. Moto yango alobaki na molimo na ye ete: “Pemá, lyá, mɛlá, omisepelisa.” (Luka 12:19; 2 Tim. 3:4) Atyaki makanisi nyonso na kopema mpe na bisengo. Kasi, bisengo ezalaki te eloko oyo eleki ntina na bomoi mpo na Yesu ná bantoma na ye.

Kotalela mosala ya mosuni mpe kopema na bokatikati ekosalisa biso tómipesa mpe na misala ya malamu oyo ekopesa biso makasi (Talá paragrafe 17) *

17. Ndenge nini tosalelaka ntango oyo tokei na mosala na biso ya mosuni te?

17 Lelo oyo, tosalaka makasi tómekola Yesu soki tosaleli ntango oyo tokei mosala te, kaka mpo na kopema te, kasi mpe mpo na kobima mosala ya kosakola mpe koyangana na makita. Kutu, tozwaka na ntina mingi mosala ya kokómisa bato bayekoli mpe koyangana na makita, yango wana tosalaka nyonso mpo na komipesa mbala na mbala na makambo yango ya losambo na biso. (Ebr. 10:24, 25) Ata ntango tozali na konje, tobatelaka momeseno na biso ya koyangana na makita, ata soki tozali wapi, mpe tolukaka mabaku ya kosakwela bato oyo tokutani na bango.​—2 Tim. 4:2.

18. Mokonzi na biso Yesu Kristo alingi tósala nini?

18 Tozali na botɔndi mingi ndenge Mokonzi na biso Yesu Kristo, azali makambo makasimakasi te mpe asalisaka biso tótalela mosala mpe kopema na bokatikati! (Ebr. 4:15) Alingi tópemaka na ndenge oyo esengeli. Alingi mpe tósala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na biso ya mosuni, mpe tómipesa na mosala oyo epesaka biso makasi, ya kokómisa bato bayekoli. Na lisolo oyo elandi, tokolobela mokumba oyo Yesu azali na yango mpo na kolongola bato na boombo moko ya mabe mpenza.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

^ par. 5 Biblia eteyaka biso ndenge ya kozala na makanisi oyo ebongi mpo na mosala mpe kopema. Lisolo oyo ezwi ndakisa ya mobeko ya Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo epesamaki na Yisraele ya kala mpo na kosalisa biso tóyeba soki tozalaka na bokatikati to te na oyo etali mosala mpe kopema.

^ par. 10 Bayekoli ya Yesu bazalaki mpenza kotosa mobeko ya Sabata, yango wana batikaki naino kobongisa biloko ya kotya na lilita ya Yesu, tii Sabata elekaki.​—Luka 23:55, 56.

^ par. 55 ELILINGI: Yozefe azali komema libota na ye na sinagoga na mokolo ya Sabata.

^ par. 57 ELILINGI: Tata moko oyo asalaka mosala ya mosuni azali na konje ná bato ya libota na ye mpe azali kosalela ntango yango na makambo ya elimo.