Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osengeli koluka liboso Bokonzi ya Nzambe lelo oyo!

Osengeli koluka liboso Bokonzi ya Nzambe lelo oyo!

Kanisá ete mopɛpɛ makasi elingi kobɛta na mboka na bino. Bakonzi ya leta bazali koyebisa bato nyonso bálongwa na mboka mpo na kokende na esika ya malamu. Osengeli kosala nini? Osengeli kokende na esika ya malamu mpo na komibatela.

Ndenge moko mpe, mosika te biso nyonso tokokutana na “mopɛpɛ” makasi, oyo Yesu abengaki “bolɔzi moko monene.” (Matai 24:21) Ezali na esika moko te oyo tokoki kokima mpo na komibatela na bolɔzi yango. Kasi tokoki kosala likambo moko mpo na komibatela. Likambo nini?

Na lisolo likoló ya Ngomba, Yesu apesaki toli oyo: “Bókoba koluka liboso Bokonzi [ya Nzambe] mpe boyengebene na ye.” (Matai 6:33) Ndenge nini tokoki kosalela toli yango?

Bókoba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe. Yango elimboli ete tosengeli kozwa Bokonzi ya Nzambe na valɛrɛ mingi koleka eloko mosusu nyonso. (Matai 6:25, 32, 33) Mpo na nini? Mpo bato bakokoka te kosilisa mikakatano na mokili. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosala yango.

Bókoba koluka boyengebene ya Nzambe. Tosengeli kosala makasi ya kotosa mibeko ya Nzambe mpe kolanda batoli na ye. Mpo na nini? Mpo soki tokómi biso moko kopona nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, tokozwa bikateli ya mabe mpe ekomemela biso mpasi to liwa. (Masese 16:25) Kasi, soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe, tokosepelisa ye mpe tokozala na esengo.​—Yisaya 48:17, 18.

Bókoba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. Yesu alobaki ete bato mosusu bakokosama mpo bakokanisa ete soki bakómi na mbongo mingi, bakozwa libateli ya solosolo. Bato mosusu bakozanga ntango ya koluka Bokonzi ya Nzambe mpo mbala mosusu bakolekisa ntango mingi mpe bakomipesa mobimba mpo na koluka kosilisa mikakatano na bango.​—Matai 6:19-21, 25-32.

Kasi, Yesu alakaki ete baoyo bakoluka liboso Bokonzi ya Nzambe bakozwa oyo bazali na mposa na yango lelo oyo mpe ebele ya mapamboli na mikolo ezali koya.​—Matai 6:33.

Na siɛklɛ ya liboso, bayekoli ya Yesu balukaki liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye, kasi bakutanaki mpe na bampasi na bomoi na bango. Nzokande babatelamaki. Mpo na nini?

Lokola bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe, babatelamaki na mikakatano oyo eyelaki bato oyo baboyaki kotosa Nzambe. Bazalaki na kondima makasi ete Bokonzi ya Nzambe ekoya, yango wana bayikaki mpiko na mikakatano ya makasi mpenza oyo bakutanaki na yango. Nzambe mpe apesaki bango “nguya oyo eleki makasi” mpo bálonga mikakatano.​—2 Bakorinti 4:7-9.

OKOLUKA LIBOSO BOKONZI?

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso balukaki liboso Bokonzi ya Nzambe, ndenge Yesu ayebisaki bango. Basakolaki nsango malamu ya Bokonzi na bikólo na bango nyonso. (Bakolose 1:23) Ezali na bato oyo bazali mpe kosala mosala yango lelo oyo?

Ɛɛ! Batatoli ya Yehova bayebi ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekosukisa mokili oyo. Yango wana bamipesaka na mosala oyo Yesu alobelaki: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Osengeli kosala nini soki oyoki nsango malamu? Tolendisi yo olanda ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki kofanda na engumba Beroya, na Masedonia. Ntango bayokaki nsango malamu ya Bokonzi oyo ntoma Paulo ayebisaki bango, bandimaki yango “na mposa makasi mpenza koleka.” Na nsima, ‘batalelaki Makomami malamumalamu’ mpo na koyeba soki makambo oyo bayokaki euti mpenza na Liloba ya Nzambe, mpe basalelaki makambo bayekolaki.​—Misala 17:11, 12.

Okoki mpe kosala bongo. Soki ozali koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye, okobatelama lelo oyo mpe okozwa kimya mpe libateli ya libela na mikolo ezali koya.