Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpe bazalani?

Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpe bazalani?

Atako Mibeko ya Moize ezali mpo na bakristo te, mibeko na yango mibale oyo eleki monene; elingi koloba, kolinga Nzambe mpe bazalani emonisi na mokuse makambo oyo Yehova asɛngaka biso. (Mt 22:37-39) Tobotamaka na bolingo ya ndenge wana te. Tosengeli nde kokóma na yango. Ndenge nini? Moko ya makambo ya ntina oyo ekoki kosalisa biso ezali ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Soki totaleli bizaleli ndenge na ndenge ya Nzambe oyo emonisami na Makomami, tokomona “bisengo ya Yehova.” (Nz 27:4) Yango ekosala ete tókóma kolinga ye lisusu mingi mpe tókóma kokanisa lokola ye. Yango ekopesa biso mposa ya kotosa mibeko ya Nzambe, ata mpe mobeko etali kolinga basusu kozanga koluka matomba na biso moko. (Yn 13:34, 35; 1Yn 5:3) Talá makambo misato ya kosala mpo na kosepela mingi lisusu na botángi ya Biblia:

  • Salelá likoki na yo ya kokanisa mpe salá lokola ozali wana. Kanisá ete ozali wana. Ozali komona nini, koyoka nini, mpe nsolo nini ozali koyoka? Okanisi ete bato oyo lisolo yango elobeli bazali komiyoka ndenge nini?

  • Salelá mayele ndenge na ndenge. Talá mwa makambo ya kosala: Tángá na mongongo makasi, to landá nzela moko na botángi oyo ozali koyoka na kasɛti. Tángá lisolo ya moto moko oyo Biblia elobeli to lisolo moko na esika ya kotánga mikapo ndenge elandani. Na ndakisa, salelá eteni 4 to eteni 16 ya Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe mpo na kotánga lisolo ya Yesu. Tángá mokapo ya mokolo na mobimba na yango. Tángá mikanda ya Biblia na molɔngɔ na kolanda ndenge bakomaki yango.

  • Tángá na ndenge oyo okokanga ntina. Eleki malamu kotánga ata mokapo moko na mokolo na ndenge oyo okokanga ntina mpe okomanyola, na esika ya kotánga mikapo ebele kaka mpo na kosilisa kotánga. Luká koyeba ndenge likambo yango elekaki. Talelá makambo ya mikemike ya lisolo yango. Salelá bakarte mpe mitindami. Salá bolukiluki na likambo ata moko oyo ozali kokanga ntina na yango te. Soki likoki ezali, ntango oyo olekisi mpo na kotánga ekokana na ntango oyo okolekisa mpo na komanyola.