Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tyelá Yehova motema ntango bazali kotumola yo

Tyelá Yehova motema ntango bazali kotumola yo

Matumoli ekoki kosala ete tóyoka nzoto mpasi mpe tóbulungana na makanisi. Ekoki ata kolɛmbisa biso na elimo soki tobangi ntango banguna na biso bazali kotɛmɛla losambo na biso. Ndenge nini okoki komibatela na matumoli?

Batatoli ya Yehova mingi balongaki matumoli mpo batyelaki Yehova motema. (Nz 18:17) Na ndakisa, Estere alobaki mpo na kobimisa makanisi mabe ya mobali moko na nkombo Hamane. (Est 7:​1-6) Liboso ya kosala yango, atyelaki Yehova motema na ndenge akilaki bilei. (Est 4:​14-16) Yehova apambolaki misala na ye, abatelaki ye mpe basaleli na ye.

Bilenge, soki bazali kotumola bino, bósɛnga Yehova asalisa bino mpe bóyebisa ndeko moko oyo akɔmɛli na elimo, na ndakisa baboti na bino, mokakatano na bino. Bokoki komindimisa ete Yehova akosalisa bino kaka ndenge asalisaki Estere. Likambo nini mosusu bokoki kosala mpo na kolonga matumoli?

TALÁ VIDEO BOLENGE NA NGAI—NASALA NINI SOKI BAZALI KOTUMOLA NGAI? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mateya nini bilenge bakoki kozwa na ndakisa ya Charlie mpe ya Ferin?

  • Mateya nini baboti bakoki kozwa na makambo oyo Charlie mpe Ferin balobi mpo na kosalisa bana na bango bálonga matumoli?