Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Babateli ya mpate oyo basalaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova

Babateli ya mpate oyo basalaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova

Bato mingi bakaniselaka bato oyo bazali na bokonzi mabe. Mpo na nini tokoki komitya na esika na bango? Mpo bato basalelaka bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpo na koluka kaka matomba na bango moko. (Mik 7:3) Tozali na botɔndi mingi ndenge bankulutu na lisangá bazwaka formasyo mpo na kosalela bokonzi na bango mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova.—Est 10:3; Mt 20:​25, 26.

Bankulutu bakeseni mpenza na bakonzi ya mokili oyo. Basalaka lokola bakɛngɛli mpo balingaka Yehova mpe basaleli na ye. (Yn 21:16; 1Pe 5:​1-3) Na nse ya litambwisi ya Yesu, babateli ya mpate yango basalisaka mosakoli mokomoko amiyoka ete azali na kati ya libota ya basambeli ya Yehova mpe atikala penepene na ye. Bazalaka wana mpo na kolendisa bampate ya Yehova na elimo mpe kosalisa bango ntango bazali na mposa ya lisalisi ya minganga na lombangu to ntango likama ebimi. Soki ozali na mposa ya lisalisi, ekozala malamu ozwa likanisi ya kobenga nkulutu moko ya lisangá na bino.—Yk 5:14.

TALÁ VIDEO BABATELI YA MPATE OYO BABATELAKA ETONGA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Matomba nini Mariana azwaki na lisalisi oyo bankulutu bapesaki ye?

  • Matomba nini Elias azwaki na lisalisi oyo bankulutu bapesaki ye?

  • Nsima ya kotala video oyo, ndenge nini ozali kotalela misala ya bankulutu?