02-08/10
YOBO 1-3
Loyembo 141 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Kobá komonisa ete olingaka Yehova mingi mpenza”: (Min. 10)
Biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Yb 1:10—Ndenge nini vɛrsɛ oyo esalisaka biso tókanga ntina ya maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 27:46? (w21.04 lok. 11 par. 9)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Min. 4) Yb 3:1-26 (th liteya 12)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Min. 3) Mpo na kobanda, salelá lisolo ya bokutani ya liboso oyo ezali na eteni “Ndenge ya kobanda lisolo.” Yebisá moto yango makambo etali site Internet na biso, mpe tikelá ye karte ya jw.org. (th liteya 9)
Kozongela moto: (Min. 4) Mpo na kobanda, salelá lisolo ya kozongela moto oyo ezali na eteni “Ndenge ya kobanda lisolo.” Salá lokola outi kolakisa nkolo-ndako video Mpo na nini koyekola Biblia? mpe bólobela yango. (th liteya 20)
Diskur: (Min. 5) w22.01 nk. 11-12 par. 11-14—Motó ya likambo: Zalá moteyi malamu lokola Yakobo—Talelá makambo na ndenge oyo ebongi mpe zalá na komikitisa. (th liteya 18)
BOMOI YA BAKRISTO
Nakanisaki ete nazalaki kosala likambo nyonso malamu: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Lakisá video. Na nsima, tuná bayangani boye: Na ndenge nini ndeko Birdwell azalaki kokanisa ete “azalaki kosala likambo nyonso malamu”?
Kokanisa na mozindo Matai 6:33 esalisaki ye asala nini?
Liteya nini mosusu ozwi na lisolo ya libota ya ndeko Birdwell?
“Salelá lokasa ya ebandeli ya JW.ORG ntango ozali kosakola”: (Min. 5) Lisolo na bayangani.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) lff liteya 59 pwɛ 6 mpe na mokuse, bozongeli, mpe oyo okoki kosala
Maloba ya nsuka (Min. 3)
Loyembo 129 mpe libondeli