Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Yehova abikisaka baoyo elimo etutami

Yehova abikisaka baoyo elimo etutami

Moto nyonso azalaka mawamawa na bantango mosusu. Koyoka mawa emonisi te ete moto azangi kondima. Kutu, na ntango moko boye, Yehova mpe amonisaki ete ayokaki mawa. (Eb 6:​5, 6) Kasi tokosala nini soki tozali koyoka mawa makasi mbala na mbala to mpe ntango nyonso?

Bondelá Yehova mpo asalisa yo. Yehova atyaka mpenza likebi na ndenge oyo tozali komiyoka mpe kokanisa. Ayebi ntango tozalaka na esengo mpe ntango tozalaka na mawa. Ayebi ntina oyo tokanisaka mpe tosalaka likambo boye to boye. (Nz 7:9b) Likambo eleki ntina, Yehova atyelaka biso likebi mpe akoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango oyo toyokaka mawa to totungisamaka na makanisi.—Nz 34:18.

Batelá makanisi na yo. Makanisi ya mabe ekoki kosilisa biso esengo ata mpe kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Yango wana, tosengeli kobatela motema na biso, elingi koloba, bomoto na biso ya kati.—Mas 4:23.

TALÁ VIDEO NDENGE BANDEKO NA BISO BAZALI KOBATELA KIMYA ATAKO MALADI, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini Nikki asalaki mpo na kosalisa ye abunda na maladi na ye?

  • Mpo na nini Nikki amonaki ete azalaki na mposa ya koluka lisalisi ya minganga?—Mt 9:12

  • Na ndenge nini Nikki atyelaki Yehova motema mpo asalisa ye?