Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Salisá bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báluka koyeba Mozalisi na bango

Salisá bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báluka koyeba Mozalisi na bango

Ekómelaka yo okakatana kopesa litatoli epai ya bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te, mpe okanisaka ete bakoyoka te? Soki bongo, kobosana te ete bato mingi oyo bazalaki kosambela ata na lingomba moko te, ezala mpe bato oyo bazalaki kondima te ete Nzambe azalaka, bakómaki Batatoli ya Yehova. Mbala mingi, bazalaki kaka na mposa ete moto moko asalisa bango bámona bilembeteli oyo emonisi ete Nzambe azalaka.—Ro 1:20; 10:14.

TALÁ VIDEO BATO OYO BAZANGI KONDIMA BAKOKI KOKÓMA NA KONDIMA!—BATO OYO BASAMBELAKA ATA NA LINGOMBA MOKO TE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

Ndenge nini ndakisa ya Tommaso esalisi yo ozala na likanisi malamu mpo na kopesa litatoli epai ya bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te?